Bopɛto elimboli mpenza nini?
NA EKEKE ya 18 mpe ya 19, lokola salite elekaki mingi na Mpoto mpe na États-Unis, bamisionɛrɛ ya ntango wana bateyaki likambo oyo tokoki kobenga “liteya ya bopɛto.” Liteya yango ezalaki komonisa ete salite ezali lisumu mpe bopɛto ekómisaka moto penepene na Nzambe. Ekoki kozala ete liteya yango nde esalaki ete likanisi oyo eyebana mingi: “Bopɛto ezali ndeko ya kobanga Nzambe.”
Lingomba ya Armée du Salut, oyo William Booth na mwasi na ye Catherine Booth babandisaki, ekómaki mpe koteya likambo yango. Buku moko (Health and Medicine in the Evangelical Tradition) emonisi ete maloba mosusu oyo bazalaki kosalela na ebandeli yango oyo: “Sabuni, Supu mpe Lobiko.” Na nsima, ntango Louis Pasteur na bato mosusu bamonisaki polele ete mikrobe nde ememaka maladi, yango eyaki se kolendisa likanisi ya bopɛto mpe siansi endimisaki ete esengeli koluka mayele ndenge na ndenge mpo na kobatela bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato.
Na kati ya bibongiseli oyo bazwaki mbala moko na ntango wana, tokoki kotánga oyo: bapekisaki likambo ya kosɛngisa batemwɛ na ba tribinale ete bápesa Biblia bize; bapekisaki mpe ete bato ebele basengeli komɛla na kɔpɔ moko te na biteyelo mpe na bisika oyo bazelaka bingbunduka. Na misa, na esika ete bato nyonso bámɛlaka vinyo na kɔpɔ moko, batyaki bakɔpɔ mpo na moto na moto. Ya solo, emonanaki ete bato wana oyo babandisaki likambo wana ya sika ya koteya bato bopɛto balongaki mpenza kobongola makanisi ya bato mingi na likambo yango. Liteya yango esimbaki mpenza mitema ya bato, yango wana mokomi moko abengaki mbuma malamu oyo yango ebotaki ete “kolinga bopɛto.”
Kasi, emonanaki ete “kolinga bopɛto” yango ezalaki se ya likolólikoló. Eumelaki te, bato ya mombongo basalaki ete biloko lokola sabuni ekóma biloko ya kobongisa na yango nzoto. Piblisite ekómaki kondimisa bakiliya ete soki basaleli basabuni mosusu na mafuta mosusu, bakokóma na lokumu mpe bato mosusu bakobanda kolula bango. Televizyo mpe ezali koteya kaka likanisi yango. Ezalaka mpasi komona bato ya lokumu mpe bato ya kitoko oyo basalaka piblisite ya biloko ya kotɛkisa mpe oyo balakisaka na bafilme na televizyo, ete bazali kosukola ndako, kokɔmba libándá, kokende kobwaka salite oyo ezali na fulu to mpe kolongola nyei ya banyau to ya bambwa na bango.
Ezali mpe na bato oyo bakanisaka ete kokende mosala nde epesaka moto mbongo oyo azali na mposa na yango, kasi kosala misala ya ndako efutaka eloko te. Mpe lokola moto azwaka mbongo te soki abongisi esika oyo afandi, bazali kokanisa ete ezali mpenza na ntina te kosala yango. Likambo yango ebimisi mpe likanisi oyo bato mosusu bazali na yango lelo, ete bopɛto etaleli kaka kobongisa nzoto.
Ndenge Nzambe atalelaka bopɛto
Ntembe ezali te ete milende oyo esalemaki na ebandeli mpo na koteya bato ezaleli ya bopɛto esalisaki bato mingi bákóma na bomoi ya malamu. Mpe ebongi mpenza kozala bongo, mpamba te bopɛto ezali ezaleli oyo euti na Yehova, Nzambe mosantu mpe ya pɛto. Ye ateyaka biso mpo na litomba na biso, mpo tókóma basantu mpe pɛto na makambo na biso nyonso.—Yisaya 48:17; 1 Petelo 1:15.
Yehova Nzambe azali kopesa ndakisa na likambo yango. Bopɛto mpe bizaleli na ye mosusu oyo tokoki mpenza koyeba yango malamumalamu mbala moko te, emonanaka polele na nzela ya biloko oyo akelá. (Baloma 1:20) Biso moko tokoki komona ete biloko oyo Nzambe akelá yango moko ebebisaka zamba, mai na mopɛpɛ te. Mabele emipɛtolaka na nzela ya bibongiseli ndenge na ndenge oyo esalemaka na kati na yango, mpe esalaka ete bato bázala pɛto mpe na nzoto kolɔngɔnɔ. Mayele ya kotya bopɛto ndenge wana ekokaki kouta se na Mozalisi oyo alingaki ete bopɛto ezalaka. Na oyo nyonso touti kolobela, tokoki kosukisa ete basambeli ya Nzambe basengeli kozala pɛto na makambo nyonso ya bomoi na bango.
Lolenge minei ya bopɛto
Biblia emonisi lolenge minei ya bopɛto oyo basambeli ya Nzambe basengeli kosala makasi mpo na kobatela yango. Tótalela mokomoko na yango.
Bopɛto ya elimo. Tosengeli kotalela yango lokola lolenge ya bopɛto oyo eleki ntina, mpamba te yango nde ekoki kopesa moto likoki ya kozwa bomoi ya seko. Kasi, mbala mingi yango ezali lolenge ya bopɛto oyo bato babosanaka. Na maloba ya polele, kozala pɛto na elimo elimboli kosalela losambo ya solo ndenge Nzambe alakisi yango mpe komeka te kotya lokolo na losambo ya lokuta, mpamba te Nzambe atalelaka losambo nyonso ya lokuta lokola eloko ya mbindo. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bóbima na kati na bango, mpe bókabwana na bango. [Yehova] alobi bongo. [Bósimba] eloko ya mbindo te, mpe boye nakoyamba bino.” (2 Bakolinti 6:17) Moyekoli Yakobo mpe alobaki likambo yango malamumalamu ete: “Losambo ya pɛto mpe lobongi epai ya Nzambe Tata na biso ezali boye: . . . komibatela nzoto pɛto na makambo ya mokili.”—Yakobo 1:27.
Nzambe amonisaki polele ete aboyi tósangisa losambo ya lokuta na oyo ya solo. Mbala mingi, losambo ya lokuta ezalaka na misala ya mbindo, na bikeko mpe na banzambe ya mbindo. (Yilimia 32:35) Yango wana, baklisto ya solo balendisami ete bámikotisa te na losambo nyonso ya mbindo.—1 Bakolinti 10:20, 21; Emoniseli 18:4.
Bopɛto ya bizaleli. Nzambe amonisi mpe polele bizaleli nini ezali pɛto mpe bizaleli nini ezali mbindo. Bato ya mokili bakómi se ndenge mokanda ya Baefese 4:17-19 (NW) elobi yango, ete: “Bazali na kati ya molili na makanisi, mpe batangwi mosika na bomoi oyo ezali ya Nzambe . . . Kobungisáká bizaleli nyonso ya malamu, bamipesá na etamboli ya mbindo mpo na kosala bosɔtɔ ya ndenge nyonso na lokoso.” Makanisi yango ya mbindo emonanaka na ndenge mingi, ekoki kozala na ndenge ya polele to kozanga ete tóyeba yango malamu; yango wana baklisto basengeli kofungola miso.
Bato oyo balingaka Nzambe bayebi ete kindumba, kosangisa nzoto mibali na mibali, kosangisa nzoto liboso ya kobala, mpe kotala bafilme, bafɔtɔ mpe mikanda oyo elakisaka bato bazali bolumbu, nyonso wana ezali kobuka mobeko ya Yehova na likambo etali bopɛto. Nzokande, makambo wana emonanaka mingi na masano ya mokili. Yango wana, baklisto basengeli kokeba mpo bákwea na makambo yango te. Na makita ya boklisto to na bisika mosusu oyo tozali kokutana bato ebele, soki moto azali kolata bilamba ya mikusemikuse, oyo ezali komonisa biteni mosusu ya nzoto oyo esengeli kobombama, yango ekoki kobenda likebi ya bato mpe komonisa ete moto yango azali na bizaleli ya pɛto te. Longola likambo ya komema makanisi ya mbindo oyo euti na mokili na kati ya baninga na ye baklisto, moto oyo azali kolata ndenge wana akoki kobotisa makanisi ya mbindo epai ya basusu. Na likambo wana, baklisto basengeli mpenza kosala makasi mpo na komonisa ‘mayele oyo euti na likoló.’—Yakobo 3:17.
Bopɛto ya makanisi. Motema ya moto esengeli te kozala esika ya kobombaka makanisi ya mbindo. Yesu akebisaki na likambo ya kozala na makanisi ya mbindo, ntango alobaki ete: “Kasi ngai nazali koloba na bino ete moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii na koyoka ye mposa asili kosala ekobo elongo na ye na kati ya motema na ye.” (Matai 5:28, NW; Malako 7:20-23) Maloba wana etaleli mpe kotala bafilme to bafɔtɔ oyo elakisaka bato bazali bolumbu, kotánga mikanda oyo ezali na masolo ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo mpe koyoka nzembo oyo ezali na maloba oyo elendisaka makambo yango. Yango wana, baklisto basengeli te kokolisa makanisi ya mabe oyo ekobebisa elimo na bango mpe ekoki kotinda bango bálobaka mpe básalaka makambo ya mbindo.—Matai 12:34; 15:18.
Bopɛto ya nzoto. Biblia ezali komonisa ete bopɛto ya nzoto mpe bosantu etambolaka nzela moko. Na ndakisa, Paulo akomaki ete: “Balingami, awa ezali biso na bilaka oyo, tómipɛtola mpenza na mbindo nyonso ya nzoto mpe ya elimo mpe tókokisa ezaleli na biso ya bulɛɛ kati na nsɔmɔ ya Nkolo.” (2 Bakolinti 7:1) Yango wana, baklisto ya solo basengeli kosala makasi mpo na kobatela nzoto na bango, ndako na bango, mpe esika oyo bafandi, ete ezala mpenza pɛto mpe na mobulu te na ndenge oyo ekoki. Ata na bisika oyo mai ya kosukola nzoto, bilamba to biloko mosusu ezali mpasi, baklisto basengeli kosala nyonso oyo ekoki na bango mpo na komibatela pɛto mpe komonana malamu na miso ya bato.
Kozala pɛto na nzoto elimboli mpe koboya komɛla likaya ezala na lolenge nini, kolekisa ndelo te na komɛla masanga, komɛla bangi te; biloko yango ekómisaka nzoto mbindo mpe ezali likama. Mobateli ya mpate oyo mokanda ya Loyembo ya Salomo elobeli, asepelaki na nsolo kitoko ya bilamba ya Sulamite. (Loyembo 4:11) Soki tozali kobatela nzoto na biso pɛto ezali elembo ya bolingo, mpamba te na ndenge yango tokoboya ete bato oyo bazali pembeni na biso báyokaka nsolo mabe ya nzoto na biso. Kosalela malasi ezali mabe te, kasi yango esengeli te kozwa esika ya kosukola nzoto mbala na mbala mpe kolata bilamba ya pɛto.
Tólekisa ndelo epai moko te
Na likambo etali bopɛto ya nzoto, bato balekisaka ndelo epai moko to mosusu. Soki tomipesi na koluka bopɛto oyo eleki ndelo, tokoki kozanga esengo. Yango ekoki mpe kolya biso ntango mingi. Epai mosusu, soki ndako na biso ezali salite mpe mobulumobulu, yango ekoki kosɛnga mbongo mpe ntango mingi mpo na kobongisa yango. Mpo na kolekisa ndelo epai moko te, likambo ya malamu ezali nde ya kobatela ndako na biso pɛto mpe komonana malamu na miso ya bato.
Tóluka mindɔndɔ te. Ezalaka mpasi kotya bopɛto na ndako to na shambre oyo biloko nyonso ezali na molɔngɔ te, ndako ya ndenge wana, oyo biloko ezali mobulumobulu ebombaka mpe salite. Ndako oyo ezali na mindɔndɔ te, oyo eloko na eloko ezali na esika na yango, ezwaka ntango mingi te mpo na kotya bopɛto. Biblia esɛngi biso tózala na bomoi ezangi mindɔndɔ: “Awa ezali biso na biloko ya kolya mpe na bilamba ya kolata, ebongi na biso bongo.”—1 Timote 6:8.
Tóbatela bopɛto. Kobatela ndako pɛto ezali mokumba ya moto nyonso oyo afandi kati na yango. Mbala mingi, bandako ya mobulumobulu ebandaka na bashambre ya mobulumobulu. Kotya molɔngɔ elimboli kotya eloko na eloko na esika na yango. Na ndakisa, tosengeli te kotika bilamba ya salite na mabele na kati ya shambre. Mpe likambo mosusu ya mabe koleka ezali ya kozanga kotya na esika ebongi biloko oyo bana basakanaka na yango mpe biloko ya mosala; kosala bongo ekoki komema makama. Makama mingi oyo esalemaka na ndako eutaka na biloko oyo batii mobulumobulu na kati ya ndako.
Tomoni polele ete baklisto bakoki kobosana bopɛto te na bomoi na bango. Lolenge ya bomoi oyo Nzambe alingaka, mosakoli Yisaya abengaki yango ete “Nzela ya Bosantu.” Mpe abakisi likambo mosusu oyo ezali kotinda biso na kokanisa, ete “moto ya mbindo akoleka wana te.” (Yisaya 35:8, NW) Ya solo, komesana na bopɛto banda sikoyo ekomonisa polele kondima na biso na elaka ya paladiso ya pɛto awa na mabele oyo Nzambe akani kokokisa mosika te. Na nsuka, na mabele mobimba, bato nyonso bakokumisa Yehova Nzambe ntango bakozala na bopɛto na ndenge mpenza oyo azali kosɛnga.
[Elilingi na lokasa 6]
Kobatela ndako pɛto ezali mokumba ya moto nyonso oyo afandi kati na yango
[Elilingi na lokasa 6]
Mabele yango moko emipɛtolaka na ndenge ya kokamwa