Masolo ya basakoli ya Bokonzi
Bamartiru ya ntango na biso bapesi litatoli na Suède
LILOBA ya Grɛki martyr elimboli na Lingala “motatoli”; yango nde ebimisi liloba “martiru,” oyo elakisi “moto oyo liwa na ye epesi litatoli.” Baklisto mingi ya ekeke ya liboso bapesaki litatoli mpo na Yehova na ndenge bakufaki mpo na kondima na bango.
Ndenge moko mpe, na ekeke ya 20, basoda ya Hitler babomaki bankóto ya Batatoli mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki mpe kokumisa ekólo. Bamartiru wana ya ntango na biso bazali mpe kopesa litatoli malamu mpenza. Ezali yango nde euti kosalema na ekólo Suède.
Mpo na kosepela mbula 50 banda Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esilá, guvɛrnɛma ya ekólo Suède ebongisaki kampanye moko mpo na kokundwela ekólo mobimba bato oyo Banazi babomaki na ndenge ya nsɔmɔ. Bapesaki kampanye yango nkombo “Makambo oyo bato basengeli kobosana te.” Basɛngaki mpe Batatoli ya Yehova básangana na kampanye yango mpe báyebisa ndenge oyo banyokolaki bango.
Mpo na yango, Batatoli babongisaki bafɔtɔ mpe biloko mosusu ya kolakisa bato. Bapesaki ebongiseli na bango nkombo “Bato mosusu oyo babosaná bango ete Banazi mpe babomaki bango.” Batatoli ya Yehova balakisaki bafɔtɔ yango mpo na mbala ya liboso na Ndako na bango ya Mayangani oyo ezali na engumba Strängnäs. Batatoli oyo babikaki na bakaa ya bakangami ya Hitler bazalaki wana mpe bayebisaki bato koleka 8 400 oyo bayaki na mokolo wana ya liboso, makambo oyo bamonaki! Na nsuka ya 1999, bato batalaki bafɔtɔ yango na bisika koleka 100, ezala na bisika oyo babombaka biloko ya kala (musées) mpe na babibliotɛki ya minene na Suède mobimba mpe bato soki 150 000 batalaki yango. Na kati ya bato oyo batalaki bafɔtɔ yango, ezalaki mpe na bakonzi mosusu ya Leta, oyo balobaki malamu mpo na makambo oyo bamonaki.
Na ekólo Suède, balobelá naino te mosala ya Batatoli ya Yehova ndenge wana mpe mosala na bango eyebaná naino malamu bongo te liboso. Bato mingi oyo batalaki bafɔtɔ yango batunaki boye: “Mpo na nini boyebisaki biso liboso te ndenge oyo Banazi banyokolaki bino mpe babomaki bandeko na bino?”
Nsima ya kolakisa bafɔtɔ yango na esika oyo lisangá moko ezali, lisangá yango epesaki lapolo ete motángo ya bato oyo bandimaki koyekola Biblia emataki mingi (30 %)! Motatoli moko abengaki moninga na ye moko ya mosala mpo bákende na esika oyo bazalaki kolakisa bafɔtɔ yango. Moninga yango andimaki na esengo mpe abengaki moninga mosusu. Nsima ya kotala bafɔtɔ yango, moninga wana alobaki ete ayebi te ndenge nini bato yango bazalaki na kondima makasi ndenge wana mpe bandimaki kokufa na esika ya kotya kaka sinyatire na mokanda oyo ezalaki kosɛnga bango bawangana kondima na bango. Yango efungolaki nzela na masolo mosusu mpe moninga yango abandaki koyekola Biblia na Batatoli.
Lokola bandeko na bango na ekeke ya liboso, liwa ya bamartiru wana ya sembo na ekeke ya 20, epesaki litatoli moko monene ete Yehova azali Nzambe se moko ya solo, oyo abongi ete tómonisa kondima makasi epai na ye mpe tótikala sembo epai na ye.—Emoniseli 4:11.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 13]
Moto ya bolɔkɔ na kati ya kaa: Państwowe Muzeum Oświęcim-Brzezinka, na ndingisa ya USHMM Photo Archives