Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/12 nk. 12-32
  • Na nzela ya mokili ya sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na nzela ya mokili ya sika
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Momboto elonami
  • Nakei na mbu
  • Mosala ya Betele
  • Bomoi na ngai ebongwani
  • Mokumba moko ya mpasi
  • Mbongwana monene na bomoi na ngai
  • Yehova ateyaki ngai banda bomwana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/12 nk. 12-32

Lisolo ya bomoi

Na nzela ya mokili ya sika

Ya Jack Pramberg

Pene na Arboga, mwa engumba moko oyo ezali na katikati mpenza ya ekólo Suède, Biro ya filiale moko ya Batatoli ya Yehova ezali wana, epai bandeko koleka 80 bazali kosala. Wana nde epai ngai ná mwasi na ngai Karin tofandaka mpe tosalaka. Ndenge nini tokómaki awa?

NA NSUKA ya bambula ya 1800, elenge mwasi moko ya mbula 15 autaki na Suède mpe akendeki kofanda na États-Unis. Na engumba New York, na esika moko oyo babongisaki mpo na bapaya oyo bazangi bisika ya kofanda, akutanaki na motambwisi moko ya masuwa oyo azalaki mpe moto ya Suède. Balinganaki, babalanaki, mpe babotaki mwana moko ya mobali: mwana yango nde ngai. Nabotamaki na Bronx, na engumba New York, na 1916, ntango Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ezalaki konginda.

Mwa moke na nsima, tokendeki kofanda na Brooklyn, mosika te na esika Betele ezali. Na nsima, tata ayebisaki ngai ete ngai ná ye totambolaki na masuwa mbala ya liboso pene na gbagba ya Brooklyn, oyo ezali mosika te na biro monene ya Batatoli ya Yehova. Nayebaki ata moke te ete misala oyo ezali kosalema kuna ekobongola bomoi na ngai.

Na 1918, Etumba ya Liboso ya mokili mobimba esilaki, mpe na ntango wana, bato ya Mpoto batikaki kobomana. Basoda bazongaki epai na bango, epai kozanga mosala mpe bobola ezalaki kozela bango. Tata amonaki malamu azonga na Suède, mpe tokendaki na 1923. Tokómaki kofanda na Erikstad, mwa mboka moko oyo ezali pene na esika engbunduka etɛlɛmaka, na etúká ya Dalsland. Kuna, tata afungolaki atelye na ye moko ya bibende. Wana nde esika ngai nakolaki mpe nakɔtaki kelasi.

Momboto elonami

Mosala ya tata ezalaki kotambola malamu te. Yango wana, na ebandeli ya bambula ya 1930, akómaki lisusu kotambola na masuwa. Ngai ná mama totikalaki biso moko. Mama atikalaki na mitungisi mingi na motema mpe ngai natikalaki kotambwisa misala na atelye. Mokolo moko, mama akendeki kotala tata leki Johan. Lokola mama azalaki komitungisa mingi mpo na makambo oyo ezalaki koleka na mokili, atunaki boye: “Johan, ekozala ntango nyonso kaka boye?”

Tata leki azongisaki ete: “Te, Ruth.” Ayebisaki ye ete Nzambe alaki kosukisa mabe mpe kotya bokonzi ya sembo oyo ekoyangela mabelé, mpe Yesu Klisto akozala mokonzi na yango. (Yisaya 9:6, 7; Danyele 2:44) Ayebisaki ye ete Bokonzi, oyo Yesu alakisaki biso kobondelaka mpo na yango, ezali boyangeli to guvɛrnema moko ya sembo, oyo ekokómisa mabelé oyo paladiso.​—Matai 6:9, 10; Emoniseli 21:3, 4.

Bilaka wana ya Biblia esimbaki mpenza motema ya mama. Azongaki ndako na esengo, mpe nzelanzela, azalaki kotɔnda Nzambe. Kasi, ngai ná tata tosepelaki te ndenge mama akómaki komipesa na makambo ya losambo. Na ntango wana, elingi koloba na katikati ya bambula ya 1930, nakendaki na engumba Trollhättan, na wɛsti ya Suède, epai nazwaki mosala na atelye moko ya monene. Mosika te, mama ná tata bayaki mpe kofanda na engumba yango. Na ntango wana, tata autaki kotika kotambolatambola na masuwa. Na yango, tokómaki lisusu esika moko libota mobimba.

Mpo na kosilisa nzala na ye ya elimo, mama alukaki Batatoli ya Yehova na engumba wana. Na ntango wana, bazalaki koyangana na bandako ya bandeko, ndenge baklisto ya ebandeli bazalaki kosala. (Filemona 1, 2) Mokolo moko, ekómaki ngala ya mama ya koyamba bandeko. Na kobanga nyonso, atunaki tata soki akoki koyamba baninga na ye na ndako. Tata ayanolaki ete: “Baninga na yo bazali baninga na ngai.”

Na yango, makita ekómaki mpe kosalema epai na biso. Soki kaka bato babandi kokɔta na lopango, ngai nazalaki kobima. Kasi, mosika te, nakómaki kotikala. Esengo ya Batatoli mpe bandimbola na bango ya polele esalisaki ngai nalongola makanisi nyonso ya mabe oyo nazalaki na yango mpo na bango. Na motema na ngai, momboto ebandaki kokola: nakómaki na elikya.

Nakei na mbu

Na ntembe te, nazwá mpenza makila ya tata, mpo ngai mpe nakómaki kotambola na mbu. Ngai mpe nakómaki komibanzabanza makasi mpo na bamposa na ngai ya elimo. Na bisika nyonso oyo tozalaki kotɛlɛma, nazalaki kosala makasi nakutana na Batatoli ya Yehova. Ntango totɛlɛmaki na Amsterdam, na Pays-Bas, nakendaki na biro moko ya posita kotuna báyebisa ngai epai nakoki kokutana na bango. Batunaki ngai mwa mituna mpe na nsima bapesaki ngai adrɛsi moko, mpe nakendaki mbala moko na esika yango. Mwana mwasi moko ya mbula 10 ayambaki ngai na esengo nyonso na monɔkɔ ya ndako. Atako nazalaki mopaya, ngai ná libota na ye tokómaki mbala moko lokola baninga ya kala; mpe namonaki mpenza ete Batatoli ya mokili mobimba bazali bandeko!

Atako tozalaki koloba monɔkɔ moko te, ntango babimisaki manaka mpe programɛ ya engbunduka mpe babandaki koyema karte moko, nasosolaki ete liyangani moko elingaki kosalema na Haarlem, engumba moko oyo ezali pene na Amsterdam. Nakendaki na liyangani yango, mpe atako nazalaki koyoka eloko moko te na makambo oyo bazalaki koloba, nasepelaki makasi. Ntango namonaki Batatoli bazali kokabolela bato nkasa mpo na kobenga bango báya kolanda lisolo ya bato nyonso na mokolo ya lomingo, nayokaki mposa ya kopesa bango mabɔkɔ. Na yango, nazalaki kolɔkɔta nkasa ya libyangi oyo bato bazalaki kobwaka mpe kopesa yango na bato mosusu.

Mokolo moko, totɛlɛmaki na Buenos Aires, na ekólo Argentine, mpe kuna namonaki biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova. Ezalaki na biro moko mpe na depo. Mwasi moko, oyo afandaki liboso ya mesa, azalaki kotonga bilamba ya nsinga mpe mwana moko ya mwasi ya moke, oyo akokaki kozala mwana na ye, azalaki kosakana na mwana-popi. Ekómaki butu makasi, mpe mobali moko azalaki kolongola mikanda na bibliotɛkɛ, mpe na kati ya mikanda yango ezalaki na buku Création, na monɔkɔ ya Suédois. Ntango namonaki ndenge bayambaki ngai na esengo, namonaki mbala moko ete ngai mpe nasengeli kokóma Motatoli ya Yehova.

Na nzela, ntango tozalaki kozonga na Suède, tozwaki basoda moko ya Canada oyo aviɔ na bango ekweaki na bokula ya Newfoundland. Mwa mikolo na nsima, ntango tokómaki pene na Écosse, masuwa moko ya basoda ya Angleterre ekangaki biso. Bamemaki biso na engumba Kirkwall, na Bisanga Orkney, mpo na koluka koyeba soki tozali banani. Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, mpe basoda ya Hitler bakɔtaki na Pologne na Sɛtɛmbɛ 1939. Nsima ya mwa mikolo, batikaki biso, mpe tozongaki na Suède kozanga ete likama moko ekómela biso.

Nazongaki mboka na ndenge mibale, elingi koloba ngai moko moto nakómaki lisusu epai na biso, mpe nakómaki sikoyo na likoki ya komipesa na makambo ya Nzambe. Lokola nakómaki na mposa ya kokɔta na lisangá ya basaleli ya Nzambe, nalingaki lisusu kozangisaka makita te. (Baebele 10:24, 25) Nazalaka mpenza na esengo soki nakanisi ete ntango nazalaki kotambola na masuwa, nazalaki ntango nyonso kopesa bato mosusu ya masuwa litatoli, mpe nayebi ete moko na bango akómaki mpe Motatoli.

Mosala ya Betele

Na ebandeli ya 1940, nakendaki kotala biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na engumba Stockholm. Johan H. Eneroth, oyo azalaki kokamba mosala ya kosakola na Suède na ntango wana ayambaki ngai. Ntango nayebisaki ye ete nazali na mposa ya kokóma mobongisi-nzela mpo na komipesa mobimba na mosala ya kosakola, atalaki ngai mpe atunaki ngai boye: “Ondimi mpenza ete oyo ezali ebongiseli ya Nzambe?”

Nayanolaki ye ete: “Ɛɛ.” Yango epesaki ngai nzela ya kozwa batisimo na mokolo ya 22, sanza ya motoba, na mobu 1940, mpe nabandaki kosala na biro ya filiale, esika kitoko wana, elongo na bandeko ya sembo mpenza. Tozalaki kolekisa bawikende na biso na mosala ya kosakola. Na eleko ya molunge, tozalaki mbala mingi kokende na velo na bateritware ya mosika mpe tozalaki kolekisa wikende mobimba na mosala ya kosakola; mpe na butu tozalaki kolala na mwa bandako oyo basali-bilanga babombaka biloko oyo bauti kobuka.

Kasi, mbala mingi tozalaki kosakola ndako na ndako na engumba Stockholm mpe zingazinga na yango. Mokolo moko, namonaki moto moko azali kobunda na kobamba tono moko boye. Nagumbaki mabɔkɔ ya simisi na ngai mpe nasalisaki ye. Ntango tono yango etikaki kotanga, mobali yango atalaki ngai, mpe na botɔndi nyonso alobaki ete: “Nakanisi oyaki mpo na likambo mosusu. Yaká tómata na likoló, tósukola mabɔkɔ mpe tómɛla mwa kɔpɔ ya kafe.” Tomataki, mpe ntango tozalaki komɛla kafe, napesaki ye litatoli. Nsukansuka, akómaki mpe moklisto.

Atako ekólo Suède eboyaki kokɔta na etumba, bato ya Suède bamonaki mpe mpasi ya etumba yango. Basɛngaki mibali ebele bákɔta na mosala ya soda; ngai mpe nazalaki na molɔngɔ ya mibali yango. Ntango naboyaki koyekola mosala ya soda, batyaki ngai na bolɔkɔ na boumeli ya mwa mikolo. Na nsima, batindaki ngai na kaa ya bakangami. Bazalaki komema bilenge Batatoli mingi na batribinale, mpe tozalaki kopesa litatoli na ntina na Bokonzi ya Nzambe. Yango ekokisaki mpenza esakweli ya Yesu oyo: “Bokomemama liboso ya baguvɛrnɛrɛ mpe bakonzi mpo na ngai, mpo na litatoli epai na bango mpe bikólo mosusu.”​—Matai 10:18.

Bomoi na ngai ebongwani

Na 1945, etumba esilaki na Mpoto. Na nsima, kaka na mbula yango, Nathan H. Knorr, oyo azalaki kokamba mosala ya kosakola na mokili mobimba, autaki na Brooklyn mpe ayaki kotala biso elongo na sekrɛtɛrɛ na ye, Milton Henschel. Koya na bango ezalaki na ntina mingi mpo na kobongisama ya mosala ya kosakola na Suède, mpe mpo na ngai moko. Ntango nayokaki likambo ya kokɔta na Eteyelo ya Gileadi, nasɛngaki mbala moko ete nakende mpe na eteyelo yango.

Na mbula oyo elandaki, nakɔtaki na eteyelo yango, oyo ezalaki na ntango wana pene na engumba South Lansing, na etúká ya New york. Na boumeli ya sanza mitano oyo tolekisaki na eteyelo yango, nazwaki mateya oyo esalisaki ngai nakóma kosepela na Biblia mpe na ebongiseli ya Nzambe lisusu makasi. Namonaki ete bandeko oyo bazalaki kokamba mosala ya kosakola bazalaki mpenza na bolingo mpe na limemya mpo na moto nyonso. Bazalaki komipesa makasi na mosala elongo na biso nyonso. (Matai 24:14) Atako yango ekamwisaki ngai te, komona yango ngai moko na miso esepelisaki ngai mingi.

Mosika te, na mokolo ya 9, sanza ya mibale, na mobu 1947, ntango ekokaki mpo bayekoli ya kelasi ya mbala ya mwambe bázwa badiplome na bango. Ndeko Knorr ayebisaki biso bikólo oyo bakotinda biso. Ntango akómaki epai na ngai, alobaki ete: “Ndeko Pramberg akozonga na Suède mpo na kosalisa bandeko na ye kuna.” Mpo na koloba solo, nasepelaki te ndenge bazongisaki ngai na mboka na biso.

Mokumba moko ya mpasi

Ntango nazongaki na Suède, nayokaki ete mokumba moko ya sika ebimi na bikólo mingi; mokumba ya mokɛngɛli ya etúká. Nakómaki mokɛngɛli ya etúká ya liboso na Suède, mpe masangá ya ekólo mobimba ezalaki na motó na ngai. Nabongisaki mpe natambwisaki oyo tokómá kobenga lelo mayangani ya zongazonga, oyo ezalaki kosalema na bingumba ya Suède. Lokola ebongiseli yango ezalaki mpenza ya sika, nazalaki kozwa malako mingi te. Ngai ná ndeko Eneroth tofandaki mpe tosalaki programɛ. Nabangaki mpenza ntango bapesaki ngai mokumba yango, mpe nabondelaki Yehova mbala na mbala. Nasalaki lokola mokɛngɛli ya etúká na boumeli ya mbula 15.

Na ntango wana, ezalaki mpasi mpo na kozwa bisika oyo ebongi mpo na mayangani. Tozalaki kosalela bandako ya mabina mpe bisika mosusu ya ndenge wana. Mingi na yango ezalaki na biloko ya malonga te ya kotya molunge mpe ezalaki bosɔtɔ. Liyangani moko oyo tosalaki na Rökiö, na Finlande, ezalaki mpenza ndenge wana. Tosalaki yango na ndako moko ya kala oyo bato ya mboka wana bazalaki kosalela liboso mpo na mateya mpe mpo na masano. Malili ezalaki makasi mpenza (-20°C). Topelisaki mɔtɔ na kati ya tono mibale ya minene mpo na kotya molunge. Kasi, toyebaki te ete bandɛkɛ basalaki bazumbu na bango na kati ya mombonda. Milinga etondaki na ndako. Kasi, tolataki kaka bakazaka na biso mpe totikalaki kaka wana, atako miso ezalaki koswa. Likambo wana esalá ete tókanisaka liyangani yango ntango nyonso.

Na malako oyo tozwaki mpo na kobongisa mayangani wana ya mikolo misato, tosengelaki mpe kopesa bayangani bilei. Na ebandeli, tozalaki na banzungu mpe basaani te, mpe tomesanaki naino te koleisa bato ebele ndenge wana. Kasi, tozalaki na bandeko ya malamu mpenza oyo bakokisaki mokumba yango na esengo nyonso. Mokolo moko liboso liyangani ebanda, esengelaki omona ndenge bandeko bagumbamaki liboso ya tono bazali kolongola mposo ya mbálá, bazali kobɛta masolo mpe kosala na esengo. Bandeko mingi oyo basalaki na mabaku wana bakómá baninga ya libela.

Tosengelaki mpe kotambola na mabaya oyo tozalaki kokoma makambo mpo na kobenga bato na mayangani yango. Tozalaki kotambola na engumba to na mboka mobimba mpo na kobenga bato na lisukulu ya bato nyonso. Bato bazalaki na boboto mpe na limemya. Mokolo moko na engumba Finspång, balabala moko etondaki na bato ya mosala oyo bazalaki kobima na kompanyi na bango. Na mbala moko, moko na bango agangaki boye: “Talá bato oyo Hitler alongi bango te!”

Mbongwana monene na bomoi na ngai

Mosika te, bomoi na ngai ebongwanaki ntango nakutanaki na Karin, mwasi moko ya malamu mpenza. Babengaki ngai ná ye na liyangani moko oyo esangisaki mikili mingi oyo esalemaki na Yankee Stadium, na engumba New York, na Yuli 1953. Kuna, ndeko Milton Henschel asalaki lisukulu ya libala na biso na ntango ya bopemi ya mokolo ya mosala moko, mwa 20, sanza ya nsambo. Ezalaki mpenza likambo monene na kati ya libándá wana ya masano. Nsima ya kotala masangá tii na 1962, babengaki ngai ná Karin na Betele ya Suède. Kuna, nasalaki liboso na Departema ya abonema. Na nsima, lokola nayekolá mekaniki, nakómaki kotalela bamasini oyo ebimisaka mikanda mpe bamasini mosusu ya Betele. Karin asalaki mbula mingi na esika ya kosukola bilamba. Sikoyo, alekisi mbula mingi na Departema ya kobongola mikanda.

Oyo nde bomoi ya esengo tolekisi elongo na boumeli ya mbula koleka 54 na mosala ya Yehova! Yehova apamboli mpenza ebongiseli na ye na basaleli ya bolingo mpe ya molende. Na 1940, ntango nabandaki mosala na Betele, batatoli bazalaki kaka 1 500 na Suède mobimba. Lelo oyo, baleki 22 000. Kutu, na mikili mosusu bokoli yango ezali monene koleka; yango wana, sikoyo toleki milio motoba na ndambo na mokili mobimba.

Elimo ya Yehova ezali kotambwisa mosala na biso, mpe ezali ntango nyonso kotondisa masuwa na biso ya elilingi na bato. Na miso ya kondima, tozali kotala mbu, elingi koloba mokili, oyo ezali ntango nyonso kotomboka, kasi tozali kobanga te. Liboso na biso, tozali komona polele mokili ya sika ya Nzambe. Ngai ná Karin tozali kotɔnda Nzambe mpo na bolamu nyonso oyo asaleli biso, mpe tobondelaka ye mikolo nyonso mpo apesa biso makasi ya kotikala sembo mpe tókokisa mokano na biso: kondimama na Nzambe mpe kozwa bomoi ya seko!​—Matai 24:13.

[Elilingi na lokasa 12]

Mama amemi ngai

[Elilingi na lokasa 13]

Epai ngai ná tata tokendaki na masuwa na bambula 1920

[Elilingi na lokasa 15]

Ngai ná Herman Henschel (tata ya Milton) na Gileadi, na 1946

[Bililingi na lokasa 16]

Tobalanaki na Yankee Stadium, na mokolo ya 20, sanza ya nsambo, na mobu 1953

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto