Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/2 nk. 18-22
  • Tóbunda na “monzube kati na nzoto”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóbunda na “monzube kati na nzoto”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge oyo tosengeli kobunda na monzube
  • Bibongiseli ya Yehova ezali na ntina mingi
  • Ndenge oyo bato mosusu ya sembo balongaki
  • Koyika mpiko epesaka esengo
  • Bolɛmbu ya bato ezali kokumisa nguya ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Bato ya sembo babundaki na nzube kati na nzoto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • “Nzubɛ moko na kati ya mosuni” ya Paulo
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
  • Tozali nde na “monzube kati na nzoto”?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/2 nk. 18-22

Tóbunda na “monzube kati na nzoto”

“Ngɔlu na ngai ekoki na yo.”​—⁠2 BAKOLINTI 12:⁠9.

1, 2. (a) Mpo na nini tosengeli komitungisa mingi te ntango tomekami mpe tozali na mikakatano? (b) Mpo na nini tokoki kozala na elikya ntango tozali komekama?

“BANGO nyonso bazali na mposa ya ezaleli ya kosambela kati na Klisto Yesu bakonyokolama.” (2 Timote 3:12) Mpo na nini bongo? Mpamba te Satana alobaki ete bato basalelaka Nzambe mpo na matomba na bango, mpe amoni ete alongi te kondimisa likambo yango. Mokolo mosusu, Yesu ayebisaki bantoma na ye ete: “Satana alɔmbi ete azwa bino konyongela bino lokola masango.” (Luka 22:31) Yesu ayebaki malamu ete Nzambe atikeli Satana nzela abimisela biso mikakatano mpo na komeka biso. Kasi, yango elingi koloba te ete mokakatano nyonso oyo tokutanaka na yango na bomoi eutaka kaka na Satana to na bademo na ye. (Mosakoli 9:11) Kasi, Satana asalelaka banzela nyonso oyo amoni mpo na kozongisa biso nsima.

2 Biblia elobi na biso ete tosengeli komitungisa mingi te mpo na komekama oyo tozali kokutana na yango. Nyonso oyo ekoki koyela biso, ezali likambo ya sika te, esengeli mpe kokamwisa biso te. (1 Petelo 4:12) Kutu, “mpasi ya motindo moko mpenza ezali kobimela bandeko na [biso] na bipai mosusu na mokili.” (1 Petelo 5:⁠9) Lelo oyo, Satana angali mpenza kongala mpo na kotungisa mosaleli mokomoko ya Nzambe. Zabolo asepelaka soki amoni ete tozali konyokwama na ebele ya mikakatano. Yango wana, azali kosalela mokili oyo mpo na kobakisela biso to kongalisa ‘nzube’ oyo tokoki kozala na yango ‘kati na nzoto.’ (2 Bakolinti 12:⁠7) Atako bongo, mpasi oyo Satana azali kopesa biso esengeli kozongisa biso nsima te. Lokola Yehova “akobongisa ekimeli” mpo tókoka koyikela komekama mpiko, akosala mpe ndenge yango ntango tozali na mikakatano oyo ezali lokola nzube kati na nzoto na biso.​—⁠1 Bakolinti 10:⁠13.

Ndenge oyo tosengeli kobunda na monzube

3. Yehova apesaki eyano nini ntango Paulo asɛngaki ye alongola ye monzube na nzoto?

3 Ntoma Paulo abondelaki Nzambe alongola ye monzube na nzoto. “Nabondeli Nkolo mbala misato mpo na yango ete elongwela ngai.” Yehova ayanolaki ndenge nini na libondeli makasi oyo Paulo asalaki? Alobaki ete: “Ngɔlu na ngai ekoki na yo, zambi nguya na ngai ekokisami kati na bolɛmbu.” (2 Bakolinti 12:​8, 9) Tótalela naino eyano yango malamumalamu mpo tóyeba ndenge oyo ekoki kosalisa biso na kobunda na mikakatano oyo ezali konyokola biso lokola nzube.

4. Makambo nini Paulo azwaki na ngɔlu ya Yehova?

4 Tósimba liboso ete Nzambe alendisaki Paulo azala na botɔndi mpo na ngɔlu oyo amoniselaki ye na nzela ya Klisto. Paulo azwaki mapamboli mingi mpenza. Atako azalaki liboso monguna monene ya bayekoli ya Yesu, na bolingo na ye, Yehova apesaki ye libaku malamu ya kokóma moyekoli. (Misala 7:58; 8:3; 9:​1-4) Na nsima, Yehova apesaki Paulo mikumba ya minene. Liteya oyo biso tokoki kozwa na likambo yango ezali polele. Ata na ntango oyo tozali na mikakatano makasi, tozalaka kaka na ebele ya mapamboli oyo tokoki kozongisa matɔndi mpo na yango. Ata ntango tozali komekama, tosengeli te kobosanaka ebele ya bolamu oyo Yehova azali kosalela biso.​—⁠Nzembo 31:⁠19.

5, 6. (a) Ndenge nini Yehova amonisaki Paulo ete nguya ya Nzambe “ekokisami kati na bolɛmbu”? (b) Ndenge nini ndakisa ya Paulo emonisaki ete Satana azali mobuki ya lokuta?

5 Ngɔlu ya Yehova ekokaka mpe na lolenge mosusu. Nguya ya Nzambe ekoki mpenza mpo na kosalisa biso na kati ya komekama na biso. (Baefese 3:20) Yehova amonisaki Paulo ete nguya na Ye “ekokisami kati na bolɛmbu.” Na ndenge nini? Na bolingo na ye, apesaki Paulo makasi oyo asengelaki na yango mpo na kobunda na komekama na ye. Na nsima, mpiko ya Paulo mpe elikya na ye makasi epai ya Yehova emonisaki baklisto nyonso ete nguya ya Nzambe ezalaki kolonga na kati na ye, moto ya bolɛmbu mpe ya masumu. Kanisá sikoyo oyo yango esalaki epai ya Zabolo, oyo azali koloba ete bato basalelaka Nzambe kaka soki bomoi ezali malamu mpe ezali mindɔndɔ te. Bosembo ya Paulo eyokisaki mokosi yango nsɔni!

6 Paulo, moto oyo azalaki liboso na ngámbo ya Satana mpo na kobundisa Nzambe, monyokoli ya baklisto, Mofalisai ya molende, mpe na ntembe te, moto oyo azalaki na bomɛngo mingi mpamba te abotamaki na libota ya lokumu, akómaki kosalela Yehova mpe Klisto lokola ntoma oyo azali “nsima ya bantoma nyonso.” (1 Bakolinti 15:⁠9) Na mokumba na ye, azalaki kondima bokonzi ya lisangani ya mikóló-bakambi ya ekeke ya liboso mpe azalaki kotosa bango. Azalaki mpe koyika mpiko atako azalaki na monzube na nzoto. Likambo oyo ezalaki mpenza kopesa Satana nkanda ezali ete komekama ya Paulo ekitisaki molende na ye te. Paulo azalaki ntango nyonso kotya makanisi na ye na elikya na ye ya kozala na kati ya Bokonzi elongo na Klisto kuna na likoló. (2 Timote 2:12; 4:18) Monzube moko te ekokaki kokitisa molende na ye, ata oyo ezalaki kosala ye mpasi makasi. Tiká ete biso mpe tózala ntango nyonso na molende makasi! Ndenge oyo Yehova azali kosunga biso na komekama na biso, azali kopesa biso libaku malamu ya komonisa ete Satana azali mobuki ya lokuta.​—⁠Masese 27:⁠11.

Bibongiseli ya Yehova ezali na ntina mingi

7, 8. (a) Lelo oyo, Yehova azali kosalela nini mpo na kopesa basaleli na ye makasi? (b) Mpo na nini kotánga mpe koyekola Biblia mokolo na mokolo ezali na ntina mingi mpo na kobunda na monzube na nzoto na biso?

7 Lelo oyo, Yehova azali kopesa baklisto ya sembo makasi na nzela ya elimo santu, na nzela ya Liloba na ye, mpe na nzela ya bandeko na biso baklisto. Biso mpe tokoki kolanda ndakisa ya ntoma Paulo, tokoki kobondela Yehova mpe kokitisela ye mikumba na biso. (Nzembo 55:22) Ata soki Nzambe alongoli komekama na biso te, akoki kopesa biso mayele ya kobunda na yango, akoki kosala yango ata mpo na komekama oyo ezali mpasi mingi. Mpo na kosalisa biso tóyika mpiko, Yehova akoki mpe kopesa biso “nguya oyo eleki makasi.”​—⁠2 Bakolinti 4:​7, NW.

8 Ndenge nini tozwaka lisalisi yango? Tosengeli komipesa na koyekola Liloba ya Nzambe, mpamba te kati na yango nde tokozwa mabɔndisi na ye. (Nzembo 94:19) Na kati ya Biblia, totángaka maloba mozindo ya basaleli ya Nzambe ntango bazalaki kosɛnga Nzambe ete asalisa bango. Tokoki kokanisa mingi biyano oyo Yehova apesaki bango, oyo mbala mingi alobaki yango na maloba ya kobɔndisa. Koyekola Biblia ekolendisa biso mpo ete “nguya oyo eleki makasi ezala ya Nzambe kasi te oyo euti na biso moko.” Se lokola mokolo na mokolo tozalaka na mposa ya kolya mpo na kotonga nzoto mpe kozwa makasi, tosengeli mpe mbala na mbala kotángaka maloba ya Nzambe. Tosalaka yango? Soki tosalaka yango, tokomona ete ntango tozali kozwa “nguya oyo eleki makasi,” yango ekosalisa biso tóyika mpiko liboso ya mikakatano nyonso oyo ekoki kotungisa biso lokola nzube.

9. Ndenge nini bankulutu bakoki kosunga baoyo bazali na mikakatano?

9 Bankulutu oyo babangaka Nzambe bakoki “kozala [ebombamelo] mpo na mopɛpɛ” mpe “ezipelo na ntango ya mbula makasi,” elingi koloba libateli liboso ya mitungisi mpe mikakatano. Bankulutu oyo balingi kozala mpenza ndenge yango basɛngaka Yehova, na komikitisa mpe na bosembo nyonso, apesa bango “lolemo ya baoyo balakisami” mpo bázalaka na maloba oyo ebongi epai ya bato oyo bazali na mpasi. Maloba ya bankulutu ekoki kozala lokola mwa mbula oyo ezali kopesa mwa mpiɔ oyo ezali kokitisa biso motema mpe kobɔndisa biso ntango tozali na mokakatano. Soki bankulutu bazali “na maloba ya kobɔndisa epai ya milimo oyo ezali konyokwama na makanisi,” basungaka mpenza bandeko na bango ya elimo oyo ntango mosusu babandi kolɛmba to babandi kobungisa esengo mpo bazali na monzube na nzoto.​—⁠Yisaya 32:2; 50:4; 1 Batesaloniki 5:​14, NW.

10, 11. Ndenge nini basaleli ya Nzambe bakoki kolendisa baninga na bango oyo bazali na komekama makasi?

10 Basaleli ya Yehova bazali bango nyonso na kati ya ebongiseli ya boklisto oyo ezali na bomoko. “Tosangani na biso moko moko lokola bilembo ya nzoto,” mpe “ekoki na biso ete tólingana, moto moninga na ye.” (Baloma 12:5; 1 Yoane 4:11) Ndenge nini tokokisaka lisɛngami yango? Mokapo ya 1 Petelo 3:8 elobi ete tosalaka yango ntango tozali ‘kobɔndisana, kolingana lokola bandeko mpe tozali na mitema mawa’ epai ya baninga na biso bandimi. Baoyo bazali na monzube na nzoto oyo ezali kotungisa bango makasi, bázala bilenge to mikóló, tokoki biso nyonso kotyela bango likebi mingi. Ndenge nini?

11 Tosengeli kosala makasi ete tótyelaka mpasi na bango likebi. Soki tozali mafumafu, tokipaka kutu bato te, mbala mosusu, kozanga ete tóyeba yango tokoki kobakisela bango mpasi. Na ntango toyebi komekama na bango, tosengeli kokeba na maloba na biso, tosengeli kokanisa malamu maloba nini ebongi tóloba, ndenge nini tokoloba yango, mpe tosengeli kokeba na makambo oyo tozali kosala. Soki tozali na makanisi ya malamu mpe na maloba ya kolendisa, tokoki kokitisa mpasi mosusu oyo monzube ezali kopesa bango. Na ndenge yango nde tokozala epai na bango lisalisi oyo ezali kolendisa.​—⁠Bakolose 4:​11, NW.

Ndenge oyo bato mosusu ya sembo balongaki

12-14. (a) Moklisto moko asalaki nini mpo na kobunda na maladi ya kanser? (b) Ndenge nini bandeko ya lisangá basungaki ye mpe balendisaki ye?

12 Lokola mikolo ya nsuka ezali kokende na nsuka na yango, “bolɔzi” ezali se kobakisama mokolo na mokolo. (Matai 24:⁠8) Yango wana, tosengeli koyeba ete moto nyonso awa na mokili akokutana na komekama, mingimingi basaleli ya sembo ya Yehova, lokola bazali koluka kosala mokano na ye. Na ndakisa, tótalela makambo ekómelaki moklisto moko oyo azalaki mobongisi-nzela. Bazwaki ye na maladi ya kanser na monɔkɔ mpe basengelaki kosala ye lipaso. Ntango ye na mobali na ye bayokaki ete azali na maladi wana, basalaki mbala moko libondeli molai mpe ya mozindo epai ya Yehova mpo na kosɛnga ye asalisa bango. Na nsima, ndeko mwasi yango alobaki ete kimya moko ya kokamwa eyelaki bango. Kasi, atako ntango mosusu azalaki koyoka mwa malamu, ntango mosusu mpasi ezalaki makasi, mingimingi mpo na bankisi azalaki kozwa.

13 Mpo na kobunda na mokakatano na ye, ndeko mwasi yango ayekolaki makambo nyonso oyo akokaki koyeba mpo na maladi ya kanser. Asololaki na minganga oyo bazalaki kosalisa ye. Na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Lamuká!, mpe mikanda mosusu oyo lisangá ebimisaka, atángaki masolo oyo ezali kolobela ndenge oyo bato mosusu babundaki mpo na kolonga kotungisama na makanisi mpo na maladi yango. Atángaki mpe bavɛrsɛ ya Biblia oyo ebongi oyo ezali komonisa nguya ya Yehova mpo na kosunga basaleli na ye na ntango ya mpasi, mpe makambo mosusu ya ntina.

14 Lisolo moko oyo elobelaki ndenge ya koyika mpiko na ntango oyo tozangi elikya ezalaki na maloba ya mayele oyo: “Ye oyo akomitangola na bamosusu akolukaka yango ekosepelisa ye moko.” (Masese 18:⁠1) Yango wana, lisolo yango epesaki toli oyo: ‘Longolá ezaleli ya kozala yo moko.’a Ndeko mwasi yango alobi boye: “Bandeko mingi bayebisaki ngai ete bazalaki kobondela mpo na ngai; bamosusu bazalaki kobenga ngai na telefone. Bankulutu mibale bazalaki mbala na mbala kobenga ngai na telefone mpo na koyeba soki nazali ndenge nini. Bandeko batindelaki ngai bafololo mpe ebele ya bakarte oyo ezalaka na bililingi kitoko. Kutu, bandeko mosusu bazalaki kolambela ngai bilei. Lisusu, mingi bamipesaki mpo bákendaka kotika ngai na lopitalo.”

15-17. (a) Ndenge nini moklisto moko abundaki na mikakatano nsima ya kozwa likama ya motuka? (b) Ndenge nini bandeko na lisangá basungaki ye?

15 Mwasi moko ya etúká ya New Mexico, na États-Unis oyo azali mosaleli ya Yehova banda bambula ebele azalaki na kati ya motuka, motuka yango etutanaki na motuka mosusu. Azokaki na nkingo mpe na mapeka; yango ebakiselaki ye mpasi mosusu mpamba te azalaki kobunda na mpasi ya mingai na nzoto banda mbula koleka 25. Alobi boye: “Nazalaki kokoka kotɛlɛmisa motó na ngai alima te to komema eloko nyonso oyo eleki kilo mibale. Kasi, kobondela Yehova na molende esungaki ngai mingi. Eloko mosusu esungaki ngai ezali masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo toyekolaki. Lisolo moko elimbolaki mokapo ya Mika 6:8; elobaki ete mpo na moto, kotambola na bopɔlɔ elongo na Nzambe elimboli koyeba ete ezali na makambo mosusu oyo akoki kosala yango te. Yango esalisaki ngai na koyeba malamu ete atako nazali na mikakatano, nasengeli kolɛmba nzoto te, atako nazalaki komona lokola nde ntango oyo nazalaki kolekisa na mosala ya kosakola ezalaki moke. Likambo eleki ntina ezali kosalela Nzambe na mposa ya malamu na motema.”

16 Alobi lisusu boye: “Bankulutu bazalaki ntango nyonso kopesa ngai longonya mpo na milende oyo nazalaki kosala mpo na koyangana na makita mpe kosakola. Bilenge bazalaki koya koyamba ngai. Babongisi-nzela bazalaki na motema molai epai na ngai mpe mbala mingi bazalaki kobongola programɛ na bango soki mokolo wana nazali na makasi ya kobima te. Soki mbula ebɛti to mokakatano mosusu, bazalaki koya kozwa ngai mpo na kozongela bato oyo basepelaki to koya kozwa ngai mpo tókende koyekola Biblia na bato. Lokola nazalaki kokoka komema sakosi te ntango tobimi na mosala ya kosakola, basakoli mosusu bazalaki kotya mikanda na ngai na sakosi na bango.”

17 Talá ndenge oyo bankulutu mpe bandeko mosusu basalisaki bandeko yango mibale mpo na kobunda na maladi oyo ezalaki lokola nzube na nzoto na bango. Bazalaki kosunga bandeko yango na ndenge oyo esengeli mpenza mpe na boboto, ezala na elimo, na nzoto mpe na makanisi. Makambo yango ezali kopesa yo mposa ya kosalisa bandeko mosusu oyo bazali na mikakatano? Bilenge, bino mpe bokoki kosalisa bandeko ya lisangá na bino oyo bazali kobunda na nzube na nzoto.​—⁠Masese 20:⁠29.

18. Bilendiseli nini tokoki kozwa na masolo ya bomoi ya bato oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na Lamuká!?

18 Bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lamuká! ezali na masolo mingi ya bomoi ya Batatoli oyo babundaki mpe bazali naino kobunda na mikakatano. Soki otángaka masolo yango, okomona ete bandeko mingi, na mokili mobimba, bayikaki mpiko liboso ya mikakatano ya mbongo, ya kokufela bato na makama mpe mpasi ya bitumba. Bamosusu bazali na maladi oyo epekisaka bango kosala misala mosusu. Mingi bakokaka te kosala ata makambo oyo bato oyo bazali nzoto kolɔngɔnɔ bamonaka yango makambo mikemike. Maladi na bango ezalaka komekama makasi, mingimingi soki ezali kopesa bango nzela te ya kosalela Nzambe na ndenge oyo balingi. Basepelaka mpenza na lisalisi mpe na lisungi ya bandeko na bango mibali mpe basi, bilenge mpe mikóló!

Koyika mpiko epesaka esengo

19. Ndenge nini Paulo azalaki kosepela atako azalaki na komekama mpe na bolɛmbu oyo ezalaki lokola nzube na nzoto?

19 Paulo asepelaki na ndenge oyo Nzambe alendisaki ye. Alobaki boye: “Nakomikumisa na esengo kati na bolɛmbu ete nguya ya Klisto efanda likoló na ngai. Bongo mpo na Klisto nasepeli mpo na bolɛmbu mpe kotyolama mpe bolɔzi mpe minyoko mpe nkaka. Mpo wana ezali ngai na bolɛmbu, bongo nazali na nguya.” (2 Bakolinti 12:​9, 10) Na kotalela makambo oyo akutanaki na yango, Paulo alobaki na elikya mpenza ete: “Nalobi bongo te mpo nazali kokelela, mpamba te nameseni na makambo nyonso oyo eyelaka ngai. Nakoki kokelela to kozala na bomengo; na makambo nyonso nasi’nazwi mayele ya kokanga motema, ata nazali na bilei, to na nzala, ata nazali na biloko mingi to nazangi biloko. Nakoki kosala makambo nyonso wana mpo na [ye, NW] oyo alendisaka ngai.”​—⁠Filipi 4:​11-13, Boyokani ya Sika.

20, 21. (a) Mpo na nini tokoki koyoka esengo na kokanisa “makambo oyo ezali komonana te”? (b) Tángá mwa “makambo oyo ezali komonana te” oyo ozali na elikya ya komona na Paladiso awa na mabele.

20 Yango wana, soki tozali kobunda ata na monzube nini na nzoto, tokoki kozala na esengo na ndenge tozali komonisa na moto nyonso ete nguya ya Yehova ezali kokokisama na bolɛmbu na biso. Paulo akomaki ete: “Tozali kotika te . . . Ya solo mpenza bomoto na biso ya kati ezali kokómisama ya sika mokolo na mokolo. Mpamba te atako bolɔzi yango ezali ya ntango mokuse mpe pɛpɛlɛ, yango ezali kobotela biso nkembo oyo ezali na bozito mingi koleka mpenza mpe ezali ya seko; wana tozali kotya miso na biso . . . na makambo oyo ezali komonana te. Mpamba te makambo . . . oyo ezali komonana te ekoumela seko.”​—⁠2 Bakolinti 4:​16-18, NW.

21 Basaleli mingi ya Yehova na mikolo na biso bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na Paladiso awa na mabele mpe kosepela na makambo nyonso ya malamu oyo alaki. Lelo oyo, tokoki kotalela makambo yango lokola ‘oyo tozali komona te.’ Kasi, etikali moke tokomona makambo malamu wana na miso na biso mpe tokosepela na yango libela na libela. Moko na makambo yango ezali ete tokozala lisusu te na mokakatano oyo ekotungisa biso lokola monzube na nzoto! Mwana ya Nzambe ‘akobebisa misala ya oyo na mabe’ mpe ‘kobebisa ye oyo azali na bokonzi ya kufa.’​—⁠1 Yoane 3:8; Baebele 2:⁠14.

22. Tosengeli kozala na elikya nini mpe ekateli na biso esengeli kozala nini?

22 Yango wana, ezala monzube nini ezali kotungisa biso lelo oyo, tólɛmba te mpo na kobunda na yango. Lokola Paulo, tokozala na makasi ya kobunda na lisalisi ya Yehova moto apesaka biso nguya. Ntango tokozala na kati ya Paladiso awa na mabele, mokolo na mokolo tokosanzola Yehova Nzambe na biso mpo na makambo malamu oyo azali kosalela biso.​—⁠Nzembo 103:⁠2.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá lisolo “Engebene Biblia: Ndenge nini koyika mpiko ntango tozali lisusu na elikya te,” na Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ-Desɛmbɛ 2000.

Okopesa eyano nini?

• Ndenge nini Zabolo azali komeka kozongisa baklisto ya solo nsima mpe mpo na nini azali kosala yango?

• Ndenge nini nguya ya Yehova “ekokisami kati na bolɛmbu”?

• Ndenge nini bankulutu mpe bandeko mosusu bakoki kolendisa baoyo bazali na mikakatano oyo ezali konyokola bango?

[Elilingi na lokasa 18]

Paulo abondelaki Nzambe mbala misato ete alongola ye monzube na nzoto

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto