Tozali nde na “monzube kati na nzoto”?
1 Tozalaka mpenza na mposa ya kokokisa malamumalamu mosala na biso ya kosakola nsango malamu. Nzokande, bandeko mingi, mibali mpe basi, bazali mpenza kokoka kosala yango te, mpo ete bamaladi mpe mikakatano mosusu ezali kopesa bango nzela te ya kosala lolenge oyo balingaki kosala. Mbala mosusu bazali kotungisama mingi mpo na kolonga kolɛmba nzoto, mingimingi ntango bazali komona ete basusu bazali na molende mingi kati na mosala ya kosakola.—1 Kol. 9:16.
2 Ndakisa ya komekola: Ntoma Paulo akangaki mpenza motema na “monzube kati na nzoto.” Abondelaki Nzambe mbala misato ete alongwela ye epekiseli wana ya mpasi, oyo ye abéngaki ete “anzelu ya Satana” oyo ezalaki kobɛta ye ntango nyonso. Atako bongo, ayikaki mpiko mpe alendendelaki kati na mosala ya kosakola. Amitikaki te na koyoka mawa mpo na ezalela na ye mpe azalaki te komilelalela ntango nyonso. Asalaki oyo ekokaki na ye. Sɛkɛlɛ ya bolongi na ye euti na endimiseli oyo azwaki epai na Nzambe: “Ngɔlu na ngai ekoki na yo, zambi nguya na ngai ekokisami kati na bolɛmbu.” Bolɛmbu ya Paulo ekómaki nguya ntango ayekolaki kondima ezalela na ye mpe komitika epai na Yehova mpe na elimo santu mpo na koyika mpiko.—2 Kol. 12:7-10.
3 Lolenge ya koyika mpiko: Bolɛmbu ya bomoto ezali nde kotya ndelo na mosala na biso mpo na Nzambe? Soki ɛɛ, tómekola ezaleli ya Paulo. Atako na ebongiseli oyo, ezali na nkisi ata moko te oyo ekoki kosilisa mpo na libela maladi na biso to mokakatano moko oyo tozali na yango, tokoki kotya motema na biso mobimba epai na Yehova, mpamba te ayebi bamposa na biso mpe akopesa biso “nguya na yango mingi mpenza.” (2 Kol. 4:7) Tózwa litomba na lisalisi oyo epesameli biso kati na lisangá mpe tómitangola te. (Mas. 18:1) Soki ezali mpasi mpo na biso kosakola ndako na ndako, tóluka kosala oyo tokoki kosala mpo na kopesa litatoli na lolenge ya libaku malamu to na telefone.
4 Soki monzube kati na nzoto ezali kolɛmbisa makoki na biso kati na mosala ya kosakola, tómimona te ete tózangi ntina. Lokola Paulo, biso mpe tokoki ‘kopesa mpenza litatoli mpo na nsango malamu ya ngɔlu ya Nzambe,’ na meko oyo makasi na biso mpe ezalela na biso ezali kopesa biso nzela ya kosala yango. (Mis. 20:24) Tóbosana te ete, ntango nyonso oyo tozali kosala makasi mpo na kokokisa mosala na biso, tozali kosepelisa Yehova.—Ebe. 6:10.