Tozali na nyonso oyo esengeli mpo na kozala bateyi ya Liloba ya Nzambe
“Nzambe . . . abongisi biso malamumalamu mpo na kozala baministre.”—2 BAKOLINTI 3:5, 6, NW.
1, 2. Na bantango mosusu, milende nini bato basalaka mpo na kosakola, kasi mpo na nini basukaka na nzela?
OKOMIYOKA ndenge nini soki bapesi yo mosala moko oyo oyebi kosala yango te? Tózwa ndakisa oyo: Bapesi yo nyonso oyo esengeli mpo na mosala mpe biloko nyonso ya mosala ezali wana. Kasi, yo oyebi ata moke te ndenge basalaka mosala yango. Lisusu, balobi na yo ete osengeli kosilisa mosala yango noki. Bato nyonso batii motema epai na yo. Na ntembe te okomitungisa mpenza!
2 Mokakatano yango emonanaka. Tókamata ndakisa moko. Na bantango mosusu, bandimi ya mangomba ya boklisto bamekaka kobongisa mpe kosala mosala ya kosakola ndako na ndako. Mbala mingi, basukaka na nzela, batikaka kosala yango nsima ya mwa bapɔsɔ to basanza. Mpo na nini? Mpamba te mangomba ya boklisto ebongisi bandimi na yango te mpo na kosala mosala yango. Ezala bakonzi ya mangomba yango, atako balekisaka ebele ya bambula na kotánga bakelasi mpe na baseminɛrɛ, babongisamaka te mpo na kosala mosala ya kosakola. Mpo na nini tolobi bongo?
3. Maloba nini ezongi mbala misato na 2 Bakolinti 3:5, 6, mpe elimboli nini?
3 Liloba ya Nzambe emonisi eloko nini ebongisaka moto mpo na kozala mosakoli ya solosolo ya nsango malamu. Ntoma Paulo apemamaki na elimo mpe akomaki boye: “Ezali te ete na ndenge na biso moko tobongisami malamumalamu mpo na koyeba eloko moko lokola nde euti epai na biso, kasi soki tobongisami malamumalamu, ezali likambo euti na Nzambe, ye nde abongisi biso malamumalamu mpo na kozala baministre.” (2 Bakolinti 3:5, 6, NW) Landá malamu vɛrsɛ yango, okomona ete maloba ‘kobongisama malamumalamu’ ezongelami mbala misato mobimba. Yango elingi koloba nini? Mokanda moko oyo elimboli maloba ya Biblia (Vine’s Expository Dictionary of Biblical Words) elobi ete: “Ntango [liloba ya Grɛki ya kala] ezali kolobela biloko, elimbolaka ‘ekoki’ . . . ; ntango ezali kolobela bato, liloba yango elimbolaka ‘bayebi mosala,’ ‘babongi.’ ” Na bongo, moto oyo ‘abongisami malamumalamu’ azali moto oyo ayebi mosala mpe abongi kosala mosala moko boye. Yango elingi koloba ete baministre ya solosolo ya nsango malamu babongisami mpo na kosala mosala yango. Bazali bato oyo bayebi to babongi mpo na kosakola.
4. (a) Ndenge nini ndakisa ya Paulo ezali komonisa ete kobongisama mpo na mosala ya kosakola ezali kaka te mpo na bato moke ya mayele mingi? (b) Tángá biloko misato oyo Yehova azali kosalela mpo na kobongisa biso tózala baministre.
4 Kasi, ndenge nini babongisamaka? Ezalaka nde na mayele na bango moko? Mpo bazali na mayele mingi? Mpo bayekoli na biteyelo minene ya lokumu? Na ntembe te ntoma Paulo azalaki na nyonso wana. (Misala 22:3; Bafilipi 3:4, 5) Kasi, alobaki na komikitisa mpenza ete Yehova Nzambe nde abongisaki ye malamu mpo azala ministre, kasi ezali te mpo akɔtaki na biteyelo minene. Kobongisama malamu ndenge wana ezali kaka mpo na bato moke ya mayele mingi? Na mokanda oyo akomelaki Bakolinti, Paulo alobaki ete “soki tobongisami malamumalamu.” Yango ezali komonisa ete Yehova alingaka ete basaleli na ye nyonso ya sembo bázala bato oyo bayebi malamu mosala oyo apesi bango mpe bákoka kosala yango. Ndenge nini Yehova azali kobongisa baklisto ya solo lelo oyo? Tótalela biloko misato oyo azali kosalela: (1) Liloba na ye, (2) elimo santu na ye, mpe (3) ebongiseli na ye awa na mabele.
Liloba ya Yehova ebongisaka biso
5, 6. Makomami Mosantu esalaka mosala nini epai ya baklisto ya solo?
5 Ya liboso, ndenge nini Liloba ya Nzambe ebongisaka biso tózala baministre? Paulo akomaki ete: “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na ntina mpo na koteya, kopamela, kotya makambo na molɔngɔ, mpo na kopesa disipilini na bosembo, mpo ete moto ya Nzambe azala moto oyo ayebi mpenza mosala, oyo azali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.” (2 Timote 3:16, 17, NW) Yango elingi koloba ete Makomami Mosantu esalisaka biso tózala ‘bato oyo bayebi mpenza mosala, oyo bazali na nyonso esengeli’ mpo na kokokisa ‘mosala malamu’ ya koteya bato Liloba ya Nzambe. Kasi, tokoloba boni mpo na bandimi ya mangomba ya boklisto? Bango mpe batángaka Biblia. Kasi, ndenge nini buku kaka moko wana ezali kosalisa bato mosusu bákóma baministre oyo bayebi mosala, kasi ezali kosala yango te mpo na bato mosusu? Likambo ezali nde na ndenge oyo bato na bato batalelaka Biblia.
6 Bato mingi oyo bakendaka ndako-nzambe bandimaka Biblia te “ndenge yango ezali mpenza, elingi koloba ete liloba ya Nzambe.” (1 Batesaloniki 2:13, NW) Mangomba ya boklisto esali eloko te mpenza mpo na kolakisa bato valɛrɛ ya Biblia. Ata bakonzi ya mangomba bango moko, tokoki mpenza koloba ete nsima ya koyekola teoloji bambula ebele, bakómaka na makoki ya koteya Liloba ya Nzambe? Mpenza te. Kutu, bamosusu liboso ya kokɔta na seminɛrɛ, bazalaki kondima Biblia, kasi ntango basilisi bakelasi na bango, bakómaka kobɛtela yango ntembe! Nsima na yango, lokola bandimaka lisusu Liloba ya Nzambe te, na esika báteya yango, balandaka banzela mosusu lokola kokɔta na politiki, kosala mosala ya misionɛrɛ kaka mpo na kosalisa bato ya mpasi, to mpe balendisaka nde mateya ya filozofi. (2 Timote 4:3) Nzokande, baklisto ya solo balandaka ndakisa ya Yesu Klisto.
7, 8. Ndenge oyo Yesu azalaki kotalela Liloba ya Nzambe ekeseni na nini na ndenge oyo bakonzi ya mangomba ya ntango na ye bazalaki kotalela yango?
7 Yesu alandaki te makanisi ya bakonzi ya mangomba ya ntango na ye. Ezala ete azali koteya liboso ya bato moke, na ndakisa bantoma na ye, to azali koteya ebele ya bato, Yesu azalaki kosalela mingi makomi mosantu. (Matai 13:10-17; 15:1-11) Likambo yango ekesenisaki ye mpenza na bakonzi ya mangomba ya ntango wana. Bakonzi yango bazalaki kopekisa mpenza bato báyekola makambo mozindo ya Nzambe. Kutu, mbala mingi balakisi ya ntango wana bazalaki koloba ete bavɛrsɛ mosusu ya Biblia ezali makasi mingi; yango wana ebongi te kosolola yango na moto nyonso, longola kaka moyekoli oyo molakisi alingaka mingi; mpe ata epai ya moyekoli yango, esengeli koloba yango na mongongo ya nse mpe ozipi motó. Bakonzi wana ya mangomba bazalaki koboya kolobela bavɛrsɛ mosusu ya Biblia, se ndenge oyo bazalaki koboya kolobela nkombo ya Nzambe!
8 Klisto azalaki ndenge wana te. Ye azalaki na makanisi te ete kaka mwa bato moke nde basengeli koyekola “liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” Yesu alukaki te kopesa boyebi kaka na mwa ndambo ya bato oyo bazali na mayele mingi. Alobaki na bayekoli na ye ete: “Yango elobi ngai na bino na molili, bóloba yango kati na moi; yango mpe eyoki bino na matoi; bósakola yango likoló ya nsamba ya ndako.” (Matai 4:4, NW; 10:27) Yesu azalaki na mposa ete bato mingi mpenza báyeba makambo ya Nzambe.
9. Ndenge nini baklisto ya solo basalelaka Biblia?
9 Liloba ya Nzambe nde esengeli kosimba mateya na biso. Na ndakisa, ntango tozali kosala lisukulu na Ndako ya Bokonzi, mingimingi ebongi te tósuka kaka na kotánga bavɛrsɛ ya Biblia. Esengeli ete tólimbola yango, tópesa mwa elakiseli, mpe tóyokanisa bavɛrsɛ yango na makambo oyo tozali koloba. Tosengeli kozala na mokano ya kozwa maloba oyo ekomami na Biblia mpe kokɔtisa yango na mitema ya bato oyo bazali koyoka biso. (Nehemia 8:8, 12) Tosengeli mpe kosalelaka Biblia ntango tozali kopesa toli to ntango tozali kosembola moto. Atako basaleli ya Yehova balobaka minɔkɔ ekeseni mpe bauti na bisika ndenge na ndenge, bango nyonso bapesaka Biblia limemya.
10. Maloba ya Biblia ekoki kosala mosala nini epai na biso?
10 Soki tosaleli Biblia na limemya ndenge wana, ezalaka mpenza na nguya. (Baebele 4:12) Maloba na yango ebongolaka bato, elingi koloba esalaka ete bato yango bátika misala oyo Makomami ezali koboya, misala lokola: pite, ekobo, kosambela bikeko, kolangwa masanga mpe koyiba. Maloba yango esalisi bato mingi bálongola bomoto ya kala mpe bálata bomoto ya sika. (Baefese 4:20-24, NW) Soki tozali kotya Biblia liboso ya makanisi nyonso ya bato to makanisi ya bonkɔkɔ, mpe soki tozali kosalela yango malamumalamu, ekoki kosalisa biso tózala bato oyo bayebi mosala, ekoki kopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kozala bateyi ya Liloba ya Nzambe.
Elimo ya Yehova ebongisaka biso
11. Mpo na nini ebongi mpenza kobenga elimo santu ete “mosungi”?
11 Ya mibale, tólobela mosala oyo elimo santu, to nguya ya Yehova, esalaka mpo na kopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango. Tosengeli kobosana te ete ezali na nguya moko te oyo ekoki kotɛlɛma liboso ya elimo ya Yehova. Yehova atiki ete Mwana na ye ya bolingo asalela nguya yango mpo na kosunga baklisto nyonso ya solo. Yango wana mpenza Yesu abengaki elimo santu ete “mosungi.” (Yoane 16:7) Atindaki bayekoli na ye básɛngaka Yehova elimo yango, mpe alobaki na bango ete Yehova akosopela bango yango.—Luka 11:10-13; Yakobo 1:17.
12, 13. (a) Mpo na nini ezali na ntina tóbondelaka mpo na kosɛnga elimo santu esalisa biso na mosala ya kosakola? (b) Ndenge nini Bafalisai bamonisaki ete bazalaki na elimo santu te?
12 Tosengeli kobondelaka mokolo na mokolo mpo na kosɛnga elimo santu, mingimingi mpo esalisa biso na mosala ya kosakola. Nguya yango ekoki kosala mosala nini epai na biso? Ekoki kosala mosala na makanisi mpe mitema na biso, ekoki kosalisa biso tóbongwana, tókola na elimo mpe tólongola bomoto ya kala mpo na kolata bomoto ya sika. (Bakolose 3:9, 10) Ekoki kosalisa biso tólona bizaleli malamu lokola oyo ya Klisto. Mingi kati na biso tokoki koloba na motó makambo oyo ezali na Bagalatia 5:22, 23. Bavɛrsɛ yango etángi mbuma ya elimo ya Nzambe. Ya liboso ezali bolingo. Ezaleli yango ezali na ntina mingi na mosala na biso ya kosakola. Mpo na nini?
13 Bolingo ezali eloko ya liboso oyo epesaka moto mposa ya kosala mosala. Bolingo oyo baklisto ya solo bazalaka na yango mpo na Yehova mpe mpo na bazalani na bango nde etindaka bango na kosakola nsango malamu. (Malako 12:28-31) Soki bolingo wana ezali te, tokoki te kozala bato oyo babongi mpo na koteya Liloba ya Nzambe. Tótala makambo oyo ekesenisaki Yesu na Bafalisai. Matai 9:36 elobi mpo na Yesu ete: “Emoni ye bibele, ayoki mawa mpo na bango ete balɛmbi mpe balemalemi lokola bampate bazali na mobateli te.” Bongo Bafalisai, ndenge nini bango bazalaki kotalela bato? Yoká maloba na bango: “Ebele wana ya bato oyo bayebi Mibeko te balakelamá mabe!” (Yoane 7:49, NW) Bafalisai balingaki bato te, batondaki nde na lofundo. Yango emonisi polele ete elimo ya Yehova ezalaki kosala kati na bango te.
14. Bolingo oyo Yesu amonisaki na mosala na ye esengeli kotinda biso na kosala nini?
14 Yesu azalaki koyokela bato mawa. Ayebaki mpasi na bango. Ayebaki ete bazalaki konyokwama, balɛmbaki mpe balemalemaki lokola bampate bazali na mobateli te. Yoane 2:25 elobi ete Yesu “ayebaki yango ezali kati na bato.” Na ntango ya bozalisi, Yesu asalaki na Yehova lokola Mosali ya mayele, yango wana ayebaki malamumalamu ndenge oyo moto azali. (Masese 8:30, 31, NW) Boyebi yango ebakisaki lisusu bolingo na ye. Tiká ete bolingo ya ndenge wana ezalaka eloko oyo ezali kopesa biso mposa ya kosakola! Soki tomoni ete ezali na esika oyo tosengeli kobongisa na oyo etali bolingo, tóbondela Yehova apesa biso elimo santu mpe tósala makambo oyo eyokani na mabondeli na biso. Yehova akoyoka mabondeli na biso. Akopesa biso nguya na ye mpo na kosalisa biso tózala lokola Klisto, ye oyo abongaki na ndenge oyo eleki mpenza mpo na kosakola nsango malamu.
15. Ndenge nini maloba ya Yisaya 61:1-3 elobaki mpenza mpo na Yesu, mpe ndenge nini emonisaki lokuta ya bakomeli na Bafalisai?
15 Nani abongisaki Yesu mpo na mosala ya kosakola? Alobaki ete: “Elimo ya Yehova ezali likoló na ngai.” (Luka 4:17-21, NW) Yehova ye moko aponaki Yesu na nzela ya elimo santu. Yesu azalaki na mposa ya litatoli mosusu te. Bakonzi ya mangomba ya ntango na ye baponamaki nde na elimo santu? Te. Bazalaki mpe te na oyo esengeli mpo na kokokisa Yisaya 61:1-3, bavɛrsɛ oyo Yesu atángelaki bato mpe amonisaki ete esakolaki na ntina na ye. Tosɛngi yo otánga bavɛrsɛ yango mpo omona yo moko ete bakomeli na Bafalisai, babuki ya lokuta, bakokisaki makambo yango te. Bazalaki na nsango malamu te ya koyebisa babola. Bakokaki mpe kosakola bonsomi te epai ya bato oyo bakangami mpe kofungwama miso epai ya bato oyo bakufá miso! Kutu, bango moko bazalaki bato oyo bakufá miso na elimo mpe bazalaki baombo ya makambo ya bonkɔkɔ! Bongo biso, tokeseni mpenza na bato wana? Tobongisami mpo na koteya bato?
16. Basaleli ya Yehova bakoki kozala na elikya nini na oyo etali kobongisama na bango mpo na kozala baministre?
16 Biso toyekoli te na biteyelo minene ya mangomba ya boklisto. Tokɔti mpe baseminɛrɛ ya teoloji te mpo bápona biso lokola bateyi. Kasi, yango elingi nde koloba ete tobongisami te? Te! Yehova nde aponi biso lokola Batatoli na ye. (Yisaya 43:10-12) Soki tozali kobondela ye apesa biso elimo na ye mpe soki tozali kosala makambo oyo eyokani na mabondeli na biso, kobongisama na biso ekoleka kobongisama mosusu nyonso. Toboyi te, tozali bato ya kozanga kokoka mpe tokoki mpenza te kosala lokola Yesu, Moteyi Monene. Atako bongo, tozali na botɔndi ete Yehova azali kosalela elimo na ye mpo na kobongisa biso mpe kopesa biso nyonso oyo esengeli mpo tózala bateyi ya Liloba na ye!
Lisangá ya Yehova ebongisaka biso
17-19. Ndenge nini makita mitano oyo tolandaka na pɔsɔ moko na ebongiseli ya Yehova ebongisaka biso mpo na mosala na biso ya baministre?
17 Sikoyo, tólobela eloko ya misato oyo Yehova azali kosalela mpo na kopesa biso oyo tosengeli na yango mpo na kozala bateyi ya Liloba na ye. Ezali nde lisangá to ebongiseli na ye awa na mabele, yango ezali kopesa biso formasyo mpo tózala baministre. Ndenge nini? Kanisá mateya nyonso oyo tozwaka na kati ya lisangá! Na pɔsɔ moko tozalaka na makita mitano. (Baebele 10:24, 25) Toyanganaka na bituluku ya bato moke mpo na Boyekoli ya Mokanda, epai toyekolaka makambo mozindo ya Biblia na lisalisi ya mokanda moko oyo ebongiseli ya Yehova ebimisaki. Ntango tozali koyoka mpe tozali kopesa biyano, topesanaka mayele mpe tolendisanaka. Lisusu, motambwisi ya boyekoli ya mokanda ateyaka moto mokomoko ya etuluku na ye mpe alandelaka ndenge oyo moto yango azali kokola. Tozwaka mpe bilei ya elimo na Lisukulu ya bato nyonso mpe na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.
18 Eteyelo ya mosala ya Teokrasi elakisaka biso ndenge ya koteya. Ntango tozali kobongisa masolo ya bana-kelasi, toyekolaka ndenge ya kosalela Liloba ya Nzambe mpo na koteya makambo ndenge na ndenge. (1 Petelo 3:15) Esilá kokómela yo ete bapesi yo lisolo moko oyo ezali kolobela likambo oyo omonaki ete oyebi yango, kasi ntango ozalaki kobongisa yango omonaki ete oyekoli likambo moko ya sika? Ezali likambo oyo bato mingi bakutanaka na yango. Ntango tozali koteya basusu, yango ebakisaka mingi mpenza boyebi na biso na likambo oyo tozali koteya. Ata soki biso moko tokosala lisolo te, tokoki koyekola kozala bateyi ya malamu. Ntango mwana-kelasi mokomoko azali kosala lisolo na ye, tomonaka ndenge oyo azali kosala mpo lisolo na ye ezala malamu; biso mpe tokoki kokanisa ndenge oyo tokoki kosala lokola ye.
19 Likita ya Mosala mpe epesaka biso oyo tosengeli na yango na mosala na biso ya koteya Liloba ya Nzambe. Pɔsɔ na pɔsɔ tolandaka masukulu, masolo elongo na bayangani mpe bilakiseli etali mosala na biso ya kosakola. Ndenge nini tokoki kolakisa nsango malamu? Tokoki kosala nini soki tokutani na mokakatano moko boye na mosala ya kosakola? Wapi mitindo mosusu ya mosala ya kosakola oyo ebongi mbala mosusu ete biso mpe tósalela yango? Nini ekoki kosalisa biso na kozala bateyi malamu ntango tozongeli bato oyo basepelaki mpe ntango tozali koyekola Biblia na bato? (1 Bakolinti 9:19-22) Likita ya Mosala elobelaka mingi makambo ya ndenge wana. Masolo mingi ya likita yango ezalaka na Mosala na biso ya Bokonzi, esaleli mosusu oyo tozali na yango mpo na kosala mosala na biso ya ntina mingi.
20. Na ndenge nini makita mpe mayangani ekoki kosalisa biso mingi?
20 Soki tozali komibongisa mpe tozali koyangana na makita, mpe na nsima tozali kosalela makambo oyo tozali koyekola mpo na mosala na biso ya bateyi, na ndenge wana tozali kozwa mpenza formasyo. Kasi, esuki wana te. Tozalaka mpe na mayangani ya minene oyo ebongisaka biso mpo na kozala bateyi ya Liloba ya Nzambe. Tozelaka mpenza mayangani yango mpo na koyoka mpe na nsima kosalela toli wana!—Luka 8:18.
21. Makambo nini ezali komonisa polele ete formasyo oyo tozali kozwa eboti mbuma, mpe nani abongi kozwa lokumu mpo na nyonso wana?
21 Formasyo oyo Yehova apesi biso eboti mpenza mbuma? Eyano ezali na mbuma oyo yango ezali kobota. Mbula na mbula, bankóto ya bato bazali koyekola mateya ya ebandeli ya Biblia mpe kosala makambo oyo Nzambe azali kosɛnga bango. Tozali se kokóma ebele, kasi moto moko te akoki koloba ete makambo yango ezali kosalema na makasi na ye. Tosengeli kotalelaka makambo na ndenge ya malamu, elingi koloba na ndenge oyo Yesu atalelaki yango. Ye alobaki boye: “Moto akoki koya epai na ngai te bobele soko Tata, Motindi na ngai akobenda ye.” Lokola bantoma ya Yesu, mingi na biso totángi bakelasi ya milaimilai te mpe tozali bato ya lokumu te. (Yoane 6:44; Misala 4:13) Yehova nde azali kosalisa biso mpo tólonga; ye nde azali kobenda bato ya mitema sembo na lisangá ya solo. Paulo amonisaki likambo yango malamu ntango alobaki boye: “Ngai nakonaki, Apolo amwangisaki mai kasi Nzambe akolisaki.”—1 Bakolinti 3:6.
22. Mpo na nini tosengeli kobanga mingi te ete mbala mosusu tokokoka kosakola te?
22 Ya solo, Yehova Nzambe azali kosunga biso na mosala na biso ya koteya Liloba na ye. Na bantango mosusu tokoki komona lokola nde tobongi te kozala bateyi. Kasi, tóbosana te ete Yehova nde abendaka bato epai na ye na Mwana na ye. Yehova nde abongisaka biso mpo na kosalisa bato ya sika na nzela ya Liloba na ye, na elimo santu na ye, mpe na ebongiseli na ye awa na mabele. Tóndima formasyo oyo Yehova azali kopesa, tósalela makambo malamu oyo azali kopesa biso mpo tózala bateyi ya Liloba ya Nzambe oyo bazali na nyonso oyo esengeli!
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini Biblia ezali kopesa biso oyo tosengeli na yango mpo na mosala ya kosakola?
• Elimo santu esalaka mosala nini mpo na kobongisa biso mpo tózala baministre?
• Ndenge nini lisangá ya Yehova ebongisi yo mpo na kozala moteyi ya nsango malamu?
• Mpo na nini tokoki kobanga te ntango tozali kosakola nsango malamu?
[Elilingi na lokasa 25]
Yesu azalaki moteyi ya Liloba ya Nzambe oyo alingaki bato