Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/10 lok. 1
  • Nabongi mpo na kosakola?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nabongi mpo na kosakola?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Masolo mosusu
  • Nani akoki mpo na kosakola?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Tozali na nyonso oyo esengeli mpo na kozala bateyi ya Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Tósakola nsango malamu ya Bokonzi
    Nzembo mpo na kokumisa Yehova
  • Ndakisa oyo ebongi na kolanda penepene
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2010
km 1/10 lok. 1

Nabongi mpo na kosakola?

1. Mpo na nini tosengeli te kokanisa ete tobongi te mpo na kosakola?

1 Soki osilá komituna motuna wana, kobanga te! Ezali te bakelasi oyo moto atángá to makoki mosusu oyo abotamá na yango nde ekoki kobongisa ye mpo azala mosakoli. Balobaki mpo na bayekoli mosusu ya ekeke ya liboso ete bazali “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba.” Atako bongo, bazalaki basakoli ya molende ya nsango malamu mpamba te bazalaki na ekateli ya kolanda ndakisa ya Yesu.​—Mis. 4:13; 1 Pe. 2:21.

2. Mateya ya Yesu ezalaki ndenge nini?

2 Ndenge oyo Yesu ateyaki: Mateya ya Yesu ezalaki mindɔndɔ te, moto nyonso akokaki kosalela yango, mpe ezalaki pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina na yango. Mituna oyo azalaki kotuna, bandakisa oyo azalaki kopesa, mpe ndenge na ye ya pɛtɛɛ ya kobanda lisolo ezalaki kobenda likebi ya bato. (Mat. 6:26) Azalaki komibanzabanza mpenza mpo na bato. (Mat. 14:14) Longola yango, Yesu azalaki koloba kozanga kobanga mpe na bokonzi, mpo ayebaki ete Yehova nde atindaki ye mpe apesaki ye makasi ya kokokisa mosala na ye.​—Luka 4:18.

3. Ndenge nini Yehova asalisaka biso mpo tókokisa malamu mosala na biso ya kosakola?

3 Yehova asalisaka biso: Na lisalisi ya Liloba na ye mpe ebongiseli na ye, Moteyi na biso Monene azali kopesa biso formasyo oyo tosengeli na yango mpo tósakola nsango malamu na ndenge ebongi. (Yis. 54:13) Lokola Yehova akomisaki masolo oyo ezali komonisa ndenge Yesu azalaki koteya, tokoki koyekola mayele oyo asalelaki mpe komekola yango. Yehova apesaka biso elimo santu na ye mpe ateyaka biso na nzela ya makita ya lisangá. (Yoa. 14:26) Longola yango, apesi biso mpe basakoli oyo bameseni na mosala ya kosakola, oyo bakoki kosalisa biso tóyeba kosakola malamu.

4. Mpo na nini tosengeli komona ete tobongi mpo na kosakwela basusu nsango malamu?

4 Tozali na bantina mingi ya komona ete tobongi mpo na kosakola, mpamba te “kobonga na biso mpenza euti nde na Nzambe.” (2 Ko. 3:5) Soki totyeli Yehova motema mpe tosaleli malamu nyonso oyo apesi biso, ‘tokokoka mpenza’ mpe ‘tokozala na nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.’​—2 Tim. 3:17.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto