Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/96 lok. 1
  • Nani akoki mpo na kosakola?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nani akoki mpo na kosakola?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Nabongi mpo na kosakola?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Tósakola nsango malamu ya Bokonzi
    Nzembo mpo na kokumisa Yehova
  • Tozali na nyonso oyo esengeli mpo na kozala bateyi ya Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Ndenge nini nsango malamu ezali kosakolama?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 9/96 lok. 1

Nani akoki mpo na kosakola?

1 Osilá kozala na mayoki motindo moko lokola Mose na ntina na mosala ya kosakola? Alobaki ete: “Ɛ [Yehova] Nkolo na ngai, nazali moto na maloba polele te; nazalaki boye kalakala mpe ata nsima na koloba na yo na moombo na yo nazali bobele bongo.” (Ex. 4:10) Soki ozali na mayoki motindo oyo, mbala mosusu yango ezali epekiseli mpo na mosala na yo ya kosakola. Atako bongo, Yesu “asili kopesa biso etindá ya kosakola” epai na bato mpe ya kopesa litatoli na mobimba. (Mis. 10:42, NW ) Na bongo, lolenge nini kokóma basakoli ya nsango malamu oyo bakoki?

2 Kokoka na biso mpo na mosala ya kosakola etaleli te bakelasi boni totángá. Paulo alobaki ete “bato na mayele na nzoto babyangami mingi te” mpe ete “mayele na ekeke oyo ezali bolema epai na Nzambe.” (1 Kol. 1:26; 3:19) Yesu aponaki bantoma na ye katikati na bato mpamba; soko minei kati na bango bazalaki babomi-mbisi. Bakonzi na mangomba bazalaki kotalela bango na lolenge ya kotyola lokola “bato bamesani na mikanda te, mpe bato bayekoli makambo te.” Na kotalela makanisi ya mokili, bantoma bakokaki te mpo na kosakola. Nzokande, lisukúlu monene oyo Petelo asalaki na mokolo ya Pantekote epusaki bato 3 000 na kozwa batisimo!​—Mis. 2:14, 37-41; 4:13.

3 Yehova nde azali koloba ete tokoki mpo na kosakola: Paulo alobaki ete: “Makoki na biso mauti na Nzambe.” (2 Kol. 3:5, NW ) Yehova, Eutelo ya mayele, asili koteya ebele ya bato mpo ete básakwela bazalani na bango solo etali Bokonzi. (Yis. 54:13) Mosala oyo ezali malamu mpe ezali kobota mbuma mingi: na ndakisa na mobu moleki (1995) bato ya sika oyo bazwaki batisimo bazalaki 338 491, bango bazali bongo “mikanda na kolobela” ya solosolo. (2 Kol. 3:1-3) Nyonso wana ezali kotinda biso na kosakola na molende mpe na endimiseli mpenza makambo oyo Yehova asili koteya biso.

4 Lisangá ya Yehova esili kotya manáka mpo na kobongisama ya baministre na ye na mokili mobimba. Na lisalisi ya Makomami mpe ya mikanda ndenge na ndenge mpo na kolimbola Biblia, toteyami mpe tobongisami mpo na kokóma ‘bato oyo bakoki, oyo bazali na nyonso esengeli’ mpo na kosakola. (2 Tim. 3:16, 17) Bato mingi basili kokamwa na mayele oyo ezali kati na mikanda ya la Société. Na ndakisa, talá oyo tokokaki kotánga na zulunalo moko ya mboka Suède: “Bindimeli oyo Batatoli ya Yehova bazali kosakola elakisi mayele mingi ya Biblia mpe emonisi boyebi monene ya makambo oyo mazali koleka na mokili mobimba.”

5 Na lisalisi ya malako oyo tozali kozwa na boumeli ya makita na biso mitano pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, manáka na biso ya botángi mpe ya boyekoli Biblia, batoli oyo tozali kozwa na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, lisalisi oyo baklisto mosusu bakɔmɛli bazali kopesa na mokomoko kati na biso mpe, likambo ya ntina koleka, lisungi ya elimo santu ya Yehova, tokoki kondimisama ete Yehova azali kotalela biso ete tokoki mpo na kosakola. ‘Ɛɛ, lokola batindami na Nzambe, na nsé ya etaleli ya Nzambe, elongo na Klisto, tozali koloba.’​—2 Kol. 2:17.

6 Soki tozali kosalela malamu kobongisama ya Teokrasi oyo Nzambe azali kopesa biso na nzela ya lisangá na ye, tozali na ntina ata moko te ya kozonga nsima to ya kobangabanga. Na esengo nyonso, tósakwela bazalani na biso, na elikya ete Yehova akopambola milende na biso.​—1 Kol. 3:6.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto