Olivétan—‘Moto ya komikitisa oyo abongolaki’ Biblia na Français
Mokolo ya 13 Sɛtɛmbɛ 1540, bapolisi bakitaki na ndako ya Collin Pellenc mpe bazalaki kolukaluka na kati. Na shambrɛ moko oyo ebombaná, bamonaki mwa mikanda oyo ebendaki likebi na bango, mpe moko na yango ezalaki buku moko ya monene. Na lokasa ya mibale bakomaki boye: “P. Robert Olivetanus, mobongoli moko ya komikitisa.” Buku yango ezalaki Biblia ya Ba-Vaudois! Bakangaki Collin Pellenc, basambisaki ye mpo na lipɛngwi, mpe batumbaki ye na mɔtɔ.
NA NTANGO wana, na France mpe na bikólo mosusu ya Mpoto, Lingomba ya Katolike ezalaki kolandela bato ya Lingomba ya Protesta mpo na kosukisa mateya na bango oyo bazalaki koloba ete ezali “likama.” Moko ya bato yango, Guillaume Farel, mobali moko ya molende, azalaki na ekateli ya koteya bato nyonso oyo balobaka Français makanisi ya Martin Luther, mokambi moko ya Lingomba ya Protesta. Farel, oyo azalaki moto ya etúká ya Dauphiné, na sudi-ɛsti ya France, ayebaki ete kobimisa mikanda ezalaki na ntina mingi mpo bato mingi báyeba mateya na bango. Mpo na kokokisa mokano na ye, azalaki na mposa ya Babiblia mpe mikanda ndenge na ndenge oyo ezali kokweisa mateya ya lokuta. Kasi, nani akokaki kopesa mbongo mpo na mosala yango? Akanisaki na Lingomba ya Vaudois, oyo bato na yango bamipesaki na koteya Biblia.
Likita monene na Chanforan
Na katikati ya sanza ya Sɛtɛmbɛ 1532, ba-barbes, to bapastɛrɛ ya Vaudois basalaki likita monene na Chanforan, mwa mboka moko pene na engumba Turin, na ekólo Italie. Banda bambula mingi, Ba-Vaudois mpe bakambi ya Lingomba ya Protesta bazalaki kosolola. Yango wana, na likita yango babengisaki mpe Farel ná bato mosusu. Ba-Vaudois balingaki koyeba soki mateya na bango eyokani na oyo Luther ná bato na ye bazalaki koteya.a
Na Chanforan, Farel andimisaki bato mpo ayebaki koloba. Ntango bapastɛrɛ ya Vaudois balakisaki ye Babiblia ya monɔkɔ na bango oyo bakomaki na mabɔkɔ, andimisaki bango bápesa mbongo mpo na kobimisa Biblia na Français. Na bokeseni na libongoli ya Lefèvre d’Étaples oyo ebongolamaki uta na monɔkɔ ya Latin mpe ebimaki na mobu 1523, Biblia yango esengelaki kobongolama longwa na monɔkɔ ya Ebre mpe ya Grɛki. Kasi, nani akokaki kosala mosala yango?
Farel ayebaki moto oyo abongaki mpenza. Nkombo na ye ezalaki Pierre Robert, kasi ayebanaki na nkombo ya Olivétan,b elenge moko oyo azalaki molakisi mpe abotamaki na etúká ya Picardie, na nɔrdi ya France. Olivétan, ndeko ya Jean Calvin, azalaki moko ya bato ya liboso oyo bandimaki mateya ya Baprotesta mpe azalaki moto oyo bakoki kotyela motema. Afandaki mpe bambula mingi na engumba Strasbourg, epai amipesaki na koyekola minɔkɔ oyo bakomá na yango Biblia.
Lokola Farel mpe bato mosusu, Olivétan akendaki kofanda na Suisse mpo na kokima minyoko. Baninga na ye babondelaki ye mpo andima kosala mosala wana ya kobongola. Aboyaki mbala ebele, kasi nsukansuka andimaki mosala ya kobongola Biblia “na Français, longwa na monɔkɔ ya Ebre mpe ya Grɛki.” Na ntango yango, Ba-Vaudois bapesaki mbongo ebele na oyo esengelaki mpo na kosala mosala yango.
Yanganga mpe Rossignol
Na mobu 1534, Olivétan akendaki kofanda na esika na ye moko na Bangomba ya Alpes mpe abandaki mosala na ye. Azalaki kaka ye ná “balakisi na ye oyo balobaka te,” elingi koloba babuku na ye. Ata moto ya mayele ya ntango na biso akolinga kozala na babuku oyo Olivétan azalaki na yango kuna. Na ndakisa, azalaki na Babiblia ya Syriaque, ya Grɛki, ya Latin, mikanda oyo ezalaki na bandimbola ya makambo oyo balakisi ya Mibeko ya Bayuda bakomaki, babuku ya mibeko ya lokota ya minɔkɔ ya Chaldéen, mpe ebele ya mikanda mosusu. Oyo eleki ntina, azalaki na Biblia ya sika na monɔkɔ ya Ebre oyo eutaki na Venise.
Olivétan abongolaki eteni oyo ebengami Kondimana ya Sika na kolanda libongoli ya Français ya Lefèvre d’Étaples, atako na bisika mingi azalaki mpe kotalela makomi ya Grɛki oyo Érasme, moto moko ya mayele na ekólo Pays-Bas abongisaki. Mbala mingi, Olivétan azalaki kopona kosalela maloba oyo ekeseni na oyo ya Lingomba ya Katolike. Na ndakisa, asepelaki kosalela liloba “mokɛngɛli” na esika ya “episkɔpɔ,” “sekele” na esika ya “libombami,” mpe “lisangá” na esika ya “lingomba.”
Mpo na eteni oyo bato mingi babengaka Kondimana ya Kala, Olivétan azwaki ekateli ya kobongola monɔkɔ ya Ebre liloba na liloba. Azalaki koloba na mwa kosɛkisa ete kobongola Ebre na Français ezali lokola “koteya rossignol, ndɛkɛ oyo eyembaka kitoko, eyemba mabe lokola yanganga [corbeau]”!
Na makomi ya Ebre, Olivétan akutaki na bisika ebele mpenza nkombo ya Nzambe na balɛtrɛ minei ya Ebre. Abongolaki yango na liloba “L’Éternel” (Oyo akoumela seko), oyo Babiblia mingi ya Baprotesta na Français ekómá kosalela. Kasi, na bisika mingi mpe atyaki nkombo “Jéhovah,” na ndakisa na Kobima 6:3.
Likambo ya kokamwa, na mokolo ya 12 Febwali 1535, nsima ya mbula moko mpamba, mobongoli yango alobaki ete asilisi mosala na ye! Lokola alobaki ete “abandá kala komema mokumba [ya kobongola] ye moko,” emonani ete na mobu 1534 mpe 1535 akómaki nde na nsuka ya mosala monene oyo abandá kala. Alobaki na komikitisa nyonso ete: “Nasali nyonso oyo nakokaki kosala.” Etikalaki sikoyo kobimisa Biblia ya liboso ya Français oyo ebongolamaki na likanisi ya kolanda monɔkɔ ya Ebre mpe ya Grɛki.
Na esika ya mosala ya Pirot
Ekómaki sikoyo ngala ya Pierre de Wingle, oyo abengamaki mpe Pirot Picard, moninga ya Farel mpe moto ya Lingomba ya Protesta, oyo azalaki mpe kobimisa mikanda. Ntango bakonzi ya Lingomba ya Katolike babenganaki ye na Lyon, akendaki kofanda na Neuchâtel, na ekólo Suisse, na mobu 1533. Lokola Ba-Vaudois bapesaki mbongo, abandaki kobimisa ebele ya mikanda oyo ezalaki kotalelama ete ezali mikanda ya “lipɛngwi.” Na ndakisa, nkasa oyo elobaki ete Misa ezali mabe ebimisamaki na bamasini na ye, mpe nkasa yango mosusu ekómaki tii na mabɔkɔ ya François I, mokonzi ya ekólo France, oyo azalaki moto ya Katolike.
Na mbala oyo, de Wingle asalaki lisusu mosala ya kobimisa Biblia! Mpo mosala esalema nokinoki, asalaki baekipi ya mibali minei to mitano oyo bazalaki kosala na mokomoko ya bamasini mibale oyo azalaki na yango, mpo na kobongisa makomi. Nsukansuka, na “mobu 1535, mokolo ya 4 ya sanza ya Yuni,” de Wingle atyaki sinyatire na lokasa ya ebandeli ya Biblia ya Olivétan. Na maloba ya ebandeli, mobongoli yango akomaki ete asalaki mosala na ye mpo na bandimi oyo bazalaki babola, “oyo bazali konyatama mpe konyokwama” na “bonkɔkɔ oyo ezangi ntina.”
Bato basepelaki mingi na mosala oyo basalaki. Makomi ya Français ezalaki kitoko, pɛtɛɛ; bakomaki yango na ekomeli ya gothique mpe bakabolaki makomi na milɔngɔ mibale mpe na mikapo ná baparagrafe. Bandimbola oyo mobongoli abakisaki na mopanzi emonisi ete ayebaki mpenza mosala. Biblia yango ezalaki mpe na maloba ya ebandeli, bandimbola mosusu na nsuka, batablo, mpe bapoɛmi. Na nsuka ya Biblia yango, ezalaki na mwa maloba oyo ekomami na molɔngɔ mpo ete balɛtrɛ ya ebandeli ebimisa mpe maloba oyo elobi ete “Ba-Vaudois, oyo bateyaka Nsango Malamu, bapesi bato nyonso likoki ya kozwa eloko ya motuya oyo.”
Mosala monene, kasi etɛkamaki malamu te
Biblia ya Olivétan, oyo bato bazalaki kotyola kala, ezali lelo kotalelama ete ezali mosala ya moto ya mayele mpenza. Longola yango, Biblia na ye esalelamaki mpo na kobongola Babiblia mingi ya Protesta na boumeli ya mbula nkama misato!
Atako Biblia ya Olivétan nkóto moko ebimisamaki, etɛkamaki malamu te. Ezalaki bongo mpo ete bazwaki bibongiseli malamu te mpo na kokabola yango mpe ezalaki na eleko oyo monɔkɔ ya Français ezalaki kobongwana nokinoki. Longola yango, lokola Biblia yango ezalaki monene mingi mpe na kilo 5, ebongaki te mpo na bateyi oyo bazalaki kotambola bipai na bipai mpe bato mosusu oyo bazalaki kotánga na kobombama!
Atako Biblia moko ezalaki na ndako ya Collin Pellenc, na France, ndenge tolobaki yango na ebandeli, Biblia ya Olivétan etɛkamaki mpenza te. Na mobu 1670, pene na mbula nkama na ndambo na nsima, Biblia moko ezalaki naino na magazini moko ya kotɛka mikanda na engumba Génève.
“Azangá nkombo mpe azangá esika”
Lokola Olivétan asilisaki mosala na ye, alingaki lisusu te báyeba esika oyo azalaki. Abongisaki lisusu Kondimana ya Sika mpe biteni ya Kondimana ya Kala oyo abimisaki, kasi abombaki nkombo na ye mpe atyaki bankombo ya bato mosusu. Amipesaki mpe na mosala mosusu oyo azalaki kolinga mingi: koteya. Lokola azalaki molakisi malamu mpenza, abimisaki lisusu buku na ye (Mateya mpo na bana, na Lifalanse) oyo ezalaki na mateya ya bizaleli malamu mpo na bana mpe ndenge ya kotánga Français, oyo ezalaki kaka na maloba euti na Biblia. Na kati ya bankombo oyo amipesaki, moko na yango ezalaki Belisem de Belimakom, oyo elimboli “Azangá nkombo mpe azangá esika.”
Olivétan akufaki na mobu 1538, ntango azalaki na mbula mwa moke koleka 30. Ekoki kozala ete akufaki na Rome. Lelo oyo, bato mingi te bayebi mosala monene oyo elenge yango ya mayele, oyo azalaki moto ya etúká ya Picardie asalaki mpo Biblia ebongolama na Français. Nkombo na ye ezali kutu te na badiksionɛrɛ mingi lelo. Na ntembe te, yango elingaki kosepelisa Louys Robert, oyo abengami Olivétan, “mobongoli moko ya komikitisa”!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba ndenge oyo Ba-Vaudois bakɔtaki na Lingomba ya Protesta, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 2002, nkasa 20-23.
b Nkombo na ye mpenza ezalaki Louys Robert, kasi amipesaki nkombo Pierre. Ekoki mpenza kozala ete azwaki nkombo Olivétan mpo azalaki kosalela mafuta ya olive ebele mpo na kopelisa mwinda mpo na kosalela na boumeli ya ebele ya bangonga ya kosala mosala.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 18]
Archives de la Ville de Neuchâtel, Suisse/Photo: Stefano Iori
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 19]
Fɔtɔ ya lobɔkɔ ya mwasi: Alain Leprince - La Piscine-musée, Roubaix/Na ndingisa ya Musée Bouchard ya kala, Paris
Na kati mpe na lobɔkɔ ya mobali: Société de l’Histoire du Protestantisme Français, Paris
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 20]
Société de l’Histoire du Protestantisme Français, Paris