Kotya ebembe nkisi mpo epɔla te ezali mabe mpo na baklisto?
Na maloba na ye ya nsuka, Yakobo asɛngaki likambo oyo: “Kundá ngai elongo na batata na ngai na lidusu ezali na elanga ya Efelone, Mohiti, na lidusu ezali na elanga ya Makapela, longwa na Mamele epai na ebimelo na ntango, na mokili ya Kanana.”—Genese 49:29-31.
MPO na kokokisa likambo oyo tata na ye asɛngaki, Yosefe alandaki momeseno moko ya Baezipito na ntango wana. Atindaki “basali na ye, minganga, ete bátya ebembe ya tata na ye nkisi ete epɔla te.” Lisolo oyo ezali na Genese mokapo 50 elobi ete minganga babongisaki nzoto ya mowei na boumeli ya mikolo 40. Lokola batyaki nzoto ya Yakobo nkisi mpo epɔla te, yango esalisaki bato ya libota na ye mpe bakonzi ya Ezipito bámema yango malɛmbɛmalɛmbɛ, na ntaka ya kilomɛtrɛ 400 tii na Ebeloni, mpo na kokunda yango kuna.—Genese 50:1-14, NW.
Ebembe ya Yakobo oyo batyaki yango nkisi mpo epɔla te ekoki komonana mokolo mosusu? Ezali mwa mpasi. Mbula ezalaki kobɛta mingi na mokili ya Yisalaele; yango wana biloko mosusu ya kalakala emonanaka te ntango bato ya arkeoloji batimolaka na mokili yango mpo biloko yango ekómá mabele. (Exode 3:8) Biloko ya kalakala oyo basalaki na bibende mpe na mabanga emonanaka mingi, kasi biloko oyo epɔlaka lokola bilamba, mposo ya nyama, na bibembe oyo batyá nkisi mpo epɔla te, ekómá mputulu mpe elimwá mpo na mai, molunge, malili mpe makambo mosusu, nsima ya ebele ya bambula.
Kotya nkisi na ebembe mpo epɔla te esalemaka lolenge nini? Bato basalelaka yango mpo na nini? Ezali malamu mpo na moklisto?
Momeseno yango ebandaki wapi?
Bato ya mayele oyo bayekolaka makambo ya kala balobaka ete kotya ebembe nkisi mpo epɔla te ebandá na Ezipito, kasi Baasulia, Baperse na Basukute bazalaki mpe na momeseno yango. Ekoki kozala ete bato ya liboso bazwaki likanisi ya kobatela nzoto ya moto oyo akufi mpo epɔla te ntango bakutaki na kati ya zɛlo bibembe ya bato oyo ekundamaki na mokili mokauki kasi ebebaki te. Bibembe yango oyo ekundamaki na kati ya zɛlo epɔlaki te mpo ezalaki kozwa mai na mopɛpɛ te. Basusu balobaka ete momeseno ya kotya ebembe nkisi mpo epɔla te ebandaki ntango bato bakutaki bibembe mosusu oyo epɔlaki te mpo bakundaki yango na kati ya lolenge moko ya mungwa oyo emonanaka mingi na Ezipito mpe na bamboka oyo ezali pembeni na yango.
Ntina mpenza oyo batyaka nkisi na bibembe ezali ete, lokola nzoto eumelaka kopɔla te soki moto akufi, bábatela yango mpo epɔla noki te. Soki likoki ezali ya kosala ete nzoto epɔla te, ekotikala ndenge wana to mpe ekoumela liboso epɔla. Batyaka nkisi na bibembe mpo na ntina misato: kobatela nzoto ya mowei mpo emonana kaka malamu na miso atako ezali lisusu na bomoi te, kobatela nzoto mpo epɔla te, mpe kobongisa yango mpo ete nyama-mikemike elya yango te.
Bato ya Ezipito ya kala bazalaki kotya nkisi na ebembe mpo epɔla te mpo na milulu ya losambo na bango. Lokola bazalaki kokanisa ete moto azalaka na bomoi mosusu nsima ya liwa, bazalaki kokanisa ete moto oyo akufi akozala na mposa ya kozala kaka na boyokani na bato ya bomoi. Bazalaki kokanisa ete bakobanda kosalela banzoto na bango seko na seko mpe mokolo mosusu ekozonga na bomoi. Atako momeseno ya kotya nkisi na ebembe mpo epɔla te ezalaki kosalema mingi na Ezipito ya kala, tii lelo oyo bamoni naino ata mokanda moko te ya bato ya Ezipito ya kala oyo ezali kolobela ndenge bazalaki kosala yango. Na mikanda nyonso oyo eyebani, kaka mokanda ya Hérodote, Mogrɛki mpe moto ya mayele na makambo ya kala oyo azalaki na bomoi na ekeke ya mitano ya ntango na biso (T.B.) nde ezali kolimbola yango malamu. Kasi, balobaka ete ntango bato bamekaki kolanda makambo oyo Hérodote akomá mpo na kotya ebembe nkisi mpo epɔla te, balongaki mpenza te.
Ezali mabe mpo na moklisto?
Bato oyo batyaki nkisi na nzoto ya Yakobo mpo epɔla te bazalaki na bindimeli ndenge moko te na ye. Kasi tondimi te ete Yosefe apesaki minganga ndingisa básala mabondeli na milulu oyo ntango mosusu bazalaki kosala na Ezipito na ntango batyaki nzoto ya tata na ye nkisi mpo na kobatela yango. Yakobo na Yosefe bazalaki na kondima. (Baebele 11:21, 22) Atako ekoki mpenza kozala ete ezali Yehova te nde atindaki bábatela nzoto ya Yakobo, Makomami elobi likambo yango na ndenge ya mabe te. Kotya nzoto ya Yakobo nkisi mpo epɔla te esalemaki te lokola ndakisa mpo na libota ya Yisalaele to mpo na lisangá ya boklisto. Kutu, na kati ya Liloba ya Nzambe, esika moko te ezali na malako ya polele na likambo yango. Longola ndenge batyaki nzoto ya Yosefe nkisi na Ezipito mpo epɔla te, Makomami elobeli lisusu momeseno yango na esika mosusu te.—Genese 50:26.
Lokola kaka mikuwa nde emonanaki kati na malita ya Palestine, yango ezali komonisa ete Baebele bazalaki na momeseno ya kotya bibembe nkisi te mpo na kobatela yango ntango molai. Na ndakisa, batyaki nzoto ya Lasalo nkisi te mpo epɔla te. Atako bazingaki ye na bilamba, bato oyo bazalaki wana ntango balongolaki libanga oyo ezipaki lilita na ye bakakatanaki naino. Lokola esilaki koleka mikolo minei kobanda Lasalo akufaki, ndeko mwasi na ye ayebaki kaka ete nsolo ekobima ntango bakofungola lilita.—Yoane 11:38-44.
Batyaki nzoto ya Yesu Klisto nkisi mpo epɔla te? Baevanzile elobi bongo te. Na ntango wana, Bayuda bazalaki na momeseno ya kopakola ebembe matiti ya nsolo na mafuta ya malasi liboso ya kokunda yango. Na ndakisa, Nikodeme apesaki ebele ya matiti ya nsolo mpo na kobongisa nzoto ya Yesu na lolenge yango. (Yoane 19:38-42) Mpo na nini basalelaki matiti ya nsolo ebele boye? Ntango mosusu, ezali mpo alingaki Yesu mingi mpe azalaki na limemya makasi mpo na ye, mpe yango etindaki ye apesa likabo monene bongo. Kasi tókanisa te ete basalelaki matiti ya nsolo wana mpo na kobatela nzoto epɔla te.
Moklisto asengeli koboya momeseno ya kotya nkisi na ebembe mpo epɔla te? Soki totali malamu, kotya nkisi na ebembe mpo epɔla te ezali kaka kozongisa nsima likambo oyo nsukansuka ekosalema kaka. Mpamba te, toutá na mputulu, mpe soki tokufi, tozongaka na mputulu. (Genese 3:19) Kasi ekoki kozala ete mikolo mingi ekoleka kobanda moto akufi tii bakokunda ye. Soki bandeko ya mowei na baninga na ye bakouta mosika, mpe soki bazali na mposa ya komona ebembe, na ntembe te ekosɛnga ete bábatela nzoto yango.
Yango wana, na kotalelaka Makomami, ezali mabe te kotosa mibeko ya mboka moko oyo esɛngaka kotya ebembe nkisi mpo epɔla te; to ezali mabe te kondima mposa ya bandeko ya mowei ete ebembe ya ndeko na bango etyama nkisi. “Bakufi bayebi likambo te.” (Mosakoli 9:5) Soki bazali na kati ya makanisi ya Nzambe, bakozonga na bomoi na mokili ya sika.—Yobo 14:13-15; Misala 24:15; 2 Petelo 3:13.
[Etanda/Elilingi na lokasa 31]
KOTYA EBEMBE NKISI MPO EPƆLA TE—NA NTANGO YA KALA MPE LELO OYO
Na Ezipito ya kala, lolenge ya kotya ebembe nkisi mpo epɔla te ezalaki kolanda lokumu ya libota ya mowei. Libota ya bozwi mingi ezalaki na likoki ya kopona ete bato oyo bazalaki kotya bibembe nkisi básala nzoto ya mowei na bango boye:
Bazalaki kobimisa bɔɔngɔ na ebende moko oyo bazalaki kokɔtisa na madusu ya zolo. Na nsima, bazalaki kotya nkisi oyo esengeli na kati ya motó. Na nsima, bazalaki kolongola biloko nyonso ya libumu, kasi bazalaki kotika motema mpe bangei (reins). Mpo na kofungola libumu, esengelaki kokata yango mpota, kasi kosala yango ezalaki lisumu mpo na bango. Mpo na kolonga mokakatano yango, bato ya Ezipito oyo bazalaki kosala mosala ya kotya bibembe nkisi bazalaki kobengisa moto moko babengi mokati mpo ete afungola libumu ya ebembe. Moto yango azalaki kokima soki kaka asilisi kokata libumu, mpamba te bazalaki kofinga mpe kobamba moto oyo asali likambo mabe ya ndenge wana mabanga.
Nsima ya kolongola biloko nyonso ya libumu, bazalaki kosukola yango. Hérodote akomaki boye: “Bakotondisa libumu na mola kitoko oyo baniki, na casse, mpe biloko mosusu mingi ya nsolo, longola olibana, bazalaki mpe kotonga mpota yango.”
Na nsima, bazalaki kotya nzoto na kati ya mungwa mikolo 70 mpo na kokaukisa yango. Na nsima, bazalaki kosukola nzoto malamu mpenza mpe kozinga yango malamumalamu na bilamba. Bazalaki kopakola bilamba yango makiki (colle) mpo ekanga na nzoto malamu, mpe bazalaki kotya ebembe yango ntango ekauki (momie) na kati ya sanduku ya mabaya oyo babongisi yango kitoko mpe elandi mpenza kaka ndenge nzoto ya moto ezali.
Lelo oyo, kotya ebembe nkisi mpo epɔla te eumelaka te. Mingimingi bakɔtisaka nkisi na misisa, na libumu mpe na ntolo. Bato basalelá mitindo ndenge na ndenge ya kotya ebembe nkisi mpo epɔla te. Kasi lelo oyo basalelaka mingimingi formol mpo ezalaka ntalo mingi te mpe ezalaka mpenza likama te.
[Elilingi]
Sanduku ya wolo ya Mokonzi Toutankhamon