Ozali komikundola?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Na bongo, talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:
• Mpo na kokitisa mitungisi, programɛ nini okoki kolanda na ntina etali Lisolo Likoló ya Ngomba?
Mokolo na mokolo, okoki kotánga liteya moko ya Yesu oyo emonisami na Lisolo Likoló na Ngomba to mpe na masolo mosusu ya Baevanzile. Na ntango ozali komanyola mateya yango mpe ozali koluka kosalela yango, okomona ete esengo na yo ekobakisama mpe mitungisi na yo ekokita.—15/12, nkasa12-14.
• Wapi ntina misato oyo bankulutu bapesaka basaleli na misala formasyo mpo na kokokisa mikumba mosusu?
Lokola Bataloli ya Yehova bazali se kobakisama, lisangá ezali na mposa ya mibali mosusu oyo bakoki kozwa mikumba mpo na kosalisa bato oyo bauti kozwa batisimo sika ete bákola na elimo. Bankulutu mosusu batiki mikumba mosusu mpo bakómi mibange to mpe mpo na mikakatano na bokolɔngɔnɔ ya nzoto. Mpe lisusu, bankulutu mosusu ya makoki bazali kokokisa mikumba mosusu, yango wana bazali lisusu na likoki te ya kosala makambo mosusu na kati masangá na bango.—1/1, lokasa 29.
• Ndenge nini bato batyaka elikya epai na banzambe ya lokuta?
Bato mingi basambelaka banzambe ya mangomba na bango, kasi banzambe yango bazali banzambe ya bomoi te oyo bakoki kobikisa soki moke te lokola Baala na mikolo ya Eliya. (1 Mikonzi 18:26, 29; Nzembo 135:15-17) Bamosusu basambelaka bavɛdɛti to bato ya masano, baoyo bakoki kopesa elikya ya solo te mpo na mikolo ezali koya. Nzokande, Yehova azali mpenza mpe akokisaka mikano na ye.—15/1, nkasa 3-5.
• Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Kaina atalelaki likebisi ya Nzambe?
Nzambe apesá biso bonsomi ya kopona, mpe tokoki kopona kosala oyo ezali sembo na esika ya kosala mabe, ndenge Kaina asalaki. Biblia emonisi lisusu ete Yehova apesaka bato oyo baboyi kobongola mitema etumbu.—15/1, nkasa 22-23.
• Mpo na nini bopɛto ezali mpenza na ntina mingi lelo oyo?
Lokola makambo ya bomoi ezali se kobongwana, bato balekisaka ntango mingi te mpo na kotya bopɛto na bandako na bango ndenge ezalaki kosalema liboso. Kobosana bopɛto na bilei mpe mai ekoki kobebisa bokolɔngɔnɔ ya nzoto. Longola kozala pɛto na nzoto, Biblia emonisi ntina ya kotya likebi na bopɛto ya elimo, bopɛto ya bizaleli, mpe bopɛto ya makanisi.—1/2, nkasa 3-6.
• Mpo na batatoli oyo bazalaki na bomoi liboso Klisto aya awa na mabele, Paulo alobaki ete bango “bákóma te bato ya kokoka kozanga biso.” Na ndenge nini? (Baebele 11:40, NW)
Na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto oyo Biblia ezali kolobela, Klisto na bandeko na ye bapakolami na elimo bakozala bakonzi mpe banganga na likoló, mpe bakopesa matomba ya lisiko epai ya bato oyo bakosekwa. Bato ya sembo lokola baoyo balobelami na Baebele mokapo 11 ‘bakokóma bato ya kokoka’ mpenza.—1/2, lokasa 23.
• Likanisi ya Paulo ezalaki nini ntango ayebisaki Baebele ete: “Bobundi naino kino kotangisa makila te”? (Baebele 12:4)
Alobelaki kotikala sembo tii na liwa. Ezalaki na bandakisa ya bato ya ntango ya kala baoyo batikalaki sembo tii na liwa. Atako Baebele oyo Paulo akomelaki bamekamaki tii na liwa te, basengelaki kokɔmela na elimo, kolendisa kondima na bango mpo na koyika mpiko ata na likambo nini oyo ekoki koyela bango.—15/2, lokasa 29.
• Mpo na nini ezali malamu te koloba ete motema mawa ya Yehova elɛmbisaka bosembo na ye?
Na minɔkɔ mosusu, liloba “kolɛmbisa” elimboli kozala na bokatikati to mpe kopekisa. Yehova azali Nzambe ya bosembo mpe ya motema mawa, mpe ntango azali komonisa bizaleli yango, nyonso mibale ezali kosala nzela moko. (Exode 34:6, 7; Deteronome 32:4; Nzembo116:5; 145:9) Yehova azali na mposa te ete bosembo na ye elɛmbisa motema mawa na ye.—1/3, lokasa 30.
• Ezali malamu ete moklisto atya ebembe ya ndeko na ye nkisi mpo epɔla te?
Kotya ebembe nkisi mpo epɔla te ezali lolenge ya kobatela yango. Bato mosusu na ntango ya kala bazalaki kotya ebembe nkisi mpo na makambo ya losambo na bango. Yango esengeli kozala bongo te mpo na basambeli ya solo. (Masakoli 9:5; Misala 24:15) Kotya ebembe nkisi mpo epɔla te ezali kaka koumisa likambo oyo, nsukansuka, ekoya kaka: nzoto ekozonga kaka mputulu. (Genese 3:19) Kasi ezali mabe te kotya ebembe nkisi mpo epɔla te, soki mibeko ya mboka esɛngaka kosala bongo, soki bato mosusu na libota balingi kosala yango to mpe soki bandeko ya moto oyo akufi bakouta mosika mpo báya kokuta ebembe.—15/3, nkasa 29-31.
• Bandakisa nini ezali na Biblia oyo ezali komonisa biso ete Nzambe ayambaka bato ya mabota nyonso?
Yehova atindaki mosakoli Yona akebisa bato ya Ninive, mpe Nzambe asɛngaki Yona ete andima ndenge babongolaki motema. Ezala na maloba to na misala, Yesu alendisaki kolinga Basamalia. Ntoma Petelo na ntoma Paulo bazalaki na mokumba ya komema nsango malamu epai ya bato oyo bazalaki Bayuda te. Bandakisa wana ezali komonisa biso ntina ya koluka kosalisa bato nyonso.—1/4, nkasa 21-24.