Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/4 lok. 9
  • “Nazalaki na mposa ya kosalela Nzambe”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Nazalaki na mposa ya kosalela Nzambe”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Masolo mosusu
  • Ntina oyo sango moko alongwaki na lingomba na ye
    Lamuká!—2015
  • Babongisaki bomoi na bango—Yo mpe okoki kosala yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • “Nayokaka ete napambolami mpenza”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Natikaki mingi mpo na eloko oyo eleki motuya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/4 lok. 9

Masolo ya Basakoli ya Bokonzi

“Nazalaki na mposa ya kosalela Nzambe”

NA EKEKE ya liboso na ntango na biso (T.B.), ntoma Yoane ayokaki anzelu moko azalaki kobelela ete: “Bino bato na ngai bóbima kati na ye.” Na mikolo na biso, bamilio ya bato ya mitema sembo bandimi libyangi yango mpe bakimi “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba. (Emoniseli 18:​1-4, NW) Wilner, moto ya ekólo Haïti, azali moko ya bato yango, Ye abɛti lisolo ya makambo oyo akutanaki na yango.

“Nabotamá na 1956 na mwa mboka moke ya Saint Marc, na esanga ya Haïti; libota na biso ezalaki ya bandimi ya molende na Lingomba ya Katolike. Kanisá esengo oyo libota na ngai ezalaki na yango ntango baponaki ngai elongo na bilenge mosusu mibale ya mboka na biso mpo tókɔta na seminɛrɛ na Saint Michel de l’Atalaye, na Haïti. Na nsima, na 1980, batindaki biso tókende kotánga lisusu na Stavelot, na Belgique. Kuna, tokɔtaki mpe na iniversite moko ya Lingomba ya Katolike.

“Na ebandeli, nazalaki kosepela kokóma sango. Mokolo moko na ndako ya kolya, sango-mokonzi ya etuluku na biso ayebisaki ngai natikala mwa moke mpo azali na likambo ya koyebisa ngai. Nabulunganaki mpenza ntango ayebisaki ngai polele ete azali kosepela na ngai ete asangisa na ngai nzoto! Naboyaki mpenza mpe nazalaki lisusu na esengo te. Nakomelaki bandeko na ngai mokanda mpo na koyebisa bango likambo yango, mpe na nsima ya mwa basanza, nalongwaki na seminɛrɛ atako bandeko na ngai basepelaki te. Nazwaki ndako ya kofutela mpe nayekolaki mosala mosusu.

“Ntango nazongaki na Saint Marc, nalongolaki motema na ngai na Lingomba ya Katolike. Nazalaki kaka na mposa ya kosalela Nzambe, kasi nayebaki te oyo nakosala. Nakɔtaki na Lingomba ya Adventiste, na Lingomba ya Ebenezer, mpe na Lingomba ya Mormon. Nabungaki nzela na elimo.

“Na nsima, nakanisaki lisusu ete ntango nakɔtaki na seminɛrɛ na Belgique, nazalaki na momeseno ya kotánga Biblia ya Abbé Crampon. Na kati ya Biblia yango, natángaki ete Nzambe azali na nkombo. Yango wana, nasalelaki nkombo yango ntango nazalaki kobondela Nzambe makasi mpo ete asalisa ngai nayeba lingomba ya solo.

“Mwa moke na nsima, Batatoli ya Yehova mibale bayaki kofanda na kartye na biso. Bazalaki bato ya kimya, bato ya limemya mpe bazalaki kopesa nzoto na bango kilo. Makambo na bango ezalaki kosepelisa ngai. Mokolo mosusu, moko na Batatoli yango abengisaki ngai na Ekaniseli ya liwa ya Klisto oyo esalemaka mbala moko na mbula. Nasepelaki mingi na likita yango mpe nandimaki koyekola Biblia mbala na mbala na Batatoli yango. Nsima ya sanza soki motoba, nandimaki ete namoni ndenge malamu ya kosalela Nzambe. Namipesaki na Yehova mpe nazwaki batisimo mokolo ya 20 Novɛmbɛ 1988.”

Na nsima, Wilner akómaki mosaleli ya ntango nyonso. Lelo oyo, azali nkulutu na lisangá. Ye na mwasi na ye, na bana na bango mibale bazali kosalela Nzambe na esengo na kati ya lisangá.

[Elilingi na lokasa 9]

Kotángaka Biblia esalisaki Wilner ayeba ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto