Mokanda euti na Haïti
“Nayokaka ete napambolami mpenza”
NSIMA ya koningana ya mabele oyo esalemaki na Haïti na mokolo ya 12 Yanuali 2010, nazalaki kokoka ata te kotala na televizyo ndenge oyo mboka yango ebebaki. Na nsima, na mokolo ya 20, Carmen moninga na ngai abengaki ngai na telefone mpe asɛngaki ngai tókende na Haïti, mpo na kosunga. Nakutanaki na Carmen mwa bambula liboso ntango tosalaki lokola mafulume na esika moko oyo bazalaki kotonga Ndako ya Bokonzi. Banda wana, topesaki mabɔkɔ na misala mosusu mpe tokómá baninga mpenza.
Nayebisaki Carmen ete nazali na makasi te, ezala na nzoto to na makanisi mpo na kokende kosunga na Haïti. Ayebisaki ngai ete tosalaki malamu elongo mpe tokoki kosalisana. Maloba na ye elendisaki ngai, nabengaki biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn na engumba New York, mpe nasololaki na ndeko oyo azalaki kobongisa mosala ya kokende kosunga na Haïti. Napesaki ye nkombo na ngai mpo abakisa yango na liste ya bato oyo bamipesaki mpo na kokende kosunga. Natángaki mpe nkombo ya Carmen mpe nalobaki ete tokosepela kokende kosala elongo. Ayebisaki ngai ete ayebi te soki bakobenga ngai to Carmen to soki ngai ná Carmen tokosala elongo.
Yango wana, nakobaki kosala mosala na ngai ndenge namesaná, nakanisaki ete bakobenga ngai te mpo nakende. Mikolo minei na nsima, na mokolo ya 25 Yanuali, bandeko na Brooklyn babengaki ngai na telefone, batunaki ngai soki nakoki kosala mobembo na Haïti—na mokolo oyo elandaki! Nakamwaki makasi. Nandimaki kosala nyonso. Liboso, nalukaki kosɛnga konje na mosala. Na nsima, nabengaki Carmen, kasi ayebisaki ngai ete babengi ye te mpo ayebi koloba Lifalanse te. Nazalaki na esengo mpe nazalaki kobanga. Na mokolo ya 28 Yanuali, nsima ya kosomba tike ya mpɛpɔ, nazwaki mpɛpɔ longwa na engumba New York tii na Saint-Domingue, na République dominicaine, oyo ezali pene ya Haïti.
Elenge Motatoli moko ayaki kozwa ngai na libándá ya mpɛpɔ mpe amemaki ngai na biro ya Batatoli ya Yehova ya République dominicaine. Mafulume mosusu mibale ya basi oyo bautaki na États-Unis, bakómaki mpe kaka mokolo wana mpe tolalaki shambre moko butu wana. Na ntɔngɔ, bamemaki biso na biro ya Batatoli ya Yehova ya Haïti, na Port-au-Prince, toumelaki na nzela ngonga soki nsambo na ndambo.
Ntango tokɔtaki na Haïti, tomonaki ndenge koningana yango ya mabele ebebisaki biloko. Ezalaki kokamwa komona ndenge koningana wana ya mabele oyo eumelaki kaka segonde 35 ebebisaki mpenza mokili wana ya kitoko. Komona yango na miso ezalaki mpasi koleka ndenge ezalaki komonana na televizyo; maloba ezali kozanga ngai mpo na koloba ndenge nayokaki ntango namonaki yango na miso. Bandako mingi, ata mpe ndako ya prezida ebebaki, mpe bandako mosusu ekómaki mpenza mabondo ya mabanga. Bandako yango mingi ezalaki ya bato oyo basalaki mosala makasi na bomoi na bango mpo na kotonga bandako yango—kasi, kaka na mwa basegonde nyonso ebungaki. Namonaki ete eloko oyo eleki ntina na bomoi ezali te biloko ya mokili.
Ntango tokómaki na biro, ndeko oyo asalaka na esika bayambaka bato amonaki biso mpe ayaki mbangu na porte kokutana na biso mpe ayambaki biso na esengo. Apesaki biso mersi ndenge totikaki misala na biso mpo na koya na Haïti. Nsima ya kolya na midi, tokendaki na Ndako ya mayangani oyo ezalaki pene, oyo ekómaki lopitalo. Kuna, tokutanaki na Batatoli mosusu oyo bayaki mpo na kosunga, kati na bango ezalaki na ndeko mwasi moko ná mobali na ye oyo bautaki na Allemagne mpe bango nyonso mibale bazalaki minganga, bazalaki ná lifulume na bango, mpe ndeko mwasi moko oyo abotisaka oyo autaki na Suisse.
Nabandaki mosala kaka na butu wana. Bato ya maladi bazalaki 18, Batatoli mpe baoyo bazalaki Batatoli te, batandelaki bango bamatela na nse, na kati ya Ndako ya mayangani. Tozalaki kotyela bango nyonso likebi ndenge moko mpe tozalaki kosalisa bango kozanga báfuta mbongo.
Na butu yango, mobali moko ya mbula 80 akufaki. Mwasi na ye azalaki pene na ye, ngai ná moninga na ngai ya shambre mpe tozalaki wana. Na nsima, elenge mwasi moko nkombo na ye Ketly abandaki koganga na mpasi. Bakataki ye lobɔkɔ ya mobali mpo na mpota oyo azokaki na likama yango. Pembeni na ye ezalaki na Motatoli oyo azalaki koyekola Biblia na Ketly. Butu nyonso, azalaki kolala pembeni ya Ketly na Ndako ya mayangani.
Nakendaki pembeni ya Ketly, nazalaki na mposa ya kosalisa ye mpo mpasi na ye ekita, kasi mpasi na ye ezalaki kaka na nzoto te. Ayebisaki ngai ete azalaki na ndako ya moninga na ye moko ntango mabele eninganaki. Bayebaki te likambo nini ezalaki kosalema. Basimbanaki na lobɔkɔ mpo na kobima mbangu na balcon, ntango efelo moko ekwelaki bango, ezipaki bango. Abengaki moninga na ye, kasi ayanolaki ye te. Amonaki ete moninga na ye akufaki. Nzoto ya moninga na ye ezalaki likoló na ye tii ngonga minei na nsima ntango bato oyo bayaki kobikisa bango bakómaki. Lobɔkɔ na ye ya mobali ebebaki nyonso.
Na butu ya liboso Ketly azalaki kaka kokanisa likambo yango mbala nyonso oyo azalaki koluka kolala. Na kolela nyonso ayebisaki ngai boye: “Nayebi oyo Makomami elobi mpo na mikolo ya nsuka mpe koningana ya mabele. Nayebi ete tozali na elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya. Nayebi ete nasengeli komonisa botɔndi mpo na ndenge nazali na bomoi. Kasi, omitya naino na esika na ngai ata mpo na mwa miniti. Mokolo moko, makambo na yo nyonso ezali malamu, mpe na mbala moko, okómi ndenge nazali.” Nayebaki te nasala nini, nasimbaki ye kaka, ngai mpe nabandaki kolela. Biso mibale tolelaki tii ntango ye alalaki.
Mikolo nyonso, doktɛrɛ moko ná mafulume mibale bazalaki kokende kosalisa baoyo bazalaki mpenza na mposa ya lisungi ya minganga. Batindaki ngai na Petit Goave, mobembo ya ngonga soki mibale kolongwa na Port-au-Prince. Nakendaki elongo na bandeko mosusu mibale—moko, lifulume oyo autaki na Florida mpe doktɛrɛ moko oyo autaki na France. Tokómaki na ngonga ya 9:30 na ntɔngɔ, tokitisaki biloko na biso mpe tokɔtisaki yango na Ndako ya Bokonzi. Bato bayebaki ete tozali koya, yango wana bafandaki mpe bazalaki kozela biso.
Tobandaki mbala moko kosala. Moi ezalaki makasi mpe molɔngɔ ya bato oyo bazalaki na mposa ya lisungi ezalaki se kobakisama. Topemaki mwa moke na ngonga soki ya 15:00. Biso misato, tokataki bato 114 mangwele mpe tosololaki na bato 105 ya maladi na mokolo wana. Nalɛmbaki, kasi nazalaki na esengo ndenge tosalisaki bato oyo bazalaki na bosɛnga.
Na nyonso, nasalaki soki pɔsɔ mibale na mosala wana ya kopesa lisungi na Haïti. Nakoki koloba ete butu nyonso nazalaki kosala ngonga soki 12 na Ndako ya mayangani. Ezalaki mokumba monene, oyo nazwaki naino liboso te. Atako bongo, namonaki ete ezalaki libaku malamu mpe lipamboli kokende kuna. Nazali na esengo mingi ndenge nakokaki kobɔndisa mpe kosunga bato na Haïti, baoyo banyokwamaki mpenza makasi.
Toyekolaki makambo mingi epai na bango. Na ndakisa, Eliser, elenge mobali ya mbula 15 oyo nazalaki kosalisa, esengelaki bákata ye lokolo moko. Namonaki ete azalaki kobomba bilei na ye mpo alya elongo na Jimmy, oyo azalaki koya kobatela ye na butu. Ayebisaki ngai ete Jimmy azalaki ntango nyonso te kozwa eloko ya kolya liboso aya na mpokwa. Ndakisa ya Eliser eteyaki ngai ete esɛngi kaka te tózala na bozwi—to na nzoto kolɔngɔnɔ—mpo na kokabola na basusu eloko oyo tozali na yango.
Ezaleli yango ezalaki mpe komonana epai ya bato nyonso oyo tozalaki kosala na bango elongo. Ndeko moko oyo azalaki kosunga azalaki mpe nzoto kolɔngɔnɔ te, mosusu azalaki na mpasi na mokɔngɔ. Kasi, bango nyonso batyaki bamposa ya bato ya maladi liboso ya bamposa na bango moko. Yango epesaki ngai makasi oyo nasengelaki na yango mpo na kokoba. Mbala na mbala, biso nyonso tozalaki kolɛmba na nzoto mpe na makanisi, kasi tozalaki kosungana mpe kokoba kosala. Nakobosana te makambo yango! Nazali na botɔndi ndenge nazali na kati ya lisangá elongo na bakristo ya malamu oyo bazali na boboto, bolingo, mpe na ezaleli ya komipimela.
Liboso nalongwa na Haïti, bato mibale ya maladi, oyo mokomoko bakataki ye lobɔkɔ ya mobali, basalaki makasi mpo na kokomela ngai mikanda mpo na kopesa ngai mersi, mpe bayebisaki ngai ete natánga yango kaka ntango nakokɔta na mpɛpɔ. Nasalaki mpe kaka bongo. Mikanda yango esimbaki motema na ngai, mpe nakokaki kokanga motema te, nabandaki kolela.
Bandá nazongá, nakobaka kosolola na baninga oyo nakutanaki na bango na Haïti. Tosalaki boninga makasi na ntango wana ya mpasi. Nakanisi ete boninga na biso ekosila te ata soki tokutani na mokakatano nini na mikolo ezali koya. Nayokaka ete napambolami mpenza.