Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/05 lok. 1
  • Pesá Yehova matɔndi mpo na motema-boboto na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Pesá Yehova matɔndi mpo na motema-boboto na ye
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Masolo mosusu
  • Yehova apambolaka milende oyo tosalaka mpo na kosala Ekaniseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • “Bólinga Yehova, bino bayengebene na ye nyonso”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Salisá basusu bázwa litomba na lisiko
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Ntina oyo toyanganaka na Ekaniseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 2/05 lok. 1

Pesá Yehova matɔndi mpo na motema-boboto na ye

Tokokanisa liwa ya Klisto na mokolo ya 24 Marsi

1. Ndenge nini Yehova amoniselaki biso motema-boboto?

1 Mokomi ya Nzembo alobaki boye: “Tiká ete bato bápesa Yehova matɔndi mpo na motema-boboto na ye mpe mpo na misala na ye ya kokamwa epai ya bana ya bato.” (Nz. 107:8, NW) Motema-boboto ya Nzambe esuki kaka te na boboto oyo azali na yango mpo na bato. Yango emonisami polele na maloba ya kokumisa oyo epemami: “Motema-boboto na yo, Ee Yehova, etikaki ngai te.” (Nz. 94:18, NW) Yehova amonisaki mpenza motema-boboto ya kokamwa ntango apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko mpo na kobikisa biso.—1 Yoa. 4:9, 10.

2. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na biso epai ya Yehova?

2 Lokola Ekaniseli ya liwa ya Klisto ekómi pene, ndenge nini tokoki kopesa matɔndi na “Nzambe ya motema-boboto”? (Nz. 59:​17, NW) Mokomoko na biso asengeli komibombela ntango ya komanyola likoló ya mikolo ya nsuka oyo Yesu alekisaki awa na mabelé. (Nz. 143:5) Ekozala malamu mpe kolanda programɛ ya kotánga Biblia oyo ebongisami mpo na Ekaniseli, ndenge ezali na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2005 mpe soki likoki ezali, kotánga mpe kosala bolukiluki na makambo oyo ezali na mikapo 112-116 ya buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo mpe na mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia. Kanisá na makambo oyo ozali kotánga, mpe omipesa mobimba na yango. (1 Tim. 4:15) Soki tozali komanyola Liloba ya Nzambe mpe kobondela, tokoleisa motema na biso mpe tokomonisa ete tolingaka Yehova.—Mat. 22:37.

3, 4. (a) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya bandeko na biso ya Liberia? (b) Banani ozali kokanisa kobengisa na Ekaniseli?

3 Lendisá basusu bápesa Nzambe matɔndi: Na mokili mobimba, bato  16 760 607 bayanganaki na Ekaniseli na mbula eleki. Na mboka moko ya Liberia, bandeko bakomelaki mokonzi ya mboka mokanda mpo na koyebisa ye ete balingi kosala Bolei ya Mpokwa ya Nkolo na mboka na ye. Mokonzi yango apesaki bandeko ndingisa ya kosalela libándá ya masano ya mboka wana, mpe asɛngaki báyebisa bato nyonso ya mboka báyangana na Ekaniseli yango. Atako mboka wana ezalaki kaka na basakoli mitano, bato 636 bayanganaki na Ekaniseli!

4 Biso mpe tosengeli kosalisa bato mingi báyangana elongo na biso na Ekaniseli. Mpo na nini te kosala liste ya bato oyo okobengisa? Elilingi oyo ezali na lokasa ya nsuka ya Lamuká! ya 8 Marsi (na Lifalanse) mpe ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi ezali na libyangi moko. Tokoki mpe kosalela nkasa ya libyangi mpo na Ekaniseli. Komá na masini to komá malamu na mabɔkɔ ngonga mpe esika oyo Ekaniseli ekosalema, mpe pesá lokasa ya libyangi na moto mokomoko oyo obengisi. Soki mokolo ya 24 Marsi ekómi pene, zongelá moto mokomoko mpo na kokundolela ye mpe kozwa bibongiseli nyonso oyo esengeli.

5. Ndenge nini tokoki kolendisa bato oyo toyekolaka na bango Biblia báyangana na Ekaniseli?

5 Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo toyekolaka na bango Biblia kasi babandi naino koyangana na makita te mpo báyangana mpe bázwa matomba mpenza na molulu yango? Na boyekoli mokomoko zwá mwa miniti mpo na kosalisa moyekoli akanga ntina ya Ekaniseli. Okoki kokuta masolo ya malamu na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 2004, nkasa 3-7, mpe na buku Comment raisonner, nkasa 241-245.

6. Mpo na nini ezali na ntina tóyamba bapaya oyo bakoya na Ekaniseli?

6 Yambá bapaya malamu: Na Ekaniseli, pesá bapaya mbote mpe sololá na bango. (Lom. 12:13) Ekozala malamu ofanda esika moko na bato oyo obengisaki, mpe salá makasi bázala na Biblia mpe na buku ya nzembo. Tosengeli kozala bato ya liboso, mingi mpenza, mpo na kopesa mbote na esengo nyonso na bandeko mibali mpe bandeko basi oyo batiká kosakola, oyo basali milende mpo na koyangana na Ekaniseli. Soki bamoni ete tolingaka bango, bakoki kozongela lisangá. (Luka 15:​3-7) Na molulu wana eleki bosantu, tiká biso nyonso tósala makasi mpo na kolendisa basusu báyangana elongo na biso mpo na kopesa Yehova matɔndi mpo na “motema-boboto na ye ya kokamwa.”—Nz. 31:21,  NW.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto