Masano ya ntango ya kala mpe ntina ya kolonga
“MOTO nyonso oyo azali kosangana na kati ya momekano moko amipekisaka na makambo nyonso.” “Soki moto azali komekana na kati ya masano, akozwa motole kaka soki azali komekana engebene mibeko.”—1 Bakolinti 9:25; 2 Timote 2:5.
Masano oyo ntoma Paulo alobelaki ezalaki na kati ya mimeseno ya Bagrɛki na ntango ya kala. Masolo ya makambo ya kala ezali komonisa biso nini na ntina na mimekano yango mpe makambo oyo ezalaki koleka ntango bazalaki kosala yango?
Elakiseli moko ya biloko ya masano ya Bagrɛki ya kala eutaki kosalema eleki sikoyo mwa basanza na Colisée, na Rome; motó ya likambo na yango ezalaki Nike—Il gioco e la vittoria (“Nike—Lisano mpe kolonga”).a Biloko oyo balakisaki epesaki mwa moke biyano na motuna wana mpe emonisaki makambo oyo ezali kotinda baklisto bákanisa malamu ndenge oyo basengeli kotalela masano.
Masano ebandá kala
Bagrɛki ya kala bazali bato ya liboso te oyo babandaki masano. Kasi, soki na ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Homère, moto moko ya Grèce oyo azalaki mokomi ya maloba ya ntɔki, alobaki ete ebele ya bato nyonso na ekólo yango bazalaki na mposa ya kozala bilombe mpe bazalaki na elimo ya kowelana, mpe bazalaki kopesa valɛrɛ mingi na likambo ya kozala soda ya mpiko mpe na masano. Na elakiseli wana bamonisaki ete bafɛti ya libosoliboso ya Bagrɛki ezalaki nde milulu ya kokumisa banzambe na ntango ya kokunda bilombe. Na ndakisa, lisapo moko (Iliade) ya mokomi Homère, oyo eleki koumela na makomi nyonso ya Bagrɛki oyo ezali lelo, elobeli ndenge oyo babundi ya lokumu, baninga ya Achille, balalisaki bibundeli na bango na nse na molulu ya kokunda Patrocle mpe bamekanaki mpo na kolakisa ete bazali bilombe na lisano ya makofi, na libanda, na kobwaka diskɛ mpe likɔnga, mpe na momekano ya mbangu ya makalo.
Mimekano ya ndenge wana ekómaki kosalema na Grèce mobimba. Mwa buku oyo ezalaki kolimbola makambo na elakiseli yango elobaki boye: “Bafɛti yango ezalaki mabaku minene mpo na Bagrɛki; mpo na komemya banzambe na bango, bazalaki kobosana naino kowelana na bango makasi oyo ezalaki kosila te, mpe bazalaki kowelana na ndenge mosusu, oyo ezali ya kimya mpe ya bosembo: na komekana na masano.”
Bingumba mingi ekómaki na momeseno ya koyanganisa bato na bisika ya losambo mpo na kokumisa banzambe na bango na nzela ya mimekano. Nsukansuka, mayangani minei (lisano ya Olympique ná lisano ya Néméen, mpo na kokumisa Zeus, mpe lisano ya Pythique mpo na kokumisa Apollon mpe lisano ya Isthmique mpo na kokumisa Poséidon) ekómaki masano minene oyo bato ya Grèce mobimba bazalaki kolanda. Elingi koloba ete basani bazalaki kouta na Grèce mobimba. Na mayangani yango bazalaki kopesa mbeka mpe kobondela, kasi bazalaki mpe kokumisa banzambe na masano ya kafukafu mpe mimekano to na misala ya ntɔki.
Balobaka ete liyangani oyo ebandá kala koleka mayangani mosusu mpe oyo elekaki monene ebandaki na mobu 776 L.T.B., mpe bazalaki kosala yango mbala moko nsima ya mbula minei mpo na kokumisa Zeus na Olympie. Liyangani oyo elandaki yango na bonene ezalaki lisano ya Pythien. Ezalaki kosalema na Delphes, penepene ya esika ya losambo oyo elekaki lokumu na ntango ya kala; na liyangani yango mpe bazalaki komekana na mimekano. Kasi, lokola ezalaki mpo na kokumisa Apollon, nzambe ya maloba ya ntɔki mpe miziki, bazalaki mingimingi koyemba mpe kobina.
Masano oyo ezalaki kosalema
Masano oyo ezalaki kosalema na mayangani yango ezalaki mingi te soki tokokanisi yango na oyo esalemaka lelo; ekokaki ata zomi te, mpe kaka mibali nde bazalaki kosangana na masano yango. Bikeko, mayemi, mpe mayemi likoló ya bambɛki ya mabelé oyo balakisaki na Colisée emonisaki mwa moke masano nini bazalaki kosala.
Ezalaki na lolenge misato ya mimekano ya mbangu: na ntaka ya mɛtrɛ 200; ya kobaluka mbala mibale, ndenge bapotaka mbangu na ntaka ya mɛtrɛ 400 lelo oyo; mpe na ntaka molai, elingi koloba mɛtrɛ soki 4 500. Basani bazalaki bolumbu ntango bazali kopota mbangu mpe kosala ngalasisi. Basani na pentathlon bazalaki kowelana na masano mitano: lisano ya mbangu, kopumbwa na ntaka molai, kobwaka diskɛ, kobwaka likɔnga mpe libanda. Mosusu ezalaki lisano ya makofi mpe lisano babengi pancrace, oyo balobi ete ezalaki “lisano moko ya mabe mpenza ya kobɛtana makofi esangani na libanda.” Ezalaki mpe na mimekano ya mbangu ya makalo na ntaka ya mɛtrɛ 1 600; makalo yango ezalaki kilo mingi te mpe ezalaki polele na nsima, ezalaki na bapine ya mike mpe bana ya mpunda to bampunda oyo ekɔmelá mibale to minei nde ezalaki kobenda yango.
Lisano ya makofi ezalaki mpenza nsɔmɔ mpe ntango mosusu moto azalaki kokufa. Na mabɔkɔ, babundi bazalaki kolinga nsinga esalemi na mposo ya nyama oyo bakangisá bibende mikemike. Yango wana, tokoki kokamwa te ete mobundi moko, nkombo na ye Stratofonte, amiyebaki lisusu te ntango atalaki elongi na ye na talatala nsima ya kobunda ngonga minei. Bikeko mpe mayemi ya kala ezali komonisa ete bilongi ya bato oyo bazalaki kobunda lisano ya makofi ezalaki mpenza kobeba.
Mibeko ya libanda elobaki ete moto akoki kokanga moto oyo azali kobunda na ye kaka banda na loketo tii na likoló, mpe moto ya liboso oyo akweisi moninga na ye mbala misato na mabelé nde azalaki kolonga. Nzokande, na lisano ya makofi esangani na libanda, mobundi akokaki kokanga monguna ata na eteni nini ya nzoto. Bakokaki kobɛtana makolo, makofi, kokamolana mabɔkɔ. Bapekisaki kaka kotɔbɔla moninga liso, kotya ye manzaka, mpe koswa ye mino. Esengelaki kokweisa monguna makalekale mpe kokanga ye makasi mpo atikala na nse. Bato mosusu bazalaki koloba ete ezali “lisano eleki malamu na masano nyonso ya Olympie.”
Balobaka ete etumba moko ya makofi esangani na libanda oyo etiká nsango ezalaki kati na bilombe mibale oyo, mokomoko alongaki bato nyonso oyo abundaki na bango mpe na nsuka, bango mibale bandongwanaki; ezalaki na Olympie, na mobu 564 L.T.B. Ntango bakangaki ye makasi na nkingo, moko na babundi, nkombo na ye Arrachion, azwaki likanisi ya kobuka monguna na ye misapi. Ntango monguna yango amonaki ete mpasi eleki, atikaki mpe na mbala moko Arrachion akataki motema. Baarbitre balobaki ete ebembe ya Arrhachion nde elongaki!
Momekano ya mbangu ya makalo nde lisano elekaki monene mpe bakonzi balingaki yango mingi, mpamba te molongi ezalaki mokumbi-likalo te, kasi nkolo ya likalo ná bampunda. Mputulu ezalaki komata ntango kaka momekano ebandi, ntango esengelaki ete bakumbi-makalo básala makasi mpo makalo elongwa na nzela na yango te, mpe na koleka, na esika nyonso oyo basengeli kobuka nzela. Soki moto asali libunga to atosi mibeko te, ezalaki kobimisa makama oyo ezalaki kobɛtisa mitema ya bato oyo bazalaki kotala.
Libonza
Ntoma Paulo alobaki ete: “Bapoti mbangu na kati ya momekano ya mbangu bapotaka mbangu bango nyonso, kasi kaka moko nde azwaka libonza.” (1 Bakolinti 9:24) Moto nyonso azalaki na mposa ya kolonga kaka. Bazalaki kopesa medayi ya ebende to bronzɛ te, esika ya mibale to ya misato ezalaki te. Na elakiseli ya Rome, balimbolaki boye: “Kolonga, ‘Nike,’ nde ezalaki mokano ya liboso ya mosani mokomoko. Kaka yango nde ezalaki likambo ya ntina mpamba te yango kaka nde ezalaki komonisa makasi na ye ya nzoto mpe ya elimo, mpe lokumu mpo na mboka na ye.” Homère amonisaki makanisi yango na mwa maloba moke oyo: “Nayekoli ete nasengeli ntango nyonso kozala moto ya liboso.”
Libonza oyo bazalaki kopesa moto oyo alongi na masano ya Grèce ezalaki elembo mpamba: motole oyo basali na nkasa. Paulo abengaki yango “motole oyo epɔlaka.” (1 Bakolinti 9:25) Kasi, libonza yango ezalaki na ndimbola monene. Ezalaki komonisa nguya ya mokili oyo epesaki molongi makasi. Kolonga, oyo bazalaki koluka na etingya nyonso, ezalaki kolimbola ete banzambe bazali na moto oyo alongi. Biloko oyo balakisaki na Rome emonisaki ndenge oyo bazalaki koyema Nike, nzambe-mwasi ya bolongi mpo na Bagrɛki; bazalaki koyema ye na mapapu mpe azali kopesa molongi motole. Moto nyonso oyo alongi na Olympie azalaki komimona ete akómi mpenza elombe.
Na masano ya Olympie bazalaki kopesa mitole esalemaki na nkasa ya olive ya zamba; na masano ya Isthmique, ezalaki ya nkasa ya pin; na masano ya Pythien, ezalaki ya nkasa ya laurier; mpe ya masano ya Néméen, ezalaki ya seleri ya zamba. Na bingumba mosusu oyo bazalaki kobongisa masano yango bazalaki kopesa balongi mbongo to mabonza mosusu mpo babundi ya makasi mingi bázanga te. Na elakiseli ya Rome, ezalaki na bambɛki mingi oyo ezali mbano oyo bazalaki kopesa na masano ya Athènes, mpo na lokumu ya nzambe-mwasi Athéna. Na ntango wana, bambɛki yango ezalaki na mafuta ya olive ya motuya mingi oyo ezalaki kouta na etúká ya Attique. Na mopanzi ya mbɛki moko, ezalaki na liyemi ya nzambe-mwasi yango mpe bakomaki maloba oyo: “libonza ya Athéna.” Na mopanzi mosusu ezalaki na elilingi ya lisano moko, ekoki kozala oyo mosani alongaki.
Na bingumba ya Grèce, bato bazalaki kosepela mingi soki basani na bango balongi, mpe bazalaki kokóma bilombe mpo na engumba na bango. Mokolo oyo balongi bazalaki kozonga na mboka na bango, bazalaki kosala defile mpo na kokumisa bango. Bazalaki kosala bikeko na bango lokola makabo ya kozongisa matɔndi epai ya banzambe, lokumu oyo ezalaki kopesama na moto mosusu te, mpe bato ya maloba ya ntɔki bazalaki kokumisa bango na banzembo. Bazalaki mpe kopesa balongi bisika ya liboso na mayangani mpe bazalaki kofuta bango na mbongo ya Leta.
Mabándá ya masano mpe basani na yango
Mimekano wana ezalaki na ntina mingi mpo na kopesa bana-mboka elimo ya kosala mosala ya soda na ntango makambo esɛngi bongo. Na bingumba nyonso ya Grèce bazalaki na mabándá ya masano, epai bazalaki koyekolisa bilenge masano mpe kopesa bango mateya mosusu mpe makambo ya elimo. Bazalaki kotonga mabándá ya masano yango na bisika minene ya polele mpo na kosala ngalasisi, mpe pembenipembeni na yango ezalaki na bakulware mpe bandako oyo ezalaki babibliotɛkɛ mpe bandako ya kelasi. Mingimingi, bana ya bato ya mbongo nde bazalaki kokende na bisika yango, mpamba te bango bakokaki kolekisa ntango mingi na koyekola na esika ya kokende kosala mosala. Balakisi bazalaki kosalisa basani masano makasi mpe na boumeli ya ntango molai, bazalaki mpe kopekisa bango kolya bilei mosusu mpe kopekisa bango kosangisa nzoto.
Bato oyo bakendaki kotala elakiseli oyo ezalaki na Rome bamonaki bililingi ya basani ya kala, mingi na yango ezalaki mayemi oyo bato ya Loma basalaki na kolanda mayemi ya Bagrɛki. Lokola epai ya Bagrɛki, nzoto oyo ekembá ezalaki mpe komonisa ezaleli ya malamu mingi mpe ezalaki kaka mpo na bato ya lokumu, ezali mateya ya filozofi nde ezalaki kolendisa bato na kozala na nzoto ekembá lokola ya basani oyo bazalaki kolonga. Bato ya Loma bazalaki kosepela na bambeki yango kaka mpo na mayemi kitoko na yango, mpe bazalaki kotya yango mingi na mabándá ya masano, na bisika ya kosukola, mpe bandako ya minene mpe na bandako ya bakonzi to ya Leta.
Baloma mpe bazalaki kosepela mingi na masano ya kobunda, yango wana, na masano nyonso ya Bagrɛki oyo balakisaki na Rome, bato bazalaki kosepela mingi na bitumba ya makofi, libanda, mpe lisano ya makofi esangani ná libanda. Baloma bazalaki te kotalela masano yango lokola mimekano mpo na koyeba moto oyo aleki, kasi mpo na kosepelisa miso. Batikaki likanisi ya Bagrɛki ete masano ezali mpo mobundi nyonso ya makasi ameka nzoto ntango azali kozwa formasyo. Mpo na Baloma, masano ya Bagrɛki ekómaki kaka ngalasisi oyo bazalaki kosala mpo na kokembisa nzoto liboso ya kosukola to lisano ya bato mpamba, ndenge moko na mamekani ya bilombe.
Ndenge baklisto basengeli kotalela masano
Lokola makambo ya losambo ezalaki mpe kokɔta na masano yango, baklisto ya liboso bazalaki koboya yango, mpamba te “boyokani nini ezali na kati ya tempelo ya Nzambe mpe bikeko?” (2 Bakolinti 6:14, 16) Tokoki koloba nini mpo na masano lelo oyo?
Ezali polele ete masano ya lelo ekumisaka banzambe ya bapakano te. Kasi, tomonaka te ete bato bakómaka lokola nde bazali kosambela ntango bazali kolanda masano mosusu, ndenge kaka bato ya kala bazalaki kosala? Lisusu, lokola bansango oyo tozali koyoka banda mwa bambula ezali komonisa yango, mpo na kolonga, basani mosusu bamɛlaka bankisi ya kobakisa makasi, oyo ekoki kopesa bango maladi to mpe koboma bango.
Mpo na baklisto, kosala ngalasisi ezali te likambo oyo eleki ntina. Bizaleli ya elimo, elingi koloba “bomoto ebombaná ya motema,” nde ekómisaka moto kitoko na miso ya Nzambe. (1 Petelo 3:3, 4) Toboyi te, bato nyonso te oyo basalaka masano lelo oyo nde bazalaka na elimo ya kolonga kaka, kasi mingi bazalaka na yango. Soki tozali kosangana na bango, yango ekosalisa biso tólanda toli ya Biblia oyo elobi ete ‘tósala eloko moko te na kowelana to na ezaleli ya komitya liboso, kasi na elimo ya komikitisa?’ To kosangana na bato wana ekomema biso te na “koyinana, koswana, zuwa, nkanda makasimakasi, kowelana, bokabwani”?—Bafilipi 2:3; Bagalatia 5:19-21.
Mbala mingi, masano oyo esɛngaka kondongwana ebimisaka mobulu. Moto nyonso oyo asepelaka na masano ya ndenge wana asengeli kobosana te maloba ya Nzembo 11:5: “[Yehova] akomeka moyengebene mpe moto mabe, molimo na ye ayini ye oyo alingi mobulu.”
Kosala mwa ngalasisi ezali mabe te, ekoki kopesa biso esengo, mpe ntoma Paulo alobaki ete “ngalasisi ya nzoto ezali na litomba na mwa makambo moke.” (1 Timote 4:7-10) Kasi, Paulo alobelaki masano ya Bagrɛki kaka mpo na komonisa ntina oyo baklisto basengeli kozala na bizaleli lokola komipekisa mpe koyika mpiko. Mokano oyo Paulo azalaki kolanda, koleka makambo mosusu nyonso, ezalaki ya kozwa “motole” ya bomoi ya seko oyo Nzambe akopesa. (1 Bakolinti 9:24-27; 1 Timote 6:12) Na likambo yango, atikelá biso ndakisa oyo tosengeli kolanda.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nike elimboli “kolonga” na monɔkɔ ya Grɛki.
[Etanda/Bililingi na lokasa 31]
Mobundi ya lisano ya makofi nsima ya etumba
Ekeko oyo ya bronzɛ esalemá na ekeke ya minei L.T.B. ezali komonisa ndenge oyo, na ntango ya kala, bato ya lisano ya makofi bazalaki kobeba bilongi. Mwa buku ya kolimbola makambo na elakiseli ya Rome elobi ete, “bazalaki kokumisa mpiko ya mosani . . . oyo abundi tii akolɛmba, wana bazalaki ‘kozokisana’ ete ezali kolakisa molende.” Mwa buku yango elobi lisusu ete: “Matutu mpe bampota ya etumba oyo abundi sika ezalaki koya kobakisama na bampota ya bitumba oyo abundaki liboso.”
[Elilingi na lokasa 29]
Mamekani ya mbangu na makalo ezalaki masano oyo bato balingaki mingi na mamekani ya kala
[Elilingi na lokasa 30]
Bato ya kala bayemaki Nike, nzambe-mwasi ya bolongi oyo azali na mapapu, azali kolatisa molongi motole