Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/10 nk. 5-7
  • Libɔndisi oyo boyebi ya solosolo ya Nzambe ezali kopesa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libɔndisi oyo boyebi ya solosolo ya Nzambe ezali kopesa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ebandeli ya mabe
  • Ntembe moko ebimaki
  • Kimya mpe bolamu na mikolo oyo ezali koya
  • Ntina oyo etikali moke bampasi nyonso esila
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Libɔndisi mpo na baoyo bazali komona mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Ntango oyo Nzambe atiki nzela na bampasi elingi kosuka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Ndenge oyo malamu ekolonga mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/10 nk. 5-7

Libɔndisi oyo boyebi ya solosolo ya Nzambe ezali kopesa

BOLINGO mpe motema mawa ya Nzambe oyo Biblia elobelaka ebimisaka mituna na mitó ya bato mingi. Bamitunaka boye: Soki Nzambe azali na mposa ya kosilisa mabe, ayebi ndenge ya kosilisa yango mpe azali na nguya ya kosilisa yango, mpo na nini mabe ezali se kobakisama? Bato yango bamonaka ete ezali mpasi koyokanisa makambo misato oyo: (1) Nzambe azali na nguya nyonso; (2) Nzambe azali na bolingo mpe azali malamu; mpe (3) makambo ya mabe ezali kosila te. Na makanisi na bango, lokola makambo ya mabe ezali kosila te, yango emonisi ete Nzambe azali na nguya nyonso te, to azali na bolingo te mpe azali malamu te. Mpo na bango, makambo ezali se mibale: to Nzambe azali na likoki te ya kosilisa mabe, to azali na mposa ya kosilisa yango te.

Ntango bato ya mobulu bakweisaki babuludingi mibale na New York, mwa mikolo mingi na nsima, mokonzi moko ya lingomba oyo ayebani mingi na États-Unis, alobaki boye: “Batunaki ngai . . . mbala ebele mpo na nini Nzambe atikaka nzela ete makama esalema mpe bampasi ezala. Lokuta mabe, ngai moko mpe nayebaka mpenza te.”

Molakisi moko ya teoloji oyo ayokaki maloba wana akomaki ete “mateya ya malamu” oyo mokonzi wana ya lingomba azalaki koteya esimbaki mpenza motema na ye. Azalaki mpe na likanisi moko na moto moko ya mayele oyo akomaki boye: “Mokakatano oyo tozali na yango mpo na koyeba ntina ya bampasi ezali na kati ya mokakatano oyo tozali na yango mpo na koyeba Nzambe.” Kasi, ezali mpenza solo ete tokoki te koyeba ntina oyo Nzambe atiki nzela na mabe?

Ebandeli ya mabe

Liteya ya Biblia ekeseni na oyo bakonzi ya mangomba bazali koteya; Biblia elobi te ete tokoki te koyeba ntina oyo Nzambe atiki nzela na mabe. Likambo ya liboso oyo tosengeli kobosana te mpo na koyeba ntina ya mabe ezali ete Yehova akelaki mokili mabe te. Akelaki mwasi na mobali ya liboso na lisumu te, bazalaki bato ya kokoka. Yehova atalaki biloko oyo akelaki mpe amonaki ete mosala na ye ezalaki “malamu mingi.” (Genese 1:​26, 31) Mokano na ye ezalaki ete Adama na Eva bákómisa mokili mobimba lokola Paladiso ya Edene mpe bátondisa yango na bato oyo bakozala na bomoi ya esengo mpe oyo ye moko akozala mokonzi na bango mpe akobatela bango.​—⁠Yisaya 45:⁠18.

Ekelamu moko ya elimo nde ekɔtisaki mabe. Na ebandeli azalaki kotosa Nzambe, kasi na nsima akómaki na mposa ete básambelaka ye. (Yakobo 1:​14, 15) Mpo na kokokisa mposa mabe na ye wana, akitaki awa na mabele mpe abendaki mwasi na mobali ya liboso mpo báboya kotosa Nzambe. Nzambe alobaki na Adama na Eva polele ete bámeka te kolya to kosimba mbuma ya nzete ya koyeba malamu na mabe; na esika bátosa mobeko yango, bango babukaki mbuma yango mpe balyaki yango. (Genese 3:​1-6) Lokola basalaki likambo wana, batosaki Nzambe te mpe bamonisaki ete baboyi ye azala mokonzi na bango.

Ntembe moko ebimaki

Kozanga botosi ya bikelamu wana na Edene ebimisaki ntembe moko oyo etaleli bikelamu nyonso. Lokola bato batosaki mobeko ya Nzambe te, ezali lokola balobaki ete Yehova abongi te kozala mokonzi ya bikelamu na ye. Mozalisi, azalaki nde na lotomo ya kosɛnga ete bato bátosaka ye na makambo nyonso? Bato bakoki kozala na bomoi ya malamu koleka soki bazali kosala makambo na ndenge bango moko balingi?

Yehova amonisaki mbala moko bolingo na ye, bosembo na ye, bwanya na ye mpe nguya na ye mpo na kokata likambo yango ya koyeba soki ye abongi kozala mokonzi to te, mpe asalaki nyonso wana na ndenge oyo ebongi mpenza. Lokola azali na nguya mingi, akokaki koboma batomboki nyonso wana na mbala moko. Ekokaki komonana sembo, mpamba te Nzambe azalaki na lotomo ya kosala yango. Kasi, soki asalaki bongo, mituna oyo ntembe wana ebimisaki elingaki kozwa biyano te. Bato mosusu lelo oyo bakoki mpe koloba ete ebongaki Nzambe alimbisa kaka lisumu wana, yango elingaki komonisa bolingo. Soki asalaki bongo, elingaki koyebana te soki Satana alobaki solo to lokuta ntango alobaki ete bato bakozala na bomoi ya malamu koleka soki bazali kosala makambo na ndenge bango moko balingi. Longola yango, ozali komona te ete kosala bongo elingaki kolendisa bato mosusu na koboya nzela ya Yehova? Nsuka na yango elingaki kozala se mpasi likoló ya mpasi.

Na bwanya na ye, Yehova atikelaki bato mwa ntango mpo básala makambo na ndenge bango moko balingi. Atako yango esɛngaki atika nzela ete bampasi ezala mpo na mwa ntango, yango emonisi soki bato bakoki komitambwisa malamu kozanga Nzambe mpe kopona bango moko kati na malamu na mabe. Nyonso wana eboti mbuma nini? Banda moto apesá Nzambe mokɔngɔ, mokili ezalaka se na bitumba, bosembo ezalaka te, bato bazali se konyokwama mpe komona mpasi. Ndenge oyo makambo nyonso na nsuka ekomonisa polelepolele ete koboya kotosa Yehova ekoki komemela bato ata likambo moko ya malonga te, ekopesa mpe eyano mpo na libela na mituna oyo ebimisaki ntembe na Edene.

Liboso na yango, Nzambe amonisaki bolingo na ye na ndenge apesaki Mwana na ye, Yesu Klisto, moto oyo akabaki bomoi na ye lokola mbeka mpo na kobikisa bato. Yango esali ete bato ya botosi bálongwa na etumbu ya lisumu mpe liwa oyo kozanga botosi ya Adama ememaki. Lisiko efungoli nzela ya bomoi ya seko mpo na bato nyonso oyo bazali kondimela Yesu.​—⁠Yoane 3:⁠16.

Yehova apesi biso elaka oyo ezali kobɔndisa biso ete bato bakozala na mpasi mpo na libela te. Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Nsima na mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; okotala esika na ye, nde akomonana te. Nde bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.”​—⁠Nzembo 37:​10, 11.

Kimya mpe bolamu na mikolo oyo ezali koya

Ndenge oyo bisakweli ya Biblia ezali kokokisama ezali komonisa ete etikali moke Nzambe asukisa maladi, mawa mpe liwa. Yoane amonaki emonaneli moko mpo na kopesa ye mwa likanisi ya makambo oyo ekoya. Yoká ndenge oyo ye moko akomaki: “Namonaki likoló moko ya sika ná mabelé moko ya sika; mpo likoló ya kala mpe mabelé ya kala elekaki, mpe mbu ezali lisusu te. . . . Mpe Nzambe ye moko akozala elongo na [bato]. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.” Mpo na komonisa mpenza ete tokoki kotyela makambo yango motema, balobaki na Yoane boye: “Komá, mpamba te maloba oyo ezali sembo mpe solo.”​—⁠Emoniseli 21:​1-5.

Tokoloba boni mpo na ebele ya bato oyo basalaki likambo te oyo bakufá banda bato ya liboso baboyaki kotosa Nzambe na Edene? Yehova alakaki ete akozongisa bato oyo bakufá na bomoi. Ntoma Paulo alobaki boye: “Nazali na elikya epai ya Nzambe . . . ete ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Misala 24:15) Bakopesa bato yango libaku ya kozala na bomoi na mokili oyo “boyengebene ekofanda.”​—⁠2 Petelo 3:⁠13.

Tata oyo alingi mwana na ye akondima básala mwana yango lipaso moko oyo ekosala ye mpasi mingi, mpamba te ayebi ete na nsima, akokóma malamu mpo na ntango molai; ndenge moko mpe, Yehova atiki nzela ete bato bámona mpasi mpo na mwa ntango. Kasi, bato nyonso oyo balingi kosala mokano ya Nzambe bakozwa mapamboli ya libela. Paulo alimbolaki boye: “Bozalisi etyamaki na kati ya kozanga ntina, na mokano na yango moko te kasi na moto oyo atyaki yango, mpo na elikya oyo ete bozalisi yango moko mpe ekolongolama na boombo ya kopɔla mpe ekozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.”​—⁠Baloma 8:​20, 21.

Nsango yango ezali mpenza malamu; ekeseni na bansango oyo tolandaka na televizyo to totángaka na bazulunalo. Ezali nsango ya malamu mpenza oyo euti na “Nzambe ya kobɔndisama nyonso,” oyo amibanzabanzaka mpenza mpo na biso.​—⁠2 Bakolinti 1:⁠3.

[Bililingi na lokasa 6]

Ntango nyonso oyo eleki emonisi ete bato bakoki komitambwisa te kozanga Nzambe

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Libota moko ya bato ya Somalie: FƆTƆ YA ONU 159849/M. GRANT; bɔmbi: fɔtɔ ya USAF; kaa ya bakangami: fɔtɔ ya U.S. National Archives

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto