Liteya oyo tokoki kozwa na lisolo ya mbotama ya Yesu
BAMILIO ya bato basepelaka mingi na makambo oyo esalemaki na mbotama ya Yesu. Yango emonanaka na ebele ya bililingi ya Mbotama oyo balakisaka mpe na ebele ya bateyatre ya Mbotama oyo basalaka na mokili mobimba na eleko ya Noele. Atako esepelisaka bato mingi, makambo oyo esalemaki na mbotama ya Yesu ekomamaki na Biblia kaka mpo na kosepelisa bato te. Kasi, yango ezali nde kati na Makomami nyonso oyo epemamaki na Nzambe mpo na koteya mpe mpo na kosembola makambo.—2 Timote 3:16.
Soki Nzambe azalaki na mposa ete baklisto bákumisaka mbotama ya Yesu, mbɛlɛ Biblia eyebisi biso dati mpenza na yango. Dati yango epesamá? Nsima ya koloba ete Yesu abotamaki na ntango oyo babateli ya mpate bazalaki kobatela bampate na bango libándá na butu, Albert Barnes, moto moko ya mayele na makambo ya Biblia na ekeke ya 19, asukisaki na maloba oyo: “Yango emonisi polele ete Mobikisi na biso abotamaki liboso ya mwa 25 Desɛmbɛ . . . Na eleko wana malili ezalaka makasi, mingimingi na bamboka ya ngombangomba oyo ezali penepene na Beteleme. Nzambe abombi ntango oyo [Yesu] abotamaki. . . . Ntina mpe ya koyeba ntango yango ezali te; soki ntina ezalaka, mbɛlɛ Nzambe akomisá yango.”
Nzokande, bakomi nyonso minei ya Baevanzile bayebisi biso polelepolele mokolo oyo Yesu akufaki. Yango esalemaki na mokolo ya Elekeli, fɛti oyo ezalaki kosalema na mokolo ya 14 Nisana na manaka ya Bayuda, na ebandeli ya eleko ya molunge. Longola yango, Yesu apesaki bayekoli na ye etinda ya polele ete bámikundolaka mokolo yango mpo na kokanisa ye. (Luka 22:19) Biblia ezali na etinda ya ndenge wana te mpo na oyo etali kokumisa mokolo ya mbotama ya Yesu, ata mpe kokumisa mokolo ya mbotama ya moto mosusu. Likambo ya mawa, ntembe oyo ezali kobima na ntina ya dati ya mbotama ya Yesu ekoki kosala ete bato bábosana makambo ya ntina oyo esalemaki na ntango yango.
Baboti oyo baponami na Nzambe
Kati na ebele ya mabota oyo ezalaki na Yisalaele, Nzambe aponaki baboti ya lolenge nini mpo bábɔkɔla Mwana na ye? Atalelaki makambo lokola lokumu mpe bozwi ete yango nde ezali na ntina? Te. Yehova amonaki nde bizaleli ya elimo ya baboti yango. Zwá Luka 1:46-55 mpe talelá naino loyembo ya masanzoli oyo Malia ayembaki ntango bayebisaki ye ete azwi libaku malamu ya kokóma mama ya Masiya. Na ndakisa, alobaki boye: “Molimo na ngai ezali kokumisa Yehova . . . mpo atali ezalela mpamba ya mwana mwasi moombo na ye.” Amitalelaki na komikitisa mpenza lokola moto ya “ezalela mpamba,” mwana mwasi moombo ya Yehova. Likambo ya ntina koleka ezali ete maloba kitoko ya masanzoli oyo ezali na kati ya loyembo ya Malia emonisi ete azalaki moto ya elimo, oyo ayebaki Makomami malamu. Atako azalaki mosumuki mpo azalaki mwana ya Adama, azalaki mpenza moto oyo abongaki koponama mpo na kozala mama ya Mwana ya Nzambe awa na mabele.
Ezali boni mpo na mobali ya Malia, oyo akómaki tata mobɔkɔli ya Yesu? Yozefe azalaki moto moko oyo ayebaki mpenza mosala ya mabaya. Lokola azalaki na molende ya kosala mosala makasi na mabɔkɔ na ye moko, azalaki na makoki ya kokokisa bamposa ya libota na ye oyo ezalaki na bana mibali mitano mpe bana basi mibale to koleka. (Matai 13:55, 56) Yozefe azalaki mozwi te. Ntango ngonga ekokaki mpo Malia akende kolakisa mwana na ye ya liboso ya mobali na tempelo ya Nzambe, Yozefe asengelaki koyoka mpasi na motema mpo azalaki na makoki te ya kopesa mpate lokola mbeka. Na esika na yango, basalelaki nde likambo mosusu oyo mibeko ebongisaki mpo na babola. Mpo na oyo etali mama oyo auti kobota mwana ya mobali, mobeko ya Nzambe elobaki boye: “Soki na ntina na bobola na ye akoki kopesa mwana ya mpate te, mbɛlɛ akokamata bibenga mibale soki bana ya bibenga mibale, moko mpo na mbeka ya kotumba mpe mosusu mpo na mbeka ya lisumu, mpe nganga akozwela ye kozonga na bondeko mpe ye akozala pɛto.”—Levitike 12:8; Luka 2:22-24.
Biblia elobi ete Yozefe “azalaki moyengebene.” (Matai 1:19) Na ndakisa, tii ntango Yesu abotamaki, asangisaki nzoto te na mwasi na ye oyo ayebaki naino mibali te. Na boye, ntembe ekokaki kobima te mpo na oyo etali Tata ya solosolo ya Yesu. Ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te mpo na bato oyo bauti kobalana ete báfanda ndako moko kozanga kosangisa nzoto, kasi yango emonisaki ete bazalaki kotalela na motuya mingi libaku malamu oyo bazwaki ya koponama mpo na kobɔkɔla Mwana ya Nzambe.—Matai 1:24, 25.
Yozefe azalaki moto ya elimo lokola Malia. Mbula na mbula azalaki kokata mosala na ye mpo na kosala mobembo ya mikolo misato elongo na libota na ye, longwa na Nazalete tii na Yelusaleme, mpo na fɛti ya Elekeli oyo ezalaki kosalema mbula na mbula. (Luka 2:41) Emonani mpe ete Yozefe alakisaki elenge Yesu momeseno ya kosangana pɔsɔ na pɔsɔ na losambo oyo ezalaki kosalema na sinagoga ya mboka na bango, epai bazalaki kotánga mpe kolimbola Liloba ya Nzambe. (Luka 2:51; 4:16.) Na boye, ntembe ekoki kozala te ete Nzambe aponelaki Mwana na ye mama mpe tata mobɔkɔli ya malamu awa na mabele.
Lipamboli monene mpo na babateli ya mpate oyo bazalaki bato mpamba
Atako yango ezalaki mpasi mpo na mwasi na ye, oyo zemi na ye ekómaki sikoyo na sanza libwa, Yozefe akendaki na mboka ya bankɔkɔ na ye mpo na kokomisa nkombo na mikanda ya Leta, ndenge mobeko ya Kaisala esɛngaki yango. Ntango ye na mwasi na ye bakómaki na Beteleme, bakokaki kozwa esika ya kofanda te na kati ya engumba yango mpo etondaki na bato. Yango wana, lokola bazangaki esika ya kokende, bakendaki kofanda na ndako ya bibwɛlɛ, epai Yesu abotamaki mpe balalisaki ye na elyelo ya bibwɛlɛ. Mpo na kolendisa kondima na bango, Yehova alakisaki baboti yango, oyo bazalaki bato mpamba, ete mwana yango abotamaki mpenza na mokano na Ye. Mpo bándima likambo yango, atindelaki bango nde bankumu ya Beteleme? Te. Yehova ayebisaki likambo yango nde na babateli ya mpate ya molende, oyo bazalaki kolekisa butu mobimba libándá mpo na kobatela bitonga na bango.
Anzelu ya Nzambe abimelaki bango mpe alobaki na bango ete bákende na Beteleme, epai bakokuta Masiya oyo autaki kobotama “alali na elyelo ya bibwɛlɛ.” Bato mpamba yango bamonaki mabe to bamitungisaki ntango bayokaki ete Masiya oyo autaki kobotama azalaki na ndako ya bibwɛlɛ? Ata moke te! Mbala moko, batikaki bitonga na bango mpe bakendaki na Beteleme. Ntango bamonaki Yesu, bayebisaki Yozefe na Malia makambo oyo anzelu ya Nzambe alobaki. Na ntembe te, likambo yango endimisaki mpenza mobali yango na mwasi na ye ete makambo nyonso ezali kosalema se ndenge Nzambe alakaki. Bongo, “babateli ya mpate bazongaki, kopesáká Nzambe nkembo mpe kosanzoláká ye mpo na makambo nyonso oyo bayokaki mpe bamonaki.” (Luka 2:8-20) Ɛɛ, Yehova ayebaki mpenza kopona ndenge ayebisaki makambo na ye na babateli ya mpate oyo bazalaki kobanga Nzambe.
Nyonso oyo touti kolobela emonisi biso lolenge nini ya bato tosengeli kozala soki tolingi ete Yehova asepela na biso. Ezali na ntina te ete tóluka lokumu to bozwi mingi. Kasi, lokola Yozefe, Malia mpe babateli ya mpate, tosengeli nde kotosa Nzambe mpe kotya makambo ya elimo liboso ya makambo ya mosuni mpo na komonisa ye bolingo na biso. Ya solo mpenza, tokoki kozwa makambo ya malamu mpenza oyo ekoki kopesa biso liteya soki tozali komanyola likoló ya lisolo ya makambo oyo esalemaki ntango Yesu abotamaki.
[Elilingi na lokasa 7]
Lokola Malia apesaki bibenga mibale, yango emonisi nini?
[Elilingi na lokasa 7]
Nzambe aponaki koyebisa nsango ya mbotama ya Yesu na mwa ndambo ya babateli ya mpate oyo bazalaki bato mpamba