Ezalaki nde ntango ya Satana?
“SOKI tokanisi ndenge mabe etondaki na eleko ya mbula nkama oyo eleki, tokoki mpenza koloba ete ezalaki ntango ya Satana. Ezali na eleko mosusu te oyo bato bamonisaki makanisi mpe mposa makasi ya koboma ebele ya bato mosusu, kaka mpo bazali na loposo mosusu, bazali na lingomba mosusu to bazali na bomoi oyo ekeseni na oyo ya bango, lokola na eleko wana.”
Mokolo ya 26 Yanuali 1995, zulunalo moko (The New York Times) ekomaki makambo oyo outi kotánga; ezalaki na mikolo oyo bazalaki kokanisa mpo na mbala ya 50, mokolo oyo babimisaki bato oyo Banazi batyaki na babolɔkɔ atako basalaki likambo te. Banazi babomaki Bayuda soki milio motoba; yango ezali mokano mabe ya koboma bato ya ekólo moko mpo na kosilisa bango oyo eyebani mingi koleka mosusu nyonso banda mokili ebandá. Lisusu, pene na milio misato ya bato ya Pologne oyo bazalaki Bayuda te babomamaki.
Na buku na ye (Humanity—A Moral History of the Twentieth Century), Jonathan Glover alobaki boye: “Bato soki milio 86 bakufaki na bitumba kobanda na 1900 tii na 1989.” Abakisaki boye: “Bato bakufaki na bitumba oyo esalemaki na ekeke ya ntuku mibale na motángo oyo moto akoki kokanisa te. Kopesa mwayene ya bato oyo bakufaki ekoki te komonisa ndenge makambo esalamaki mpenzampenza, mpamba te bato mingi koleka (milio 58) bakufaki na bitumba mibale ya mokili mobimba. Nzokande, soki tokaboli motángo yango ya bakufi na boumeli ya eleko yango, ekomonana ete bato soki 2 500 bazalaki kokufa mokolo na mokolo, elingi koloba koleka bato 100 na ngonga mokomoko na boumeli ya mbula zomi na libwa.”
Yango wana bato balobaki ete ekeke ya 20 ezali moko ya bikeke oyo bato babomamaki koleka eleko mosusu nyonso oyo eleká. Na buku na ye (Hope Against Hope), Nadezhda Mandelstam akomaki boye: “Tomonaki ndenge oyo mabe elongaki mpe ndenge oyo bizaleli malamu etyolamaki mpe enyatamaki.” Na kowelana kati na malamu na mabe, tokoki nde koloba ete mabe elongi?
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Fɔtɔ ya U.S. Department of Energy