Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w19 Décembre lok. 14
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Ekobo
    Lamuká!—2015
  • Lolenge nini kolónga mpasi ya kobebisama
    Lamuká!—1993
  • Kobebisa basi: Makambo mazali kosalema
    Lamuká!—1993
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
w19 Décembre lok. 14

Mituna ya batángi

Biblia elobi ete esengeli batatoli bázala ata mibale mpo likambo endimama. (Mit. 35:30; Mib. 17:6; 19:15; Mat. 18:16; 1 Tim. 5:19) Kasi na nse ya Mibeko, soki “na zamba,” mobali moko akuti mwana mwasi oyo alakami na libala mpe asangisi na ye nzoto na makasi mpe mwasi yango agangi, mwasi azalaki na ngambo te, kasi mobali azalaki na ngambo ya ekobo. Lokola batatoli bazalaki te, mpo na nini mobali azalaki na ngambo ya ekobo, kasi mwasi te?

Na lisolo oyo ezali na Kolimbola Mibeko 22:25-27 esilaki koyebana ete mobali yango azalaki na ngambo, mpo ye moko andimaki. Mobeko wana ezalaki mpo na koluka komonisa ete mwasi azali na ngambo te. Tótala bavɛrsɛ ya pembenipembeni.

Bavɛrsɛ oyo ezali liboso elobeli mobali oyo asangisaki nzoto “na engumba,” na mwasi oyo alakami na libala. Na kosala bongo, azalaki na ngambo ya ekobo, mpo soki mwasi alakami na libala, ezalaki lokola abali. Bongo mpo na mwasi? ‘Mwana mwasi yango agangaki na engumba te.’ Soki agangaka, na ntembe te bato balingaki koyoka mpe koya kosalisa ye. Kasi agangaki te. Na yango, ye mpe azalaki na ngambo ya ekobo, ndenge moko na mobali yango.​—Mib. 22:23, 24.

Mobeko oyo elandi elobelaki likambo mosusu: “Nzokande, soki na zamba nde mobali akuti mwana mwasi oyo alakami libala, mpe mobali yango akangi ye mpe alali na ye, mobali oyo alali na ye asengeli kokufa kaka ye moko, mpe osengeli kosala mwana mwasi eloko te. Mwana mwasi yango asali lisumu oyo ebongi na liwa te, mpo likambo oyo ezali lokola ntango mobali moko atɛlɛmɛli moninga na ye mpe abomi mpenza ye, ɛɛ, abomi molimo. Mpo akutaki ye nde na zamba. Mwana mwasi oyo alakami libala agangaki, kasi moto ya kobikisa ye azalaki te.”​—Mib. 22:25-27.

Na likambo yango, bazuzi bazalaki kondimela mwasi. Na ndenge nini? Bazalaki kondima ete mbala mosusu “agangaki, kasi moto ya kobikisa ye azalaki te.” Na yango, asalaki ekobo te. Kasi, mobali wana azalaki na ngambo ya kosangisa na moto nzoto na makasi mpe ya ekobo mpo ‘akangaki [mwasi oyo alakami na libala] mpe alalaki na ye.’

Na yango, ata soki mobeko wana ezalaki nde koluka komonisa ete mwasi azali na ngambo te, lisolo yango emonisi polele ete mobali wana azalaki na ngambo ya kosangisa na moto nzoto na makasi mpe ya ekobo. Tokoki kotya motema ete bazuzi oyo bazalaki kosambisa bazalaki koluka koyeba likambo malamumalamu mpe kozwa ekateli oyo eyokani na mibeko oyo Nzambe azongelaki mbala na mbala na ndenge ya polele.​—Mib. 13:14; 17:4; Kob. 20:14.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto