Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/6 nk. 23-27
  • Esengo oyo eleki bisengo nyonso!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esengo oyo eleki bisengo nyonso!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomwana na ngai
  • Etumba ya Mibale ya mokili mobimba​—Ntango ya komekama
  • Nakɔti na mosala ya ntango nyonso
  • Mikakatano mpe matomba ya mosala ya kosakola
  • Bokabwani ya mawa
  • Nayekolaki solo ya Biblia na Roumanie
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tyá motema na yo na biloko ya motuya ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Natyaki miso mpe motema na ngai na libonza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mwa mokanda oyo ebongolaki bomoi na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/6 nk. 23-27

Lisolo ya bomoi

Esengo oyo eleki bisengo nyonso!

YA REGINALD WALLWORK

“Eloko moko te na mokili oyo ekokani na esengo oyo tozwaki na mosala ya Yehova lokola bamisionɛrɛ!” Namonaki mwa papye oyo ezalaki na maloba wana na kati ya mikanda ya mwasi na ngai mwa moke nsima ya liwa na ye na sanza ya Mai 1994.

SOKI nakanisi maloba wana ya Irene, namonaka lisusu mbula 37 ya esengo, oyo tolekisaki na mosala ya misionɛrɛ na Pérou. Tofandaki na ye libala ya esengo mpenza banda tobalanaki na Desɛmbɛ 1942​—mpe wana nde esika nasepeli kobanda lisolo na ngai.

Irene abɔkwamaki na libota moko ya Batatoli ya Yehova na Liverpool, na Angleterre. Bazalaki bana basi misato na libota na bango mpe tata na ye akufaki na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Na nsima, mama na ye abalaki Winton Fraser, mpe babotaki mwana ya mobali, oyo babengaki Sidney. Mwa moke liboso ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bakendaki kofanda na Bangor, na nɔrdi ya Pays de Galles, epai Irene azwaki batisimo na 1939. Sidney abatisamaki mbula moko liboso, mpe ye ná Irene basalaki mosala ya mobongisi-nzela​—mosakoli ya ntango nyonso—​na bokula ya nɔrdi ya Pays de Galles, banda na Bangor tii na Caernarvon, mpe na esanga ya Anglesey.

Na ntango wana, ngai nazalaki na lisangá ya Runcorn, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ pene na 20 na sudi-ɛsti ya Liverpool, epai nazalaki na mokumba oyo bazali kobenga lelo mokɛngɛli-mokambi. Na liyangani moko ya zongazonga, Irene ayaki kotuna ngai soki nakoki kopesa ye teritware, mpamba te asengelaki kofanda mwa mikolo epai ya Vera, ndeko na ye ya mwasi oyo azalaki kofanda na Runcorn ná mobali na ye. Ngai ná Irene tozalaki koyokana malamu na boumeli ya pɔsɔ mibale oyo alekisaki na engumba na biso, mpe na nsima, nazalaki mbala mingi kokende kotala ye na Bangor. Nazalaki na esengo mingi wikende moko ntango natunaki Irene libala mpe andimaki!

Ntango nazongaki na ndako mokolo ya lomingo, nabandaki mbala moko komibongisa mpo na libala na biso, kasi na mokolo ya mibale atindelaki ngai telegrame. Telegrame yango ezalaki na maloba oyo: “Limbisá ngai mpo nayebi ete telegrame oyo ekopesa yo mpasi na motema. Nazwi ekateli ete libala na biso esalema lisusu te. Nalimboli makambo nyonso na mokanda oyo ezali koya.” Nayokaki mpasi mingi na motema. Likambo nini lisusu esalemaki?

Mokanda ya Irene ekómaki mokolo oyo elandaki. Akomaki na kati ete azali kokende kosala mosala ya mobongisi-nzela na engumba ya Horsforth na etúká ya Yorkshire elongo na Hilda Padgett.a Alimbolelaki ngai ete eleki sanza 12, alakaki ete soki basɛngi ye akende kosakola epai nyonso mposa ya basakoli ezali mingi, akokende. Abakisaki boye: “Wana ezali lokola ndai oyo nalapaki liboso ya Yehova, mpe namoni kaka, lokola nalakaki ye liboso nayeba yo, nasengeli kokokisa yango.” Atako nazalaki na mawa na motema, nasepelaki mingi na bosembo na ye mpe nazongiselaki ye eyano na telegrame ete: “Likambo te kende. Nakozela yo.”

Ntango Irene azalaki na Yorkshire, bakatelaki ye etumbu ya bolɔkɔ ya sanza misato mpo aboyaki kopesa ekólo mabɔkɔ na etumba. Kasi nsima ya sanza 18, na Desɛmbɛ 1942, tobalanaki.

Bomwana na ngai

Na 1919 mama asombaki babuku Études des Écritures.b Na ntango wana, tata alobaki solo ete naino mama atángá ata buku moko te liboso; atako bongo, azwaki ekateli makasi ya koyekola mikanda wana malamumalamu elongo na Biblia na ye. Ayekolaki yango nyonso mpe na 1920 azwaki batisimo.

Tata azalaki na makambo makasimakasi te mpe azalaki kopekisa mama te kosala oyo alingi, ezala ata kolakisa nzela ya solo na bana na bango minei, elingi koloba ngai ná bandeko na ngai ya basi mibale, Gwen ná Ivy; mpe yaya na ngai ya mobali, Alec. Stanley Rogers ná Batatoli mosusu ya sembo ya Liverpool bazalaki koya kopesa masukulu na Runcorn, epai lisangá ya sika eumelaki te kobotama. Libota na biso ezalaki kokola na elimo nzela moko na lisangá.

Gwen azalaki kolanda mateya mpo na kozwa nkɔtisa na Lingomba ya Angleterre, kasi ntango kaka abandaki koyekola Biblia nzela moko ná Mama, atikaki kolanda mateya yango. Ntango sango ayaki kotala biso mpo na koyeba mpo na nini Gwen azali lisusu kokende malongi te, batunaki ye ebele ya mituna oyo akokaki koyanola te. Gwen atunaki ye ndimbola ya Libondeli ya Nkolo mpe nsukansuka ye moko alimbolelaki ye yango! Na nsuka, Gwen atángaki maloba ya 1 Bakolinti 10:21 mpe ayebisaki ye polele ete akoki lisusu te ‘kolya na mesa mibale.’ Ntango abimaki na ndako na biso, sango alobaki ete akobondela mpo na Gwen mpe akoya lisusu mpo na kopesa ye biyano na mituna na ye, kasi azongá lisusu ata mokolo moko te. Mosika te nsima ya kozwa batisimo, Gwen akómaki mobongisi-nzela.

Na lisangá na biso, bazalaki mpenza komibanzabanza mpo na bilenge. Nabosanaka te lisukulu oyo nkulutu moko ayaki kopesa na lisangá na biso ntango nazalaki na mbula nsambo. Nsima ya makita, nkulutu yango ayaki kosolola na ngai. Nayebisaki ye ete nazalaki kotánga lisolo ya Abalayama, ndenge alingaki kokaba mwana na ye Yisaka lokola mbeka. Alobaki na ngai ete: “Matá na estrade mpe bɛtɛlá ngai lisolo yango mobimba.” Ezalaki esengo monene mpenza mpo na ngai kotɛlɛma wana mpo na kosala oyo nakoki kobenga “lisukulu” na ngai ya liboso!

Nazwaki batisimo ntango nazalaki na mbula 15, na 1931, mbula oyo mama akufaki; nalongwaki na kelasi mpe nakómaki koyekola mosala ya kobongisa kura. Na 1936, bazalaki koyokisa bato masukulu na bafono, mpe ndeko mwasi moko ya mobange alendisaki ngai ná yaya na ngai ya mobali tómipesa na mosala yango. Yango wana, ngai ná Alec tokendaki na Liverpool kosomba velo mpe tosalisaki kɛsi moko mpo na komema fono, totyesaki yango bapine mpo tóbendaka yango na velo. Totyaki ekoliseli-lolaka na nsima ya kɛsi yango, na nsɔngɛ ya tiyo moko oyo tokokaki koyeisa yango mokuse to molai. Mekanisyɛ ayebisaki biso ete naino asalá eloko ya ndenge wana te, kasi esimbaki mpenza! Topesaki litatoli na teritware na biso na esengo mpenza, mpe tozalaki na botɔndi mingi na ndenge ndeko wana ya mwasi alendisaki biso mpe mpo na mikumba oyo bapesaki biso.

Etumba ya Mibale ya mokili mobimba​—Ntango ya komekama

Ntango ekómaki komonana mpenza ete etumba elingi kobanda, ngai ná Stanley Rogers tozalaki kosala piblisite ya lisukulu “Bosolo ya makambo,” oyo esengelaki kosalema mokolo ya 11 Sɛtɛmbɛ 1938 na ndako monene ya makita babengi Royal Albert Hall, na Londres. Na nsima, ntango babimisaki lisukulu yango na mwa buku, ngai mpe nakabolaki yango elongo na mwa buku mosusu oyo motó ya likambo na yango ezalaki Fascisme ou liberté, oyo ebimaki na mbula oyo elandaki. Mwa babuku yango mibale ezalaki koloba polele mpenza ete Allemagne ya ntango ya Hitler ezalaki na mokano ya koyangela mokili mobimba. Na ntango wana, nayebanaki mingi na Runcorn mpo na mosala na ngai ya kosakola mpe, mpo na yango, bato bazalaki kopesa ngai limemya mingi. Kutu, lokola nazalaki ntango nyonso kozonga nsima te na mosala ya kosakola, yango esalisaki ngai mingi na nsima.

Kompanyi epai nazalaki kosala ezwaki kontra ya kotya kura na izini moko ya sika, oyo ezalaki na nɔrdi ya engumba. Ntango nayebaki ete izini yango ekobanda kosala bibundeli, nayebisaki polele ete nakoki kosala kuna te. Atako bankóló kompanyi bamonaki mabe, kapita na ngai akɔtelaki ngai mpe bapesaki ngai mosala mosusu. Nayaki koyeba nsima ete tata-mwasi na ye moko azalaki mpe Motatoli ya Yehova.

Moninga na ngai moko ya mosala alendisaki ngai mingi ntango alobaki ete: “Reg, toyebaki kaka ete, lokola oumeli mingi na mosala ya koteya Biblia, okolinga te kosala mosala ya ndenge wana.” Kasi, nasengelaki kozala ekɛngɛ mpamba te baninga na ngai mingi ya mosala bazalaki kolukela ngai mindɔndɔ.

Na Yuni 1940, tribinale ya Liverpool endimaki kotya ngai na molɔngɔ ya bato oyo lisosoli na bango epekisaka bango kosala mosala ya soda, kasi balobaki na ngai ete yango ekoki kozala bongo kaka soki natiki te mosala ya kura oyo nazali kosala. Yango epesaki ngai nzela ya kokoba mosala na ngai ya kosakola.

Nakɔti na mosala ya ntango nyonso

Ntango etumba ekómaki na nsuka, nazwaki ekateli ya kotika mosala oyo nazalaki kosala mpe nalandaki Irene na mosala ya ntango nyonso. Na 1946, natongaki wagɔ moko ya mɛtrɛ 5, oyo ekómaki ndako na biso; mpe na mbula oyo elandaki, basɛngaki biso tókende na Alveston, mboka moko na etúká ya Gloucestershire. Na nsima, tosalaki mosala ya mobongisi-nzela na engumba ya Cirencester mpe na engumba ya Bath. Na 1951, bapesaki ngai mokumba ya mokɛngɛli ya zongazonga mpo na kotalaka masangá na sudi ya etúká ya Pays de Galles, kasi liboso mbula mibale ekoka, tokendaki na Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, mpo na kozwa formasyo mpo na mosala ya misionɛrɛ.

Kelasi ya mbala ya 21 ya eteyelo yango esalemaki na South Lansing, na nɔrdi ya etúká ya New York, mpe tozwaki diplome na 1953 na liyangani ‘Ebongiseli ya mokili ya sika’ oyo esalemaki na engumba New York. Tii mokolo oyo tozwaki diplome na biso, ngai ná Irene toyebaki te epai nini bakotinda biso. Tozalaki na esengo mpenza ya koyoka ete batindi biso na Pérou. Mpo na nini toyokaki esengo? Mpamba te leki ya Irene, Sidney Fraser ná mwasi na ye, Margaret, bazalaki kosala na biro ya filiale ya Lima koleka mbula mobimba, banda bazwaki diplome na kelasi ya mbala ya 19 na Eteyelo ya Gileadi!

Ntango tozalaki kozela baviza na biso, tolekisaki mwa ntango moke na Betele ya Brooklyn, kasi mosika te tokendeki na Lima. Mboka ya liboso na kati ya bamboka zomi oyo batindaki biso lokola bamisionɛrɛ ezalaki Callao, oyo ezali libongo ya masuwa oyo eleki monene na Pérou, na wɛsti ya Lima. Atako toyekolaki mwa maloba ya Espagnol, na ntango wana, ezala ngai to Irene tozalaki naino na likoki ya kosolola na monɔkɔ yango te. Ndenge nini tokokaki kosala mosala na biso?

Mikakatano mpe matomba ya mosala ya kosakola

Na Gileadi bayebisaki biso ete mama alakisaka mwana koloba te. Kasi, mwana ayekolaka koloba ntango mama na ye azali koloba na ye. Yango wana, bapesaki biso toli oyo, “Bóbima mbala moko na mosala ya kosakola mpe bóyekola monɔkɔ epai ya bato ya mboka. Bakosalisa bino.” Kanisá naino ndenge namiyokaki ntango nazalaki naino kobunda mpo na koyekola monɔkɔ yango, bapesaki ngai mokumba ya mokɛngɛli-mokambi na lisangá ya Callao, kaka nsima ya pɔsɔ mibale ya kokóma na biso! Nakendaki kotala Sidney Fraser, kasi ye azongelaki kaka toli oyo bapesaki biso na Gileadi​—bósololaka mingi na bato ya lisangá mpe na bato ya teritware na bino. Nazwaki mokano ya kosalela toli yango.

Mokolo moko ya pɔsɔ na ntɔngɔ, nakutanaki na mosali moko ya mabaya na esika na ye ya mosala. Alobaki na ngai ete: “Ngai nazali kosala mosala na ngai, kasi yo fandá wana oyebisa ngai makambo ozali na yango.” Nayebisaki ye ete likambo te, kasi nakosɛnga yo eloko moko: “Soki nasali libunga ntango nazali koloba, osembola ngai. Nakomona yango mabe te.” Asɛkaki mpe andimaki ete akosala bongo. Nazalaki kokende kotala ye mbala mibale na pɔsɔ mpe namonaki ete, kaka ndenge bayebisaki ngai, yango ezalaki lolenge oyo ebongi mpenza mpo na kosalisa ngai nayeba monɔkɔ yango ya sika.

Na Ica, mboka ya mibale oyo batindaki biso, nazwaki libaku malamu ya kokutana lisusu na mosali ya mabaya mpe nayebisaki ye ndenge nazalaki kosala na mosali ya mabaya mosusu na Callao. Andimaki kosalisa ngai ndenge yango mpe, boyebi na ngai ya Espagnol ezalaki se kokola, atako esɛngaki mbula misato mobimba liboso nayeba koloba yango malamu. Moto yango azalaki ntango nyonso na mosala ya kosala, kasi nasalaki nyonso mpo na koyekola na ye Biblia; nazalaki kotángela ye Makomami mpe kolimbolela ye yango. Pɔsɔ mosusu, ntango nakendaki kotala ye, patrɔ na ye ayebisaki ngai ete akei na Lima mpo azwi mosala ya sika kuna. Nsima ya mwa mikolo, ntango ngai ná Irene tokendaki na liyangani moko na Lima, nakutanaki lisusu na moto yango. Nazalaki mpenza na esengo ya koyoka ete alukaki Batatoli ya Lima mpe akobaki koyekola, mpe ye ná libota na ye mobimba bakómaki basaleli ya Yehova oyo bamipesi!

Na lisangá moko, tomonaki ete mobali moko ná mwasi na ye bazwaki batisimo, atako bazalaki kaka bamakango. Ntango totalelaki na bango mitinda ya Biblia mpo na libala, bazwaki ekateli ya kokomisa libala na bango na buku ya Leta, mpo bákokisa masɛngami ya Batatoli oyo bazwi batisimo. Nayokanaki na bango ete namema bango na Hôtel de ville mpo bákomisa libala na bango. Kasi mokakatano mosusu ebimaki kuna, mpamba te bazalaki na bana minei oyo bakomisaki bango mpe na mikanda ya Leta te ndenge mibeko ezali kosɛnga. Tokómaki komituna soki guvɛrnɛrɛ akozwa meko nini. Guvɛrnɛrɛ alobaki ete: “Lokola bato malamu oyo, baninga na bino Batatoli ya Yehova, basali makasi mpo bókomisa libala na bino na buku ya Leta, nakolukela bino mindɔndɔ mosusu te ete bófuta lomande mpo na mwana mokomoko ndenge esengeli, kasi nakokoma bango ofele.” Tozalaki na botɔndi mingi mpamba te, lokola libota yango bazalaki babola, soki bafutisaki bango ata mwa lomande moke, elingaki kokómela bango mokumba monene!

Na nsima Albert Schroeder, oyo autaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, ayaki kotala biso mpe asɛngaki ete bátya ndako mosusu ya bamisionɛrɛ na kartye mosusu ya engumba Lima. Yango wana ngai ná Irene elongo na bandeko basi mibale, Frances ná Elizabeth Good oyo bautaki na États-Unis, bakisa mpe ndeko mobali moko ná mwasi na ye, oyo bautaki Canada, tokendaki na komine ya San Borja. Nsima ya mbula mibale to misato, tobimisaki lisangá monene ya sika.

Ntango tozalaki kosala na engumba Huancayo, oyo ezalaki likoló ya ngomba ya mɛtrɛ koleka 3 000 na katikati mpenza ya mikili ya bangomba, tozalaki na lisangá ya engumba yango oyo ezalaki na basakoli 80. Kuna, nazwaki mokumba ya kotambwisa misala ya kotonga Ndako ya Bokonzi ya mibale na ekólo Pérou. Baponaki ngai nazala momonisi ya Batatoli ya Yehova epai ya bakonzi, mpamba te tosengelaki kokende na tribinale mbala misato mpo na kosalisa mikanda ya mabelé oyo tosombaki. Makambo wana, bakisa mpe mosala monene ya kokómisa bato bayekoli oyo ebele ya bamisionɛrɛ ya sembo bazalaki kosala na bambula wana, efungolaki mpenza nzela mpo na bokoli oyo tozali komona lelo oyo na Pérou​—na 1953, Batatoli bazalaki 283, kasi lelo oyo bazali koleka 83 000.

Bokabwani ya mawa

Na bandako nyonso ya bamisionɛrɛ oyo tofandaki, tozalaki koyokana malamu mpenza na baninga na biso, mpe mbala mingi ngai moto nazalaki na mokumba ya mokɛngɛli ya ndako. Mokolo nyonso ya yambo na pɔsɔ, tozalaki kosala mwa likita mpo na kolobela ndenge tokosala mosala ya kosakola na pɔsɔ oyo tobandi, mpe mpo na kokabola misala ya ndako. Biso nyonso tozalaki komona ete likambo ya liboso mpenza mpo na biso ezali mosala ya kosakola, yango wana tozalaki kopesana mabɔkɔ mpe kosala na bomoko. Nazalaka na esengo mingi soki nakanisi ete na bandako nyonso oyo tofandaki, tozwaná mpenza matata na bandeko te.

Esika ya nsuka oyo batindaki biso ezalaki Breña, kartye mosusu ya Lima. Lisangá na yango oyo ezalaki na basakoli 70 ekolaki nokinoki tii ekómaki na basakoli koleka 100, mpe nsukansuka lisangá mosusu ebotamaki na Palominia. Na ntango yango nde Irene akómaki kobɛla. Liboso nazalaki komona ete azalaki mbala mosusu koyeba lisusu te makambo oyo ye moko azalaki koloba, mpe na nsima akómaki kobunga nzela ya ndako. Atako azalaki kozwa lisalisi ya monganga ya malamu mpenza, maladi na ye ezalaki se kokóma makasi.

Likambo ya mawa, na 1990 nasengelaki koluka nzela mpo tózonga na Angleterre, epai ndeko na ngai ya mwasi, Ivy, ayambaki biso na ndako na ye na boboto mpenza. Nsima ya mbula minei, Irene akufaki na mbula 81. Nakobi na mosala ya ntango nyonso mpe nazali nkulutu na lisangá moko ya engumba na biso oyo ezali na masangá misato. Mbala na mbala, nakendaka na Manchester kolendisa etuluku moko oyo ezali kuna ya bandeko oyo balobaka Espagnol.

Eumeli naino mingi te, nazwaki nsango moko ya esengo mpenza, yango etaleli likambo moko oyo ebandaki bambula ebele liboso, ntango nazalaki koyokisa bato masukulu ya miniti mitano na fono na ngai. Nazali komona lisusu elenge mwasi moko oyo atɛlɛmaki na nsima ya mama na ye na monɔkɔ ya ndako mpe azalaki kolanda nsango oyo nazalaki koyokisa bango.

Na nsima, mwana mwasi yango akendaki na Canada mpe bazalaki kotindelana mikanda na moninga na ngai moko, oyo azalaka tii lelo na Runcorn mpe akómá Motatoli. Na mikolo euti koleka, mwana mwasi yango akomelaki ye ete Batatoli mibale bakendaki kotala ye na ndako mpe, na lisolo na bango, basalelaki maloba oyo ezongisaki makanisi na ye na makambo oyo ayokaká na lisukulu ya miniti mitano na fono. Amonaki ete mateya yango ezali solo; yango wana, lelo oyo azali mosaleli ya Yehova oyo amipesi, mpe asɛngaki na moninga wana ete akómisa matɔndi na ye epai ya elenge mobali oyo ayaki na ndako ya mama na ye eleki sikoyo mbula 60! Ya solo mpenza, tokoki koyeba te ndenge nini mboto ya solo ekozwa misisa mpe ekokola.​—Mosakoli 11:6.

Nazalaka na botɔndi mingi soki nakanisi ndenge nalekisi bomoi na ngai na mosala kitoko ya Yehova. Banda namipesá na Nzambe na 1931, nazangisá ata liyangani moko te ya basaleli ya Yehova. Atako ngai ná Irene tobotá te, nazali na esengo ya kozala na bana mibali mpe bana basi ya elimo koleka 150, oyo bazali bango nyonso kosalela Yehova, Tata na biso ya likoló. Kaka ndenge mwasi na ngai ya bolingo alobaki yango, mabaku malamu oyo tozwaki na mosala na biso ezalaki esengo oyo eleki bisengo nyonso.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lisolo ya bomoi ya Hilda Padgett, na motó ya likambo: “Nalandaki matambe ya baboti na ngai,” ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1995, nkasa 19-24.

b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 24]

Mama, na ebandeli ya bambula ya 1900

[Elilingi na lokasa 25]

Na lobɔkɔ ya mwasi: Hilda Padgett, ngai, Irene mpe Joyce Rowley, na engumba Leeds, na Angleterre, na 1940

[Elilingi na lokasa 25]

Na likoló: Ngai ná Irene liboso ya wagɔ oyo ekómaki ndako na biso

[Elilingi na lokasa 27]

Nazali kosala piblisite ya lisukulu, na engumba Cardiff, na Pays de Galles, 1952

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto