Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/4 nk. 20-25
  • Nayekolaki solo ya Biblia na Roumanie

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nayekolaki solo ya Biblia na Roumanie
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bileko ya mpasi
  • Mposa na ngai mpo na solo ya Biblia
  • Solo ya Biblia epalangani na Roumanie
  • Na États-Unis
  • Ebandeli ya mosala na biso na États-Unis
  • Kosembolama oyo nasengelaki na yango
  • Bomoi na ntango nkita ekweaki
  • Tobateli kondima na biso
  • Bandeko na biso ya sembo na Roumanie
  • Solo ezali ntango nyonso na motuya na miso na ngai
  • Nazali na esengo ya “kokende mosika”
    Lamuká!—2005
  • Esengo oyo eleki bisengo nyonso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Amemaki pole na bamboka mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Nazali na esengo mpe na botɔndi atako nakufelaki mobali
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/4 nk. 20-25

Nayekolaki solo ya Biblia na Roumanie

LISOLÓ YA GOLDIE ROMOCEAN

Na 1970, nakendaki kotala bandeko na ngai na Roumanie mpo na mbala ya liboso nsima ya kolekisa pene na mibu 50. Bato bazalaki na nsé ya boyangeli mabe ya Koministe, mpe ntango nyonso bato bazalaki kopesa ngai toli ete nasengeli kosɛnzɛla maloba na ngai. Na yango, wana nazalaki na biro ya Letá na mboka na biso, mosali ya Letá asengisaki ngai ete nábima na ekólo yango nokinoki. Liboso ete nalimbwela bino ntina, tiká naino naloba lolenge nayekolaki solo ya Biblia na Roumanie.

NABOTAMA na mokolo ya 3 Mársi 1903, na mboka Ortelec na nɔ́rdi-wɛ́sti ya Roumanie pene na engumba Zalău. Tozalaki kofanda na ezingelo moko kitoko. Mai mpe mopɛpɛ ezalaki pɛto. Biso moko tozalaki kolóna biloko na biso ya kolya mpe tozangaki eloko te na mosuni. Na bomwana na ngai, ekólo ezalaki na kimya.

Bato balingaki mingi makambo ya Nzambe. Kútu, libota na biso ezalaki na basangani ya mangomba misato. Moko kati na bankɔkɔ na ngai ya basi azalaki mosangani ya lingomba ya Katolike Ortodoksi, mosusu azalaki na lingomba ya Adventiste, mpe baboti na ngai bazalaki basangani ya lingomba ya Baptiste. Lokola nazalaki kosepela ata na moko na mangomba na bango te, bandeko na biso bazalaki koloba ete nakokóma moto oyo andimaka te ete Nzambe azali. Ngai nazalaki komiloba ete ‘soki Nzambe azali sé moko, esengeli kozala bobele na lingomba moko​—kasi misato te na libota moko.’

Makambo namonaki na lingomba mabulunganisaki ngai. Na ndakisa, sángó azalaki kotambola na bandako mpo na kokongola mpako ya eklezia. Soki bato bazali na mbongo te ya kopesa, azalaki kokamata na esika na yango babolangiti na bango. Na ndakonzambe ya Katolike, namonaki nkɔkɔ na ngai ya mwasi kokumbama liboso ya ekeko ya Malia mpo na kosambela. Nazalaki komituna ete ‘Mpo na nini kosambela ekeko?’

Bileko ya mpasi

Na 1912, tata akendaki na États-Unis koluka mbongo mpo na kofuta nyongo. Mwa moke na nsima etumba ebandaki, mpe mibali ya mboka na biso bakendeki kobunda​—bobele basi, bana mpe mibangé nde batikalaki. Mboka na biso ekómaki na nsé ya boyangeli ya ekólo Hongrie na boumeli ya mwa ntango, kasi basodá ya Roumanie bazongaki mpe babɔtɔlaki mboka yango na mabɔkɔ ya bapaya. Basɛngisaki biso ete tólongwa nokinoki na esika yango. Nzokande, kati na mobulungano wana mpe na lombangu ya kotya biloko mpe bana mike na likalo oyo bangombe ebendaka, batikaki ngai. Mpamba te nazalaki mokóló kati na bana mitano.

Nakimaki mbangu epai na moninga moko ya kartyé, mobangé mobali moko oyo atikalaki na nsima, mpe alobaki ete: “Kendá na ndako. Kangá bikuke na bino, mpe kokɔtisa moto kuna te.” Nokinoki natosaki. Nsima ya kolya mwa nsɔsɔ mpe ndunda oyo etikalaki na ndenge balongwaki na lombangu, nafukamaki pene na mbeto na ngai mpe nabondelaki. Nokinoki nayokaki mpɔngi makasi mpe nalalaki.

Ntango nafungolaki miso, moi esilaki kobima, mpe nalobaki ete: “Natɔ́ndi yo, ɛɛ Nzambe! Nazali na bomoi!” Bifelo bitondaki na madusu ya masasi, mpamba te bazalaki kobɛta masasi butu mobimba. Ntango mama asosolaki na mboka oyo elandi ete nazalaki esika moko na bango te, atindaki elenge mobali moko na nkombo George Romocean, ayaki kozwa ngai mpe amemaki ngai esika libota na biso ezalaki. Eumelaki mingi te tozongaki na mboka na biso mpe tofandaki lisusu wana.

Mposa na ngai mpo na solo ya Biblia

Mama na ngai alingaki ete názwa batisimo na lingomba ya Baptiste, kasi ngai nasepelaki na yango te mpamba te nakokaki kondima te ete Nzambe ya bolingo atumbaka bato na lifelo libela na libela. Mpo na komeka kolimbwela ngai, mama alobaki ete: “Ɛɛ, soki bazali bato mabe.” Kasi nayanolaki ye ete: “Soki bazali bato mabe, malamu koboma bango, kasi konyokola bango te. Ngai nakoki ata moke te konyokola mbwa to nyau.”

Nazali komikundola ete, na mokolo moko kitoko na eleko ya prɛntá, wana nazalaki na mibu 14, Mama atindaki ngai ete nákende koleisa bangombe na elanga. Wana nalalaki na matiti penepene na mongálá, mpe zamba ezalaki komonana na mosika na ngámbo, natombolaki miso likoló mpe nalobaki ete: “Nzambe, nayebi ete ozali kuna, kasi nalingi ata lingomba moko kati na mangomba oyo te. Osengeli kozala na lingomba bobele moko ya malamu.”

Nandimi solo ete Nzambe ayokaki libondeli na ngai mpamba te bobele na eleko ya molungé ya mbula wana, 1917, Bayekoli ya Biblia (lolenge bazalaki kobénga Batatoli ya Yehova na ntango wana) bayaki na mboka na biso. Bazalaki ba colporteurs, to baministre ya ntango nyonso, mpe bayaki na ndakonzambe ya lingomba ya Baptiste wana mísa ezalaki kosalema.

Solo ya Biblia epalangani na Roumanie

Mwa bambula liboso, na 1911, Carol Szabo mpe Josif Kiss, baoyo bakómaki Bayekoli ya Biblia na États-Unis, bazongaki na Roumanie mpo na kokɔtisa solo ya Biblia kuna. Bafandaki na engumba Tîrgu-Mureş, na ntáká ya pene na kilomɛtɛlɛ 160 na súdi ya mboka na biso. Na boumeli ya mwa bambula, bankámá mingi ya bato bayambaki malamu nsango ya Bokonzi mpe bandimaki mosala ya boklisto.​—Matai 24:14.

Na yango, ntango bilenge Bayekoli ya Biblia wana mibale bayaki na ndakonzambe ya lingomba ya Baptiste na Ortelec, mboka na biso, George Romocean, oyo atako azalaki bobele na mibu 18 ya kobotama, azalaki koteya na lingomba ya Baptiste mpe azalaki komeka kopesa ndimbola ya mokapo ya Baloma 12:1. Na nsuka, moko na bilenge ba colporteurs atɛlɛmaki mpe alobaki ete: “Bandeko, baninga, ntoma Paulo alingi koyebisa biso nini na mokapo oyo?”

Ntango nayokaki yango, natondaki na esengo! Namilobaki ete ‘Bato oyo basengeli koyeba lolenge ya kolimbola Biblia.’ Kasi mingi kati na baoyo bazalaki wana bangangaki ete: “Basakoli ya lokuta! Toyebi bino malamu!” Babimisaki makɛlɛlɛ mingi. Kasi, tata ya George atɛlɛmaki mpe alobaki ete: “Bino banso bófanda nyɛɛ! Oyo ezali ezaleli nini​—ezali mpo ete bakɔtisi bino makanisi mabe? Soki bato oyo bazali na likambo ya koyebisa biso mpe bolingi koyoka bango te, nabyangi bango na ndako na ngai. Boye moto nyonso oyo akosepela akoki koya.”

Na esengo nyonso, nakimaki mbango na ndako mpe nayebisaki mama makambo oyo masalemaki. Nazalaki moko na baoyo bandimaki libyangi ya kokende na ndako ya Romocean. Oyo nde esengo nazalaki na yango na mpokwa wana ya koyoka uta na Biblia ete lifelo ya mɔ́tɔ ezali te mpe ya komona kati na Biblia na ngai moko na lokótá ya Roumain nkombo ya Nzambe, Yehova! Ba colporteurs bazwaki ebongiseli mpo ete Moyekoli moko ya Biblia ayaka na ndako ya Romocean na mikolo nyonso ya lomingo mpo na koteya biso. Na eleko ya molungé oyo elandaki, wana nazalaki na mibu 15, nazwaki batisimo lokola elembo ya komipesa na ngai epai na Yehova.

Na nsima, pene na basangani nyonso ya libota na biso mpe libota ya Romocean tondimaki solo ya Biblia mpe tomipesaki na Yehova. Bato mosusu mingi ya mboka na biso basalaki mpe bongo, bakisá bilenge babalani oyo ndako na bango esalelamaki kala lokola ndakonzambe ya lingomba ya Baptiste. Na nsima bakomisaki yango esika oyo Bayekoli ya Biblia bazalaki koyangana mpo na koyekola. Solo ya Makomami epalanganaki nokinoki na bamboka ya nzinganzinga, mpe na 1920 ezalaki na basakoli ya Bokonzi pene na 1 800 na Roumanie!

Na États-Unis

Tozalaki mpenza na mposa ya koyebisa tata na ngai, Peter Prodan, makambo oyo tosilaki koyekola. Kasi, likambo ya kokamwa, liboso ete tózwa libaku ya kokomela ye, tozwaki nkomá na ye oyo kati na yango ayebisaki biso ete asilaki kokóma mosaleli ya Yehova oyo azwi batisimo. Ayekolaki na Bayekoli ya Biblia na engumba Akron, na etúká ya Ohio, mpe alingaki ete biso banso tokende epai ye azalaki na États-Unis. Nzokande, mama aboyaki kolongwa na Roumanie. Na yango, na 1921, na lisalisi ya mbongo oyo tata asilaki kotindela ngai, nakendeki epai ye azalaki na engumba Akron. George Romocean mpe ndeko na ye ya mobali basilaki kokende na États-Unis mbula moko liboso ete ngai nakende.

Ntango nakómaki na masuwa na esanga Ellis, pene na engumba New York, mosali na biro etali boingeli ya bapaya ayebaki lolenge ya kobongola nkombo na ngai Aurelia na Lingelesi te, na yango alobaki ete: “Okobanda kobéngama Goldie.” Yango ekómá nkombo na ngai kino lelo. Mwa moke na nsima, na mokolo ya 1 Máí 1921, ngai na George Romocean tobalanaki. Pene na mbula moko na nsima, tata azongaki na Roumanie mpe na 1925 ayaki na engumba Akron ye na Marie, leki na ngai ya mwasi. Na nsima tata azongaki libela na Roumanie mpo na kofanda na mama mpe libota mobimba oyo etikalaki kuna.

Ebandeli ya mosala na biso na États-Unis

George azalaki mosaleli ya sembo mpenza mpe oyo amipesi mobimba na Yehova. Kati na mibu 1922 mpe 1932, tozwaki lipamboli ya kobota bana ya basi minei ya kitoko mpenza​—nkombo na bango Esther, Anne, Goldie Elizabeth, mpe Irène. Lisangá moko ya lokótá ya Roumain esalemaki na engumba Akron, mpe na ebandeli, makita mazalaki kosalema na ndako na biso. Mpe, mbala na mbala nsima ya sanza motoba, momonisi ya biro monene ya Bayekoli ya Biblia na Brooklyn, na engumba ya New York, azalaki koya kotala lisangá na biso na boumeli ya mwa mikolo.

Mikolo mingi ya lomingo tozalaki komipesa na mosala ya kosakola mokolo mobimba. Tozalaki kobongisa basakosi na biso ya babúku mpe bilei ya midi, tozalaki kotya bana na motuka Ford, mpe tozalaki kolekisa mokolo mobimba na kosakoláká na teritware ya bamboka mikemike. Boye na mpokwa, tozalaki kosangana na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Bana na biso bakómaki kolinga mosala ya kosakola. Na 1931, nazalaki na engumba Colombus, na etúká ya Ohio, ntango Bayekoli ya Biblia bandimaki nkombo na bango ya sika: Batatoli ya Yehova.

Kosembolama oyo nasengelaki na yango

Mwa bambula moke na nsima, nayokelaki Joseph F. Rutherford nkanda, ye azalaki ntango wana prezidá ya la Société Watch Tower. Motatoli moko oyo autaki kozwa batisimo sika amonaki ete ndeko Rutherford asalelaki ye makambo na boboto te, mpamba te atyaki likebi te na mokakatano na ye. Nakanisaki ete ndeko Rutherford azalaki na libunga. Na yango, na mokolo ya lomingo moko ndeko na ngai ya mwasi Marie mpe mobali na ye, Dan Pestrui, bayaki kotala biso. Nsima ya kolya Dan alobaki ete: “Tómibongisa mpo na kokende na makita.”

Nalobaki ete: “Tokokende lisusu makita te, tozali na nkanda mpo na ndeko Rutherford.”

Dan azingaki mabɔkɔ na ye na mokɔngɔ mpe atambolaki mwa moke na nsima mpe azongaki liboso, mpe na nsima alobaki ete: “Oyebaki ndeko Rutherford ntango ozwaki batisimo?”

Nayanolaki ete: “Ata moke te, oyebi ete nazwaki batisimo na ngai na Roumanie.”

Atunaki ete, “Mpo na nini ozwaki batisimo?”

Nayanolaki ete: “Ezali mpo ete nayekolaki ete Yehova azali Nzambe ya solo, mpe nalingaki komipesa mpo na kosalela ye.”

Alobaki ete: “Kobosana yango soko moke te!” “Okanisi boni soki ndeko Rutherford atiki solo, yo mpe okotika yango?”

Nalobaki ete: “Soko moke te!” Yango etindaki ngai ete nákanisa malamu, mpe nalobaki: “Bino banso bómibongisa mpo ete tokende na makita.” Mpe banda wana totikaki lisusu koyangana te. Nazalaki na botɔ́ndi mingi epai na Yehova mpo na kosembolama wana ya bolingo oyo epesamelaki ngai na nzela ya sɛmɛki na ngai!

Bomoi na ntango nkita ekweaki

Na ntango nkita ekweaki na boumeli ya bambula 1930, bomoi ezalaki mpasi mpenza. Mokolo moko George autaki na mosala mpe ayaki na ndako na elongi ya mawa, mpe ayebisaki ngai ete balongolaki ye na mosala na ye na izíni ya kolamba ndembo. Nalobaki na ye ete: “Kobanga eloko te, tozali na Tata na biso ya makóló oyo azali na bozwi mingi, mpe akotika biso te.”

Bobele na mokolo wana George akutanaki na moninga moko oyo azalaki na kitunga monene ya mayebo. Ntango George ayebaki epai oyo moninga na ye azwaki yango, ayaki na ndako na liboke monene ya mayebo. Na yango asalelaki dolare misato mpamba oyo totikalaki na yango mpo na kosomba matunga mike. Natunaki ye ete: “Ndenge nini okoki kosala likambo ya boye, oyebi malamu ete tozali na bana basi mibale ya mike oyo bazali na mposa ya miliki?”

Ayanolaki ngai ete: “Komitungisa te, salá bobele oyo ngai nazali koloba.” Na mwa bapɔ́sɔ oyo elandaki, tokómaki na mwa kompanyi na ndako mpo na kosukola mayebo mpe kokangisa yango na maboke. Tozalaki kotɛkisa yango na barestorá ya lokumu mpe tozalaki kozonga na ndako na dolare 30 to 40 na mokolo, yango ezalaki mpenza bozwi mingi mpo na biso na eleko wana. Nkolo ferme oyo apesaki biso ndingisa ya kobuka mayebo na elanga na ye alobaki ete na boumeli ya mbula 25 oyo ye afandaki wana, amonaki naino te ebele ya mayebo kobima lolenge wana. Mosika te, George abyangamaki lisusu na mosala na izíni ya bolambi ndembo.

Tobateli kondima na biso

Na 1943 tokendaki kofanda na engumba Los Angeles, na etúká ya Californie, mpe mbula minei na nsima tokómaki kofanda na engumba Elsinore. Kuna tofungolaki magazini ya kotɛkisa biloko ya kolya, mpe mosangani mokomoko ya libota na biso azalaki kosala na ngala na ye na magazini yango. Na eleko yango, Elsinore ezalaki sé mwa engumba moke ya bafandi soko 2 000, mpe na bongo tosengelaki kokende na engumba mosusu na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 30 mpo na koyangana na makita ya boklisto. Oyo nde esengo nazalaki na yango ya komona mwa lisangá moke kosalema na engumba Elsinore na 1950! Lelo oyo ezali na masangá 13 na esika yango.

Na 1950 mwana na biso ya mwasi Goldie Elizabeth (oyo ayebani mingi na nkombo ya Beth) azwaki lipɔlɔ́mi na Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya Watch Tower na South Lansing, na etúká ya New York, mpe atindamaki na mosala ya misionere na Venezuela. Na 1955, Irène, mwana na biso ya nsuka, azalaki na esengo ete ye mpe mobali na ye babyangamaki mpo na kosala mosala ya ministre motamboli na mosala ya zongazonga. Nsima na 1961, nsima ya kokɔta na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi na South Lansing, na etúká ya New York, batindamaki na Thaïlande. Bantango mosusu nazalaki na mposa ya bana na ngai na boye ete nazalaki kolela, kasi nazalaki komiloba ete, ‘Ezali yango nde nalingaki ete básala.’ Bongo nazalaki kokamata sakosi na ngai ya mikanda mpe kobima na mosala ya kosakola. Ntango nyonso nazalaki kozonga na ndako na esengo.

Na 1966 mobali na ngai, George, azwaki maladi ya kobungisa makanisi nyonso (apoplexie). Beth, oyo asilaki kotika Venezuela na ntina na mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, asungaki mpo na kosalisa ye. George akufaki na mbula oyo elandaki, mpe nabɔndisamaki na likambo oyo ete atikalaki sembo epai na Yehova mpe azwaki libonza na ye na likoló. Na nsima Beth akendaki na ekólo Espagne mpo na kosala epai kuna mposa ya basakoli ya Bokonzi ezalaki mingi. Esther, mwana na ngai ya liboso, akómaki na maladi ya kanser mpe akufaki na 1977, mpe na 1984, Anne akufaki na maladi ya leucémie. Mokomoko na bango azalaki mosaleli ya sembo ya Yehova na bomoi na ye mobimba.

Nsima ya liwa ya Anne, Beth na Irène batikaki mboka mopaya epai batindamaki mpo na kosakola. Basungaki mingi mpo na kosalisa bandeko na bango ya basi, mpe biso banso tozalaki na mawa mingi. Nsima ya mwa ntango nayebisaki bana na ngai ya basi ete: “Sikawa ekoki! Tobɔndisaki bato mosusu na bilaka ya motuya bizwami na Biblia. Sikawa tosengeli komitika ete biso moko mpe tobɔndisama. Satana alingi kolongola esengo na biso na mosala ya Yehova, kasi tokoki kotikela ye nzela te.”

Bandeko na biso ya sembo na Roumanie

Ngai na leki na ngai ya mwasi Marie, tosalaki mobembo oyo etikala na makanisi na biso wana tokendaki kotala bandeko na biso na Roumanie na 1970. Moko kati na baleki na biso ya basi asilaki kokufa, kasi tozwaki likoki ya kokende kotala leki na biso ya mobali, John, mpe leki na biso ya mwasi, Lodovica, oyo azalaki naino kofanda na mboka Ortelec. Na ntango ya mobembo na biso, tata mpe mama basilaki kokufa, bakufaki sembo na miso ya Yehova. Bato mingi bayebisaki biso ete tata azalaki likonzí na lisangá. Lelo oyo ata bamoko kati na bana ya bana ya bana na ye bazali Batatoli na Roumanie. Totalaki mpe bandeko mingi ya mosuni na libota ya mobali na ngai oyo batikalaki ngwi na solo ya Biblia.

Na 1970, Roumanie ezalaki na nsé ya boyangeli mabe ya koministe ya prezidá Nicolae Ceauşescu, mpe Batatoli ya Yehova bazalaki konyokolama makasi. Flore, mwana ya John, ndeko na ngai ya mobali, mpe bandeko na ngai mosusu, balekisaki bambula mingi na bakáa ya bakangami na ntina na kondima na bango ya boklisto, ezalaki mpe bongo mpo na Gabor Romocean, mwana ya ndeko ya mobali ya tata na ngai. Na yango ezali likambo ya kokamwa te ete na ntango bapesaki biso bankomá ya komema na biro monene ya Batatoli ya Yehova na engumba New York, bandeko na biso ya Roumanie balobaki ete bakotika te komibanzabanza kino bakoyoka ete tobimi na mboka kozanga likámá!

Ntango toyaki koyeba ete mikanda na biso mpo na kozwa ndingisa ya kokɔta na mboka (visa) ekomaki na nsuka, tokendaki na biro ya Letá na mboka Ortelec. Ezalaki na mokolo ya mitano na nsima ya midi, mpe bobele mosali moko ya Letá nde azalaki kosala na mokolo yango. Koyebáká moto oyo toutaki kotala mpe ete mwana ya ndeko na biso azalaki na káa ya bakangami, alobaki ete: “Bamama, bólongwa na mboka oyo nokinoki!”

Ndeko na ngai ya mwasi alobaki na ye ete: “Kasi lelo ezali na engbunduka te oyo ezali kokende.”

Mobali yango alobaki: “Likambo te, bózwa ata bísi, ata engbunduka, ata taxi. Bótambola ata na makolo. Ngai nalobi na bino bobele ete bosala nyonso ete bólongwa na esika oyo nokinoki!”

Wana tobandaki kokende, babéngaki biso mpe bayebisaki biso ete engbunduka moko ya basodá oyo ezelamaki te esengelaki koleka wana na ngonga ya 6 ya mpokwa. Oyo nde likamwisi ya Nzambe! Na engbunduka ya bato banso, mbɛlɛ balingaki kotalatala mikanda na biso, kasi lokola engbunduka wana ezalaki kokumba basodá mpe ete basivili tozalaki bobele biso mibale na kati, moto moko te atunaki biso mikanda na biso ya bokɔti na mboka mopaya. Mbala mosusu bakanisaki ete tozali bankɔkɔ ya bamoko ya bakonzi ya basodá.

Tokomaki na Timisoara na ntɔ́ngɔ́ oyo elandaki, mpe na lisalisi ya moninga ya ndeko na biso moko, tokokaki kozwa mikanda ya kobima na mboka. Na mokolo molandaki tobimaki na Roumanie. Tozongaki epai na biso na mayoki ya bolingo mpe basuvenire mingi ya bandeko na biso baklisto mibali mpe basi ya sembo na Roumanie.

Na bambula oyo elandaki mobembo na biso na Roumanie, tozwaki nsango moke mpenza na ntina na mosala ya kosakola na mikili ya koministe na Mpótó ya Ɛ́sti. Atako bongo, tozalaki komindimisa ete bandeko na biso baklisto mibali mpe basi bakotikala sembo epai na Nzambe​—ezala liboso ya mikakatano nini. Mpe na ntembe te basalaki bongo! Oyo nde esengo na koyoka ete Batatoli ya Yehova bandimamaki lokola lingomba na Roumanie na Apríli 1990! Na eleko ya molungé oyo elandaki toyokaki esengo na ntina na balapólo ya mayangani oyo masalemaki na Roumanie. Kanisá ete, bato koleka 34 000 bayanganaki na bingumba mwambe, mpe bato 2 260 bazwaki batisimo! Sikawa ezali na basakoli koleka 35 000 na Roumanie, mpe na mobu moleki bato 86 034 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto.

Solo ezali ntango nyonso na motuya na miso na ngai

Na boumeli ya mwa bambula natikaki kolya limpa mpe komela vinyo na Ekaniseli. Nazalaki kotala bandeko ya makoki mingi oyo bazalaki kolya yango te, mpe namilobelaki ete: ‘Mpo na nini Yehova akopesa ngai libaku malamu ya kozala mosangoli ya libula elongo na Mwana na ye na likoló na esika ya kopesa yango na bandeko mosusu oyo bazali balobi malamu?’ Kasi ntango nazalaki kolya yango te, nazalaki koyoka mobulungano kati na ngai. Ezalaki lokola nde nazalaki koboya kozwa eloko moko. Nsima ya kolekisa ntango mingi na koyekola mpe kosala malɔ́mbo ya mozindo, nazongelaki lisusu kolya limpa mpe komela vinyo. Kimya mpe esengo na ngai ezongaki, mpe elongwaki lisusu te.

Atako nazali lisusu na likoki ya komona malamu te mpo na kotánga, mikolo nyonso nayokaka bakasɛti ya Biblia mpe ya bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Nazali mpe kolanda kosangana na mosala ya kosakola. Mbala mingi nakabolaka bazulunalo 60 kino 100 sanza na sanza, kasi ntango tosalaki kampanye ya sipesiale mpo na zulunalo Lamuká! na sanza ya Apríli, nakabolaki bazulunalo 323. Na lisalisi ya bana na ngai ya basi, nazali mpe na likoki ya kosala masoló na Eteyelo mpo na mosala ya Teokrasi. Nayokaka esengo ete nazali na likoki ya kolendisa bato mosusu. Pene na bato nyonso na Ndako ya Bokonzi babéngaka ngai Mama-nkɔkɔ.

Soki nazongisi makanisi na ngai nsima, pene na mbula 79 ya mosala ya komipesa epai na Yehova, natɔ́ndaka ye mokolo na mokolo ete apesaki ngai libaku ya koyeba solo na ye ya motuya mpe kosalela bomoi na ngai na mosala na ye. Nazali na botɔ́ndi mingi mpo ete nazali naino na bomoi mpo na komona kokokisama monene ya bisakweli oyo bizwami na Biblia, biye biyebisaki uta kala koyanganisama ya bato ya Nzambe oyo bakokani na bampate na mikolo oyo ya nsuka.​—Yisaya 60:22; Zekalia 8:23.

[Elilingi na lokasa 23]

Marie, ndeko na ngai ya mwasi mpe tata batɛlɛmi, ngai, George, mpe bana na biso ya basi Esther na Anne

[Elilingi na lokasa 24]

Elongo na bana na ngai ya basi Beth na Irène mpe mobali ya Irène na bana na bango mibale; bango nyonso bazali kosalela Yehova na bosembo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto