Lisolo ya bomoi
Yehova atyelaka biso likebi ntango nyonso
YA ENELESI MZANGA
Ezalaki na 1972. Bilenge zomi ya lingomba moko ya politiki (Ligue des jeunes du Malawi) bakɔtelaki biso na ndako, bakangaki ngai mpe bamemaki ngai na elanga ya koko oyo ezalaki mosika te. Kuna, babɛtaki ngai tii ntango bakanisaki ete nakufi, basundolaki ngai wana.
Ebele ya Batatoli ya Yehova na Malawi banyokwamaki ndenge wana. Mpo na nini bazalaki konyokola bango? Nini esalisaki bango na koyika mpiko? Tiká nabɛtela bino naino mwa moke lisolo ya libota na ngai.
NABOTAMAKI mokolo ya 31 Desɛmbɛ 1921 na libota moko oyo emipesaki na makambo ya Nzambe. Tata na ngai azalaki pastɛrɛ na Lingomba ya Presbytérien. Nakolaki na Nkhoma, mwa engumba moko oyo ezali penepene na Lilongwe, mboka-mokonzi ya Malawi. Ntango nakómaki na mbula 15, nabalanaki na Emmas Mzanga.
Mokolo moko, moninga moko ya tata na ngai, oyo azalaki mpe pastɛrɛ, ayaki kotala biso. Lokola amonaki ete Batatoli ya Yehova bazalaki kofanda penepene na biso, akebisaki biso ete tósololaka na bango te. Alobaki ete Batatoli bazali na bilimo mabe mpe soki tokebi te, biso mpe tokokóma na bilimo mabe. Likambo yango ebangisaki biso mingi, yango wana tokendaki kofanda na mboka mosusu, mpe kuna, Emmas azwaki mosala ya kotɛka na magazini. Kasi, mosika te, tomonaki ete bato oyo bazalaki kofanda penepene na biso bazalaki mpe Batatoli ya Yehova!
Nzokande, lokola Emmas azalaki kolinga Biblia mingi, asololaki na Motatoli moko. Nsima ya kozwa biyano ya solosolo na ebele ya mituna oyo azalaki na yango, Emmas andimaki ete Batatoli báyekolaka na ye Biblia. Na ebandeli, bazalaki koyekola na magazini epai azalaki kosala; kasi na nsima, bakómaki koyekola pɔsɔ na pɔsɔ na ndako. Soki kaka Batatoli ya Yehova bayei, nazalaki kolongwa na ndako mpo nazalaki kobanga bango. Atako bongo, Emmas akobaki koyekola Biblia. Nsima ya koyekola sanza motoba, azwaki batisimo na sanza ya Aprili 1951. Kasi, ayebisaki ngai te mpo azalaki kobanga ete soki nayebi, libala na biso ekokufa.
Mwa bapɔsɔ ya mikakatano
Nzokande, mokolo moko, moninga na ngai moko, Ellen Kadzalero, ayebisaki ngai ete mobali na ngai azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Nasilikaki makasi! Banda mokolo wana, nazalaki kolobisa ye te, nazalaki mpe lisusu kolambela ye te. Natikaki mpe kotokela ye mai ya kosukola mpe kotɔkisela ye yango, ndenge mwasi nyonso asalelaka mobali na ye na mboka na biso.
Nsima ya kokanga motema na boumeli ya pɔsɔ misato, Emmas asɛngaki ngai na boboto mpenza nafanda mpo tósolola, mpe ayebisaki ngai ntina oyo akómaki Motatoli ya Yehova. Atángaki mpe alimbolaki bavɛrsɛ mingi ya Biblia, lokola 1 Bakolinti 9:16. Makambo oyo nayokaki esimbaki mpenza motema na ngai mpe namonaki ete ngai mpe nasengeli kosakola nsango malamu. Nazwaki ekateli ya kobanda koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Kaka na mpokwa yango, nalambelaki mobali na ngai nsuka na elubu mpe likambo yango ekitisaki ye mpenza motema.
Toteyi bandeko mpe baninga na biso solo
Ntango bandeko na biso bayokaki ete tokómaki kosangana na Batatoli ya Yehova, basepelaki ata moke te. Bandeko na ngai bakomelaki ngai mokanda mpe bayebisaki ngai ete nakendaka lisusu kotala bango te. Maloba na bango epesaki biso mawa mingi; kasi, totyelaki elaka ya Yesu motema ete tokozala na ebele ya bandeko mibali mpe basi, ebele ya batata mpe bamama ya elimo.—Matai 19:29.
Nakolaki nokinoki na boyekoli ya Biblia mpe nazwaki batisimo na sanza ya Augusto 1951, kaka sanza misato na ndambo nsima ya mobali na ngai. Nazalaki na mposa ya koteya moninga na ngai Ellen solo. Likambo ya esengo ezali ete andimaki koyekola na ngai Biblia. Na sanza ya Mai 1952, Ellen azwaki batisimo mpe akómaki ndeko na ngai ya elimo, mpe boninga na biso ekómaki lisusu makasi. Tii lelo oyo, tozali kaka baninga ya motema.
Na 1954, baponaki Emmas mokɛngɛli ya zongazonga. Na ntango wana, tozalaki na bana motoba. Na ntango yango, mokɛngɛli ya zongazonga oyo azali na bana azalaki kotala lisangá moko na pɔsɔ moko mpe na pɔsɔ oyo ekolanda, azalaki kofanda na libota na ye. Kasi, ntango Emmas akei kotala lisangá moko, azalaki ntango nyonso kozwa bibongiseli mpo nayekolaka Biblia na bana. Tozalaki kosala makasi ete bana básepelaka na boyekoli ya Biblia. Tozalaki mpe koyebisa bango na kondima mpenza bolingo oyo tozalaki na yango mpo na Yehova mpe mpo na solo ya Liloba na ye, tozalaki mpe kobima na bango na mosala ya kosakola. Formasyo wana ya elimo elendisaki kondima ya bana na biso mpe ebongisaki bango mpo na monyoko oyo tokutanaki na yango na nsima.
Minyoko ebandi
Na 1964, ekólo Malawi ezwaki lipanda. Ntango bakonzi ya mboka bamonaki ete tozalaki kokɔta na makambo ya politiki te, balukaki kosombisa biso bakarte ya parti na bango na makasi.a Lokola ngai na Emmas toboyaki, bilenge ya lingomba ya politiki (Ligue des jeunes du Malawi) babebisaki elanga na biso ya masangu, oyo ezalaki bilei na biso mpo na mbula mobimba oyo ezalaki koya. Ntango bilenge yango Ligue des jeunes bazalaki kobebisa elanga na biso ya masangu, bazalaki koyemba ete: “Baoyo baboyi kosomba karte ya Kamuzu [elingi koloba prezida Banda], bansɛlɛlɛ bakolya masangu na bango mpe bakolela mpo na yango.” Kasi, atako tobungisaki biloko nyonso ya kolya, tozalaki kaka na elikya. Tomonaki ete Yehova azalaki kotyela biso likebi. Alendisaki biso mpenza.—Bafilipi 4:12, 13.
Na nsima, mokolo moko na butu, na sanza ya Augusto 1964, nazalaki ngai moko ná bana na ndako. Tozalaki kolala mpe ntango nayokaki na mosika bato bazali koyemba, nalamukaki. Ezalaki bato ya Gulewamkulu, lingomba moko ya bato ya nkisi oyo babinaka mabina ya bonkɔkɔ mpe bato ya mboka babangaka bango mingi; balobaka ete bazali na bilimu ya bato bakufá. Bilenge ya Ligue de jeunes batindaki bato yango mpo na kosala biso mabe. Nalamusaki bana nokinoki mpe, liboso bato yango bákóma na ndako na biso, tokimaki na zamba.
Na esika oyo tobombanaki, tozalaki komona mɔtɔ makasi ezali kopela. Bato ya Gulewamkulu batyaki mɔtɔ na ndako na biso oyo ezalaki na nsamba ya esobe. Ndako mobimba ná biloko na biso nyonso ezikaki. Ntango bato yango bazalaki kokende, toyokaki bango bazali koloba ete, “Topeliseli Motatoli yango mɔtɔ kitoko mpo ayɔta.” Totɔndaki Yehova mingi na ndenge tobikaki na liwa! Ya solo, babebisaki biloko na biso nyonso, kasi balongaki te kobebisa ekateli na biso ya kotyela kaka Yehova motema.—Nzembo 118:8.
Toyokaki ete bato ya Gulewamkulu batumbaki bandako mitano ya Batatoli ya Yehova na etúká na biso. Tozalaki na esengo mpe na botɔndi mingi na ndenge bandeko ya masangá ya pembenipembeni basungaki biso! Batongelaki biso bandako mosusu mpe na boumeli ya bapɔsɔ mingi, bazalaki komemela biso biloko ya kolya.
Minyoko ebakisami
Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1967, babandaki kosangisa Batatoli ya Yehova ya ekólo mobimba. Mpo na komona biso, Ba-Jeunes pionniers du Malawi oyo bazalaki na nkanda bazalaki koluka Batatoli ndako na ndako na bambeli na mabɔkɔ. Soki bazwi bango, bazalaki kotuna bango soki bakosomba karte ya parti to te.
Ntango bakómaki na ndako na biso, batunaki biso soki tozali na karte ya parti. Nalobaki ete: “Te, nasombá yango te. Nakosomba yango lelo te, nakosomba yango ata mokolo moko te.” Mbala moko bakangaki ngai ná mobali na ngai mpe bakendaki na biso na biro ya bapolisi, batikelaki biso ntango ya kozwa ata eloko moko te. Ntango bana na biso ya mike bautaki na kelasi, bakutaki biso te mpe babandaki komitungisa mingi. Likambo ya esengo, Daniel, mwana na biso ya mokóló, akómaki na ndako mwa nsima mpe baninga ya pembeni bayebisaki ye makambo oyo elekaki. Mbala moko, azwaki baleki na ye mpe balandaki biso na biro ya bapolisi. Bakómaki na ntango oyo bapolisi bazalaki komatisa biso na motuka mpo na kokende na biso na Lilongwe. Tokendaki na bango.
Na Lilongwe, bakosaki kosambisa biso na biro ya bapolisi. Bakonzi ya bapolisi batunaki biso boye: “Boboyi kolongwa na lingomba ya Batatoli ya Yehova?” Topesaki eyano ete, “Ɛɛ!” atako toyebaki ete soki topesi eyano wana, bakokatela biso etumbu ya bolɔkɔ ya mbula nsambo. Bakatelaki bandeko oyo bazalaki “kokamba” ebongiseli etumbu ya bolɔkɔ ya mbula 14.
Nsima ya kolekisa butu moko kozanga kolya mpe kolala, bapolisi bamemaki biso na Bolɔkɔ ya Maula. Bandako ya bolɔkɔ yango etondaki mpenza na bato; mwaye ya kolala ata na nse ezalaki te! Ebele ya bato oyo bazalaki na ndako mokomoko ya bolɔkɔ basengelaki kosala twalɛti kaka na mwa katini moko. Bazalaki kopesa biso mwa bilei moke mpe bazalaki kolamba yango malamu te. Nsima ya pɔsɔ mibale, bakonzi ya bolɔkɔ bamonaki ete tozali bato ya kimya mpe batikaki biso tótambolaka na kati ya lopango ya bolɔkɔ. Lokola tozalaki bandeko ebele, mokolo na mokolo tozalaki kozwa libaku ya kolendisana mpe ya kopesa bato mosusu ya bolɔkɔ litatoli. Tokamwaki ete nsima ya kolekisa soki sanza misato, babimisaki biso na bolɔkɔ mpo bikólo mosusu ya mokili ezalaki kosɛnga guvɛrnema ya Malawi etika konyokola Batatoli.
Bakonzi ya bapolisi basɛngaki biso tózonga na bandako na biso, kasi bayebisaki biso mpe ete mosala ya Batatoli ya Yehova epekisami na Malawi. Epekiseli yango ebandaki mokolo ya 20 Ɔkɔtɔbɛ 1967 mpe esukaki na mokolo ya 12 Augusto 1993, eumelaki pene na mbula 26. Tomonaki mpasi na boumeli ya bambula wana, kasi na lisalisi ya Yehova, tokɔtaki na makambo ya politiki te.
Bakómi kobengana biso lokola banyama
Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1972, guvɛrnema ebimisaki mobeko moko oyo engalisaki lisusu minyoko. Mobeko yango esɛngaki bálongola Batatoli ya Yehova nyonso na misala mpe, na bamboka nyonso, bábengana Batatoli nyonso na bandako na bango. Bakómaki kobengana Batatoli lokola banyama.
Na ntango wana, elenge Motatoli moko ayaki na ndako na mokanda moko ya mbangumbangu oyo batindelaki Emmas, ‘Bilenge ya Ligue des jeunes bazali na mokano na kokata yo motó, ko yango na nzete, mpe komema yango epai ya bakonzi ya mboka.’ Mbala moko Emmas alongwaki na ndako, kasi liboso akende, tomibongisaki mpo biso tóumela te kolanda ye. Nakimisaki bana nokinoki. Na nsima, ntango kaka ngai moko nalingaki kobima, Ba-Jeunes pionniers zomi bakómaki na ndako mpe bazalaki koluka Emmas. Bakɔtaki na ndako mpe bamonaki ete Emmas azalaki lisusu wana te. Basilikaki makasi, bamemaki ngai na elanga ya koko oyo ezalaki penepene, kuna babɛtaki ngai mpe babambaki ngai koko. Na nsima, ntango bakanisaki ete nakufi, basundolaki ngai. Ntango makanisi ezongaki, nazongaki malɛmbɛmalɛmbɛ na ndako.
Na butu yango, Emmas atyaki bomoi na ye na likama mpe azongaki na ndako mpo na koluka ngai. Ntango Emmas amonaki ndenge babɛtaki ngai, ye ná moninga na ye oyo azalaki na motuka batyaki ngai na motuka yango. Na nsima tokendaki tii na ndako ya ndeko moko na Lilongwe; mokemoke nakómaki koyoka malamu mpe Emmas abandaki kobongisa makambo mpo tólongwa na Malawi.
Bato bakimá mboka oyo bazangi esika ya kopema
Mwana na biso ya mwasi Dinesi ná mobali na ye bazalaki na motuka ya mwa monene. Sofɛlɛ na bango, azalaki liboso na lisangá ya Ba-Jeunes pionniers du Malawi, kasi, makambo oyo bazalaki kosala biso ezalaki kopesa ye mawa. Andimaki kosalisa biso ná Batatoli mosusu. Na boumeli ya mwa mikolo, mpokwa nyonso azalaki kozwa Batatoli na bisika oyo bazalaki kobombana. Mpe azalaki kolata elamba na ye ya Ba-Jeunes pionniers du Malawi mpo na koleka na motuka oyo etondaki na bato na banzela oyo ezalaki na bisika mingi oyo basoda bazalaki kotɛlɛmisa mituka. Andimaki mpenza komitya na likama mpo na kosalisa ebele ya Batatoli bákatisa na ekólo Zambie.
Nsima ya mwa basanza, bakonzi ya Zambie bazongisaki biso na Malawi; kasi tokokaki kozonga na bamboka na biso te. Bayibaki biloko nyonso oyo totikaki. Balongolaki ata manzanza ya ndako na biso. Lokola tozalaki na esika oyo tokoki kofanda te, tokendaki na ekólo Mozambique mpe tofandaki mbula mibale na ndambo na kaa ya bato bakimá mboka ya Mlangeni. Kasi, na sanza ya Yuni 1975, guvɛrnema ya sika na Mozambique ekangaki kaa wana mpe bazongisaki biso na Malawi; kasi, kuna makambo ebongwanaki te mpo na basaleli ya Yehova. Tomonaki malamu kaka tózonga lisusu na Zambie. Kuna, tokendaki na kaa ya bato bakimá mboka ya Chigumukire.
Nsima ya sanza mibale, ebele ya babisi ná mituka ya basoda etɛlɛmaki na nzela monene mpe ebele ya basoda ya Zambie ná mindoki na bango bakɔtaki na kaa. Balobaki na biso ete batongeli biso bandako ya malamu mpe bayei na mituka mpo na komema biso kuna. Toyebaki ete bazali kokosa. Basoda bakómaki kokɔtisa bato na mituka na makasi mpe yikiyiki ebimaki. Basoda bakómaki kobɛta masasi likoló mpe, na kobanga wana, ebele ya bandeko bapalanganaki.
Na kati ya mobulungano wana, Emmas akweaki mpe bato bakómaki komatela ye, kasi ndeko moko atɛlɛmisaki ye. Tokanisaki ete bolɔzi monene nde ebandi. Bato nyonso bakimá mboka oyo bazalaki na kaa wana bazalaki kozonga na Malawi. Ntango tozalaki naino na Zambie, tokómaki na ebale moko mpe bandeko mibali basimbanaki mabɔkɔ mpo biso nyonso tókatisa. Kasi, na ngámbo mosusu, basoda ya Zambie bazalaki kozela biso mpe bazongisaki biso na makasi na Malawi.
Ntango tokómaki na Malawi, toyebaki epai ya kokende te. Toyokaki ete bazalaki koyebisa bato na bamitingi ya politiki mpe na bazulunalo ete bátalaka malamu “bilongi ya sika” oyo eyei na mboka na bango, elingi koloba Batatoli ya Yehova. Yango wana, tozwaki mokano ya kokende na mboka-mokonzi mpamba te kuna bato bakokaki koyeba biso noki te lokola na mboka. Tozwaki ndako ya kofutela mpe Emmas azongelaki mosala ya mokɛngɛli ya zongazonga oyo azalaki kosala na kobombana.
Makita ya lisangá
Nini esalisaki biso tótikala sembo? Makita ya lisangá! Na bakaa ya bato bakimá mboka, ezala na Mozambique to na Zambie, tozalaki koyangana na bandako ya esobe. Koyangana na makita na Malawi ezalaki likama mpe ezalaki mpasi; kasi tozalaki kosala makasi. Mpo bámona biso te, mbala mingi tozalaki kosala makita na butu mpenza mpe mosika. Soki molobi moko asali lisolo, mpo na kobenda likebi ya bato te, tozalaki kobɛta mabɔkɔ te, tozalaki kaka konika yango.
Batisimo ezalaki kopesama na butu. Mwana na biso Abiyudi azwaki batisimo ndenge wana. Nsima ya lisukulu ya batisimo, bamemaki ye ná bandeko mosusu oyo basengelaki kozwa batisimo na molili tii na mwa libulu moke ya mai oyo batimolaki na esika moko oyo ezalaki na pɔtɔpɔtɔ mingi. Babatisaki bango kuna.
Mwa ndako na biso: Esika malamu mpo na kobomba mikanda
Na bambula ya nsuka ya epekiseli, ndako na biso na Lilongwe ezalaki esika malamu ya kobomba mikanda. Bazalaki komema na mayele mikanda oyo ezalaki kouta na biro ya filiale ya Zambie tii na ndako na biso. Bandeko mosusu bazalaki koya kozwa mikanda oyo ezalaki kouta na Zambie mpe komema yango na bavelo na bisika nyonso na Malawi. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki moke mpamba te bazalaki kosala yango na papye ya pɛtɛɛpɛtɛɛ. Yango ezalaki kosalisa bandeko bámema bazulunalo ebele mbala mibale koleka soki basalaki yango na papye ya mwa makasi. Bandeko yango bazalaki mpe kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya moke, oyo ezalaki kaka na masolo ya boyekoli. Moto akokaki kotya zulunalo wana moke ata na libenga ya simisi na ye mpamba te ezalaki kaka lokasa moko.
Bandeko yango oyo bazalaki kotambola na bavelo bakokaki ntango nyonso kokangama to mpe kobomama ntango bazali kotambola na zamba, ntango mosusu na butu, na bakartɔ ya mikanda oyo epekisamaki, oyo bazalaki kotondisa na nsima ya bavelo na bango. Atako bapolisi bazalaki na banzela mpe makama mosusu ezalaki, bazalaki kotambola bankama ya bakilomɛtrɛ, ezala na ntango ya mbula, moi, to mopɛpɛ, mpo na komemela bandeko bilei ya elimo. Bandeko yango bazalaki mpenza na mpiko!
Yehova atyelaka basi bakufelá mibali likebi
Mokolo moko, na sanza ya Desɛmbɛ 1992, Emmas azalaki kosala lisukulu na lisangá moko oyo akendaki kotala mpe na mbala moko, abungisaki makanisi nyonso (apopléxie). Na nsima, azalaki lisusu koloba te. Mwa moke na nsima, mpasi yango ezongaki lisusu mpe binama ya ngámbo moko ya nzoto na ye ezalaki lisusu kosala te. Atako maladi na ye ezalaki makasi, lisalisi ya bandeko ya lisangá ezongiselaki ngai elikya. Nazalaki kosalisa mobali na ngai na ndako tii liwa na ye na sanza ya Novɛmbɛ 1994, azalaki na mbula 76. Nafandaki na ye mbula 57, mpe liboso Emmas akufa, epekiseli esilaki. Kasi, tii lelo oyo nalelaka mobali na ngai mpo azalaki moninga ya sembo.
Nsima ya liwa ya mobali na ngai, bokilo na ngai azwaki mokumba ya kosalisa mpe ngai, longola mwasi na ye ná bana na bango mitano. Likambo ya mawa, ye mpe abɛlaki mwa moke mpe akufaki na sanza ya Augusto 2000. Ndenge nini mwana na ngai ya mwasi akokaki koleisa mpe kobatela biso? Na likambo oyo mpe namonaki ete Yehova atyelaka biso likebi mpe azali mpenza “tata ya bitike, mpe mosungi ya basi bakufeli-mibali.” (Nzembo 68:5) Na nzela ya basaleli na ye awa na mabelé, Yehova apesaki biso ndako kitoko ya sika. Esalemaki ndenge nini? Ntango bandeko ya lisangá na biso bamonaki mokakatano na biso, batongelaki biso ndako na boumeli ya pɔsɔ mitano! Bandeko ya masangá mosusu oyo bazali bamasɔ bapesaki bango mabɔkɔ. Bolingo mpe boboto oyo Batatoli nyonso wana bamoniselaki biso epesaki biso esengo mingi mpamba te ndako oyo batongelaki biso elekaki kutu bandako na bango moko na kitoko. Bolingo oyo bandeko ya lisangá bamonisaki epesaki litatoli malamu epai ya bato oyo bafandi zingazinga na biso. Ntango nakendaka kolala na butu, nayokaka lokola nde nazali ya Paladiso! Ndako na biso ya sika etongamá na babiliki ya mabelé oyo batumbá, kasi ndenge bato mingi balobaka, batongaki yango mpenza na bolingo.—Bagalatia 6:10.
Yehova atyelaka biso likebi ntango nyonso
Atako ntango mosusu nazalaki kobungisa elikya nyonso, Yehova amoniselaki ngai malamu na ye. Na kati ya bana na ngai libwa, nsambo bazali naino na bomoi, mpe biso nyonso, ná bana ná bankɔkɔ na ngai, tozali 123. Nazali mpenza na botɔndi ete mingi kati na bango bazali kosalela Yehova na bosembo!
Lelo oyo nazali na mbula 82, nazalaka na esengo mingi soki natali makambo oyo elimo ya Nzambe esali na Malawi. Kaka na mbula minei oyo eleki, namoni ndenge oyo Bandako ya Bokonzi ezali kotongama, lelo oyo ekómi koleka 600. Lisusu, tozali na biro ya sika ya filiale na Lilongwe, mpe eloko moko ezali kopekisa biso lisusu te kozwa ebele ya bilei ya elimo oyo ezali kolendisa. Namoni mpenza kokokisama ya elaka ya Nzambe oyo ezali na Yisaya 54:17, epai balobi na biso ete: “Ebundeli na ebundeli oyo esalami mpo na kotɛmɛla yo ekolonga te.” Nsima ya kosalela Yehova mbula koleka 50, nandimi mpenza ete ata soki tokutani na mikakatano nini, Yehova atikaka te kotyela biso likebi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba malamu lisolo ya Batatoli ya Yehova na Malawi, talá Annuaire des Témoins de Jéhovah 1999, nkasa 149-223, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 24]
Mobali na ngai Emmas azwaki batisimo na 1951
[Elilingi na lokasa 26]
Bandeko ya molende oyo bazalaki kotambola na bavelo
[Elilingi na lokasa 28]
Ndako oyo bandeko batongaki na bolingo