Martin Luther—Bomoi na ye mpe makambo oyo atiká
ZULUNALO moko (Time) elobaki boye: “Balobaka ete bato bakomá babuku ebele oyo ezali kolobela [Martin Luther] koleka bato mosusu nyonso, longola kaka molakisi na ye, Yesu Klisto.” Makambo oyo Luther azalaki koloba mpe kosala ememaki na mbongwana oyo ebimisá Lingomba ya Protesta—balobaka ete ezali “mbongwana oyo eleki monene banda mokili ebandá.” Na yango, abongolaki mpenza makambo ya losambo na Mpoto mpe asukisaki eleko oyo babengi Moyen-Âge. Luther abimisaki mibeko mpo na kokoma monɔkɔ ya Allemand oyo bato nyonso bakómá kosalela. Libongoli na ye ya Biblia esalelamaka koleka mabongoli mosusu nyonso ya Biblia na monɔkɔ ya Allemand.
Martin Luther azalaki nani? Nini esalaki ete akoka kobongola mpenza makambo na Mpoto ndenge wana?
Luther akómi nganga-mayele
Martin Luther abotamaki na engumba Eisleben, na Allemagne, na Novɛmbɛ 1483. Atako tata na ye azalaki kosala na kompanyi ya kwivre, asalaki nyonso mpo Martin atánga bakelasi ya malamu. Na mobu 1501, Martin akɔtaki na Iniversite ya Erfurt. Atángaki Biblia mpo na mbala ya liboso na bibliotɛkɛ ya iniversite yango. Martin alobaki boye: “Nasepelaki mingi na buku yango mpe nazalaki na elikya ete nakozwa oyo ya ngai moko.”
Ntango Luther akómaki na mbula 22, akɔtaki na couvent des Augustins na Erfurt. Na nsima, akɔtaki na Iniversite ya Wittenberg, epai akómaki doktɛrɛ na teoloji. Luther azalaki komimona ete abongi te liboso ya Nzambe mpe na bantango mosusu lisosoli na ye ezalaki kotungisa ye mingi. Kasi boyekoli ya Biblia, mabondeli mpe komanyola esalisaki ye ayeba malamumalamu ndenge Nzambe atalelaka bato ya masumu. Luther ayebaki ete moto akoki te kolonga kosala ete Nzambe andima ye na nzela misala na ye. Kasi, Nzambe andimaka bato oyo bamonisaka kondima mpo na boboto monene na ye.—Baloma 1:16; 3:23, 24, 28.
Ndenge nini Luther ayebaki ete boyebi ya sika oyo azwaki nde ezalaki malamu? Kurt Aland, profesɛrɛ ya lisolo ya ebandeli ya lingomba mpe ya boyekoli ya makomi ya Kondimana ya Sika, akomaki boye: “Atalelaki Biblia mobimba mpo na komona soki boyebi oyo azwaki ezali na boyokani na makambo mosusu oyo Biblia elobi, mpe amonaki ete, ata na esika moko te, Biblia ezali kokweisa yango.” Liteya oyo elobi ete moto akobika mpo na kondima kasi te mpo na misala na ye to mpo na komiyokisa mpasi ezalaki moboko ya mateya ya Luther.
Amoni mabe ndenge bazalaki kotɛkela bato bolimbisi ya masumu
Likanisi ya Luther mpo na ndenge Nzambe atalelaka basumuki, ebebisaki boyokani na ye na bakonzi ya Lingomba ya Katolike. Na ntango wana bato mingi bazalaki kondima ete nsima ya liwa, basumuki basengeli naino kosala etumbu mpo na mwa ntango. Nzokande, bazalaki koloba ete mikolo yango ekoki kokóma mokuse soki bafuti pápa mbongo mpe alimbisi masumu ya moto yango. Bato lokola Johann Tetzel, oyo azalaki kotɛkela bato bolimbisi ya masumu na nkombo ya Episkɔpɔ-mokonzi Albert de Mayence, bazalaki kozwa mbongo mingi na mosala yango epai ya bato mpamba. Bato mingi bazalaki komona ete kosomba bolimbisi ya masumu ezalaki kozwela bango bolimbisi ata ya masumu oyo bakosala na mikolo ekoya.
Luther amonaki mabe mpenza ndenge bazalaki kotɛkela bato bolimbisi ya masumu. Ayebaki ete Nzambe akoki kolimbisa masumu ya bato te mpo na mbongo. Na ɔtɔne ya mobu 1517, akomaki makanisi 95 mpo na kotɔndɔla moyibi, mateya mpe losambo ya lokuta ya lingomba. Lokola Luther alingaki nde kokɔtisa mbongwana, kasi botomboki te, atindelaki Episkɔpɔ-mokonzi Albert de Mayence ná ebele ya bato mosusu ya mayele buku yango. Bato mingi ya mayele na masolo ya kala balobaka ete mbongwana yango, oyo ebimisaki Lingomba ya Protesta, ebandaki soki na mobu 1517.
Kaka Luther ye moko te nde azalaki komilela mpo na mabe ya lingomba. Mbula nkama liboso, Jan Hus, moto ya ekólo Tchèque oyo azalaki mpe kobunda mpo na mbongwana na losambo akweisaki mpe momeseno yango ya kotɛkela bato bolimbisi ya masumu. Ata mpe liboso ya Hus, John Wycliffe, moto ya Angleterre, alobaki ete makambo mosusu oyo ezalaki kosalema na Lingomba ya Katolike eutaki na Biblia te. Érasme, moto ya Rotterdam mpe Tyndale, moto ya Angleterre, oyo bazalaki na bomoi na ntango ya Luther balendisaki mpenza mbongwana na lingomba. Kasi, makanisi ya Luther eyebanaki epai ya bato mingi mpe ekende mosika koleka ya bato wana mpamba te na eleko na ye, Johannes Gutenberg abimisaki masini ya konyata mikanda.
Masini ya Gutenberg ebandaki kosala na engumba Mayence na mobu 1455. Na ebandeli ya bambula ya 1500, bamasini ya konyata mikanda ekómaki na bingumba 60 ya Allemagne mpe na bikólo mosusu 12 ya Mpoto. Ezalaki mbala ya liboso bansango ebanda kopalangana na lombangu mpenza. Ekoki kozala ete buku ya makanisi 95 ya Luther enyatamaki mpe epalanganisamaki kozanga ete ye moko apesa nzela. Likambo ya mbongwana na lingomba ezalaki lisusu likambo ya engumba moko te. Epalanganaki bipai nyonso, mpe na mbala moko Martin Luther ayebanaki na Allemagne mobimba.
“Sanza ná moi” basepeli te
Banda bankama ya bambula, mikili ya Mpoto ezalaki koyangelama na nguya mibale: Bokonzi Mosantu ya Loma mpe Lingomba ya Katolike ya Loma. Hanns Lilje, prezida ya kala ya Fédération luthérienne mondiale, alobaki ete: “Ampɛrɛrɛ ná pápa bazalaki koyangela elongo lokola sanza ná moi.” Nzokande, ezalaki mpasi mpo na koyeba nani azali moi mpe nani azali sanza. Na ebandeli ya bambula ya 1500, bango nyonso mibale bakómaki na nguya mingi. Mbongwana ezalaki koya.
Pápa Léon X amonisaki mpenza ete asepelaki te na makanisi 95 yango mpe alobaki na Luther ete soki atiki makambo wana te, bakolongola ye na lingomba. Mpo na komonisa ete abangaki te, Luther atumbaki mokanda oyo pápa akomelaki ye na miso ya bato nyonso mpe abimisaki babuku mosusu oyo elendisaki bakonzi bábongola makambo na lingomba atako pápa apesaki nzela te. Na mobu 1521, Pápa Léon X alongolaki Luther na lingomba. Ntango Luther alobaki ete basambisaki ye te liboso bákatela ye etumbu, Ampɛrɛrɛ Charles V abengaki ye akende kosamba na engumba Worms liboso ya bankumu. Mobembo ya mikolo 15 oyo Luther asalaki na sanza ya Aprili 1521, longwa na engumba Wittenberg tii na engumba Worms, ezalaki lokola mobembo ya elonga. Bato nyonso bazalaki kondima makanisi na ye mpe bipai nyonso bazalaki na mposa ya komona ye.
Na engumba Worms, Luther asambaki liboso ya ampɛrɛrɛ, ya bankumu mpe ya ntoma ya pápa. Jan Hus mpe asambaki ndenge wana na engumba Constance na mobu 1415, na nsima bakakisaki ye na nzete mpe batumbaki ye. Liboso ya bakonzi ya lingomba mpe ya Leta, Luther aboyaki kozonga nsima mpe alobaki na bango ete akotika kaka soki baoyo bazali kotɛmɛla ye bandimisi ye na Biblia ete azali na libunga. Kasi moto moko te ayebaki Biblia lokola ye. Bakomaki makambo oyo elobamaki na tribinale yango na mokanda oyo babengaki ‘Édit de Worms.’ Mokanda yango ekweisaki Luther mpe epekisaki mikanda na ye. Lokola pápa alongolaki ye na lingomba mpe ampɛrɛrɛ abengaki ye motomboki, bomoi na ye ekómaki na likama.
Na nsima, likambo moko ya kokamwa mpenza esalemaki. Ntango Luther azalaki kozonga na Wittenberg, Frédérick de Saxe, na motema malamu na ye, abongisaki makambo mpo bato nyonso bákanisa ete balimwisi Luther na nzela. Yango nde ebikisaki Luther na mabɔkɔ ya banguna na ye. Babombaki Luther na château de la Wartburg oyo ebombamá mpenza, mpe kuna atikaki mandɛfu mpe azwaki nkombo mosusu—bakómaki kobenga ye “chevalier Georges”.
Biblia ya Sɛtɛmbɛ oyo bato bazalaki koluka mingi
Na boumeli ya sanza 10 oyo elandaki, Luther azalaki kofanda na château de la Wartburg mpo na kokima ampɛrɛrɛ ná pápa. Buku moko (Welterbe Wartburg) elobi ete “ntango oyo alekisaki na Wartburg ezali moko ya bantango oyo asalaki makambo mingi koleka na bomoi na ye.” Ezali kuna nde asilisaki moko ya misala minene oyo asalaki na bomoi na ye, elingi koloba kobongola na monɔkɔ ya Allemand, Makomami ya Grɛki ya Érasme. Lokola banyataki yango na sanza Sɛtɛmbɛ 1522 kozanga koyebisa ete Luther moto abongolaki yango, bapesaki yango nkombo Biblia ya Sɛtɛmbɛ. Bazalaki kotɛka yango florin moko na ndambo—lifuta ya boyi ya mbula mobimba. Atako bongo, bato bazalaki koluka Biblia ya Sɛtɛmbɛ mingi. Nsima ya sanza 12, banyataki Babiblia 6 000 na mbala mibale, mpe na mbula 12 oyo elandaki, banyataki yango mbala koleka 69.
Na mobu 1525, Martin Luther abalaki Catherine de Bora, oyo liboso azalaki mamɛlo. Catherine ayebaki kotambwisa misala ya ndako mpe koyamba malamu ebele ya bato oyo mobali na ye azalaki kofandisa na ndako na bango. Bato ya ndako ya Luther ezalaki te kaka mwasi na ye ná bana na bango motoba, kasi mpe baninga, bato ya mayele, mpe bato oyo bazalaki kokima mpo bákangama te. Ntango Luther akómaki mobange, ayebanaki ete azali mopesi-toli monene mpe bato ya mayele oyo azalaki koyamba na ndako na ye bazalaki ntango nyonso na babiki ná nkasa na mabɔkɔ mpo na kokoma makambo oyo azalaki koloba. Makambo nyonso oyo bazalaki kokoma esangisamaki na buku moko oyo motó ya likambo na yango ezalaki Luthers Tischreden (Makambo Luther azalaki koloba na mesa). Na boumeli ya mwa bambula, buku yango ezalaki kotɛkama mingi koleka mikanda mosusu nyonso oyo ekomamaki na monɔkɔ ya Allemand, longola kaka Biblia.
Mobongoli ya makoki mpe mokomi monene
Na mobu 1534, Luther asilisaki kobongola Makomami ya Liebele. Ayebaki kopona maloba, kosangisa yango mpe kokoma yango na ndenge moko ya kitoko mpenza. Yango wana ata bato oyo batángá kelasi mingi te bakokaki kotánga Biblia oyo ye abongolaki. Mpo na lolenge na ye ya kobongola, Luther akomaki boye: “Tosengeli kosolola na bamama na ndako, bana na balabala mpe bato mpamba na zando mpe kotala minɔkɔ na bango mpo na koyoka ndenge bazali koloba, mpe kobongola na kolanda elobeli na bango.” Biblia ya Luther nde esalisá na kopona lolenge ya kokoma monɔkɔ ya Allemand oyo endimamá na Allemagne mobimba.
Luther azalaki kaka na makoki mingi ya kobongola mikanda te, kasi azalaki mpe mokomi monene. Balobaka ete ntango azalaki naino na makasi ya kosala, nsima ya pɔsɔ mibale mibale azalaki kokoma buku moko. Babuku yango mosusu ezalaki matata kaka lokola mokomi na yango. Ata ntango Luther akómaki mobange, lolenge na ye ya kokoma ebongwanaki te; azalaki kaka koloba polelepolele ndenge amesanaki, azalaki kobanga te. Kutu babuku oyo akomaki ntango akómaki mobange nde ezalaki na maloba makasi koleka. Buku moko (Lexikon für Theologie und Kirche) elobi ete makomi ya Luther ezali mpenza komonisa ete azalaki “moto ya nkanda mingi” mpe “azangaki komikitisa mpe bolingo” mpe “azalaki ntango nyonso komona ete azali na mokumba moko ya kokokisa.”
Ntango Etumba ya basali-bilanga (Guerre des Paysans) ebimaki mpe ebele ya bato bakufaki na bitúká ya Allemagne, batunaki likanisi ya Luther na likambo yango. Basali-bilanga bazalaki mpenza na ntina ya kotombokela bankolo na bango? Luther alukaki te kopesa eyano oyo ekosepelisa basali-bilanga mpo básepela na ye. Ye ayebaki mpe azalaki kondima ete basaleli ya Nzambe basengeli kotosa bakonzi. (Baloma 13:1) Kozanga kokakatana, Luther alobaki ete esengeli básalela makasi mpo na kosukisa botomboki yango. Alobaki boye: “Moto nyonso oyo akoki azokisa, abɛta masasi mpe aboma.” Hanns Lilje alobaki ete “ebele ya bato oyo bazalaki kolinga Luther na ntango wana baboyaki ye” mpo na eyano oyo apesaki. Lisusu, mpo na babuku oyo Luther akomaki na nsima, oyo ezalaki kolobela Bayuda oyo baboyaki kokóma baklisto, mingimingi oyo ezalaki na moto ya likambo ete Bayuda mpe lokuta na bango, bato mingi bakómaki koloba ete azalaki koyina Bayuda.
Libula ya Luther
Mbongwana oyo bato lokola Luther, Calvin, mpe Zwingli babandisaki ememaki na kobotama ya Lingomba ya Protesta. Libula monene oyo Luther atiká na Lingomba ya Protesta ezali liteya monene oyo elobaka ete Nzambe andimaka moto kaka mpo na kondima na ye. Etúká na etúká na Allemagne eponaki to Lingomba ya Protesta, to Lingomba ya Katolike. Lingomba ya Protesta epalanganaki mingi mpe ekómaki na ebele ya bato na mikili ya Scandinavie, na Suisse, na Angleterre mpe na Pays-Bas. Lelo oyo ezali na bankóto na bankóto ya bandimi.
Ata mpe bato mosusu oyo bandimaka mateya nyonso ya Luther te bamemyaka ye mingi. Na 1983, mokili oyo ezalaká République Démocratique d’Allemagne, oyo esangisaki bitúká ya Eisleben, Erfurt, Wittenberg, mpe Wartburg, esepelaki mbula 500 ya kobotama ya Luther. Mokili yango ya Socialisme endimaki ete Luther azali moto monene na lisolo mpe bonkɔkɔ ya Allemagne. Lisusu, moto moko ya teoloji na Lingomba ya Katolike na bambula ya 1980 alobelaki na mokuse mbongwana oyo Luther akɔtisá mpe alobaki ete: “Ezali na moto moko te oyo ayaki nsima ya Luther oyo bakoki koloba ete akokanaki na ye.” Profesɛrɛ Aland akomaki ete: “Mbula na mbula babimisaka mikanda soki 500 ya sika oyo elobelaka Martin Luther mpe Mbongwana—mpe mikanda yango ebimaka na minɔkɔ nyonso oyo elobamaka mingi na mokili.”
Martin Luther azalaki na mayele mingi mpenza, ayebaki mpenza koloba mpe azalaki mosali monene. Azalaki mpe motema mɔtɔmɔtɔ, mafumafu, mpe azalaki kotɔndɔla bokosi polelepolele. Ntango Luther alingaki kokufa na Eisleben na Febwali 1546, baninga na ye batunaki ye soki azalaki kaka kondima makambo oyo azalaki koteya. Ayanolaki bango ete “Ɛɛ.” Luther akufá, kasi tii lelo oyo bato mingi bandimaka mateya na ye.
[Elilingi na lokasa 27]
Luther azalaki kotɛmɛla likambo ya kotɛkela bato bolimbisi ya masumu
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Mit freundlicher Genehmigung: Wartburg-Stiftung
[Elilingi na lokasa 28]
Luther aboyaki kozonga nsima na mateya na ye mpe alobaki ete akotika kaka soki bato oyo bazalaki kotɛmɛla ye bandimisi ye na Biblia ete azali na libunga
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Euti na buku The story of Liberty, 1878
[Bililingi na lokasa 29]
Shambre ya Luther na Château de la Wartburg, esika abongolaki Biblia
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Bililingi: Mit freundlicher Genehmigung: Wartburg-Stiftung
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]
Euti na buku Martin Luther The Reformer, ebimeli ya 3, ebimisami na Toronto Willard Tract Depository, Toronto, Ontario
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 30]
Euti na buku The History of Protestantism (Vol. I)