Wessel Gansfort atɛmɛlaki mateya mosusu ya Katolike liboso ya bato mosusu
Moto nyonso oyo ayekolá lisolo ya mbongwana oyo ebimisá mangomba ya Protesta, oyo ebandaki na 1517, ayebi bato lokola Luther, Tyndale mpe Calvin. Kasi, kaka bato moke nde bayebi Wessel Gansfort. Balobaka ete atɛmɛlaki mateya mosusu ya Katolike liboso ya bato mosusu. Olingi koyeba ye malamu?
WESSEL abotamaki na mobu 1419 na engumba Groningen, na Pays-Bas. Na ekeke ya 15, bato mingi bazwaki libaku ya kokɔta kelasi te, kasi Wessel akɔtaki kelasi. Atako azalaki mayele mingi, atikaki kelasi mpo baboti na ye bazalaki babola mpenza. Likambo ya esengo, ntango mwasi moko oyo mobali na ye akufaki mpe azalaki na bozwi mingi ayokaki nsango ya mayele ya Wessel, andimaki kofutela ye kelasi. Yango wana, azongelaki kelasi. Nsima ya bambula, azwaki diplome moko monene ya iniversite. Emonani mpe ete na nsima akómaki nganga-mayele na teoloji.
Wessel azalaki na mposa makasi ya koyeba makambo. Nzokande, na ntango wana, babibliotɛkɛ ezalaki mingi te. Atako masini ya konyata mikanda esilaki kobima, babuku mingi ezalaki naino kokomama na mabɔkɔ, mpe ezalaki ntalo makasi. Wessel azalaki moko ya bato ya mayele oyo bazalaki kokende na babibliotɛkɛ mpe na bamonastɛrɛ ndenge na ndenge mpo na koluka bamaniskri oyo ezalaki komonana mpenza te mpe babuku oyo ebungá kala. Na nsima, bazalaki koyebisana makambo oyo batángaki na kati ya mikanda yango. Wessel akómaki na boyebi mingi mpenza mpe akomaki makambo ebele oyo azwaki na kati ya mikanda ya kala ya Grɛki mpe ya Latin. Bato mosusu ya teoloji bakómaki komitunatuna mingi mpo na ye mpo ayebaki makambo mingi oyo bango bayoká ata koyoka te. Bakómaki kobenga ye Magister Contradictionis, elingi koloba, nkolo ntembe.
“Mpo na nini ozali komema ngai epai ya Klisto te?”
Mbula soki 50 liboso ya mbongwana oyo ebimisá mangomba ya Protesta, Wessel akutanaki na Thomas à Kempis (na bambula 1379-1471), oyo ayebani lokola nkolo buku De Imitatione Christi (Komekola Klisto). Thomas à Kempis azalaki na lisangá moko ya bato oyo balingaki bomoi ya komipesa. Moto moko oyo akomaki lisolo ya Wessel alobaki ete Thomas à Kempis azalaki mbala na mbala kolendisa Wessel abondela Malia asalisa ye. Kasi, Wessel atunaki ye boye: “Mpo na nini ozali komema ngai epai ya Klisto te; ye oyo na boboto mpenza azali kobenga bato nyonso oyo bazali na mikumba báya epai na ye?”
Balobaka ete Wessel aboyaki kokóma sango. Ntango batunaki ye mpo na nini aboyaki bákata ye libandi ndenge bakataka moto oyo balingi kokómisa sango, ayanolaki ete soki andimi, lobá abɛli ligboma. Akondima ata bátya ye nsinga na nkingo akufa na esika bákata ye nsuki. Na ntembe te, alobaki bongo mpo bazalaki kosambisa basango te, mpe ekoki kozala ete bato mingi babikaki na liwa mpo bazalaki basango! Wessel atɛmɛlaki mpe bindimeli mosusu ya lingomba. Na ndakisa, bamonaki ye mabe mpo aboyaki kondima masolo ya bikamwiseli oyo ezalaki na buku moko (Dialogus Miraculorum) oyo eyebanaki mingi na ntango na bango. Kasi, ye alobaki ete: “Tosengeli nde kotángaka Makomami Mosantu.”
“Toyebaka kaka soki totuni”
Atako Érasme ná Reuchlin babotamaki naino te,a Wessel ayekolaki monɔkɔ ya Liebele ná ya Grɛki mpe akómaki na boyebi mingi ya makambo oyo Batata ya Lingomba bakomaki. Yango emonisi ete azalaki mpenza kolinga minɔkɔ mibale oyo bakomaki na yango Biblia. Liboso ya mbongwana oyo ebimisá mangomba ya Protesta, bato oyo bayebaki monɔkɔ ya Grɛki bazalaki mingi te. Na Allemagne, kaka mwa bato moke nde bayebaki Grɛki, mpe babuku oyo ekokaki kosalisa moto ayekola monɔkɔ yango ezalaki te. Ekoki kozala ete nsima ya kokwea ya Constantinople na mobu 1453, Wessel akutanaki na basango ya Grèce oyo bakimaki na Wɛsti mpe ayekolaki mwa ndambo ya Grɛki epai na bango. Na ntango wana, lokola Bayuda kaka nde bazalaki koloba monɔkɔ ya Liebele, emonani ete Wessel ayekolaki mwa ndambo ya Liebele epai ya Bayuda oyo bakómaki baklisto.
Wessel alingaki Biblia mingi. Azalaki kotalela yango lokola buku oyo ekomami na makanisi ya Nzambe, mpe azalaki kondima ete mikanda nyonso ya Biblia ezali na boyokani. Mpo na Wessel, bavɛrsɛ ya Biblia esengeli kolimbolama na kotalela likambo oyo bazali kolobela; esengeli te bápesa yango ndimbola mosusu. Ndimbola nyonso ya lokuta esengeli kotalelama lokola lipɛngwi. Moko ya bavɛrsɛ oyo azalaki kolinga mingi ezalaki Matai 7:7, oyo elobi: “Bókoba koluka, mpe bokomona.” Na kotalela vɛrsɛ wana, Wessel amonaki ete kotuna mituna ezali na litomba monene, mpamba te mpo na ye, “toyebaka kaka soki totuni.”
Asɛngaki eloko ya motuya mpenza
Na mobu 1473, Wessel akendeki na Rome. Kuna, azwaki libaku ya kokutana na Pápa Sixte IV, moko ya Bapápa motoba oyo etamboli na bango ya mbindo etindaki basango mosusu bábimisa mangomba ya Protesta. Barbara W. Tuchman, nganga-mayele moko na masolo ya kala, alobaki ete Sixte IV abandisaki “momeseno ya koluka bozwi mpe bokonzi na ndenge oyo ebongi te, kozanga koyoka ata nsɔni.” Apesaki bato nyonso nkanda na ndenge azalaki kotya kaka bato ya libota na ye na bisika ya minene. Nganga-mayele moko na masolo ya kala akomaki ete Sixte alingaki kokómisa ebonga ya pápa lokola eloko na ye ná bato ya libota na ye. Bato mingi bazalaki kobanga komonisa ete bazali kosepela te.
Kasi, Wessel Gansfort azalaki bongo te. Mokolo moko, Sixte alobaki na ye ete: “Mwana na ngai, sɛngá eloko nyonso olingi, tokopesa yo yango.” Mbala moko, Wessel alobaki ete: “Tata mosantu, . . . lokola yo nde ozali nganga-nzambe monene mpe mobateli ya bampate awa na mabelé, nazali kosɛnga . . . ete okokisa mokumba na yo monene na ndenge ebongi, mpo ntango Mobateli ya mpate Monene . . . akoya, aloba na yo ete: ‘Longonya, moombo ya malamu mpe ya sembo, kɔtá na esengo ya nkolo na yo.’” Sixte alobaki ete wana etali kaka ye moko mpe ete Wessel asengelaki nde kosɛnga eloko moko mpo na ye moko. Na yango, Wessel alobaki ete: “Soki bongo, pesá ngai Biblia moko ya bibliotɛkɛ ya Vatican oyo ekomamá na monɔkɔ ya Grɛki mpe na Liebele.” Pápa apesaki ye Biblia oyo asɛngaki, kasi alobaki na ye ete asali bozoba; asengelaki nde kosɛnga akómisa ye episkɔpɔ.
“Lokuta mpe libunga”
Lokola Sixte azalaki na mposa makasi ya mbongo mpo na kotonga ndako-nzambe ya Sixte, abandaki kofutisa bato mbongo mpo na milimo ya bawei na bango. Bato mingi bandimaki likambo yango. Buku moko (Vicars of Christ—The Dark Side of the Papacy) elobi boye: “Basi oyo bakufelá mibali, mibali oyo bakufelá basi mpe baboti oyo bakufelá bana bazalaki kopesa mbongo na bango nyonso na likanisi ete bazali kosalisa bato na bango bábima na epongelo.” Bato oyo batángá mingi te basepelaki mpenza na likambo yango, mpo bazalaki mpenza kondima ete pápa akoki kopesa bato na bango oyo bakufá nzela ya kokende na likoló.
Kasi, Wessel alobaki ete Lingomba ya Katolike, ezali na likoki ya kolimbisa masumu te, ata mpe pápa te. Wessel alobaki polele ete kosɛnga bato báfuta mbongo mpo na milimo ya bawei ezali “lokuta mpe libunga.” Amonisaki mpe ete ezali na ntina te kotubela epai ya sango mpo na kozwa bolimbisi ya masumu.
Wessel aboyaki mpe kondima ete pápa akoki kokwea na lisumu te. Alobaki ete soki bato basengeli kondimaka bapápa na makambo nyonso, ekozala likama mpo na kondima na bango, mpamba te bapápa basalaka mabunga. Wessel akomaki boye: “Soki basango batye mibeko ya Nzambe pembeni mpe bazali kotinda bato bándima mibeko oyo bango moko babimisi, . . . nyonso oyo bakosala mpe oyo bakosɛnga bato básala ezali na ntina te.”
Wessel afungolaki nzela ya kotɛmɛla lingomba
Wessel akufaki na 1489. Atako atɛmɛlaki bambeba mosusu ya lingomba, alongwaki na Katolike te. Nzokande, lingomba ebengaki ye mopengwi ata mokolo moko te. Kasi, nsima ya liwa na ye, basango oyo balingaka te moto aloba mabe ya Lingomba ya Katolike balukaki kobebisa mikanda na ye mpo ezalaki na boyokani te na mateya ya lingomba. Na eleko ya Luther, nkombo ya Wessel ezalaki koyokana lisusu mpenza te, ata mokanda na ye moko te enyatamaki mpe kaka mwa bamaniskri na ye moke nde etikalaki. Mikanda ya Wessel enyatamaki mpo na mbala ya liboso kaka soki na mbula 1520 to 1522. Na kati na yango, ezalaki mpe na mokanda moko oyo Luther akomaki mpo na koyebisa bato bátánga mikanda ya Wessel.
Atako Wessel abimisaki lingomba ya sika te lokola Luther, atɛmɛlaki mpenza bambeba mosusu oyo etindaki basango mosusu bálongwa na Lingomba ya Katolike mpe bábimisa mangomba ya Protesta. Buku moko (McClintock and Strong’s Cyclopedia) elobi ete Wessel “asalaki mingi koleka na kati ya bato nyonso ya Allemagne oyo bafungolaki nzela mpo na mbongwana na losambo.”
Luther amonaki ete ye ná Wessel bazalaki mpenza na makanisi ndenge moko. Profɛsɛrɛ Augustijn akomaki boye: “Luther azalaki koloba ete eleko na ye makambo oyo ekómelaki ye ekokani na oyo ya Eliya. Kaka ndenge Eliya azalaki kokanisa ete atikalaki kaka ye moko mpo na kobunda bitumba ya Nzambe, Luther mpe azalaki kokanisa ete azalaki kobunda na lingomba kaka ye moko. Kasi, ntango atángaki mikanda ya Wessel, amonaki ete Nkolo abikisaki mwa basambeli oyo ‘batikalaki na Yisalaele.’” “Luther alobaki kutu ete: ‘soki natángaka mikanda na ye liboso, banguna na ngai balingaki koloba ete Luther azwi kaka makanisi ya Wessel. Makanisi na ye ekokani mpenza na oyo ya ngai.’”b
“Bokomona”
Mbongwana na makambo ya losambo eyaki na mbalakaka te. Makanisi oyo ememaki na mbongwana yango ebandaki kala. Wessel amonaki ete nsukansuka makambo mabe ya bapápa ekomema na botɛmɛli. Mokolo moko, alobaki na moyekoli moko boye: “Mwana, mokolo mosusu okomona ndenge bato ya mayele oyo bazali baklisto ya solo bakobwaka mateya . . . ya bato ya teoloji oyo balingá ntembe.”
Atako Wessel ayebaki mwa mateya ya lokuta mpe makambo mabe oyo ezalaki kosalema na ntango na ye, amonaki solo ya Biblia nyonso te. Atako bongo, amonaki ete Biblia ezali mokanda oyo bato basengeli kotánga mpe koyekola. Buku moko (A History of Christianity) elobi ete “Wessel azalaki kokanisa ete lokola Biblia ekomamaki na lisalisi ya Elimo Santu, yango nde esengeli kokata makambo na oyo etali losambo.” Na moi ya lelo, baklisto ya solo bandimaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. (2 Timote 3:16) Na yango, ezali lisusu mpasi te kokanga ntina ya mateya ya Biblia. Lelo oyo, emonani lisusu polele koleka ete Biblia elobaka solo ete: “Bókoba koluka, mpe bokomona.”—Matai 7:7; Masese 2:1-6.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mibali yango basalaki mosala monene mpo na kosalisa bato báyekola minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia. Na 1506, Reuchlin abimisaki buku ya gramɛrɛ ya Liebele, oyo esalisaki bato báyekola Makomami ya Liebele na mozindo. Érasme abimisaki Makomami ya Grɛki ya boklisto na mobu 1516.
b Buku Wessel Gansfort (1419-1489) and Northern Humanism, nkasa 9, 15.
[Etanda/Elilingi na lokasa 14]
Wessel Mpe Nkombo Ya Nzambe
Na bisika mingi na mikanda ya Wessel, abongolaki nkombo ya Nzambe na “Johavah.” Kasi, Wessel akomaki mpe “Jehovah” na bisika soki mibale. Ntango mokomi H. A. Oberman alobelaki makanisi ya Wessel, asukisaki ete Wessel alobaki ete soki Thomas d’Aquin mpe basusu báyebaka monɔkɔ ya Liebele, “balingaki koyeba ete nkombo oyo Nzambe ayebisaki Moize elimboli te ‘nazali oyo nazali,’ kasi nde ‘nakozala oyo nakozala.’”c Libongoli ya mokili ya sika ebongoli yango malamu mpenza ete: “Nakozala oyo nakozala.”—Exode 3:13, 14.
[Maloba na nse ya lokasa]
c Buku Wessel Gansfort (1419-1489) and Northern Humanism, lokasa 105.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Manuscript: Universiteitsbibliotheek, Utrecht
[Bililingi na lokasa 15]
Wessel atɛmɛlaki makasi likambo ya kofutisa bato mbongo mpo na kosambela mpo na milimo ya bawei na bango, oyo Pápa Sixte IV abimisaki