Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/11 lok. 27
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Masolo mosusu
  • Mituna na batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka fɛti ya mbotama te?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Bafɛti nyonso esepelisaka Nzambe?
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Baklisto mpe masano ya mbongo
    Lamuká!—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/11 lok. 27

Mituna ya batángi

Ndenge nini moklisto asengeli kotalela likambo ya kolata “libanga ya sanza oyo abotamaki”?

Epai ya bato mosusu, sanza na sanza ezali na libanga na yango. Kolata lopɛtɛ oyo ezali na libanga ya ntalo ezali ekateli ya moto na moto. (Bagalatia 6:5) Kasi, ntango azali kozwa ekateli wana, ezali na mwa makambo ya ntina oyo ebongi atalela.

Buku moko (Encyclopaedia Britannica) emonisi ete libanga ya sanza oyo moto abotamaki ezali “libanga ya ntalo oyo eyokani na sanza ya kobotama ya moto oyo bakanisaka ete ntango moto alati yango, ekopesa ye makila malamu to akozala nzoto kolɔngɔnɔ.” Buku yango ebakisi boye: “Banda kalakala, bato ya astroloji balobaka ete mabanga yango ezalaka na nguya moko ya kokamwa.”

Mingimingi na ntango ya kala, bato mingi bazalaki kondima ete libanga ya sanza oyo moto abotamaki ezalaki kopesa moto oyo alati yango makila malamu. Moklisto andimaka likambo yango? Te, mpamba te ayebi ete Yehova asepelaki te na bato oyo batikaki ye mpe batyaki motema na “nzambe ya Makila Malamu.”​—Yisaya 65:11, NW.

Na eleko ya Moyen-Âge, bato ya bikelakela baponaki libanga mokomoko ya ntalo mpo na sanza mokomoko ya mbula. Bazalaki kolendisa bato bálataka libanga ya sanza oyo babotamaki, mpo na kobatela bango na mabe. Kasi, soki moklisto alandi makanisi ya bato oyo basakolaka makambo ekoya ekomonana ete atiki kolanda Biblia, mpamba te Biblia ezali kokweisa makambo yango.​—Deteronome 18:9-12.

Ezali mpe malamu te ete moklisto atalela lopɛtɛ ete ezali na ntina mingi mpo na ye kaka mpo ezali na libanga ya sanza oyo abotamaki. Batatoli ya Yehova bakumisaka mokolo ya kobotama na bango te. Bakumisaka mikolo yango te mpamba te ekumisaka moto mingi mpe mpo bafɛti ya mokolo ya kobotama oyo Biblia elobeli ezali kaka ya bakonzi oyo basambelaki Nzambe te.​—Genese 40:20; Matai 14:6-10.

Bato mosusu bakanisaka ete kolata lopɛtɛ oyo ezali na libanga ya sanza oyo moto abotamaki ebongisaka bomoto ya ye oyo alati yango. Kasi, baklisto ya solo bandimaka likambo yango te, mpo bayebi ete elimo santu mpe kotosa mitinda ya Biblia nde esalisaka moto alata “bomoto ya sika.”​—Baefese 4:22-24.

Likambo ya ntina mingi ezali makanisi oyo moto azali na yango. Liboso moklisto azwa ekateli ya kolata lopɛtɛ oyo ezali na libanga ya sanza oyo abotamaki, asengeli komituna boye: ‘Nalingi kolata lopɛtɛ yango kaka mpo nasepelaka na libanga yango, atako ezali mpe “libanga ya sanza oyo nabotamaki”? To nalandi nde mwa biyambayamba ya bato mpo na mabanga yango?’

Moklisto asengeli kotalela motema na ye mpo na koyeba eloko oyo ezali kotinda ye alata lopɛtɛ ya ndenge wana. Biblia elobi boye: “Kati na biloko nyonso oyo esengeli kobatelama koleka, batelá motema na yo, mpo makambo nyonso ya bomoi eutaka na kati na yango.” (Masese 4:23, NW ) Liboso ya kozwa ekateli ya kolata lopɛtɛ oyo ezali na libanga ya sanza oyo abotami, ezali malamu moklisto mokomoko atalela eloko oyo ezali kotinda ye alata lopɛtɛ yango mpe makambo oyo yango ekoki kobimisela ye moko mpe bato mosusu.​—Baloma 14:13.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto