Okoki kolonga kokakatana
MBALA mingi toyokaka maloba lokola oyo: “Ekozanga te,” “Ezali solo,” “Ekosalema mpenza.” Kasi, na bomoi ya mokolo na mokolo, makambo oyo tokoki kotya mpenza motema ete ekokokisama ezalaka mingi te. Makambo mingi ekómelaka biso na mbalakaka; yango wana, tomitunaka soki ezali na likambo oyo tokoki kolikya ete ekosalema mpenza ndenge tokanisaki. Tokakatanaka na makambo mingi na bomoi na biso.
Bato mingi balingaka ete bango moko mpe mabota na bango ezala kimya mpe malamu. Bato yango bazali koboma nzoto na mosala mpo na kozwa biloko oyo bakanisi ete ekopesa bango esengo mpe ekosalisa bango, mingimingi mbongo mpe biloko mosusu ya mokili. Nzokande, makama lokola koningana ya mabelé, mopɛpɛ makasi, to likama mosusu ya monene ekoki kobebisa biloko wana na ngonga moko. Bomoi ya moto ekoki kobongwana mbala moko ntango abɛli maladi makasi, libala na ye ekufi, to balongoli ye na mosala. Mbala mosusu, makambo wana ekokómela yo te. Kasi, koyeba kaka ete likama ya monene ekoki koyela biso ata na ntango nini, ekoki kotungisa biso. Kasi, esuki wana te.
Kokakatana na makanisi ekokani na kozala na ntembe, mpe diksionɛrɛ moko elobi ete “ntembe” ezali “kokakatana mpo na kondima likambo moko to likanisi oyo mbala mingi epekisaka moto azwa bikateli.” Lisusu, buku moko (Managing Your Mind), elobi ete “kokakatana na likambo moko ya monene nde ememelaka bato mingi na komitungisa na makanisi.” Moto oyo azali kokoka te kosilisa ntembe na motema na ye, akoki kobanda komitungisa mpe kokóma nkandankanda. Ya solo, komitungisa mpo na makambo oyo ekoki kokómela biso ekoki kopesa biso mpasi na makanisi mpe maladi na nzoto.
Mpo na nyonso wana, bato mosusu mpe bamitungisi ata moke te. Basalaka lokola elenge moko ya Brésil oyo alobaki boye: “Mpo na nini komitungisa mpo na makambo oyo ekoya? Lelo ezali lelo mpe lobi ekozala lobi.” Makanisi motindo wana ya koloba ete “tiká tólya mpe tómɛla,” ememelaka moto kaka mawa, mpasi mpe nsukansuka liwa. (1 Bakolinti 15:32) Eleki malamu kotalela Mozalisi na biso, Yehova Nzambe; Biblia elobi ete “epai na ye kobongwana ya kobaluka ya elili ezalaka te.” (Yakobo 1:17) Soki toyekoli Liloba ya Nzambe, Biblia, tokozwa batoli ya ntina mingi mpe tokoyeba oyo tokoki kosala ntango tozali kokakatana na makanisi. Ekoki mpe kosalisa biso tóyeba mpo na nini bato mingi bazali kokakatana na makambo mingi.
Ntina oyo bato bazali kokakatana
Biblia ezali kosalisa biso tótalela bomoi ndenge mpenza ezali mpe ezali kosalisa biso tókóma na ndenge malamu ya kotalela ezaleli ya kokakatana mpe tóbongwana. Atako makambo lokola kozala na boyokani malamu na libota, mosala ya lokumu, mayele, kozala nzoto kɔlɔngɔnɔ mpe makambo mosusu ekoki kopesa moto mwa kimya, Biblia emonisi ete tosengeli kokanisa te ete makambo yango ekoki kobongwana te to tokoki kozala na bomoi oyo ezangi mitungisi. Mokonzi Salomo alobaki boye: “Momekano ezali kaka mpo na bato ya mbangu te, etumba ezali kaka mpo na bato ya makasi te, mpe bilei mpo na bato ya bwanya te, ata mpe bozwi mpo na bato ya mayele te, ata mpe lokumu mpo na bato bayebi makambo mingi.” Mpo na nini? “Mpamba te, ntango mpe likambo ekanami te ekómelaka bango nyonso.” Yango wana Salomo abakisaki boye: “Kaka ndenge bambisi ezwamaka na monyama mpe bandɛkɛ ekangamaka na motambo, bana ya bato mpe bazwamaka na makambo mabe, ntango ekómelaka bango na mbalakaka.”—Mosakoli 9:11, 12, NW.
Yesu Klisto mpe alobaki ete ekozala na ntango moko oyo bato nyonso bakobanda kobanga mpe bakozala mitema likoló. Alobaki boye: “Bilembo ekozala na moi mpe na sanza mpe na minzoto, mpe awa na mabelé bwale na bikólo, koyebáká te ndenge ya kosala na ntina etali konguluma ya mbu mpe kotomboka na yango, ntango bato bakolɛmba nzoto na kobanga mpe na kozela makambo oyo ezali koya na mabelé oyo efandami; mpo banguya ya likoló ekoningana.” Kasi, Yesu alobaki mpe likambo moko ya kolendisa mpo na bato oyo bazali mitema sembo lelo oyo: “Ntango bokomona makambo wana ezali kobima, bóyeba ete bokonzi ya Nzambe ekómi pene.” (Luka 21:25, 26, 31) Yango wana, atako tozali komona makambo ya nsɔmɔ, na esika tóbanga mikolo ezali koya, kondima na biso epai ya Nzambe ekosalisa biso tózala na elikya ya bomoi ya malamu na mikolo ezali koya.
‘Tózala na kondimisama makasi ya elikya’
Atako tokoki te kotya motema ete makambo nyonso oyo tozali koyoka, kotánga to komona ete ezali malamu, tozali na ntina malamu ya kotyela Mozalisi motema. Azali Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, kasi azali mpe Tata ya bolingo oyo amibanzabanzaka mpo na bana na ye. Na ntina na liloba na ye, Nzambe alobi boye: “[Ekozonga] epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolonga na likambo litindaki ngai yango.”—Yisaya 55:11.
Yesu Klisto ateyaki solo ya Nzambe mpe bato mingi oyo bayokaki ye bandimaki yango kozanga kokakatana. Na ndakisa, etuluku moko ya Basamalia ya mitema sembo bayebisaki mwasi oyo ayokaki Yesu liboso na bango ete: “Ezali lisusu te mpo na maloba na yo nde tozali kondima; mpo toyoki biso moko mpe toyebi ete moto oyo azali solo mpenza mobikisi ya mokili.” (Yoane 4:42) Lelo oyo mpe, atako mokili etondi na makama, tosengeli kokakatana te na oyo etali makambo oyo tozali kondima.
Bato mingi balobaka ete ezali na ntina te koluka kokanga ntina ya mateya ya lingomba, esengeli kaka kondima. Kasi Luka, moko ya bato oyo bakomaki Biblia, akanisaki bongo te. Alukalukaki mpe alobelaki makambo ya solo mpo bato mosusu ‘báyeba mpenzampenza bosolo ya makambo’ oyo akomaki. (Luka 1:4) Bandeko mpe baninga na biso oyo bazali Batatoli te bakoki kokanisa ete makambo oyo tolikyaka ekosalema te; yango wana, ezali na ntina tóyeba kolimbola ntina ya kondima na biso. (1 Petelo 3:15) Tokosalisa bato mosusu na kondimela Nzambe se soki tozali koyeba malamumalamu ntina oyo tozali kondima. Biblia elobi ete: “[Yehova azali] libanga, mosala na ye ebongi; mpo ete nzela na ye nyonso boyengebene. Nzambe ya sembo mpe ya mabe te, ye moyengebene mpe mosembwi.”—Deteronome 32:4.
Talá ndenge oyo vɛrsɛ yango esuki: “Ye moyengebene mpe mosembwi.” Nini ezali kondimisa biso maloba yango? Ntoma Petelo azalaki mpenza kondima likambo yango. Ayebisaki mokonzi moko ya basoda ya Loma ná libota na ye ete: “Ya solo mpenza namoni ete Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.” (Misala 10:34, 35) Petelo alobaki bongo mpo amonaki makambo oyo Nzambe asalaki mpo na komonisa ete andimaki libota moko ya bapakano, oyo liboso ezalaki mbindo mpe akokaki kondima yango te. Na ndakisa ya Petelo, biso mpe tokoki kondima ete Nzambe aponaka bilongi te mpe azali sembo, ntango tozali komona “ebele ya bato,” oyo bakómi lelo oyo koleka milio motoba, na kati ya bikólo koleka 230, batiki bizaleli na bango ya kala mpe bazali kotambola na nzela ya boyengebene.—Emoniseli 7:9; Yisaya 2:2-4.
Biso baklisto ya solo tosengeli te kozala bato ya bindimandima, kasi tosengeli kozala bato ya komikitisa mpe bato ya makambo makasimakasi te. Atako bongo, tokakatanaka te na mitema biso na ntina na makambo oyo tondimaka mpe oyo tolikyaka. Ntoma Paulo akomelaki baklisto ya ekeke ya liboso boye: “Tolingi ete mokomoko na bino amonisa molende ya ndenge wana mpo na kozala na kondimisama makasi ya elikya tii na nsuka.” (Baebele 6:11) Biso mpe, nsango malamu ya Biblia epesi biso “kondimisama makasi ya elikya.” Paulo alobaki lisusu ete elikya yango, oyo euti mpenza na Liloba ya Nzambe, “eyokisaka mawa te.”—Baloma 5:5.
Longola yango, tondimaka mpe ete koteya bato mosusu nsango malamu ya Biblia ekoki kopesa bango elikya mpe kosalisa bango bázala kolɔngɔnɔ na nzoto, na elimo mpe na makanisi. Tokoki koloba lokola Paulo ete: “Nsango malamu oyo tozali kosakola eyaki epai na bino kaka na maloba te kasi mpe na nguya mpe na elimo santu mpe na kondimisama makasi.”—1 Batesaloniki 1:5.
Mapamboli oyo tozali kozwa lelo oyo mpo na kimya ya elimo
Atako tokoki te kolikya kozala na kimya na makambo nyonso lelo oyo, ezali na makambo oyo tokoki kosala oyo ekosalisa biso tózala mwa malamu mpe na mwa kimya. Na ndakisa, koyangana pɔsɔ na pɔsɔ na makita esalisaka biso tózala na kimya mpamba te na makita yango bateyaka biso mitinda ya sembo mpe bizaleli ya malamu. Paulo akomaki boye: “Pesá mitindo na baoyo bazali bato ya bomɛngo na kati ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ete bázala na lolendo te, mpe bátya elikya na bango te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi, kasi nde epai ya Nzambe, oyo apesaka biso biloko nyonso beboo mpo biso tósepela.” (1 Timote 6:17) Bato mingi, lokola bayekoli kotya elikya na bango epai ya Yehova, na esika ya kotya yango na biloko ya mokili oyo ekoleka to ya komipesa na bisengo, babosani mitungisi mingi oyo bazalaki na yango liboso.—Matai 6:19-21.
Na kati ya lisangá, bandeko na biso baklisto basalisaka mpe balendisaka biso na ndenge mingi. Mbala moko, ntango Paulo azalaki kosakola, ye ná baninga na ye ya mobembo bakutanaki na “monyoko ya nsɔmɔ,” mpe “[bazalaki] mpenza kobanga ata mpo na bomoi na [bango].” Banani balendisaki mpe basungaki Paulo? Ya solo, kondima na ye epai na Nzambe ekitaki ata moke te. Kasi, bandeko na ye baklisto mpe balendisaki ye. (2 Bakolinti 1:8, 9; 7:5-7) Lelo oyo, ntango likama moko monene esalemi to bato bakutani na mpasi makasi, mbala mingi bandeko na biso baklisto bazalaka bato ya liboso oyo bamemaka biloko mpo na kosunga baninga na bango mpe bato mosusu oyo bazali na bosɛnga mpe balendisaka bango na elimo.
Likambo mosusu oyo esalisaka moto alonga kokakatana na makanisi ezali libondeli. Tokoki kobondela Tata na biso ya bolingo ntango tokutani na mikakatano ya mbalakaka. “[Yehova] azali lokola ebatelelo makasi mpo na bango banyokolami; azali ebatelelo makasi ntango na minyoko.” (Nzembo 9:9) Baboti bakoki kokima mokumba ya kobatela bana na bango. Kasi, Nzambe alingaka kosalisa biso tólongola kobanga mpe kokakatana na makanisi. Soki tozali kobondela Yehova mpo na kokitisela ye mitungisi na biso, tokoki kondimisama ete “akoki kosala mingi mpenza koleka makambo nyonso oyo tosɛngaka to oyo eyelaka biso na makanisi.”—Baefese 3:20.
Obondelaka Nzambe mbala na mbala? Ondimaka ete Nzambe ayokaka mabondeli na yo? Elenge mwasi moko ya São Paulo alobaki boye: “Mama na ngai ayebisaki ngai ete nasengeli kobondelaka. Kasi ngai nazalaki komituna ete: ‘Mpo na nini kosolola na moto oyo nayebi ata te?’ Kasi, Masese 18:10 esalisaki ngai na koyeba ete tozali na mposa ya lisalisi ya Nzambe mpe tosengeli kosolola na ye na nzela ya libondeli.” Vɛrsɛ yango elobi boye: “Nkombo ya [Yehova ] ezali ndako molai ya nguya; moyengebene akokima kuna mpe akobika.” Tokoki te kondimela Yehova mpe kotyela ye mpenza motema soki tomeseni te kosolola na ye. Mpo na kobatelama na elimo, tosengeli kozala na momeseno ya kosala mabondeli oyo euti mpenza na motema. Yesu alobaki boye: “Bólala mpɔngi te, kopesáká malɔmbɔ ntango nyonso mpo bólonga kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kobima, mpe kotɛlɛma liboso ya Mwana ya moto.”—Luka 21:36.
Likambo mosusu oyo tokoki kondima kozanga kokakatana ete ekokokisama ezali elikya ya Bokonzi ya Nzambe. Talá oyo Danyele 2:44 elobi: “Nzambe na lola akotemisa bokonzi bokobebisama soko moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.” Elikya yango ezali makasi mpe tokoki kondima ete ekokokisama mpenza. Mbala mingi, bato bakokisaka maloba na bango te; kasi, tokoki ntango nyonso kondimela liloba ya Yehova. Yehova azali lokola libanga monene oyo tokoki kobombama nsima na yango. Tokoki kokanisa lokola Davidi oyo alobaki ete: “Nzambe ya libanga na ngai, oyo nakokima epai na ye. Nguba na ngai mpe liseke na kobikisama na ngai, esika na likoló na ngai mpe ebombelo na ngai, mobikisi na ngai na mpasi na ngai.”—2 Samwele 22:3.
Buku oyo tolobelaki liboso (Managing Your Mind ) elobi lisusu boye: “Soki moto azali komitungisa mingi mpo na makambo ya mabe oyo ekoki kokómela ye, makambo yango ekokɔtela ye na makanisi, mpe ekozala mpasi mingi mpo alonga yango.” Yango wana, tólinga te ete mitungisi ya mokili oyo ekómela biso lokola kilo na motó. Na esika ya kokanisaka mingi mitungisi ya mokili, oyo etindaka biso na kokakatana na makanisi, tosengeli nde kotya motema na bilaka ya Nzambe oyo ekozanga te kokokisama. Soki tobateli kondima makasi na bilaka ya Yehova oyo ekozanga te kokokisama, tokondimisama na likambo oyo: “Moto moko te oyo atyaka kondima na ye likoló na ye akoyoka nsɔni.”—Baloma 10:11.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]
Liloba ya Nzambe elaki ebele ya mapamboli na mikolo ekoya
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 30]
“Moto moko te oyo atyaka kondima na ye likoló na ye akoyoka nsɔni.”
[Elilingi na lokasa 31]
Nsango malamu ya Bokonzi epesaka bato kimya