Mangomba nde ezali komemela bato mikakatano?
MOTO moko oyo azalaká misionɛrɛ ya Lingomba ya Méthodiste akomaki boye: “Ntango mangomba ezali kotinda bato na bitumba te, ezalaka lokola bangi oyo elalisaka bango mpɔngi na makanisi mpe elɔtisaka bango bandɔtɔ. . . . Ekómisaka bato mayele mokuse, bakómaka na biyambayamba, etindaka bango báyina bato mosusu mpe ekómisaka bango bibangabanga.” Abakisaki boye: “Nalobi lokuta te. Losambo ya mabe ezali, ya malamu mpe ezali.”—Buku Start Your Own Religion.
Bato mosusu bakoki koloba ete ‘abakisaki nde mungwa ná pilipili mpo na koloba mabe ya mangomba.’ Kasi, biso moko tozali komona te ete makambo oyo esalemá ezali kolongisa ye? Losambo, elingi koloba kosalela mpe kokumisa Nzambe to bikelamo mosusu ya elimo, ememi bato na kosala makambo mingi ya mabe. Losambo esengeli kofungola biso miso mpe kopesa biso makanisi malamu. Kasi, mbala mingi ezali kobimisa bitumba, kowelana, mpe koyinana. Mpo na nini bongo?
“Anzelu ya pole” ya lokuta
Biblia epesi eyano moko ya polele na likambo yango. Satana Zabolo azali komibimisa lokola “anzelu moko ya pole” mpe abungisi ebele ya bato nzela mpe amemi bango na kolanda mateya na ye na esika bálanda mateya ya Nzambe. (2 Bakolinti 11:14) Ntoma Yoane amonisaki mpenza ete Satana azali mokonzi ya mokili ntango alobaki ete “mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Yoane ayebaki ete Satana azali “kobungisa mabelé mobimba oyo efandami nzela.”—Emoniseli 12:9.
Yango ebimisi makambo nini? Satana abimisi mangomba oyo ezali komonana lokola nde ezali malamu. Bato na yango bazali ‘komilakisa lokola bato ya Nzambe,’ kasi mbuma oyo bazali kobota ezali komonisa ndenge mpenza oyo bazali. (2 Timote 3:5, Bible na Lingala ya lelo oyo; Matai 7:15-20) Na esika mangomba yango esalisa bato na kosilisa mikakatano na bango, yango moko ekómi mokakatano mosusu.
Koloba nokinoki te ete likanisi yango ezali kaka bilobaloba ya mpamba to ete ezali kolekisa ndelo. Kobosana te ete moto oyo bazali kokosa ayebaka te ete bazali kokosa ye. Ntoma Paulo apesaki ndakisa moko ya likambo yango ntango akomaki boye: “Biloko oyo bikólo mosusu bapesaka mbeka bapesaka yango mbeka epai ya bademo, kasi epai ya Nzambe te.” (1 Bakolinti 10:20) Na ntembe te, soki bato yango bayebaki ete bazali kosambela bademo, balingaki komona yango mabe mpenza. Bazalaki kokanisa ete bazali kosambela nzambe to mpe banzambe ya malamu. Nzokande, bakosamaki na “mampinga ya bilimo mabe na kati ya bisika ya likoló,” oyo bazali kosala elongo na Satana mpo na kobungisa bato nzela.—Baefese 6:12.
Na ndakisa, tókanisa ebele ya baklisto oyo Satana akosaki mpe abungisaki nzela mpo baboyaki kolanda toli ya ntoma Yoane ete bákeba na nguya ya bokosi ya bilimo mabe wana.—1 Bakolinti 10:12.
Yesu ateyaki maloba ya Nzambe
Yesu Klisto alobaki boye: “Oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ya moto oyo atindaki ngai.” (Yoane 7:16) Ya solo, mateya na ye eutaki epai ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Yango wana mateya ya Yesu ezalaki na nguya mpe ezalaki kobongola mpenza bomoi ya bato. Mateya ya Yesu ezalaki te ‘kolalisa bato mpɔngi na makanisi mpe kolɔtisa bango bandɔtɔ.’ Mateya na ye ezalaki nde kolongola mabunga ya mangomba mpe kokweisa bafilozofi ya bato, oyo ezalaki kouta na mokili oyo ezalaki “na kati ya molili na makanisi” mpo na bokosi ya Zabolo.—Baefese 4:18; Matai 15:14; Yoane 8:31, 32.
Baklisto ya solo bazalaki koyebana na bosantu ya maloba te, kasi na kondima na bango oyo ezalaki komonana na bizaleli malamu oyo ezali mbuma ya elimo santu ya Nzambe. (Bagalatia 5:22, 23; Yakobo 1:22; 2:26) Bolingo nde ezaleli oyo eleki monene, mpe yango nde elembo oyo emonisaka baklisto ya solo.—Yoane 13:34, 35.
Kasi, tótalela naino likambo ya ntina mingi oyo: Ezala Yesu to bantoma na ye, moko te azalaki kokanisa ete lisangá ya boklisto ekotikala kaka ndenge ezalaki na ebandeli. Bayebaki ete lipɛngwi ekokɔta mpe losambo ya solo ekobunga mpo na mwa ntango.
Lingomba ya solo ebungi mpo na mwa ntango
Na lisese moko oyo alobelaki blé ná matiti mabe, Yesu asakolaki ete lingomba ya solo ekobunga mpo na mwa ntango. Tángá lisolo yango na Matai 13:24-30, 36-43. Yesu alonaki elanga ya blé, “milona ya malamu,” elingi koloba bayekoli na ye ya sembo oyo basalaki lisangá ya boklisto ya ebandeli. Kasi, akebisaki ete na nsima, “monguna,” Satana Zabolo, akolona “matiti mabe” na kati ya elanga ya blé, elingi koloba bato oyo bakomibenga bayekoli ya Yesu, kasi bakolanda mateya na ye te.
Mwa moke nsima ya liwa ya bantoma ya Yesu, bato oyo bazalaki “matiti mabe” bamonanaki mpe bakómaki koteya mateya etɛngamá na esika ya “Liloba ya [Yehova].” (Yilimia 8:8, 9; Misala 20:29, 30) Yango ebimisaki lingomba ya boklisto ya mabe mpe ya lokuta. Batambwisi na yango ezali bato oyo Biblia ezali kobenga “motyoli mibeko,” elingi koloba bakonzi ya mangomba oyo batondi na “bokosi nyonso ezangi boyengebene.” (2 Batesaloniki 2:6-10) Yesu asakolaki ete makambo ekobongwana ‘na bosukisi ya ebongiseli ya makambo.’ Na ntango yango, baklisto ya solo, oyo bamonisami na blé, bakoyanganisama mpe na nsuka, “matiti mabe” ekotumbama.
Boklisto yango ya monyato nde ebimisi “mobulu makasi oyo ezali kosalema banda bankama ya bambula” mpe ekɔtisi molili ya elimo na kati ya mangomba ya boklisto. Ntoma Petelo asakolaki likambo yango mpe makambo mosusu ya mabe mpe ya mobulu oyo ezali kosalema na nkombo ya mangomba mpe alobaki ete “mpo na bango [bato oyo bamibengaka baklisto] nzela ya solo ekofingama.”—2 Petelo 2:1, 2.
‘Mateya oyo elendisaka nkanda mpe koyinana’
Mangomba ya boklisto kaka te nde ezali kobebisa lokumu ya mangomba. Na ndakisa, kanisá “bandimi oyo batɛká milimo” oyo, Karen Armstrong, oyo azalaká mamelo, alobaki ete bazali na “mangomba nyonso ya minene.” Armstrong alobaki ete lingomba ya malamu esengeli kotinda bato na “komonisa motema mawa.” Mangomba oyo elandaka makambo ndenge kaka elobami to ekomami ezali nde kolendisa bato na komonisa motema mawa? Armstrong akomaki boye: “Bakonzi ya mangomba oyo elandaka makambo ndenge kaka elobami to ekomami, ezala ya Bayuda, ya boklisto to ya Bamizilma, basalaka yango te mpamba te mateya na bango elendisaka nkanda mpe koyinana.” (Buku The Battle for God—Fundamentalism in Judaism, Christianity and Islam) Kasi, kaka mangomba oyo elandaka makambo ndenge elobami to ekomami nde eteyaka komonisa motema mawa te mpe na bongo, ekómá koteya “mateya oyo elendisaka nkanda mpe koyinana”? Makambo oyo eleká ezali komonisa ete ezali bongo te.
Satana abimisá lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba, oyo etondi na nkanda, zuwa, mpe ezali ntango nyonso kosopa makila. Biblia ebengi lisangá yango “Babilone Monene, mama . . . ya biloko ya bosɔtɔ ya mabelé,” mpe emonisi yango na elilingi ya mwasi ya ndumba oyo afandi likoló ya nyama mabe oyo ezali komonisa bibongiseli ya politiki. Kutu, Biblia elobi ete “makila . . . ya baoyo nyonso babomamaki na mabelé” ezali na motó na ye.—Emoniseli 17:4-6; 18:24.
Bato nyonso te nde bakosami
Kasi, emonani mpenza ete bato nyonso te nde bakosami. Melvyn Bragg akomaki ete ata na bileko oyo mabe elekaki, “bato mosusu bazalaki kosala makambo ya malamu, atako bato mingi bazalaki mabe.” Baklisto ya solo bakobaki ‘kosambela Nzambe na elimo mpe na solo.’ (Yoane 4:21-24) Bakabwanaki na mangomba oyo emibebisaki na ndenge ezalaki “kopesa mabɔkɔ na makonzi ya mokili.” Baboyaki boyokani kati na mangomba mpe Leta oyo emonani mpenza ete ezali “boyokani oyo esalemi na Satana kasi na Yesu ya Nazalete te.”—Buku Two Thousand Years—The Second Millennium: From Medieval Christendom to Global Christianity.
Na mikolo na biso, Batatoli ya Yehova bayebani malamu mpo na mosala na bango ya kosalisa bato na kosala malamu. Lokola baboyi kobebisama na mangomba ya lokuta, bindimeli na bango mpe etamboli na bango elandaka kaka Biblia, Liloba ya Nzambe. (2 Timote 3:16, 17) Lokola baklisto ya ekeke ya liboso, bango mpe bazali kotosa etinda ya Yesu ete bázala “bato ya mokili te.” (Yoane 15:17-19; 17:14-16) Na ndakisa, na ntango Banazi bazalaki koyangela Allemagne, Batatoli ya Yehova bakangamaki kaka na mitinda ya boklisto oyo eyokanaki te na mibeko ya Banazi. Hitler ayinaki bango mpo na likambo yango. Buku moko ya mateya mpo na bana-kelasi elobi boye: “Batatoli ya Yehova . . . batosaki mateya ya Biblia oyo epekisi kosimba bibundeli. Yango wana baboyaki kosala mosala ya soda to kopesa Banazi mabɔkɔ. Mpo na yango, basoda ya Nazi bakangaki Batatoli ya Yehova mingi ná mabota na bango mpe batyaki bango na bolɔkɔ.” (Buku Germany—1918-1945) Ebele ya Batatoli ya Yehova ya Allemagne bakufaki mpo Banazi bazalaki konyokola bango.
Ya solo, bato mosusu ya mpiko na mangomba mosusu mpe banyokwamaki mpo na kondima na bango. Kasi mpo na Batatoli ya Yehova, lingomba na bango mobimba nde enyokwamaki. Batatoli ya Yehova mingi batikalaki sembo mpe balandaki etinda ya Biblia oyo: ‘Bótosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.’—Misala 5:29; Malako 12:17.
Ntina mpenza ya likambo
Yango wana, ezali solo te koloba ete mangomba nyonso nde ezali kobimisa mikakatano oyo bato bazali kokutana na yango. Kaka mangomba ya lokuta nde ezali kobimisa mikakatano yango. Kasi Nzambe akani ete mosika te akolongola mangomba nyonso ya lokuta. (Emoniseli 17:16, 17; 18:21) Azali kosɛnga na bato nyonso oyo balingaka bosembo mpe boyengebene likambo oyo: “Bóbima na kati na ye [elingi koloba, Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba], bato ya ekólo na ngai, soki bolingi te kosangana ná ye na masumu na ye, mpe soki bolingi te kozwa ndambo ya malɔzi na ye. Mpo masumu na ye etondani mingi tii na likoló, mpe Nzambe akanisi lisusu misala na ye ezangá bosembo.” (Emoniseli 18:4, 5) Ya solo, Nzambe azali koyoka mabe mpenza mpo na mangomba oyo ezali ‘kotinda bato na bitumba, elalisaka bango mpɔngi na makanisi mpe elɔtisaka bango bandɔtɔ, mpe ekómisaka bango mayele mokuse, na biyambayamba, etindaka bango báyina bato mosusu, mpe ekómisaka bango bibangabanga’!
Liboso ntango yango eya, Nzambe azali koyanganisa bato oyo balingaka solo na kati ya lingomba ya solo. Lingomba yango etosaka mitinda mpe mateya ya Mozalisi oyo atondi na bolingo, na boyengebene mpe na motema mawa. (Mika 4:1, 2; Sefania 3:8, 9; Matai 13:30) Yo mpe okoki kokɔta na lingomba yango. Soki olingi koyeba makambo mosusu oyo ekosalisa yo na koyeba lingomba ya solo, komelá babimisi ya zulunalo oyo to sɛngá na Motatoli ya Yehova nyonso oyo okokutana na ye asalisa yo.
[Elilingi na lokasa 7]
Bato ya lolenge nyonso bazwi esengo na kati ya lingomba ya solo