Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/3 nk. 8-9
  • ‘Yo oleki bangomba na bonene’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Yo oleki bangomba na bonene’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Masolo mosusu
  • Bantaba ya ngomba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Yehova abatelaki bango na bilili ya bangomba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Esika ya nsuka ya libateli mpo na banyama mpe banzete oyo elingi kosila
    Lamuká!—2009
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/3 nk. 8-9

Kitoko ya biloko oyo Yehova akelá

‘Yo oleki bangomba na bonene’

MOTO oyo así azwá libaku ya kobuta na Ngomba Fuji mpe komona ndenge moi ebimaka na mosika, akobosana likambo yango ata mokolo moko te. Moi emonanaka motane ntango ezali komata mokemoke mpe engɛngisaka mbula-mpɛmbɛ mpe mabelé moindo ya ngomba ya mɔtɔ oyo ekóma lokola mwa ngomba ya mabanga. Ntango moi ebɛti na ngomba, elili ya ngomba yango ezipaka mwa bangomba mpe mabwaku oyo ezali na ngámbo mosusu na etando moko monene mpenza.

Biso bato totikalaka kaka monɔkɔ polele ntango tozali kotala bangomba milai lokola Ngomba Fuji​—oyo kala bazalaki kokoma nkombo na yango na maloba oyo elimboli “oyo eleki nyonso.” Liboso ya bangomba milai, tomimonaka lokola mwa banzinzi mpenza! Kutu, bato mosusu bazalaki kokanisa ete banzambe bafandaka likoló ya bangomba milai, oyo mbala mingi ezipamaka na londende mpe mapata.

Nzambe kaka moko oyo bangomba milai esanzolaka mpenza ezali Yehova, Mozalisi na yango oyo atondi na mayele. Kaka ye nde ‘atongaki bangomba.’ (Amosa 4:13) Bitando nyonso ya mabelé oyo ezali ngombangomba ekoki kozwa bonene ya eteni moko soki tokaboli mabelé mobimba na biteni minei, mpe ntango Nzambe akelaki mabelé, atyaki kati na yango nguya oyo na nsima ebimisaki bangomba. (Nzembo 95:4) Na ndakisa, balobaka ete koningana makasi oyo esalemaki na nse ya mabelé nde etombolaki mabelé na bisika mosusu mpe ebimisaki bangomba ya Himalaya ná ya Andes.

Biso bato toyebi mpenzampenza te ndenge nini mpe mpo na nini bangomba esalemaki. Tokoki te koyanola na mituna oyo Nzambe atunaki moyengebene Yobo: “Ozalaki wapi ntango ngai [Yehova] natyaki moboko ya mabelé? . . . Miboko na yango epikamaki na kati ya nini?”​—Yobo 38:4-6, NW.

Kasi, toyebi ete bangomba ezali na ntina mingi mpo na bomoi na biso. Babengaka yango bibombelo minene ya mai mpamba te mitó ya bibale nyonso ya minene ezali na bangomba mpe moto moko na kati ya bato mibale na mokili mobimba asalelaka mai oyo eutaka na bangomba. (Nzembo 104:13) Zulunalo moko (New Scientist) elobaki boye: “Na kati ya milona 20 oyo bato balyaka mingi, motoba eutá na bangomba.” Na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, epai mopɛpɛ mpe mabelé ekozala malamu, “masangu ekotondana na mokili ata kino likoló ya [bangomba, NW].”​—Nzembo 72:16; 2 Petelo 3:13.

Soki balobeli bangomba, bato mingi bakanisaka Bangomba Alpes na Mpoto. Bangomba yango, bakisá mpe Ngomba La Civetta oyo ezali na fɔtɔ oyo, ezali kopesa litatoli monene mpo na Mozalisi na yango. (Nzembo 98:8) Bangomba yango ezali kosanzola Yehova, oyo ‘na makasi na ye atɛmisaki bangomba.’​—Nzembo 65:6.a

Ya solo mpenza, Bangomba Alpes, ná bansɔngɛ na yango oyo ezipami na ngalasi, ná mabwaku na yango oyo etondi na mbula-mpɛmbɛ, balaki mpe bisobe na yango, ezali biloko ya kokamwa. Mokonzi Davidi abengaki Yehova ‘ye oyo akokolisaka matiti likoló ya bangomba.’​—Nzembo 147:8.

Milɔngɔ ya mwa bangomba, lokola oyo ya etúká ya Guilin, na Chine, oyo ezali na fɔtɔ oyo, ebendaka likebi mingi te lokola Bangomba Alpes, kasi ezali mpe na kitoko na yango. Bapaya basepelaka mingi mpenza kotala nsɔngɛ ya mwa bangomba yango ya mabanga oyo etandami pembenipembeni ya Ebale Li. Komona mai sangisangi oyo elekaka na kati ya mwa bangomba yango oyo ezipami na londende ekoki kotinda moto akanisa maloba ya mokomi ya nzembo oyo: ‘Yo [Yehova] okotindaka bitima kati na mabwaku, ekolekaka kati na bangomba.’​—Nzembo 104:10.

Tozali mpenza na ntina ya kosepela na bangomba mpamba te ezali na kati ya biloko ya mineneminene oyo Mozalisi akelá mpo na bolamu mpe esengo ya bato. Kasi, atako bangomba yango ekamwisaka biso, ekokani ata moke te na bonene ya Yehova. Ya solo mpenza, ye ‘aleki bangomba na bonene.’​—Nzembo 76:4, NW.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Calendrier des Témoins de Jéhovah 2004, Marsi/Aprili.

[Etanda/Elilingi na lokasa 9]

Na mokili mobimba, bato zomi likoló ya monkama bafandi na mikili ya bangomba. Kasi, yango ezali te kopekisa basakoli ya nsango malamu ya Bokonzi bákóma na bisika yango. Baklisto yango bazali kosala mosala monene mpenza na mikili mingi ya bangomba. Mpe “Kitoko boni likoló ya ngomba ezali makolo na ye oyo akoyeisa nsango malamu, ye oyo akosakola kimya mpe akoyeisa nsango malamu ya kosepela, ye oyo akosakola kobikisama!”​—Yisaya 52:7.

Mokomi ya nzembo ayembaki ete: “Ngomba milai [ezali] mpo na ntaba-ya-ngomba.” (Nzembo 104:18) Bantaba ya ngomba, lokola ntaba ya zamba ya Nubie oyo ezali na maseke milai, ezali na kati ya banyama ya ngomba oyo makolo na yango ekembá mpenza. Ntaba yango etambolaka na bisika ya nkaka mpenza oyo okoki kutu kondima te ete ekoleka wana. Ntaba yango ezali na nyonso oyo esengeli mpo kofanda na bisika ya nkaka. Ntina moko ezali ndenge nsɔbu (sabot) ya ntaba yango esalemá. Lokola ntaba yango ekoki kopanza nsɔbu na yango, esalisaka yango epika makolo na yango makasi mpe ekwea te ntango etɛlɛmi to ezali kotambola na esika ya nkaka, ata pembeni ya lobwaku mozindo. Ya solo mpenza, ntaba ya zamba ezali moko ya bikelamo oyo ezali komonisa mayele ya Mozalisi!

[Elilingi na lokasa 9]

Ngomba Fuji, na Japon

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto