Esika ya nsuka ya libateli mpo na banyama mpe banzete oyo elingi kosila
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA ESPAGNE
NA MOKILI mobimba, banyama mpe banzete ezali na likama oyo ezali se kokóma monene. Bato mosusu ya siansi balobi ete bankóto ya banyama mpe banzete ezali kolimwa mbula na mbula. Likambo ya esengo, bangomba ezali bisika ya libateli mpo na banzete mpe banyama oyo ezalaki ebele na bisika mingi. Nzokande, ata na bisika yango, kobeba ya mopɛpɛ mpe misala ya bato ezali likama mpo na banyama mpe banzete yango. Mbala mosusu esika oyo likama yango ezali komonana polele koleka ezali Mpoto, moko na bisika ya mokili epai bato bazali mingi mpenza.
Na Pyrénées, bangomba oyo ekaboli France ná Espagne, ezali na baparke mingi ya Leta oyo ezali kosalisa mpo na kobatela banyama mpe banzete ya bisika yango. Bato oyo bakendaka kotala baparke yango bazwaka libaku ya komona oyo ekómá esika ya nsuka ya libateli mpo na ebele ya banyama mpe banzete oyo elingi kosila. Tótala mwa moke biloko oyo tokoki komona na baparke yango.
Banyama mpe banzete oyo etikali moke esila
Bafololo. Bafololo mosusu kitoko ya zamba ebimaka likoló ya bangomba, na mɛtrɛ 1 500. Bafololo oyo babengaka gentianes des neiges mpe gentianes de Clusius (1), oyo ezali na langi ya bule makasi, ebimaka na bangomba mpe etandanaka koleka bisika oyo banzete esuki. Mwa moke na nse ya bangomba, na katikati ya banzete ya minene, bafololo mosusu oyo elingi kolimwa, oyo babengaka sabots-de-Vénus (2) ebimaka naino kuna. Mbula na mbula, bankama ya bato oyo balingaka banzete mpe banyama bakendaka kotala esika yango; yango wana, ezali na bato oyo bakɛngɛlaka bafololo yango ngonga 14 na mokolo mpo bato bábebisa to bápikola yango te.
Mpomboli (Mapekapeka). Bisobe ya bangomba oyo ebebisami naino te mpe ezali na ebele ya bafololo ya zamba, ezali bisika ya libateli mpo na ebele ya mpomboli ya langi ndenge na ndenge. Mpomboli ya monene oyo babengaka Apollon (3), mapapu na yango ezali na madodo ya motane, epumbwapumbwaka na bafololo oyo ezali na nkasa ya nzubɛnzubɛ. Na bafololo mikemike okomona ntango nyongo mpomboli ya bule mpe mpomboli ya langi ya kwivre (4) oyo ezali na molɔngɔ ya mpomboli oyo babengaka lycénidés. Mpomboli oyo babengaka Belle-dame mpe Petite tortue elekalekaka nokinoki na bangomba.
Banyama. Banyama mingi ya minene ya Mpoto oyo emɛlisaka bana na yango ezalaki kala kotambola na bisika minene ya kɔntina yango. Kasi, bato babomá banyama yango mingi mpe lelo oyo ekómi pene ya kolimwa. Bambwa ya zamba, baursi, nkoi oyo babengi lynx (5), mpakasa oyo babengi bison, ntaba ya zamba oyo babengi chamois, mpe bantaba ya ngomba (6) ezali lelo na bangomba mosusu to na nsuka na yango mpenza, na ngámbo ya nɔrdi. Banyama minene oyo ezali na baparke ya Pyrénées esalisaka biso tómona polele ndenge oyo kala, banyama ya zamba ezalaki ebele na bangomba yango. Bato mosusu oyo bayaka kotala baparke yango bamitunaka soki mwa banyama yango oyo etikali ekolimwa te.
Tozali na ntina ya kolikya ete Mozalisi, Yehova, Ye oyo “[bansɔngɛ, NW] ya ngomba ezali mpe na ye,” amibanzabanzaka mpo na banyama ya zamba oyo efandaka na bangomba. (Nzembo 95:4) Na nzembo moko, Nzambe alobi boye: “Nyama nyonso ya zamba ezali ya ngai mpe bibwɛlɛ likoló ya ngomba nkóto na nkóto. Ngai nayebi ndɛkɛ nyonso ya likoló.” (Nzembo 50:10, 11) Ndenge Yehova amibanzabanzaka mpo na mabelé mpe mpo na bikelamu oyo ezali kati na yango ezali kopesa biso ntina ya kondima ete akotika ata mokolo moko te ete banyama oyo efandaka na bangomba elimwa.
[Bililingi na lokasa 29]
1 Trumpet gentian
2 Lady’s-slipper orchid
3 Apollo butterfly
4 Copper butterfly
5 Lynx
6 Mountain goat
[Eutelo ya bafɔtɔ]
La Cuniacha