Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/3 nk. 20-23
  • Boyokani ya Westphalie ebongolá mpenza makambo na Mpoto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Boyokani ya Westphalie ebongolá mpenza makambo na Mpoto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mbongwana monene esalemi
  • Mwa matata moke epelisi mɔtɔ na Mpoto
  • Kardinale Richelieu asaleli bokonzi na ye
  • Likita ya Westphalie mpo na koluka kimya
  • Kimya ya libela ekoya?
  • Ozali komikundola?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Kimya—Ekoki kozwama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Bitumba ya mangomba na France
    Lamuká!—1997
  • Kimya ya solo​—Ekouta wapi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/3 nk. 20-23

Boyokani ya Westphalie ebongolá mpenza makambo na Mpoto

“ESALEMAKA mingi te ete bakonzi ndenge na ndenge ya bikólo ya Mpoto bákutana ndenge tokutani lelo.” Roman Herzog, prezida ya kala ya République fédérale d’Allemagne, alobaki maloba wana na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1998. Alobaki maloba yango liboso ya ba-roi minei, ba-reine minei, ba-prince mibale, duc moko, mpe ebele ya baprezida. Bokutani wana oyo ebongisamaki na Conseil de l’Europe, ezalaki mpo na likambo ya ntina mpenza na kati ya mbula 50 ya lisolo ya ekólo Allemagne. Ezalaki likambo nini?

Bazalaki kokanisa mbula 350 ya Boyokani ya Westphalie (Traité de paix de Westphalie). Boyokani ya kimya ebongolaka makambo mingi; mpe na likambo yango, Boyokani ya Westphalie elongaki mpenza. Boyokani wana oyo esalemaki na mobu 1648 esukisaki Etumba ya Mbula Ntuku Misato mpe epesaki bikólo ya Mpoto lipanda.

Mbongwana monene esalemi

Na eleko ya Moyen-Âge, Lingomba ya Katolike mpe Ampire ya Rome nde ezalaki koyangela Mpoto. Ampire yango esangisaki ebele ya bitúká, ya minene mpe ya mike, na etando oyo ezali lelo Autriche, République Tchèque, ɛsti ya France, Allemagne, Suisse, Pays-Bas, Belgique, Luxembourg, mpe bitúká mosusu ya Italie. Lokola bitúká mingi ezalaki na mabelé ya Allemagne, bakómaki kobenga yango Saint Empire romain germanique. Etúká mokomoko ezalaki koyangelama na prince. Amperɛrɛ azalaki moto ya libota moko ya Autriche na nkombo Habsbourg mpe azalaki mondimi ya Lingomba ya Katolike. Na yango, soki tokamati bokonzi ya Pápa ná ya Amperɛrɛ, tokoki mpenza koloba ete Mpoto mobimba ezalaki na mabɔkɔ ya Lingomba ya Katolike.

Kasi, na bambula ya 1500 mpe ya 1600, makambo ya politiki ebongwanaki na Mpoto. Bipai nyonso na Mpoto bato balɛmbaki mpenza makambo mabe ya Lingomba ya Katolike. Bato lokola Martin Luther mpe Jean Calvin oyo bakɔtisaki mbongwana na makambo ya losambo bazalaki kosɛnga ete bato bázongela mateya ya Biblia. Na bisika nyonso, bato mingi bakómaki kolanda mateya ya Luther ná Calvin, mpe yango ekɔtisaki mbongwana na makambo ya losambo mpe ebimisaki mangomba ya Protesta. Mbongwana yango ekabolaki ampire na mangomba misato​—Katolike, Protesta ya Luther, Protesta ya Calvin.

Bakatolike bazalaki komona Baprotesta lokola bapɛngwi, mpe Baprotesta bazalaki kotyola Bakatolike. Kowelana yango etindaki Baprotesta básala ebongiseli moko (Union évangélique) mpe Bakatolike básala oyo ya bango (Sainte Ligue allemande) na ebandeli ya bambula 1600. Ba-prince mosusu ya Ampire bakɔtaki na Union, mpe basusu bakɔtaki na Ligue. Koyinana ekómaki makasi na Mpoto​—mingimingi na ampire​—na boye ete kaka mwa matata moke ekokaki kobimisa mobulu monene. Ntango kaka mwa matata moke ebimaki, ememaki etumba moko monene oyo eumelaki mbula 30.

Mwa matata moke epelisi mɔtɔ na Mpoto

Bakambi ya Lingomba ya Protesta bazalaki kosɛnga na Amperɛrɛ mpe ba-prince ya libota ya Habsbourg oyo bazalaki Bakatolike, ete bátikela bato bonsomi ya kopona lingomba oyo balingi. Kasi, bango bazalaki kondima mpenza te kopesa bonsomi yango, mpe na 1617-1618, bakangaki ndako-nzambe mibale ya Protesta ya Luther na etúká ya Bohême (République Tchèque). Likambo yango esepelisaki bakonzi ya Lingomba ya Protesta te, bakɔtaki na ndako moko na engumba Prague, bakangaki bakonzi misato ya Lingomba ya Katolike, mpe babwakaki bango na nse longwa na lininisa moko na etaze. Yango nde likambo oyo epelisaki mɔtɔ na Mpoto.

Atako bazalaki komibenga bayekoli ya Mokonzi ya Kimya, Yesu Klisto, bandimi ya Katolike ná bandimi ya Protesta bakómaki kobomana. (Yisaya 9:6) Na etumba ya Montagne Blanche, bato ya Ligue balongaki mpenza bato ya Union, mpe Union epanzanaki. Bakangaki bakonzi ya Lingomba ya Protesta mpe babomaki bango na zando ya Prague. Na etúká ya Bohême mobimba, babɔtɔlaki mapango mpe biloko ya Baprotesta oyo baboyaki kotika lingomba yango mpe bapesaki yango epai ya Bakatolike. Buku moko (1648​—Krieg und Frieden in Europa [1648​—Etumba mpe kimya na Mpoto]) elobi ete ndenge oyo bapunzaki biloko ya bato wana ezali “kobɔtɔla biloko oyo esalemá naino te na Mpoto.”

Likambo yango oyo ebandaki na kowelana na kati ya bato ya mangomba na etúká ya Bohême ekómaki etumba kati na bikólo mpo na kowela bokonzi ya koyangela bikólo mosusu. Na boumeli ya mbula 30 oyo elandaki, bikólo Danemark, France, Pays-Bas, Espagne mpe Suisse ekɔtaki na etumba yango. Bakonzi ya Lingomba ya Katolike mpe ya Lingomba ya Protesta, oyo mbala mingi bazalaki na mposa ya kokóma na bozwi mingi mpe na mposa ya bokonzi, bakómaki kowela bokonzi ya politiki mpe nkita. Etumba ya Mbula Ntuku Misato ekabwanaki na bileko mingi, oyo mokomoko ezwaki nkombo ya moto oyo azalaki monguna monene ya amperɛrɛ na eleko wana. Babuku mingi ya minene elobeli bileko minei ya etumba yango: Etumba kati na etúká ya Bohême ná etúká ya Palatin, Etumba ya Danemark ná Basse-Saxe, Etumba ya Suède, mpe Etumba ya France ná Suède. Bitumba mingi ebundamaki na mabelé ya Ampire ya Rome.

Na ntango wana bazalaki kobunda na mindoki ndenge na ndenge (revolver, pupu, mortier mpe canon) mpe bibundeli yango mingi ezalaki kouta na Suède. Bakatolike ná Baprotesta bazalaki ntango nyonso kobomana. Basoda ya Katolike bazalaki koganga “Santa Maria” mpe Baprotesta bazalaki koganga ete “Nzambe azali na biso.” Basoda bapunzaki mpenza bitúká ya Allemagne, mpe bazalaki konyokola basoda ná basivili lokola banyama. Bakómaki kobomana lokola banyama na zamba. Ezaleli yango eyokani ata moke te na maloba ya esakweli ya Biblia oyo: “Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te”!​—Mika 4:3.

Bana oyo babotamaki na Allemagne na boumeli ya mbula ntuku misato wana bayebaki kimya te; bato balɛmbaki mpe bakómaki mpenza na mposa ya kimya. Soki bakonzi bazalaki koluka matomba na bango moko te, etumba ekokaki kosila. Etumba yango elongwaki etumba ya mangomba mpe ekómaki etumba mpo na kowelela bokonzi ya politiki. Likambo ya kokamwa ezali ete moto oyo asalaki mpenza ete etumba yango elongwa etumba ya mangomba mpe ekóma etumba ya politiki azalaki mokonzi monene na Lingomba ya Katolike.

Kardinale Richelieu asaleli bokonzi na ye

Nkombo ya lokumu ya Armand-Jean du Plessis ezalaki Kardinale de Richelieu. Azalaki mpe ministre mokonzi ya France banda mobu 1624 tii na mobu 1642. Richelieu azalaki koluka ete France ekóma koyangela bikólo nyonso ya Mpoto. Mpo na yango, amekaki kokitisa nguya ya libota Habsbourg, baninga na ye bandimi ya Katolike oyo bazalaki koyangela ampire. Asalaki nini? Apesaki mbongo epai ya basoda ya Protesta ya Allemagne, Danemark, Pays-Bas mpe Suède, bikólo nyonso oyo ezalaki kobundisa libota ya Habsbourg.

Na mobu 1635, Richelieu atindaki basoda ya ekólo France na etumba mpo na mbala ya liboso. Buku moko (vivat pax​—Es lebe der Friede! [Tiká kimya eumela libela na libela!]) elobi ete na nsuka na yango, “Etumba ya Mbula Ntuku Misato ezalaki lisusu kowelana kati na mangomba te. . . . Bikólo ekómaki kobunda nde mpo na koyangela bikólo nyonso ya Mpoto.” Elongwaki etumba na kati ya Bakatolike ná Baprotesta, Bakatolike basanganaki ná Baprotesta mpo na kobundisa Bakatolike mosusu. Ebongiseli ya Bakatolike (Sainte Ligue allemande) oyo ezalaki lisusu makasi te na ebandeli ya bambula ya 1630, epanzanaki na mobu 1635.

Likita ya Westphalie mpo na koluka kimya

Kobɔtɔla biloko ya bato, koboma, kobebisa basi, mpe bamaladi ebebisaki mpenza mikili ya Mpoto. Lokola bamonaki ete ngambo moko te ekoki kolonga etumba yango, bakómaki mokemoke komonisa mposa ya koyokana na malɛmbɛ mpo na kozongisa kimya. Buku oyo touti kolobela na paragrafe eleki elobi ete “na nsuka ya bambula ya 1630, bakonzi oyo bazalaki koyangela bitúká ya Ampire bamonaki ete bakolonga te kokokisa mikano na bango na mindoki.” Kasi, ndenge nini bakokaki kolonga kotya kimya yango oyo bango nyonso bazalaki na mposa na yango?

Amperɛrɛ Ferdinand III ya Ampire ya Rome, Mokonzi Louis XIII ya France mpe Mokonzi-mwasi Christine ya Suède bayokanaki mpo na kosala likita moko oyo esengelaki kosangisa bikólo nyonso oyo ezalaki kobunda, mpo na koluka kimya. Baponaki bisika mibale: engumba Osnabrück ná engumba Münster, na etúká Westphalie, na Allemagne. Baponaki bingumba yango mpo ezalaki na katikati ya mboka-mokonzi ya Suède ná mboka-mokonzi ya France. Banda na mobu 1643, bituluku soki 150 ya bato​—mosusu bazalaki na ebele ya bapesi-toli​—bakendaki na bingumba yango mibale; batindami ya Lingomba ya Katolike bazalaki na engumba Münster, mpe ya Protesta na Osnabrück.

Libosoliboso, bayokanaki banani basengeli kozala na likita yango, banani bakotambwisa yango, esika oyo moto na moto akofanda na likita mpe ndenge nini likita yango ekosalema. Na nsima, masolo ebandaki, mpe bayokanisi bazalaki komemela bato ya ngámbo moko makanisi oyo bato ya ngámbo mosusu bazalaki kopesa. Nsima ya mbula soki mitano, na ntango wana etumba ezalaki kaka kokoba, bayokanaki. Boyokani ya Westphalie ezalaki na mikanda mingi. Boyokani moko esalemaki na engumba Osnabrück kati na Amperɛrɛ Ferdinand III mpe ekólo Suède, mosusu na engumba Münster kati na amperɛrɛ mpe ekólo France.

Na bisika nyonso oyo bazalaki koyoka nsango ete baí-likita bayokani, bato bazalaki kosepela makasi. Na ndenge yango, bitumba oyo ebandaki na mwa matata moke, esukaki na koganga na esengo. Na bingumba ndenge na ndenge na Mpoto bato bazalaki kosepela. Mpo na kosepela kimya, bazalaki kobɛta ngonga ya bandako-nzambe, bakano, mpe bato babimaki na babalabala mpo na koyemba na esengo. Bato ya Mpoto bakokaki kolikya ete bazwi kimya ya libela?

Kimya ya libela ekoya?

Boyokani ya Westphalie epesaki bikólo ya Mpoto bonsomi. Elingi koloba ete ekólo mokomoko oyo ezalaki na boyokani yango elakaki ete ekotosa bonsomi ya bikólo mosusu mpe ekokɔta te na makambo ya bikólo yango. Bikólo ya Mpoto oyo toyebi lelo oyo ebandaki na ntango wana. Na boyokani yango, bikólo mosusu ezwaki matomba mingi, mosusu ezwaki matomba moke.

Batyaki France na molɔngɔ ya bikólo oyo eleki makasi, mpe Pays-Bas ná Suisse ezwaki bonsomi. Kasi, mpo na bitúká ya Allemagne, oyo mingi kati na yango ebebisamaki mpenza na etumba, boyokani yango ezalaki na litomba mpenza te. Bikólo mosusu nde ezalaki kozwa bikateli mpo na ekólo Allemagne. Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Bikólo oyo elekaki makasi na Mpoto: France, Suède mpe Autriche, nde ezalaki kotalela matomba ya bankumu ya Allemagne.” Na esika bitúká ya Allemagne esangana mpo na kosala ekólo moko, ekabwanaki kaka ndenge ezalaki liboso. Lisusu, biteni mosusu ya Allemagne ekómaki na mabɔkɔ ya bapaya; ezalaki mpe bongo mpo na biteni mosusu ya bibale na yango ya minene: Rhin, Elbe mpe Oder.

Bakómaki kotalela Lingomba ya Katolike ndenge moko na Lingomba ya Protesta ya Luther mpe Lingomba ya Protesta ya Calvin. Likambo yango esepelisaki bato nyonso te. Pápa Innocent X atɛmɛlaki mpenza boyokani yango, mpe alobaki ete ayebi yango te. Kasi, ata nsima ya mbula nkama misato, lingomba na lingomba etikalaki makasi na bamboka oyo yango epikaki misisa. Atako bato bazwaki naino mpenza te bonsomi ya kopona lingomba oyo balingi, bonsomi yango ezalaki lisusu mosika te.

Boyokani yango esilisaki Etumba ya Mbula Ntuku Misato, mpe yango esukisaki matata mingi oyo ezalaki na ntango wana. Ezalaki etumba ya nsuka na kati ya bitumba minene ya mangomba na Mpoto. Bitumba esilaki te, kasi ezalaki lisusu ya mangomba te; makambo ya politiki mpe ya mombongo nde ekómaki kobimisa bitumba. Yango elingi koloba te ete mangomba esukolaki mpenza mabɔkɔ na bitumba oyo ezalaki kobundama na Mpoto. Na Etumba ya Liboso mpe ya Mibale ya mokili mobimba, basoda ya Allemagne bazalaki kolata mikaba oyo bakomaki likoló na yango maloba oyo basoda ya Union bazalaki kosalela: “Nzambe azali na biso.” Na bitumba yango ya nsɔmɔ, Bakatolike ná Baprotesta ya ngámbo moko bazwaki lisusu mindoki mpo na kobundisa bandeko na bango Bakatolike mpe Baprotesta ya ngámbo mosusu.

Emonani mpenza ete boyokani ya Westphalie ememaki kimya ya libela te. Kasi, mosika te bato ya botosi bakozala na kimya ya libela. Yehova Nzambe akotya kimya ya libela na nzela ya Bokonzi ya Mwana na ye, Yesu Klisto. Na boyangeli na yango, losambo kaka moko ya solo ekosangisa bato, kasi ekokabola bango te. Eloko moko te, ezala makambo ya mangomba to makambo mosusu, ekotinda lisusu bato bábunda. Bato bakosikolama mpenza ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabelé mobimba mpe “kimya ekozala na nsuka te”!​—Yisaya 9: 6, 7, NW.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 21]

Elongwaki etumba na kati ya Bakatolike ná Baprotesta, Bakatolike basanganaki ná Baprotesta mpo na kobundisa Bakatolike mosusu

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 22]

Basoda ya Katolike bazalaki koganga “Santa Maria” mpe Baprotesta bazalaki koganga ete “Nzambe azali na biso.”

[Elilingi na lokasa 21]

Kardinale Richelieu

[Elilingi na lokasa 23]

Liyemi oyo ya ekeke ya zomi na motoba ezali komonisa kowelana kati na Luther, Calvin mpe pápa

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 20]

Euti na buku Spamers Illustrierte Weltgeschichte VI

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 23]

Bakonzi ya mangomba bazali kowelana: Euti na buku Wider die Pfaffenherrschaft; karte: The Complete Encyclopedia of Illustration/ J. G. Heck

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto