Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/4 lok. 27
  • Ozali komikundola?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali komikundola?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Masolo mosusu
  • Boyokani ya Westphalie ebongolá mpenza makambo na Mpoto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Ndimbola ya nyama mabe mpe ya elembo na yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Bitumba ekómi ndenge mosusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Motángo 666 elimboli nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/4 lok. 27

Ozali komikundola?

Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Na bongo, talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:

• Nini emonisi ete Yesu azalaki na bandeko mibali mpe basi?

Biblia emonisi yango na Matai 13:55, 56 mpe na Malako 6:3. Liloba ya Grɛki (adelphos) oyo ezali na bavɛrsɛ yango, basaleli yango mpo na komonisa “bondeko ya makila [mpe] elimbolaka kaka ndeko ya tata moko mpe mama moko, to ya tata moko to mpe mama moko kaka.” (The Catholic Biblical Quarterly, Yanuali 1992)​—15/12, lokasa 3.

• Mbongwana nini emonani na bitumba, mpe mingimingi bitumba yango ezali kouta na nini?

Na mikolo na biso, bitumba oyo ezali kotika bato na mpasi koleka ezali bitumba oyo bato ya ekólo moko bazali kobunda bango na bango. Mingimingi ezali mpo bato oyo bazali etuluku moko te to lingomba moko te bazali koyinana, mpo bosembo ezali te mpe mpo bato ya politiki bazali koyokana te. Ntina mosusu ezali mposa ya bokonzi mpe lokoso ya mbongo.​—1/1, nkasa 3, 4.

• Nini emonisi ete Yesu alingaki te ete baklisto bázongelaka libondeli ya ndakisa ndenge kaka alobaki yango?

Yesu ateyaki libondeli yango ya ndakisa na Lisolo Likoló ya Ngomba. Sanza soki 18 na nsima, azongelaki makanisi ya ntina ya libondeli yango oyo ateyaki bayekoli na ye. (Matai 6:9-13; Luka 11:1-4) Tomoni ete azongelaki te liloba mokomoko oyo alobaki liboso; yango emonisi ete basengelaki te kokanga libondeli yango na motó mpe kozongelaka yango lokola tshaku.​—1/2, lokasa 8.

• Nsima ya Mpela, epai wapi ebenga ezwaki lokasa ya olive oyo ezongaki na yango na masuwa?

Toyebi te soki mai ya Mpela ezalaki mungwamungwa, soki ezalaki malili to mɔtɔ. Kasi, eyebani ete ata soki bakati nzete ya olive, ekumu na yango ebimisaka bana. Na yango, tokoki koloba ete banzete mosusu ya olive ekufaki mpenza te na mai ya Mpela, yango wana ebimisaki nkasa ya sika ntango mai ekitaki.​—15/2, lokasa 31.

• Ndenge nini Batatoli ya Yehova ya Biafra bazalaki kozwa bilei ya elimo ntango bakangaki banzela nyonso ya kokɔtela kuna na ntango ya etumba ya Nigeria?

Mobali moko azalaki kosala na libándá ya mpɛpɔ ya ekólo moko ya Mpoto; na Biafra mpe mobali moko azalaki kosala na libándá ya mpɛpɔ. Bango mibale bazalaki Batatoli. Batatoli yango nyonso mibale bandimaki mokumba oyo ezalaki mpenza likama, elingi koloba kotinda bilei ya elimo na Biafra, mpe bongo, basalisaki ebele ya bandeko tii ntango etumba esilaki na 1970.​—1/3, lokasa 27.

• Boyokani ya Westphalie esalaki nini, mpe ndenge nini yango etalelaki mangomba?

Mbongwana oyo ebimisaki Mangomba ya Protesta ekabolaki Ampirɛ Mosantu ya Rome na mangomba misato​—Katolike, Protesta ya Luther mpe Protesta ya Calvin. Na ebandeli ya bambula ya 1600, Baprotesta basalaki Union évangélique mpe Bakatolike basalaki Sainte Ligue allemande. Na nsima kowelana kati na mangomba ebandaki na Bohême mpe nsukansuka ekómaki etumba kati na bikólo mpo na kowela bokonzi mpo na koyangela bikólo mosusu. Bakonzi ya Lingomba ya Katolike mpe ya Lingomba ya Protesta bakómaki kowela bokonzi ya politiki mpe nkita. Nsukansuka, masolo mpo na kimya esalemaki na etúká Westphalie, na Allemagne. Boyokani ya Westphalie esalemaki na mobu 1648, mbula soki mitano na nsima, mpe esukisaki Etumba ya Mbula Ntuku Misato mpe epesaki bikólo ya Mpoto lipanda.​—15/3, nkasa 20-23.

• Wapi ndimbola ya motángo 666, oyo ezali elembo to nkombo ya “nyama mabe”?

Elembo yango elobelami na Emoniseli 13:16-18. Nyama yango ezali biyangeli ya bato, mpe lokola nyama yango ezali na “motángo ya moto” emonisi ete biyangeli ezali na ezaleli ya bato, elingi koloba lisumu mpe kozanga kokoka. Mpe 6 bakisá 60 bakisá 600 ezali mpo na komonisa malamumalamu ete biyangeli yango ezangi mpenza kokoka na miso ya Nzambe. Bato oyo bazali na elembo ya nyama mabe bazali kosambela ebongiseli ya politiki ya mokili, to mpe bazali kotyela yango elikya mpe kokanisa ete ekobikisa bango.​—1/4, nkasa 4-7.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto