Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/4 lok. 8
  • Bazali kokutana na bato na bisika ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali kokutana na bato na bisika ya mosala
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Masolo mosusu
  • Tósakola nsango malamu bipai nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Ndenge ya kosakola na bisika ya mombongo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Kopesa litatoli na bisika ya misala motindo na Bajaponé na kobuka mbuma
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Tolingi koyekola Biblia na bato mingi koleka
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/4 lok. 8

Masolo ya Basakoli ya Bokonzi

Bazali kokutana na bato na bisika ya mosala

OYEBI likambo moko oyo esalemá epai ya bantoma oyo mitano: Matai, Petelo, Andele, Yakobo mpe Yoane? Yesu akutanaki na bango nyonso na bisika na bango ya mosala. Petelo, Andele, Yakobo, mpe Yoane bazalaki koboma mbisi ntango Yesu alobaki na bango boye: “Bólanda ngai.” Matai azalaki na biro ya kofutisa mpako ntango Yesu abengaki ye akóma ntoma na ye.​—Matai 4:18-21; 9:9.

Kosakola epai ya bato na bisika na bango ya mosala ekoki kobota mbuma malamu. Lokola Batatoli ya Yehova ya Japon bayebi likambo yango, na mikolo euti koleka basalaki milende mpo na kosakola na bisika ya mosala. Matomba nini bazwaki? Nsima ya mwa basanza, basakoli bazongelaki bankóto ya bato oyo basepelaki, mpe pene na bato 250 bandimaki koyekola Biblia. Yoká mwa masolo oyo.

Na Tokyo, mobongisi-nzela moko akutanaki na nkolo restora moko oyo asololaká na Motatoli ya Yehova moko mbula 30 liboso, ntango azalaká mwana-kelasi. Atako na ntango wana asimbaká mpenza ntina te ya makambo oyo Motatoli yango ayebisaká ye, asepelaká na Biblia. Lokola bapesaki ye lisusu mposa wana, andimaki mbala moko koyekola Biblia na buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.a Longola yango, asalaki programɛ ya kotánga Biblia mpokwa nyonso liboso ya kolala.

Ndeko mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela monene akɔtaki na biro moko mpe asɛngaki soki akoki kosolola na patrɔ. Lokola patrɔ azalaki na ntango te, elenge mwasi oyo ayambaki telefone atunaki ye ete: “Okoki koyebisa ngai likambo yango?” Nsima ya kosolola na ye mwa moke na telefone, mwana mwasi yango ayaki na esika bayambaka bato mpe alobaki ete asepelaka kotánga Biblia. Mobongisi-nzela azongelaki mwana mwasi yango, amemelaki ye Biblia mpe babandaki koyekola na parke moko pene na esika ya mosala na ntɔngɔ liboso mosala ebanda.

Na biro mosusu, mobali moko amonaki moninga na ye ya mosala azwi Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! kasi, ntango kaka Motatoli oyo apesaki ye yango apesaki mokɔngɔ, abwakaki yango. Ntango mobali wana azongaki na ndako, ayebisaki mwasi na ye oyo azali Motatoli likambo yango mpe alobaki na ye ete soki bapesaki ye bazulunalo yango alingaki koyoka ata moke makambo oyo balingaki koyebisa ye. Mwana na ye ya mwasi ayokaki maloba na ye, akendeki kobɛta lisolo epai ya Motatoli oyo asakolaka na teritware wana. Mbala moko, Motatoli wana akendeki kotala mobali yango na biro na ye mpe abandaki koyekola na ye Biblia. Mwa moke na nsima, mobali yango akómaki koyangana na makita mikolo nyonso ya lomingo.

Kosakola na esika ya mosala ememi mpe mapamboli mosusu. Basakoli mingi na Japon bayebi sikoyo malamu ndenge ya kozongela bato oyo basepelaki, ezala na bamagazini, baizini, mpe na babiro. Lisusu, na kosakola ndenge wana, basakoli bakutanaki na bato mingi oyo batikaki kosakola mpe babandaki koyekola na bango Biblia. Bazwaki matomba oyo bakanisaki te. Eleki mwa basanza, basakoli ya lisangá moko ya Tokyo bayekolaki Biblia na bato 108, elingi koloba mbala mibale koleka oyo basalaki mbula moko liboso.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto