Tóboya elimo ya mokili oyo ezali se kobongwana
“Biso tozwaki elimo ya mokili te, kasi elimo oyo euti epai ya Nzambe.” —1 BAKOLINTI 2:12.
1. Eva akosamaki na makambo nini?
“NYOKA akosi ngai.” (Genese 3:13) Eva, mwasi ya liboso, alobaki bongo mpo na kolimbola ntina oyo abukaki mobeko ya Yehova Nzambe. Alobaki solo, atako yango ekoki te kolongisa mabe oyo asalaki. Ebele ya bambula na nsima, na lisalisi ya elimo santu, ntoma Paulo akomaki boye: “[Eva] akosamaki mpenza.” (1 Timote 2:14) Akosamaki mpe akanisaki ete soki abuki mobeko ya Nzambe mpe alei mbuma oyo bapekisaki bango, ekomemela ye litomba, akokóma lokola Nzambe. Lisusu, ayebaki te nani mpenza akosaki ye. Ayebaki ata moke te ete Satana Zabolo nde azalaki kosolola na ye na nzela ya nyoka.—Genese 3:1-6.
2. (a) Ndenge nini Satana azali kokosa bato lelo oyo? (b) “Elimo ya mokili” ezali nini, mpe mituna nini tokotalela sikoyo?
2 Banda na Adama ná Eva, Satana azali kokosa bato tii na moi ya lelo. Kutu, azali “kobungisa mabelé mobimba oyo efandami nzela.” (Emoniseli 12:9) Asalelaka kaka mayele mabe na ye wana ya kala. Atako asalelaka lisusu nyoka te, tii lelo oyo amimonisaka polele te. Satana azali kosalela masano, radio, televizyo, mpe mayele mosusu, mpo na kokosa bato bákanisa ete bazali na mposa ya toli ya Nzambe te mpe ete toli yango ekomemela bango litomba moko te. Mosala monene ya kokosa oyo Zabolo azali kosala eloni epai ya bato na bisika nyonso elimo ya koboya kotosa mibeko ya Biblia. Biblia ebengi yango “elimo ya mokili.” (1 Bakolinti 2:12) Elimo yango ekɔti na mateya, makanisi, mpe na bizaleli ya bato oyo bayebi Nzambe te. Elimo yango ezali komonana ndenge nini, mpe tokoki kosala nini mpo tólanda yango te? Tótalela yango.
Bizaleli malamu ezali se kobunga
3. Mpo na nini “elimo ya mokili” ekómi komonana mingi lelo oyo?
3 “Elimo ya mokili” ekómi komonana mingi lelo oyo. (2 Timote 3:1-5) Na ntembe te, ozali komona ete bizaleli malamu ezali se kobunga. Biblia emonisi ntina ya likambo yango. Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na likoló na 1914, mwa moke na nsima, etumba ebimaki kuna. Balongaki Satana ná bademo na ye mpe babwakaki bango na mabelé. Lokola Satana akitaki na nkanda makasi, abakisaki milende na mosala na ye ya kokosa bato na mokili mobimba. (Emoniseli 12:1-9, 12, 17) Satana azali kosala nyonso oyo akoki mpo na “kobungisa, soki likoki ezali, ata baponami.” (Matai 24:24) Miso na ye ezali libosoliboso epai na biso basaleli ya Nzambe. Azali koluka na ndenge nyonso kobebisa elimo na biso mpo Yehova asepela na biso lisusu te mpe tózanga bomoi ya seko.
4. Ndenge nini basaleli ya Yehova batalelaka Biblia, mpe ndenge nini bato ya mokili batalelaka yango?
4 Satana azali koluka kobebisa lokumu ya Biblia, buku ya ntina mingi oyo ezali koteya makambo etali Mozalisi na biso ya bolingo. Basaleli ya Yehova balingaka Biblia mpe bapesaka yango valɛrɛ mingi. Toyebi ete ezali Liloba ya Nzambe, kasi ya bato te. (1 Batesaloniki 2:13; 2 Timote 3:16) Nzokande, mokili ya Satana elingi te ete biso tómona makambo ndenge wana. Na ndakisa, na maloba ya ebandeli ya buku moko oyo ezali koloba mabe mpo na Biblia, balobi boye: “Eloko moko ya ‘bosantu’ ezali na Biblia te, ezali mpe ‘liloba ya Nzambe’ te. Ekomamaki te na basantu oyo bapemamaki na Nzambe, kasi nde na banganga-nzambe oyo bazalaki koluka bokonzi.” Bato oyo bazali kondima makanisi ya ndenge wana bakoki komikosa ete bakoki kosambela Nzambe na ndenge oyo bango moko bamoni malamu, to mpe kosambela ye te.—Masese 14:12.
5. (a) Mokomi moko alobaki nini mpo na Lingomba ya Bayuda mpe ya boklisto? (b) Bokeseni nini ezali kati na makanisi mosusu oyo epalangani na mokili mpe maloba ya Biblia? (Talá mpe etanda na lokasa oyo elandi.)
5 Kotyola Biblia, ezala na maloba ya polele to te, bakisá lokuta ya bato oyo balobaka ete balandaka Biblia, nyonso wana esali ete ebele ya bato bápesa mangomba mokɔngɔ, ata oyo eteyaka Biblia. Na bazulunalo, radio, mpe televizyo bazali koloba mabe mpo na mangomba mpe bato oyo batángá mingi bazali kotyola yango. Mokomi moko alobaki boye: “Bato mingi bazali kotalela Lingomba ya Bayuda mpe ya boklisto na ndenge ya malamu te. Soki bato mosusu bamonaka ete mangomba yango esilá ngala, bamosusu bamonaka mpenza ete eteyaka makanisi oyo bato bakoki kolanda te lelo oyo, oyo ezali kozongisa mayele ya bato nsima mpe ezali kopekisa siansi ekende liboso. Banda mwa bambula, bazali lisusu kotyola kaka te, bakómi mpenza nde koyina yango.” Mbala mingi, koyina yango ebandaka na bato oyo bandimaka te ete Nzambe azali mpe bakómi “bazoba na kati ya makanisi na bango.”—Baloma 1:20-22.
6. Ndenge nini bato ya mokili batalelaka misala ya mbindo oyo Nzambe aboyi?
6 Na kotalela nyonso wana, tokoki kokamwa te ete bato bazali se kotika mitinda ya Nzambe. Na ndakisa, Biblia elobi ete kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi ezali likambo ya “nsɔni.” (Baloma 1:26, 27) Elobi mpe ete bato ya pite mpe ya ekobo bakokɔta na Bokonzi ya Nzambe te. (1 Bakolinti 6:9) Nzokande, na mikili mingi, bazali kondima misala yango; kutu, bazali kotya bafɔtɔ ya bato ya misala yango mpe kokumisa bango na mikanda, na bazulunalo, na banzembo, na bafilme mpe na televizyo. Bato oyo bazali koloba ete ezali misala ya mabe, bazali komonana ete bafungwami naino te, bazali kosambisa basusu, mpe bazali naino na molili. Na esika bato ya mokili bámona ete mitinda ya Nzambe ezali komonisa bolingo na ye, bazali koloba ete ezali kopekisa bango kosala oyo balingi.—Masese 17:15; Yuda 4.
7. Mituna nini tosengeli komituna?
7 Na mokili oyo bato bazali se kopesa Nzambe mokɔngɔ, ezali malamu tótalaka soki mitinda mpe makanisi na biso ezali kobeba te. Tosengeli mbala na mbala komitalelaka na bosembo mpe na kati ya libondeli mpo na koyeba soki tozali te kotika mokemoke makanisi ya Yehova mpe mitinda na ye. Tokoki komituna mituna lokola oyo: ‘Nakómi nde kosepela na makambo oyo nazalaki koboya eleki mwa bambula? Nakómi kondima misala oyo Nzambe aboyi? Soki nakanisi ndenge nazalaki liboso, nakómi nde kotalela makambo ya elimo bongobongo? Bomoi na ngai ezali komonisa ete nazali koluka liboso Bokonzi?’ (Matai 6:33) Komituna mituna ya ndenge wana ekosalisa biso tókima elimo ya mokili.
“Tópɛngwa na nzela soki moke te”
8. Ndenge nini moto akoki kopɛngwa na nzela ya Yehova?
8 Ntoma Paulo akomelaki baninga na ye baklisto boye: “Ezali na ntina ete biso tótya likebi koleka mpenza na makambo oyo toyokaki, mpo tópɛngwa na nzela soki moke te.” (Baebele 2:1) Soki masuwa etiki nzela ya malamu, ekokóma te na libongo oyo ekanaki kosɛma. Soki kapitene azali kotya likebi na mipɛpɛ to na nguya ya mai te, masuwa ekoki koleka esika oyo bakokaki kobombama mpe kokende komibɛta na mabanga. Ndenge moko mpe, soki tozali te kotya likebi na solo ya ntina mingi ya Liloba ya Nzambe, ezali mpasi te tópɛngwa na nzela ya Yehova mpe tózinda na elimo. Likambo ya ndenge wana ekoki kokómela biso ata soki totiki mpenza solo te. Kutu, esalemaka mpenza te ete moto alamuki kaka na ntɔngɔ boye mpe alobi ete alingi lisusu kosambela Yehova te. Mbala mingi, ebandaka mokemoke ntango akómi komipesa na likambo moko oyo ezali kolongola likebi na ye na Liloba ya Nzambe. Abendamaka mokemoke na lisumu, mbala mosusu kutu kozanga ete ayeba yango. Lokola kapitene ya masuwa oyo alali mpɔngi, moto ya ndenge wana ayaka kosutuka nsima, ntango makambo esí ebebi.
9. Yehova apesaki Salomo nini?
9 Tótalela bomoi ya Salomo. Yehova atyaki ye mokonzi ya Yisalaele. Nzambe andimaki Salomo atongela ye tempelo mpe apesaki ye mokumba ya kokoma makambo mosusu oyo ezali na Biblia. Yehova asololaki na ye mbala mibale, apesaki ye bozwi, lokumu, mpe boyangeli ya kimya. Likoló ya nyonso wana, Yehova apesaki Salomo bwanya mingi. Biblia elobi boye: “Nzambe azalaki kopesa Solomo bwanya mpe mayele mingi mpenza mpe motema monene, lokola zɛlo na libongo ya mai monene. Mpe bwanya ya Salomo elekaki bwanya ya bato nyonso ya ebimelo ya ntango mpe bwanya nyonso ya Ezipito.” (1 Mikonzi 4:21, 29, 30, NW; 11:9) Tokoki mpenza koloba ete soki ezali na moto oyo akokaki kotikala sembo epai ya Nzambe, ezali Salomo. Kasi, Salomo apɛngwaki. Likambo yango ebandaki ndenge nini?
10. Toli nini Salomo atosaki te, mpe esukelaki ye ndenge nini?
10 Salomo ayebaki malamumalamu Mibeko ya Nzambe mpe azalaki kososola yango. Na ntembe te ayekolaki malamumalamu malako oyo epesamaki mpo na bakonzi na Yisalaele. Moko na yango elobaki boye: “Ekoki mpe ete [mokonzi] azwa basi mingi mpo na ye mpenza te, ete motema na ye epɛngwa te.” (Deteronome 17:14, 17) Atako toli yango ezalaki polele, Salomo abalaki basi nkama nsambo, mpe azalaki na bamakango nkama misato. Basi yango mingi bazalaki kosambela banzambe mosusu. Toyebi te mpo na nini Salomo abalaki ebele ya basi wana, to mpe ndenge nini alimbolaki ntina ya likambo oyo asalaki. Kasi, toyebi ete atosaki te mobeko ya Nzambe oyo ezalaki polele. Esukelaki ye ndenge kaka Yehova alobaki. Tozali kotánga boye: “Basi [ya Salomo] bapɛngolaki motema na ye kino banzambe mosusu.” (1 Mikonzi 11:3, 4) Bwanya oyo Nzambe apesaki ye ebandaki kosila mokemoke. Salomo apɛngwaki. Nsukansuka, mposa ya kosepelisa basi na ye oyo bazalaki bato ya bikólo mosusu ezwaki esika ya mposa na ye ya kotosa Nzambe mpe ya kosepelisa ye. Talá likambo ya mawa oyo ekómelaki Salomo, moto oyo akomaki liboso ete: “Mwana na ngai, zalá na mayele mpe sepelisá motema na ngai, ete nazongisela ye monɔkɔ oyo akopamela ngai”!—Masese 27:11.
Elimo ya mokili ezali makasi
11. Ndenge nini makambo oyo tozali kokɔtisa na bɔɔngɔ na biso ebongisaka to ebebisaka makanisi na biso?
11 Ndakisa ya Salomo ezali koteya biso ete tokomikosa mpenza soki tokanisi ete lokola toyebi solo, elimo ya mokili ekoki kobebisa makanisi na biso te. Se ndenge bilei esalaka mosala na nzoto, “bilei” ya elimo mpe esalaka mosala na makanisi na biso. Makambo oyo tozali kokɔtisa na bɔɔngɔ na biso ebongisaka to ebebisaka makanisi mpe elimo na biso. Lokola bakonzi ya bakompanyi bayebi likambo yango malamu, mbula na mbula babimisaka bamiliare ya dolare mpo na piblisite ya biloko na bango. Piblisite oyo ebendaka mpenza ezalaka na maloba mpe na bililingi ya kitoko mpo na kopesa bato mposa ya kozala na biloko yango. Basali ya piblisite bayebi mpe ete kotala piblisite mbala moko to mibale ekoki te kotinda moto asomba mbala moko eloko yango. Kasi, soki bato bazali kotala piblisite mbala na mbala, nsima ya mikolo bakosepela na yango. Piblisite ebendaka bato, soki te, mbɛlɛ babimisaka mbongo te mpo na kosala yango. Esalaka mosala monene na makanisi mpe na elimo ya bato.
12. (a) Satana azali kosala nini mpo na kopalanganisa makanisi na ye? (b) Nini ezali komonisa ete baklisto bakoki kolanda makanisi na ye?
12 Satana azali lokola moto oyo asalaka piblisite; mpo na kopalanganisa makanisi na ye, azali naino kolatisa yango makambo oyo ebendaka, mpo ayebi ete nsukansuka, bato mosusu bakolanda makanisi na ye. Satana azali kosalela masano mpe makambo mosusu mpo na komema bato na kokanisa ete mabe ezali malamu mpe ete malamu ezali mabe. (Yisaya 5:20) Ata mpe baklisto mosusu ya solo bazwami na lokuta oyo Satana azali kopalanganisa. Biblia ezali kokebisa biso na maloba oyo: “Liloba oyo epemami elobi polele ete na bileko oyo ekoya bamosusu bakotika kondima, kotyáká likebi na maloba oyo epemami ya bokosi mpe na mateya ya bademo, na nzela ya bokosi ya bato oyo balobaka lokuta, oyo batyami elembo na kati ya lisosoli lokola na ebende ya mɔtɔ makasi.”—1 Timote 4:1, 2; Yilimia 6:15.
13. Baninga mabe ezali banani, mpe bizaleli ya baninga na biso ekoki kosala biso nini?
13 Ezali na moto moko te oyo elimo ya mokili ekoki kobenda ye te. Mopɛpɛ ya mokili ya Satana ezali mpenza makasi. Biblia elobi mpo na kokebisa biso ete: “Bómikosa te. Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Bakolinti 15:33) Baninga mabe yango ekoki kozala eloko to moto oyo azali komonisa elimo ya mokili, mpe moto ya ndenge wana akoki kozala ata na kati ya lisangá. Soki tolobi ete baninga ya mabe bakoki kobebisa biso te, boye tokoloba mpe ete baninga malamu bakoki kobongisa biso te. Soki tokanisi bongo, tokomikosa mpenza! Biblia elobi polele ete: “Ye oyo akotambola na bato ya mayele akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba akobukana.”—Masese 13:20.
14. Ndenge nini tokoki kokima elimo ya mokili?
14 Mpo na kokima elimo ya mikili, tosengeli kozala baninga ya bato ya bwanya, oyo basalelaka Yehova. Tosengeli koleisa bɔɔngɔ na biso na makambo oyo etongaka kondima. Ntoma Paulo akomaki boye: “Makambo nyonso oyo ezali ya solo, makambo nyonso oyo ebongi na lobanzo, makambo nyonso ya boyengebene, makambo nyonso ya pɛto, makambo nyonso oyo ekoki kolingama, makambo nyonso oyo elobelami malamu, soki ezaleli moko ya malamu ezali mpe soki eloko moko oyo ebongi kosanzolama ezali, bókoba kokanisa makambo wana.” (Bafilipi 4:8) Lokola tozali na bonsomi ya kopona, tokoki kopona makambo oyo tokokanisa. Tiká tóponaka ntango nyonso kokanisa makambo oyo ekotinda biso tópusana penepene na Yehova.
Elimo ya Nzambe eleki makasi
15. Ndenge nini baklisto na Kolinti ya kala bakesanaki na bato mosusu ya engumba yango?
15 Baklisto ya solo batambwisami na elimo santu ya Nzambe, yango wana bakeseni na bato oyo bazali kokosama na elimo ya mokili. Paulo akomelaki baklisto ya Kolinti boye: “Biso tozwaki elimo ya mokili te, kasi elimo oyo euti epai ya Nzambe, mpo tókoka koyeba makambo oyo Nzambe apesi biso na boboto.” (1 Bakolinti 2:12) Kolinti ya kala etondaki na elimo ya mokili. Lokola bato ya mboka yango bamipesaki mpenza na misala ya mbindo, ebimisaki liloba “Kokolintinia” oyo elimboli “kosala misala ya mbindo.” Satana azipaki miso ya bato. Yango wana, bayebaki Nzambe ya solo te. (2 Bakolinti 4:4) Kasi, na lisalisi ya elimo santu, Yehova afungolaki miso ya Bakolinti mosusu, yango epesaki bango likoki ya koyeba solo. Elimo na ye etambwisaki bango mpe esalisaki bango bábongwana mpenza mpo andima mpe apambola bango. (1 Bakolinti 6:9-11) Atako elimo ya mokili ezalaki makasi, elimo ya Yehova elekaki yango na makasi.
16. Ndenge nini tokoki kozwa elimo ya Nzambe mpe kobatela yango?
16 Lelo oyo mpe ezali se ndenge yango. Elimo santu ya Yehova ezali nguya oyo eleki makasi na molɔ́ngɔ́, mpe Yehova apesaka yango ofele mpe na kokakatana te na baoyo basɛngaka ye yango na kondima. (Luka 11:13) Kasi, mpo na kozwa elimo ya Nzambe, tosengeli kaka te koboya elimo ya mokili. Tosengeli mpe koyekolaka Liloba ya Nzambe mpe kosalela yango na bomoi na biso mpo elimo na biso, elingi koloba makanisi na biso, eyokana na makanisi ya Nzambe. Soki tosali yango, Yehova akopesa biso makasi ya kolonga mayele nyonso oyo Satana akoki kosalela mpo na koboma biso na elimo.
17. Ndenge nini lisolo ya Lota ekoki kokitisa biso motema?
17 Atako baklisto bazali bato ya mokili te, bafandi na kati ya mokili. (Yoane 17:11, 16) Moto moko te akoki kokima mosika ya elimo ya mokili, mpamba te, tosalaka to mpe tofandaka esika moko na bato oyo balingaka Nzambe to banzela na ye te. Toyokaka nde lokola Lota, moto oyo azalaki ‘kotungisama makasi’ to mpe konyokwama, mpo na misala ya kotyola mibeko ya bato ya Sodoma oyo afandaki kati na bango? (2 Petelo 2:7, 8) Soki ezali bongo, tókitisa mitema. Yehova abatelaki mpe abikisaki Lota; akoki mpe kosala yango mpo na biso. Tata na biso ya bolingo amonaka mikakatano na biso mpe ayebi yango malamu, akoki kosalisa biso mpe kolendisa biso mpo tólɛmba te na elimo. (Nzembo 33:18, 19) Soki totyeli ye motema mpe tozali kobelela ye, akosalisa biso tólonga elimo ya mokili, ata soki tozali na mikakatano nini.—Yisaya 41:10.
18. Mpo na nini tosengeli kobatela boyokani na biso na Yehova?
18 Na kati ya mokili oyo epesi Nzambe mokɔngɔ mpe oyo Satana azali kozimbisa, biso basaleli ya Yehova tozali na libaku malamu ya koyeba solo. Yango wana, tozali na esengo mpe na kimya oyo mokili ezali na yango te. (Yisaya 57:20, 21; Bagalatia 5:22) Tozali na elikya kitoko ya bomoi ya seko na Paladiso, epai elimo ya mokili oyo ezali kokufa ekozala lisusu te. Yango wana, tóbatela boyokani na biso na Nzambe mpe tófungola miso mpo tózongaka na nzela ntango kaka tomoni ete tobandi kopɛngwa na elimo. Tópusana lisusu mpe lisusu penepene na Yehova, mpe ye akosalisa biso tólonga elimo ya mokili.—Yakobo 4:7, 8.
Okoki kolimbola?
• Satana asaleli makambo nini mpo na kokosa bato mpe kozimbisa bango?
• Tokoki kosala nini mpo tópɛngwa na nzela ya Yehova te?
• Nini ezali komonisa ete elimo ya mokili ezali makasi?
• Ndenge nini tokoki kozwa elimo ya Nzambe mpe kobatela yango?
[Etanda na lokasa 11]
BOKESENI KATI NA BWANYA YA MOKILI MPE BWANYA YA NZAMBE
Solo ezali moko te—Bato na bato bazali na solo na bango.
“Liloba [ya Nzambe] ezali solo.”—Yoane 17:17.
Mpo na kokesenisa mabe ná malamu, landá motema na yo.
“Motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi.”—Yilimia 17:9.
Salá nyonso oyo esepelisi yo.
“Ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye [ye] moko.”—Yilimia 10:23.
Bozwi nde epesaka moto esengo.
“Bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso.”—1 Timote 6:10.
[Elilingi na lokasa 10]
Salomo atikaki losambo ya solo mpe alandaki banzambe ya lokuta
[Elilingi na lokasa 12]
Lokola mosali ya piblisite, Satana azali kopalanganisa elimo ya mokili. Ozali kotɛmɛla yango?