Ntango mokano ya Nzambe ekosalema awa na mabelé
NTANGO Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete, “Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé,” ayebaki likambo oyo azalaki koloba mpamba te azalaki liboso kuna na likoló elongo na Tata. (Matai 6:10; Yoane 1:18; 3:13; 8:42) Liboso Yesu abotama lokola moto awa na mabelé, ezalaki na ntango moko oyo mokano ya Nzambe ezalaki kosalema na likoló mpe awa na mabelé. Na ntango wana, makambo nyonso ezalaki kotambola malamu mpe ezalaki ntango moko ya esengo.—Masese 8:27-31.
Nzambe asalaki libosoliboso bikelamu ya elimo, ‘baanzelu na ye, oyo baleki na nguya, oyo batosaka ye’; bango bazalaki mpe bazali tii lelo oyo “basali na ye, baoyo bakosalaka mokano na ye.” (Nzembo 103:20, 21) Anzelu mokomoko azalaki nde na likoki ya kokanisa mpe ya kopona? Ɛɛ, mpe ntango Nzambe akelaki mabelé, ‘bana yango ya Nzambe bagangaki na esengo.’ (Yobo 38:7) Koganga na bango na esengo emonisaki ete bazalaki kosepela na mokano ya Nzambe mpe bandimaki kolanda yango.
Nsima ya kokela mabelé, Nzambe abongisaki yango malamu mpo ezala esika ya kofanda mpo na bato, na nsima akelaki mobali ná mwasi ya liboso. (Genese, mokapo 1) Ebongaki mpe baanzelu báganga na esengo mpo na likambo yango? Biblia elobi boye: “Nzambe atalaki biloko nyonso bisilaki ye kozalisa, mpe ezalaki malamu mingi”; ezalaki ya kokoka mpenza.—Genese 1:31.
Mokano ya Nzambe ezalaki nini mpo na baboti na biso ya liboso mpe bana na bango? Genese 1:28 elobi ete yango mpe ezalaki malamu mingi: “Nzambe mpe apambolaki bango, mpe Nzambe alobelaki bango ete, Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nse na bino; mpe bózala na bokonzi na likoló ya mbisi ya mai, mpe ya ndɛkɛ ya likoló, mpe likoló ya nyama nyonso ya bomoi ekotambolaka na mokili.” Mpo na kokokisa mokumba yango, baboti na biso ya liboso basengelaki kozala na bomoi libela na libela, ndenge moko mpe bana na bango. Eloko moko te elakisi ete basengelaki kotungisama na makama, kozanga bosembo, mpasi mpe liwa.
Na ntango yango, mokano ya Nzambe ezalaki kosalema na likoló mpe na mabelé. Baoyo bazalaki kosala mokano ya Nzambe bazalaki na bomoi ya esengo. Nini ebebisaki makambo?
Babɛtɛlaki mokano ya Nzambe ntembe. Nzambe azalaki na likoki ya kokata likambo mbala moko. Kasi, ntembe yango ememelaki bato mpasi oyo eumeli ntango molai, oyo bato bayebaka lisusu te soki mokano ya Nzambe ezali nini. Mpo na yango, biso nyonso tokómá komona mpasi. Likambo yango ezalaki nini?
Mokano ya Nzambe na ntango ya botomboki
Moko ya ‘bana ya Nzambe’ akómaki na mposa mabe ya kobebisa mokano ya Nzambe mpo na bato; alukaki kobongola yango mpo na matomba na ye moko. Ntango ekelamu yango ya elimo azalaki kokanisa likambo yango, akómaki komona ete akolonga kosala yango, mpe mposa mabe na ye ezalaki se kokola. (Yakobo 1:14, 15) Ekoki kozala ete akanisaki ete soki alongi kopɛngwisa Adama ná Eva mpo báyokela ye na esika báyokelaka Nzambe, Nzambe akondima ete mokonzi mosusu azala, longola ye moko. Ntango mosusu akanisaki ete Nzambe akoboma bato te, mpo soki abomi bango mokano na ye ekobeba. Kasi, Yehova Nzambe akobongola mokano na ye mpe akondima ete ekelamu yango ya elimo ayangela bato oyo bakopona kotosa ye. Na nsima, bakómaki kobenga motomboki yango Satana, elingi koloba “Motɛmɛli.”—Yobo 1:6, NW, maloba na nse ya lokasa.
Mpo Satana akokisa mposa na ye, asololaki na mwasi. Atindaki ye aboya kosala mokano ya Nzambe mpe aponaka ye moko malamu ná mabe; alobaki boye: “Bino bokokufa solo te, . . . bokozala [lokola] Nzambe, koyeba malamu ná mabe.” (Genese 3:1-5) Mwasi amonaki yango libaku ya komilongola na boyangeli ya Nzambe, mpe amonaki ete yango nde bomoi ya malamu koleka. Na nsima, andimisaki mobali na ye asala lokola ye, elingi koloba ye mpe atombokela Nzambe.—Genese 3:6.
Yango ezalaki mokano ya Nzambe te mpo na Adama ná Eva. Ezalaki mokano na bango moko. Mpe esukelaki bango mabe mpenza. Nzambe ayebisaki bango liboso ete soki batosi ye te bakokufa. (Genese 3:3) Ndenge Nzambe asalaki bango, bakokaki kolonga te soki Ye atambwisi bango te. (Yilimia 10:23) Lisusu, bakómaki bato ya kozanga kokoka, mpe bapesaki bana na bango ezaleli na bango ya kozanga kokoka mpe liwa. (Baloma 5:12) Satana azali na likoki te ya kosilisa makambo yango.
Makambo yango ebongolaki libela mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mpo na mabelé? Te. (Yisaya 55:9-11) Kasi ebimisaki nde bantembe oyo Nzambe asengelaki kosukisa: Satana alobaki nde solo ete bato ‘bakozala lokola Nzambe, koyeba malamu ná mabe’? Na maloba mosusu, soki batikeli bato ntango, bakolonga bango moko kopona, na makambo nyonso ya bomoi, oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe, oyo ezali na litomba mpe oyo ezali na litomba te? Ebongi nde ete, lokola boyangeli ya Nzambe eleki malamu, bato bátosaka ye na makambo nyonso? Ebongi nde bato bátalelaka mokano ya Nzambe na makambo nyonso? Okoki kopesa biyano nini na mituna wana?
Mpo na kosukisa bantembe yango liboso ya baanzelu ná bato, Nzambe akokaki kosala likambo mosusu te: Asengelaki kaka kotika baoyo basɛngaki bonsomi bámeka komitambwisa bango moko. Ntembe yango elingaki kosila te soki abomaki bango mbala moko. Mpo na kosukisa likambo yango libela, asengelaki kotikela bato ntango molai bámeka komitambwisa bango moko, mpo bámona mpenza mabe ya koboya boyangeli na ye. Mpo na komonisa ete akosukisa likambo yango ndenge wana, Nzambe alobaki na mwasi ete akobota bana. Na yango, bato babandaki kobotana. Yango nde esali ete tózala na bomoi lelo oyo!—Genese 3:16, 20.
Kasi, yango elingi koloba te ete Nzambe atikaki bato ná ekelamu ya elimo oyo atombokelaki ye básalaka makambo nyonso ndenge balingi. Nzambe atikaki bokonzi na ye te, abosanaki mpe mokano na ye te. (Nzembo 83:18) Amonisaki yango polele ntango asakolaki ete bakosasa motomboki yango na motó mpe ete makambo nyonso ya mabe oyo botomboki na ye ebimisi ekolongolama. (Genese 3:15) Yango wana, kaka na ebandeli, Nzambe alakaki bato ete akolongola bango na mpasi.
Kasi liboso na yango, baboti na biso ya liboso mpe bana na bango bazalaki lisusu na nse ya bokonzi ya Nzambe te. Soki Nzambe apekisaki ete mpasi oyo ezali kokómela bato mpo na ekateli oyo bazwaki ekómela bango, alingaki kosɛnga na makasi ete mokano na ye esalemaka na makambo nyonso. Yango elingaki komonana kaka ete atikeli bango te likoki ya komeka komitambwisa bango moko.
Ya solo, bato mosusu bazalaki na likoki ya kopona ete Nzambe azala mokonzi na bango. Bakokaki koyekola mokano ya Nzambe mpo na bato na ntango yango mpe kosala makasi mpo na kokokisa yango. (Nzembo 143:10) Atako bongo, yango elingaki kobatela bango te na mikakatano tii ntango ntembe oyo Satana abimisaki ete bato bakoki komitambwisa bango moko ekosila.
Bonsomi oyo balingaki ya komitambwisa bango moko ebandaki kobota mbuma mabe kaka na ebandeli. Kaina, mwana ya liboso oyo babotaki, abomaki ndeko na ye Abele mpo “misala na ye moko ezalaki ya mabe, kasi oyo ya ndeko na ye ezalaki ya boyengebene.” (1 Yoane 3:12) Yango ezalaki mokano ya Nzambe te, mpamba te Nzambe akebisaki Kaina mpe na nsima apesaki ye etumbu. (Genese 4:3-12) Kaina aponaki nzela oyo Satana alakisaki, elingi koloba aponaki komitambwisa ye moko; na bongo, “autaki na moto mabe.” Bato mosusu mpe basalaki lokola ye.
Mbula koleka 1 500 na nsima, “mokili ezalaki mabe na miso ya Nzambe; mokili etondaki na yauli.” (Genese 6:11) Esengelaki Nzambe azwa ekateli moko ya makasi mpo na kobikisa mabelé. Nzambe azwaki ekateli yango ntango azindisaki mokili mobimba na Mpela mpe abikisaki kaka libota moko ya bayengebene: Noa, mwasi na ye, bana na ye ná basi na bango. (Genese 7:1) Biso nyonso oyo tozali lelo oyo tozali bankɔkɔ na bango.
Kobanda na ntango ya Noa, Nzambe atambwisaka bato oyo balukaka na bosembo mpenza koyeba mokano na ye. Atindaki bato ya sembo bákoma makambo oyo esengelaki kotambwisa moto nyonso oyo azali na mposa ya kolanda nzela ya Nzambe. Makambo yango ezali na Biblia. (2 Timote 3:16) Na bolingo nyonso, apesaki bato ya sembo likoki ya kopusana penepene na ye, ata mpe kokóma baninga na ye. (Yisaya 41:8) Apesaki bango makasi oyo esengeli mpo bákoka koyika mpiko liboso ya mikakatano oyo etungisaka bato banda bakómá komitambwisa bango moko. (Nzembo 46:1; Bafilipi 4:13) Tozali mpenza kotɔnda Nzambe mpo na lisalisi yango!
“Mokano na yo esalema” na makambo nyonso
Makambo nyonso oyo Nzambe asali tii sikoyo ezali te mokano na ye mobimba mpo na bato. Ntoma Petelo akomaki boye: “Ezali na likoló ya sika mpe na mabelé moko ya sika oyo tozali kozela engebene elaka na ye, mpe na kati na yango boyengebene ekofanda.” (2 Petelo 3:13) Maloba yango ya elilingi ezali kolobela guvɛrnema moko ya sika mpe bato oyo guvɛrnema yango ekoyangela.
Mosakoli Danyele alobelaki bokonzi yango na maloba ya polele, akomaki boye: “Na mikolo ya mikonzi yango Nzambe ya lola akotɛmisa bokonzi bokobebisama soko moke te, . . . ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.” (Danyele 2:44) Esakweli yango elobi ete Nzambe akosukisa ebongiseli mabe ya makambo ya ntango oyo mpe, na esika na yango, akotya Bokonzi to guvɛrnema na ye. Ezali nsango malamu mpenza! Mokolo mosusu, bitumba mpe moimi oyo etondisi mobulu na mokili oyo mpe ezali lisusu koluka kobebisa mabelé, ekozala lisusu te.
Mbongwana yango ekosalema ntango nini? Bayekoli ya Yesu batunaki ye boye: “Ntango nini makambo wana ekosalema, mpe nini ekozala elembo ya kozala na yo mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo?” Na eyano oyo Yesu apesaki bango, alobaki mpe boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.”—Matai 24:3, 14.
Bato nyonso bayebi ete mosala yango ya kosakola ezali kosalema sikoyo na mokili mobimba. Na ntembe te ozali komona ndenge mosala yango ezali kosalema na esika ofandi. Na buku na ye Bango mpe bandimaka (na Lingelesi), Profɛsɛrɛ Charles Braden akomaki boye: “Batatoli ya Yehova bazali kosakola na mokili mobimba. . . . Lingomba moko te na mokili oyo emonisi molende mpe mpiko mpo na kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi koleka Batatoli ya Yehova.” Batatoli bazali kosakola nsango malamu yango na molende na mikili koleka 230 mpe na minɔkɔ soki 400. Naino mosala yango oyo Yesu asakolaki esalemá na mokili mobimba ndenge wana te. Yango ezali mpe elembo oyo ezali komonisa polele ete ntango oyo Bokonzi yango ekozwa esika ya baguvɛrnema ya bato ekómi pene.
Bokonzi oyo Yesu alobaki ete ekosakolama ezali kaka Bokonzi oyo alakisaki biso tósɛngaka na libondeli ya ndakisa ete: “Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” (Matai 6:10) Na nzela ya Bokonzi yango nde Nzambe akokokisa mokano na ye mpo na bato mpe mpo na mabelé.
Yango elingi koloba nini? Yoká eyano oyo Biblia epesi na Emoniseli 21:3, 4: “Nayokaki mongongo moko ya makasi euti na kiti ya bokonzi elobi ete: ‘Talá! Hema ya Nzambe ezali elongo na bato, mpe akofanda elongo na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala elongo na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.’” Na bongo, mokano ya Nzambe ekosalema na makambo nyonso awa na mabelé mpe na likoló.a Okosepela te ete mokano yango esalema mpe mpo na yo?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Soki osepeli koyeba makambo mingi lisusu na ntina na Bokonzi ya Nzambe, sololá na Batatoli ya Yehova na esika ofandi to mpe tindá mokanda na moko ya baadrɛsi oyo ezali na lokasa 2 ya zulunalo oyo.
[Elilingi na lokasa 5]
Koboya kosala mokano ya Nzambe ememala bato bampasi