Bato bazali koluka guvɛrnema ya malamu
“Lokola bikólo nyonso ya mokili ekómi na mposa ya bikólo mosusu na makambo mingi mpe bikólo mingi ezali kosala makambo elongo, likambo yango ebimisi ebele ya mikakatano oyo ekólo moko ekoki kosilisa yango moko te. Tokolonga mikakatano minene oyo tozali kobunda na yango lelo oyo kaka soki bikólo nyonso epesani mabɔkɔ.”—Ghulam Umar, moto moko ya mayele na makambo ya politiki na ekólo Pakistan.
LELO oyo, ezali na ebele ya makambo oyo ezali mpenza kokamwisa bato. Biloko ezali beboo, kasi ebele ya bato bazali konyokwama mpo na kozwa ata mwa eloko ya kobikela. Tokómi na bamasini ndenge na ndenge oyo ekoki kosalisa na koyekola mpe kosala makambo mingi, kasi ebele ya bato bazali kozwa misala ya malonga te. Bato bazali kokanisa ete bazali na bonsomi mingi lelo oyo, kasi ebele ya bato bazali kobanga mpe bazali na kimya te. Makambo mingi lelo ezali komonisa ete tokoki kozala na bomoi ya malamu, kasi lokola bato nyonso, banda na bakonzi tii na nse, bamipesi na kanyaka mpe bazali kotosa mibeko te, yango ezali kolongola bato mingi elikya.
Mikakatano ya bato eleki minene na boye ete ekólo moko, to ata mwa bikólo oyo esangani, ekoki kosilisa yango te. Yango wana, bato mingi bazali komona ete mpo mokili mobimba ezala na kimya, esengeli guvɛrnema moko eyangela mokili mobimba. Na ndakisa, Albert Einstein apesaki likanisi wana banda na 1946. Na ntango wana, alobaki boye: “Nakanisi mpenza ete bato bazali nde na mposa ya kimya . . . Mposa yango ya kozala na kimya ekokokisama se soki tosali guvɛrnema moko oyo ekoyangela mokili mobimba.”
Nsima ya mbula ntuku mitano banda alobá likambo wana, mposa monene wana ekokisami naino kaka te. Lisolo moko ya zulunalo Le Monde oyo ebimaka na Paris, na France, etángaki mikakatano oyo ekozala na bambula ya 2000, mpe elobaki boye: “Esengeli kosala guvɛrnema moko ya mokili mobimba oyo ezali na batribinale, na misala ya Leta, mpe na mibeko oyo, ata na esika nini na mokili, soki balingi koboma bato nyonso ya ekólo moko, ezala na makoki ya kopekisa likambo wana nokinoki. Esengeli bato bándima ete mabelé mobimba ezala ekólo moko.” Nani to nini ezali na makoki ya kokokisa likambo yango mpe kosala ete bato ya mokili mobimba bázala na kimya?
Guvɛrnema yango ezali nde ONU?
Bato mingi bazalaka na elikya ete ONU ekotya kimya na mokili mobimba. Tokanisi ete ONU ezali mpenza guvɛrnema oyo ekoki kotya kimya na mokili mobimba? Toboyi te, bakonzi ya ebongiseli yango bazali kopesa bato bilikya ebele. Na ndakisa, na “Déclaration du Millénaire” mpo na mobu 2000, likita monene ya bikólo ya ONU ezwaki ekateli oyo: “Tokosala nyonso mpo bapɛplɛ na biso bányokwama lisusu na bitumba te, ezala bitumba na kati ya bato ya ekólo moko to bitumba kati na bikólo, oyo ebomi bato koleka milio 5 na boumeli ya mbula zomi oyo eleki.” Bilaka ya ndenge wana ezali kotinda ebele ya bato ya mokili mobimba bákumisa ONU mpe, na mobu 2001, bapesaki ebongiseli yango mbano babengi Prix Nobel ya kimya. Ntango bapesaki ONU mbano monene wana, balobaki ete “kimya mpe boyokani na kati ya bikólo ya mokili mobimba ekoki kozwama kaka na nzela ya ONU.”
Atako bongo, tokoki nde koloba ete ONU, ebongiseli oyo esalemá na 1945, esali makambo oyo emonisi ete ezali guvɛrnema oyo ekoki kotya kimya ya solosolo mpe ya libela na mokili? Te, mpamba te lokola ekólo mokomoko ya ONU ezali koluka matomba na yango moko, milende oyo ONU ezali kosala ezali kokende na mai. Mopanzi-nsango moko akomaki ete mpo na bato mingi, ONU ezali “ebongiseli oyo esalisaka mpo na koyeba makanisi ya bato ya mokili mobimba” mpe ete “mikano na yango mingi ezali kaka makambo oyo balobelá banda ebele ya bambula, kasi esukaka mingi kaka na maloba, basalaka mpenza eloko ya malonga te.” Yango wana, motuna ezali naino kotunama: Mokolo mosusu bikólo nyonso ekokóma mpenza liboke moko?
Biblia emonisi ete etikali moke bikólo nyonso esangana. Ekosalema ndenge nini? Guvɛrnema nini ekosangisa yango? Mpo na kozwa biyano, tosɛngi yo otánga lisolo oyo elandi.
[Elilingi na lokasa 3]
Einstein apesaki likanisi ya kosala guvɛrnema moko oyo ekoyangela mokili mobimba
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Einstein: Fɔtɔ ya U.S. National Archives