Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/9 nk. 19-25
  • Elimo ya komipesa ememelaki biso bomoi ya malamu mpe ya esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elimo ya komipesa ememelaki biso bomoi ya malamu mpe ya esengo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Pologne ya Moke”
  • Libula ya elimo ezali na motuya
  • Nabandi mosala ya ntango nyonso
  • Mikumba ebakisami
  • Bomoi ya malamu mpenza
  • Bomoi ebongwani
  • Yehova akokisaka ntango nyonso bamposa na biso
  • Kotánga Biblia—Momeseno oyo epesaka ngai makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • “Nayekoli makambo mingi epai ya basusu!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Nazali kosala makasi mpo na komimonisa “Mosali oyo abongi koyoka nsɔni te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Tribinale moko na Espagne epesi lisusu mama moko lotomo ya kofanda ná bana na ye
    Lamuká!—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/9 nk. 19-25

Lisolo ya bomoi

Elimo ya komipesa ememelaki biso bomoi ya malamu mpe ya esengo

YA MARIAN NÁ ROSA SZUMIGA

Nzembo 54:6 elobi: “Nakopesa yo likabo na motema malamu.” Maloba oyo nde etambwisaka bomoi ya Marian Szumiga ná mwasi na ye Rosa, oyo bafandaka na France. Eleki mwa mikolo, basepelaki kolobela ntango molai oyo balekisi na mosala ya Yehova mpe esengo oyo bazwi.

MARIAN: Baboti na ngai bautá na Pologne mpe bazalaki Bakatolike. Tata azwaki libaku ya kokɔta kelasi te. Kasi, ayekolaki kotánga mpe kokoma ntango azalaki soda na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Tata azalaki kobanga Nzambe, kasi mbala mingi lingomba ezalaki kolɛmbisa ye.

Ezali na likambo moko oyo etikalá na makanisi ya tata. Mokolo moko, wana etumba ezalaki kongala, sango moko ya basoda ayaki kotala limpinga ya basoda oyo Tata azalaki kotambwisa. Ntango bɔmbi moko epanzanaki pembeni wana, sango yango akimaki na kobanga nyonso mpe azalaki kobɛta mpunda na ye na ekulusu mpo ekima mbangu mpenza. Ntango tata amonaki “mosaleli” ya Nzambe azali kosalela eloko “mosantu” mpo na kokimisa mpunda mbangu, yango esalaki ye mpasi. Atako tata amonaki makambo ya ndenge wana mpe makambo mosusu ya nsɔmɔ na etumba, yango elɛmbisaki kondima na ye epai ya Nzambe te. Azalaki koloba mbala na mbala ete Nzambe akobatela ye akufa na etumba te.

“Pologne ya Moke”

Na mobu 1911, tata abalaki elenge mwasi moko oyo azalaki kofanda na mboka moko pembeni na mboka na biso. Nkombo na ye ezalaki Anna Cisowski. Mwa moke na nsima ya bitumba, na 1919, Tata ná Mama balongwaki na Pologne mpe bakendeki kofanda na France, epai Tata akómaki kosala mosala ya kotimola charbon. Nabotamaki na sanza ya Marsi na mobu 1926, na engumba Cagnac-les-Mines na sudi-wɛsti ya France. Na nsima, baboti na ngai bakendaki kofanda na kartye ya bato oyo bautá na Pologne, na Loos-en-Gohelle pene na Lens na nɔrdi ya France. Motumbi mampa, motɛki nyama mpe sango ya parwasi, bango nyonso bazalaki bato ya Pologne. Tokoki kokamwa te soki bakómaki kobenga esika yango Pologne ya Moke. Baboti na ngai bamipesaki mpenza na misala ya mboka wana. Mbala mingi tata azalaki kosangisa bato mpo na kosala bateyatre, kobɛta miziki mpe kosala masano mosusu mpo na bato ya mboka. Azalaki mbala na mbala kosolola na sango, kasi tata azalaki kozwa biyano ya malamu te na mituna na ye mpo sango azalaki koloba na ye mbala mingi ete, “Mabombami ezali mingi.”

Mokolo moko na 1930, basi mibale babɛtaki na porte na biso. Bazalaki Bayekoli ya Biblia, nkombo bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova kala. Basi yango batikelaki tata Biblia, mokanda oyo tata azalaki na mposa ya kotánga banda kala. Tata ná mama batángaki na esengo mikanda oyo elimbolaka Biblia oyo basi wana batikaki. Makambo oyo batángaki na mikanda yango esimbaki mpenza mitema na bango. Atako bazalaki na misala mingi, baboti na ngai bakómaki koyangana na makita ya Bayekoli ya Biblia. Tata ná sango bakómaki kotyana ntembe makasi mpenza, tii mokolo moko sango alobaki na baboti na ngai ete soki batiki koyangana na Bayekoli ya Biblia te, akolongola yaya na ngai Stéphanie na malongi. Tata ayanolaki ye ete: “Komitungisa te. Kobanda sikoyo, mwana wana mpe bana na biso mosusu bakobanda kokende elongo na biso na makita ya Bayekoli ya Biblia.” Tata alongwaki na lingomba mpe na ebandeli ya 1932, baboti na ngai bazwaki batisimo. Na ntango wana, na France, basakoli ya Bokonzi bazalaki soki 800 mpamba.

Rosa: Baboti na ngai bautaki na Hongrie mpe, lokola libota ya Marian, bango mpe bakendaki kofanda na nɔrdi ya France mpo na kosala mosala ya kotimola charbon. Nabotamaki na 1925. Na 1937, Motatoli ya Yehova moko, Auguste Beugin, to Papa Auguste ndenge tozalaki kobenga ye, azalaki koya kotikela baboti na ngai Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na monɔkɔ ya Hongrois. Bazalaki kosepela na bazulunalo yango mingi, kasi ata moko na bango akómaki Motatoli ya Yehova te.

Atako nazalaki elenge, makambo oyo nazalaki kotánga na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki mpenza kosimba motema na ngai, mpe Suzanne Beugin, bokilo ya Papa Auguste, akómaki kozwa ngai lokola mwana na ye. Baboti na ngai bandimaki ete amemaka ngai na makita. Na nsima, ntango nakómaki kosala, tata azalaki lisusu kosepela te ete nakendaka na makita mokolo ya lomingo. Atako tata azalaki makambo makasi te, akómaki komilela ete: “Yo ozalaka awa te na boumeli ya pɔsɔ mobimba, mpe mokolo ya lomingo olingi kaka okendaka na makita na bino!” Atako bongo, nazalaki kokende kaka. Na bongo, mokolo moko tata alobaki na ngai boye: “Kangá bisaka mpe bimá na ndako oyo!” Ezalaki na butu makasi. Nazalaki kaka na mbula 17, mpe nayebaki epai ya kokende te. Nsukansuka nakendeki epai ya Suzanne na kolela. Nafandaki epai ya Suzanne pene na pɔsɔ moko mpe nsima tata atindaki ndeko na ngai ya mwasi aya kozwa ngai mpo tózonga na ndako. Nazalaki moto ya nsɔninsɔni, kasi likanisi oyo ezali na 1 Yoane 4:18 esalisaki ngai nalɛmba te. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Bolingo ya kokoka ebwakaka nde kobanga libándá.” Nazwaki batisimo na 1942.

Libula ya elimo ezali na motuya

Marian: Nazwaki batisimo na 1942, elongo na bandeko na ngai ya basi Stéphanie ná Mélanie mpe ndeko na ngai ya mobali Stéphane. Liloba ya Nzambe ezalaki na esika ya liboso na libota na biso. Tozalaki kofanda biso nyonso na mesa mpe tata azalaki kotángela biso Biblia na monɔkɔ ya Polonais. Mbala mingi na mpokwa baboti na biso bazalaki koyebisa biso makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola. Bangonga wana oyo tozalaki kolekisa mpo na koyoka makambo ya elimo ezalaki kokolisa mpenza bolingo na biso mpo na Yehova mpe ezalaki kosalisa biso tóyeba kotyela ye motema. Lokola tata akómaki kobɛla, azalaki kosala lisusu te, atako bongo, akobaki kokokisa bamposa na biso ya elimo mpe ya mosuni.

Lokola tata akómaki na ntango mingi, abandaki koyekola Biblia pɔsɔ na pɔsɔ na bilenge ya lisangá na biso na monɔkɔ ya Polonais. Na ntango wana nde nayekolaki kotánga Polonais. Tata azalaki mpe kolendisa bilenge na makambo mosusu. Mokolo moko Ndeko Gustave Zopfer, oyo na ntango wana azalaki kokamba mosala ya Batatoli ya Yehova na France, ayaki kotala lisangá na biso, Tata asangisaki mwa bandeko mpo báyemba mpe abongisaki drame oyo elobelaki fɛti oyo Mokonzi Belesasala asalaki ntango lobɔkɔ ekomaki na efelo ya ndako. (Danyele 5:1-31) Louis Piéchota oyo na nsima ya mikolo atikalaki ngwi na monyokoli ya Banazi nde azalaki Danyele na drame yango.a Wana nde ndenge tokolaki. Tozalaki komona ndenge baboti na biso bazalaki komipesa mpenza na makambo ya elimo. Lelo oyo namoni mpenza motuya ya libula oyo baboti na biso batikelá biso.

Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki na mobu 1939, mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova epekisamaki na France. Mokolo moko, basoda ya Allemagne bazingaki mboka na biso. Bazalaki kokɔta na bandako nyonso mpo na kolukaluka. Tata abongisaki mwa esika moko ebombaná na kati ya armware ya bilamba mpe tobombaki mikanda oyo elimbolaka Biblia kuna. Nzokande, mwa babuku Fascisme ou liberté ezalaki ebele na armware na kuku. Tata abombaki yango mbangumbangu na libenga ya simisi moko oyo ezalaki na kulware. Basoda mibale mpe polisi moko ya ekoló France bakɔtaki na ndako mpo na kolukaluka. Tozalaki kobanga mpenza. Soda moko abandaki kolukaluka na kati ya bilamba oyo ezalaki na kulware, mpe mwa moke na nsima akɔtaki na kuku esika tozalaki, na mwa babuku yango na mabɔkɔ na ye. Atalaki biso na nkanda mpe atyaki mwa babuku yango likoló ya mesa mpe akobaki kolukaluka epai mosusu. Nazwaki mwa babuku yango nokinoki mpe natyaki yango na tirware oyo basoda basilaki kotala. Soda yango atunaki lisusu mwa babuku yango te​—ekoki kozala ete abosanaki yango mpenza!

Nabandi mosala ya ntango nyonso

Na 1948, nazwaki ekateli ya komipesa epai ya Yehova mpo na kosalela ye lokola mobongisi-nzela. Mwa mikolo na nsima, nazwaki mokanda oyo eutaki na biro ya Batatoli ya Yehova ya France. Na mokanda yango, basɛngaki ngai nakende kosala mosala ya mobongisi-nzela na lisangá ya Sedan oyo ezali pene na Belgique. Baboti na ngai basepelaki mingi komona ete naponaki kosalela Yehova na lolenge wana. Atako bongo, tata ayebisaki ngai ete mosala ya mobongisi-nzela ezali pɛtɛɛ te. Ezali mosala makasi. Kasi, ayebisaki ngai ete nakoki kokende epai na ye ntango nyonso oyo nalingi mpe soki nakutani na mokakatano, akozanga te kosalisa ngai. Atako baboti na ngai bazalaki na mbongo mingi te, basombelaki ngai velo ya sika. Tii lelo, nazali naino na faktire ya velo yango mpe, ntango natalaka yango natangisaka mai ya miso. Tata ná mama bakufaki na 1961, kasi nabosanaka te maloba ya bwanya oyo Tata azalaki koyebisa ngai; maloba yango elendisaka ngai mpe ebɔndisaka ngai na boumeli ya bambula nyonso oyo nalekisi na mosala na ngai ya ntango nyonso.

Elise Motte, ndeko mwasi moko mobange ya mbula 75 na lisangá ya Sedan azalaki mpe kolendisa ngai mingi. Na eleko ya molunge, nazalaki kokende na bamboka ya mosika na velo na ngai mpo na kosakola mpe Elise azalaki kolanda ngai na engbunduka. Kasi, mokolo moko batambwisi ya engbunduka baboyaki kosala mpe Elise akokaki kozonga na ndako te. Namonaki ndenge mosusu ya kosala te, kaka komema ye na velo na ngai tii na ndako na ye​—likambo oyo ezalaki pɛtɛɛ te. Na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, natyaki kusɛ na velo mpe nakendaki kozwa Elise na ndako na ye. Banda mokolo wana Elise azalaki lisusu koya na engbunduka te, mpe mbongo oyo asengelaki kofuta na engbunduka ebandaki kosalisa biso tómɛlaka tii na midi. Nani akokaki kondima ete velo na ngai ekokaki kosala lokola bisi?

Mikumba ebakisami

Na mobu 1950, bapesaki ngai mokumba ya mokɛngɛli ya zongazonga ya nɔrdi ya France mobimba. Lokola nazalaki kaka na mbula 23, nabangaki mpenza. Nakanisaki ete bandeko ya biro ya filiale babosani! Nabandaki komituna ebele ya mituna: ‘Nazali mpenza na makoki ya elimo mpe ya mosuni mpo na kokokisa mosala yango? Nakokoka mpenza kofandaka na bisika ndenge na ndenge pɔsɔ na pɔsɔ?’ Mpe lisusu, banda ntango nazalaki na mbula motoba, nabɛlaki maladi ya miso oyo esalaki ete miso na ngai etɛngama. Nayokelaka yango nsɔni mingi mpe nazalaki komituna soki basusu bazalaki komona ngai ndenge nini. Kasi na mbala wana, Stefan Behunick, ndeko moko misionɛrɛ oyo azwaki diplome na Gileadi, asungaki ngai mingi. Babenganaki Ndeko Behunick na Pologne mpo na mosala na ye ya kosakola mpe la Société atindaki ye na France. Molende na ye ezalaki kokamwisa ngai mpenza. Azalaki na limemya mingi mpo na Yehova mpe mpo na solo ya Biblia. Bato mosusu bazalaki kokanisa ete ndeko Behunick azalaki makambo makasi epai na ngai, nzokande, nayekolaki makambo mingi epai na ye. Molende na ye esalisaki ngai natika ezaleli ya kobanga.

Mosala ya zongazonga epesaki ngai libaku malamu ya kokutana na makambo mingi ya esengo mpenza na mosala ya kosakola. Na 1953, basɛngaki ngai nakende kotala Paoli, mobali moko oyo asalaki abonema ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Mobali yango azalaki kofanda na sudi ya Paris. Tokutanaki mpe ayebisaki ngai ete azwaki epaso na mosala ya soda mpe asepelaka mingi kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Ayebisaki ngai ete nsima ya kotánga lisolo oyo elobelaki Ekaniseli ya liwa ya Klisto na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo eutaki kobima, asalaki Ekaniseli ye moko mpe alekisaki mpokwa wana mobimba mpo na kotánga mokanda ya nzembo. Tosololaki mingi na mpokwa wana. Kasi liboso nakende, tosololaki mwa moke na ntina na batisimo. Na nsima, nabengisaki ye na liyangani ya zongazonga oyo esengelaki kosalema na ebandeli ya mobu 1954 mpe ayaki. Kutu, azalaki na kati ya bato 26 oyo bazwaki batisimo na liyangani yango. Makambo ya ndenge wana epesaka ngai esengo tii lelo.

Rosa: Nabandaki mosala ya mobongisi-nzela na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1948. Nsima ya kosala na engumba Anor oyo ezali pene na Belgique, batindaki ngai na Paris elongo na mobongisi-nzela mosusu, Irène Kolanski (lelo oyo Leroy). Tozalaki kofanda na mwa ndako moko ya moke na Saint-Germain-des-Prés oyo ezali mpenza na kati ya engumba. Lokola nakolaki na mboka, nazalaki mpenza kobanga bato ya Paris. Nazalaki kokanisa ete bango nyonso bayebi makambo mingi mpe bazali na mayele. Kasi ntango nabandaki kosakwela bango, naumelaki te komona ete bazali kaka lokola bato mosusu. Mbala mingi bakɛngɛli ya ndako bazalaki kobengana biso, mpe ezalaki mpasi mpo na kozwa moto ya koyekola na ye Biblia. Atako bongo, bato mosusu bandimaki nsango oyo tozalaki komemela bango.

Na liyangani ya zongazonga ya mobu 1951, batunaki ngai ná Irène mituna mpo na mosala na biso ya babongisi-nzela. Boyebi soki nani atunaki biso mituna yango? Mokɛngɛli ya zongazonga moko ya elenge na nkombo Marian Szumiga. Ezalaki mbala ya liboso te tókutana, kasi na nsima ya liyangani wana, tobandaki kotindelana mikanda. Ngai ná Marian tozalaki na makambo mingi ndenge moko; na ndakisa tozwaki batisimo mbula moko mpe tokómaki babongisi-nzela mbula moko. Likambo ya ntina koleka ezalaki ete biso nyonso mibale tozalaki na mposa ya kotikala libela na mosala ya ntango nyonso. Na yango, na nsima ya kotalela likambo yango na kati ya libondeli, tobalanaki mokolo ya 31 Yuli 1956. Ntango nabali, bomoi ya sika mpenza ebandaki mpo na ngai. Nasengelaki kaka komesana na makambo ya libala te, kasi mpe kotambola na mobali na ngai na mosala ya zongazonga, oyo ezalaki kosɛnga kolala na bandako ndenge na ndenge pɔsɔ na pɔsɔ. Na ebandeli, ezalaki mpasi mpenza, kasi makambo mingi ya esengo ezalaki liboso na biso.

Bomoi ya malamu mpenza

Marian: Na boumeli ya bambula, tozwaki mabaku ya kobongisa mayangani ndenge na ndenge. Nabosanaka te liyangani moko oyo esalemaki na 1966, na Bordeaux. Na ntango wana bapekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova na Portugal. Na yango, masolo ya liyangani yango esalemaki mpe na mɔnɔkɔ ya Portugais mpo na Batatoli ya Portugal oyo bayaki na France mpo na liyangani yango. Bandeko ya Portugal bayaki ebele, kasi tozalaki mpenza na mokakatano ya kozwela bango bisika ya kolala. Lokola Batatoli ya Bordeaux bazalaki na bandako minene te, tofutelaki ndako moko ya sinema mpo bandeko balala wana. Tolongolaki bakiti nyonso mpe tosalelaki rido oyo tokutaki wana mpo na kokabola ndako yango na biteni mibale ya kolala: Moko mpo na mibali mpe mosusu mpo na basi. Tosalaki mpe bakikoso, totandaki matiti na nse mpe totyaki bakapo likoló na yango. Bango nyonso basepelaki na ebongiseli wana.

Na mpokwa nyonso soki touti na liyangani, tozalaki kokende kotala bandeko yango na esika oyo bazalaki kolala. Ezalaki mpenza esengo! Bandeko yango balendisaki biso mpenza na masolo na bango na ndenge bayikaki mpiko na botɛmɛli oyo eumelaki bambula ebele. Na nsuka ya liyangani, biso nyonso tolelaki ntango bazongaki.

Mbula mibale liboso, na 1964, nazwaki mpe libaku mosusu ya malamu, ntango bapesaki ngai mokumba ya mokɛngɛli ya etúká. Namitunaki lisusu soki nakokoka mokumba yango. Kasi, nalobaki ete soki bandeko oyo bazali kokamba mosala bapesi ngai mokumba yango, na ntembe te bamoni ete nakokoka yango. Ezalaki esengo mingi kosala elongo na bakɛngɛli-batamboli mosusu. Nayekolaki makambo mingi epai na bango. Mingi kati na bango bazali mpenza bandakisa ya motema molai mpe ya molende, bizaleli oyo ezali na ntina mingi na miso ya Yehova. Nasimbaki ntina ya likambo oyo: soki tomonisi motema molai, Yehova akobosana biso te.

Na 1982, biro ya filiale esɛngaki biso tósalisa etuluku moko ya basakoli 12 oyo balobaka monɔkɔ ya Polonais mpe bafandaka na Boulogne-Billancourt, kartye moko ya Paris. Yango ekamwisaki biso. Nayebaki maloba mingi oyo tosalelaka na lisangá na monɔkɔ ya Polonais, kasi nayebaki koloba monɔkɔ yango te. Nzokande, boboto ya bandeko yango mpe lolenge na bango ya kosala makambo na bomoko, esalisaki ngai mingi. Lelo oyo, lisangá yango ezali na basakoli soki 170, kati na bango babongisi-nzela pene na 60. Nsima, ngai ná Rosa tokómaki kotala bituluku mpe masangá ya bandeko oyo balobaka monɔkɔ ya Polonais na Autriche, na Danemark mpe na Allemagne.

Bomoi ebongwani

Tolekisaki bomoi na biso mobimba na kotalaka masangá, kasi lokola nazalaki lisusu nzoto malamu te, totikaki mosala ya zongazonga na 2001. Tozwaki mwa ndako moko na engumba Pithiviers, epai ndeko na ngai ya mwasi Ruth afandaka. Biro ya filiale esalelaki biso boboto mpenza, bayebisaki biso tózala babongisi-nzela monene mpe basɛngaki biso tópesaka bangonga oyo ekoki na makasi na biso.

Rosa: Mbula ya liboso nsima ya kotika mosala ya zongazonga, ezalaki mpasi mpenza mpo na ngai. Mbongwana ezalaki monene mpenza mpe namonaki lokola nde nazali lisusu na ntina te. Na nsima nalobaki na motema ete, ‘Nazali naino na likoki ya kosalela ntango mpe makasi oyo etikali na ndenge moko ya malamu na mosala ya mobongisi-nzela.’ Lelo oyo, nazali na esengo ya kosala elongo na babongisi-nzela mosusu ya lisangá na biso.

Yehova akokisaka ntango nyonso bamposa na biso

Marian: Nazali kotɔnda Yehova mingi mpo na mbula 48 oyo Rosa alekisi elongo na ngai. Na boumeli ya bambula nyonso oyo tolekisaki na mosala ya zongazonga, Rosa asalisaki ngai mingi. Ata mbala moko te nayokaki ye alobi ete: ‘Nalingi tótika kotambolatambola mpe tóluka ndako na biso moko.’

Rosa: Ntango mosusu bato bazalaki koloba na ngai ete, “Oyo ya bino ezali bomoi te. Bofandaka ntango nyonso epai ya bato.” Kasi, “bomoi” yango esengeli kozala ndenge nini? Mbala mingi bato batondaka na biloko oyo ekoki kopekisa bango kolanda mikano ya elimo. Biloko oyo tosengeli na yango mpenza ezali kaka mbeto ya malamu, mesa mpe mwa biloko mosusu ya ntina. Lokola tozalaki babongisi-nzela, tozalaki na biloko mingi te, kasi tozalaki na nyonso oyo tosengelaki na yango mpo na kosala mokano ya Yehova. Mbala mosusu bato bazalaki kotuna ngai boye: “Okosala nini ntango okokóma mobange, lokola ozali na ndako te mpe okozwa mbongo ya epaso te?” Nazalaki kotángela bango Nzembo 34:10 oyo elobi ete: “Baoyo bakolukaka [Yehova] bakozanga eloko malamu soki moko te.” Yehova akokisaka ntango nyonso bamposa na biso.

Marian: Ezali mpenza bongo! Ya solo, Yehova apesi biso biloko mingi koleka kutu oyo tozali na yango mposa. Na ndakisa, na mobu 1958, baponaki ngai nazala momonisi ya zongazonga na biso na liyangani oyo esangisaka bato bauti na mikili ndenge na ndenge na New York. Nzokande, tozalaki na mbongo te ya kosombela Rosa tike. Mokolo moko na mpokwa, ndeko moko apesaki biso anvelopi oyo bakomaki likoló na yango “New York.” Likabo oyo ezalaki na anvelopi wana esalisaki biso tósomba tike mpo na Rosa!

Ngai ná Rosa tozali na mawa ata moke te mpo na bambula oyo tolekisi na mosala ya Yehova. Tobungisi eloko te, kasi tozwi nyonso​—bomoi ya malamu mpenza mpe ya esengo na mosala ya ntango nyonso. Yehova azali mpenza Nzambe ya kokamwa. Toyekoli kotyela Yehova motema mobimba mpe bolingo na biso mpo na ye ekómi lisusu makasi koleka. Bandeko na biso baklisto mosusu babungisaki bomoi na bango mpo batikalaki sembo. Kasi, nandimi ete moto akoki mokemoke, na boumeli ya bambula, kopesa bomoi na ye na mosala ya Yehova. Yango nde ngai ná Rosa tozali komeka kosala tii lelo, mpe yango nde ezali ekateli na biso kino na mikolo ezali koya.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lisolo ya bomoi ya Louis Piéchota oyo motó ya likambo na yango elobi: J’ai survécu à la “marche de la mort” ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 1980 (na Lifalanse).

[Elilingi na lokasa 20]

François ná Anna Szumiga ná bana na bango: Stéphanie, Stéphane, Mélanie, ná Marian soki na 1930. Marian atɛlɛmi na ebonga

[Elilingi na lokasa 22]

Na likoló: Nazali kokabola mikanda oyo elimbolaka Biblia na zando ya Armentières, na nɔrdi ya France, na 1950

[Elilingi na lokasa 22]

Na lobɔkɔ ya mwasi: Stefan Behunick ná Marian na 1950

[Elilingi na lokasa 23]

Marian ná Rosa, mokolo moko liboso bábalana

[Elilingi na lokasa 23]

Rosa (na nsuka na lobɔkɔ ya mwasi) ná moninga na ye mobongisi-nzela Irène (moto ya minei kobanda na lobɔkɔ ya mwasi), bazali kosala piblisite mpo na liyangani ya 1951

[Elilingi na lokasa 23]

Tozalaki kosalela mingimingi velo na mosala ya zongazonga

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto