Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/9 nk. 29-31
  • Tóbwaka liso na biloko ya motuya ya bibliotɛkɛ Chester Beatty

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóbwaka liso na biloko ya motuya ya bibliotɛkɛ Chester Beatty
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Biloko nini asombaki?
  • Azalaki kosepela na babuku ya kitoko
  • Bamaniskri ya motuya mingi ya Biblia
  • Bamaniskri ya motuya mingi ya papirise
  • Biblia ezali tii lelo atako bato balukaki kokɔtisa makambo mosusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Eloko nini ezali na “ntina”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Boyekoli nimero 6—Makomi ya Greke ya boklisto kati na Makomami Mosantu
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Makambo mazali na kati
    Lamuká!—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/9 nk. 29-31

Tóbwaka liso na biloko ya motuya ya bibliotɛkɛ Chester Beatty

RICHARD HAYES, mokambi ya kala ya bibliotɛkɛ Chester Beatty, oyo ezali na engumba Dublin, na ekólo Irlande, alobaki mpo na ndako yango boye: “Ezali na ebele ya biloko ya motuya ya bikólo mingi ya kala, . . . mwa biloko mikemike mpe mayemi kitoko oyo engɛngisaka yango.” Ebele ya biloko ya motuya mingi ya kalakala oyo ezali kuna ezali bikeko mpe mayemi kitoko, babuku oyo emonanaka mingi te mpe baminiskri ya motuya mingi. Kasi, Chester Beatty azalaki nani? Biloko nini ayanganisaki?

Alfred Chester Beatty, abotamaki na mobu 1875 na New York, na États-Unis; bankɔkɔ na ye bazalaki bato ya Écosse, ya Irlande mpe ya Angleterre. Ntango akómaki na mbula 32, azalaki na mbongo mingi mpenza oyo azwaki na mosala na ye ya ingénieur mpe mopesi-toli na bakompani ya mabanga ya ntalo. Ebele ya mbongo na ye azalaki kosomba na yango biloko ya kitoko mpe ya motuya. Ntango akufaki na 1968, na mbula 92, atikelaki bato ya Irlande biloko nyonso oyo asombaki.

Biloko nini asombaki?

Beatty asombaki ebele ya biloko ya ndenge na ndenge. Mbala nyonso oyo balakisaka biloko yango, balakisaka kaka mwa ndambo moke (1 %). Beatty azalaki kosomba mpe kobomba biloko ya motuya oyo emonanaka mpambampamba te ya bileko ndenge na ndenge, oyo mosusu eumelá bankóto ya bambula, mpe eutá na bikólo ndenge na ndenge ya Afrika, Azia, mpe ya Mpoto na eleko ya Moyen Âge mpe ya Renaissance. Na ndakisa, balobaka ete makomi ya monɔkɔ ya Japonais likoló ya mabaya oyo Beatty asombá nde eleki kitoko na mokili mobimba.

Longola biloko oyo esalemá na ntɔki, ezali mpe na mwa bitanda ya mabelé koleka nkama oyo ezali na makomi ya kala ya bato ya Babilone mpe ya Sumer. Bato oyo bazalaki kofanda na Mezopotamia eleki mbula 4 000 bazalaki kokoma ata makambo mikemike ya bomoi na bango na mwa bitanda ya mabelé ya pɛtɛɛ, mpe na nsima bazalaki kotumba yango na mɔtɔ. Bitanda mingi ya ndenge wana ezali tii lelo oyo, mpe ezali komonisa ete bato ya ntango wana bayebaki kokoma.

Azalaki kosepela na babuku ya kitoko

Emonani ete Chester Beatty azalaki kosepela mingi na babuku oyo ebongisamaki mpe ekomamaki na ntɔki. Asombaki ebele ya babuku ya makambo ya mokili mpe ya makambo ya Nzambe, ata mpe Ba-Coran oyo bakomaki yango kitoko mpenza. Mokomi moko alobaki ete Chester Beatty azalaki “kosepela mingi na bosikisiki ya makomi ya Arabe, . . . mpe lokola alingaki biloko ya langilangi, azalaki kosepela mingi na makomi kitoko likoló ya nkasa ya wolo, ya palata mpe ya biloko mosusu oyo engɛngaka.”

Chester Beatty azalaki kosepela mingi na libanga ya ntalo babengi jade, kaka ndenge baamperɛrɛ mosusu ya Chine ya kala bazalaki kosepela na yango. Baamperɛrɛ wana bazalaki kotalela jade ya malamu na motuya koleka mabanga mosusu nyonso ya ntalo, ata wolo. Bakonzi yango bazalaki kosɛnga na bato oyo bayebi mpenza misala ya mabɔkɔ bábongisela bango mabanga ya jade mpe bákómisa yango sɛlisɛli mpe mike lokola papye. Na nsima, bato ya ntɔki mpenza bazalaki kotondisa yango na makomi mpe mayemi kitoko ya wolo, mpe na ndenge yango basalaki motindo moko ya babuku ya kokamwa mpenza. Babuku ya ndenge wana oyo Chester Beatty asombá ekendá nsango na mokili mobimba.

Bamaniskri ya motuya mingi ya Biblia

Mpo na bato oyo balingaka Biblia, biloko eleki motuya oyo Beatty asombá ezali nde ebele ya bamaniskri ya Biblia ya kala mpe ya Moyen Âge. Bamaniskri wana ya makomi ya wolo ezali komonisa ete bakomi oyo basalaki bakopi yango na mabɔkɔ bazalaki motema molai mpe na ntɔki mingi. Mikanda oyo enyatami na imprimeri ezali komonisa mayele mpe ntɔki ya bato ya kala oyo bazalaki kokangisa nkasa ya mikanda mpo na kosala babuku mpe baoyo bazalaki konyata mikanda. Na ndakisa, Anton Koberger, moto oyo azalaki na bomoi eleko moko na Johannes Gutenberg, oyo balobaka ete azalaki “moko na babimisi minene ya mikanda, abimisaki Biblia Latina na engumba Nuremberg na mobu 1479.”

Moko na biloko ya kitoko mingi ya bibliotɛkɛ Chester Beatty ezali makomi likoló ya mposo ya nyama oyo Éphrem, moto moko ya mayele ya ekólo Syrie, akomaki na ebandeli ya ekeke ya minei. Éphrem azongelaki makambo mingi ya Diatessaron, buku oyo Tatien akomaki na ya ekeke ya mibale. Na buku yango, akomaki lisolo ya bomoi ya Yesu Klisto ndenge ezali na Baevanzile minei na kolanda ndenge makambo esalemaki. Bakomi mosusu nsima ya Éphrem balobelaki mpe Diatessaron, kasi ata mokanda yango moko emonaná te. Bato mosusu ya mayele ya ekeke ya 19 bakómaki komituna soki Diatessaron yango ezalaká mpenza. Nzokande, na 1956, Beatty amonaki makomi ya Éphrem oyo elobeli Diatessaron, buku ya Tatien, mpe yango ebakisamaki na bilembeteli oyo ezali komonisa ete Biblia ezali mpenza ndenge bakomaki yango na ebandeli mpe elobaka solo.

Bamaniskri ya motuya mingi ya papirise

Bibliotɛkɛ Chester Beatty ezali mpe na ebele ya bamaniskri ya papirise oyo ezali na makambo ya Nzambe mpe oyo ezali na makambo mosusu. Ezali na maniskri koleka 50 oyo ekomamaki liboso ya ekeke ya minei ya ntango na biso (T.B.). Mosusu balɔkɔtaki yango na mabondo ya papirise, mingimingi na bikunde ya bapapye ebebá, oyo efandaki bankama ya bambula na esobe ya Ezipito. Bapapirise mingi ezalaki bitenibiteni mpenza ntango batɛkaki yango. Batɛkisi bazalaki koya na bakartɔ etondá na biteni ya bapapirise. Charles Horton, oyo atalelaka biloko eutá na Mpoto mpe na Amerika ya Nɔrdi na bibliotɛkɛ Chester Beatty, alobaki boye: “Soki moto alingi kosomba, azalaki kokɔtisa lobɔkɔ na kartɔ mpe kobimisa eteni oyo eleki monene, oyo ezali na makomi mingi.”

Horton alobi ete “biloko eleki kokamwisa” ezali bakodeksi ya Biblia oyo “ezali na bakopi mosusu ya kala mpenza ya Kondimana ya Kala mpe Kondimana ya Sika.” Ekoki kozala ete batɛkisi oyo bayebaki valɛrɛ ya bakodeksi wana bazalaki kokabola yango ndambondambo mpo bátɛkela yango basombi mingi. Atako bongo, Beatty asombaki bakodeksi yango mingi. Bakodeksi yango ezali mpenza na motuya nini? Frederic Kenyon alobi ete yango ezali “biloko ya motuya mpenza oyo emonaná” banda Tischendorf amonaká Codex Sinaiticus na mobu 1844.

Bakodeksi yango ekomamaki banda na ekeke ya mibale mpe ekeke ya minei T.B. Na kati ya Makomami ya Liebele na libongoli ya Septante na monɔkɔ ya Grɛki, ezali na kopi mibale ya Genese. Frederic Kenyon alobaki ete ezali na motuya mingi “mpamba te pene na mokanda mobimba [ya Genese] ezali te na Vaticanus mpe Sinaiticus,” bamaniskri ya mposo ya nyama oyo ekomamaki na ekeke ya minei. Bakodeksi misato ezali na mikanda ya Makomami ya Grɛki ya boklisto. Moko na yango ezali na ndambo monene ya Baevanzile nyonso minei mpe ndambo monene ya mokanda ya Misala. Kodeksi ya mibale oyo Beatty azwaki na nsima, oyo ezali na nkasa mingi koleka oyo ya liboso, ezali na pene na mikanda nyonso ya Paulo, bakisá mpe mokanda ya Baebele. Kodeksi ya misato ezali na mwa ndambo ya mokanda ya Emoniseli. Frederic Kenyon alobaki ete bapapirise yango “ezali bilembeteli oyo endimisi lisusu malamumalamu ete ndenge makomi ya Testama ya Sika ezali lelo oyo, ezali kaka ndenge ezalaki ntango bakomaki yango, ebongwaná te.”

Bapapirise ya Biblia oyo ezali na bibliotɛkɛ Chester Beatty ezali komonisa ete baklisto bakómaki kosalela kodeksi, to babuku ya maniskri banda kala, mbala mosusu ata na ekeke ya liboso mpenza, na esika ya barulo oyo ezalaki mindɔndɔ mpo na kofungola yango. Bapapirise wana ezali mpe komonisa ete lokola ezalaki mpasi kozwa papirise, mbala mingi bato oyo bazalaki kosala bakopi bazalaki kosalela lisusu papirise oyo bakomaki na yango makambo mosusu liboso. Na ndakisa, maniskri moko ya Copte oyo ezali na Evanzile ya Yoane ekomami “likoló ya oyo ekoki kozala mokanda ya bana-kelasi mpo na koyekola mituya ya Bagrɛki.”

Na miso, bapapirise yango ezali kitoko te, kasi ezali na motuya mingi. Ezali biloko oyo esalemaki na ntango lingomba ya boklisto ebandaki, oyo moto akoki lelo oyo komona na miso mpe kosimba na mabɔkɔ. Charles Horton alobaki boye: “Liboso na bino, bozali komona ‘mikanda’ oyo baklisto mosusu ya liboso bazalaki kosalela, mikanda oyo ezalaki na motuya mingi mpo na bango.” (Masese 2:4, 5) Soki ozwi libaku ya komona biloko yango ya motuya na bibliotɛkɛ Chester Beatty, tokanisi ete okosepela mingi mpenza.

[Elilingi na lokasa 31]

Makomi ya monɔkɔ ya Japonais likoló ya mabaya, esalemaki na Katsushika Hokusai

[Elilingi na lokasa 31]

“Biblia Latina” ezalaki moko ya Babiblia ya liboso oyo ebimisamaki na imprimeri

[Elilingi na lokasa 31]

Mokanda ya Éphrem oyo elobeli “Diatessaron” ya Tatien ezali komonisa ete Biblia ezali kaka ndenge ekomamaki na ebandeli

[Elilingi na lokasa 31]

Chester Beatty P45, moko ya bakodeksi oyo eleki koumela, ezali na ndambo monene ya Baevanzile minei mpe ya mokanda ya Misala na volimi moko

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 29]

Na ndingisa ya The Trustees of the Chester Beatty Library, Dublin

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]

Bililingi nyonso: Na ndingisa ya The Trustees of the Chester Beatty Library, Dublin

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto