Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/10 nk. 3-4
  • Libula oyo okoki kotyela motema

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libula oyo okoki kotyela motema
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Masolo mosusu
  • “Bato ya komikitisa bakozwa libula ya mabelé”​—Ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Batelá libula na yo ya motuya
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Na kati ya Yosua
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Ndenge nini otalelaka libula na biso ya motuya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/10 nk. 3-4

Libula oyo okoki kotyela motema

“SOKI batindeli yo mokanda moko mpo na koyebisa yo ete batikeli yo libula moko, osengeli kokeba. Ekoki kozala motambo ya moto oyo azali kokosa mpo ayiba yo.”

Wana ezali likebisi oyo ebongiseli ya Posita na États-Unis etyaki na Internet. Mpo na nini bapesaki likebisi wana? Mpo bato ebele bazwaki mikanda oyo eyebisaki bango boye: ‘Ndeko na yo moko akufá mpe atikelá yo libula.’ Yango wana, mingi kati na bango batindaki dolare 30 to koleka oyo moto yango asɛngaki mpo ayebisa bango esika oyo libula yango ezali mpe nini basengeli kosala mpo na kozwa yango. Nzokande, bakosaki bango. Bazongiselaki bango nyonso eyano moko, mpe moko te kati na bango azwaki libula yango.

Bato ya mayele mabe ndenge wana basalelaka mposa oyo moto nyonso azalaka na yango ya kozwa libula. Kasi, Biblia elobi malamu mpo na bato oyo batikaka libula ete: “Moto malamu akotika libula epai ya bana ya bana na ye.” (Masese 13:22) Kutu, na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu Klisto alobaki likambo moko oyo eyebani mingi mpe oyo bato basepelaka na yango mpenza: “Mapamboli na bato ya komikitisa, mpo bakozwa mabelé lokola libula.”​—Matai 5:5, King James Version.

Maloba wana ya Yesu ezali kotinda biso tókanisa lisusu makambo oyo Davidi, mokonzi ya kala ya Yisalaele, akomaki na lisalisi ya elimo santu bankama ya bambula liboso: “Bato ya komikitisa bakozwa mabelé lokola libula; mpe bakosepela na kimya nsuka te.”​—Nzembo 37:11, KJ.

‘Kozwa mabelé lokola libula’​—oyo nde elikya kitoko! Kasi, tokoki nde kondima ete yango ezali mpenza elikya ya solo kasi te lokuta mpo na kolyela bato lokola oyo tolobeli na ebandeli? Ɛɛ. Lokola mabelé ezali moko ya biloko kitoko oyo Yehova akelá, ye moko Mokeli mpe Nkolo na yango azali na lotomo ya kopesa yango libula na moto nyonso oyo alingi kopesa. Na nzela ya Mokonzi Davidi, Yehova apesaki Mwana na Ye ya bolingo, Yesu Klisto, elaka oyo: “Lɔmbá ngai mpe nakopesa yo mabota lokola libula na yo, mpe kino nsuka ya mokili ete ezala ya yo.” (Nzembo 2:8) Talá ntina oyo ntoma Paulo abengaki Yesu ye “oyo [Nzambe] atye mozwi-ya-libula ya biloko nyonso.” (Baebele 1:2) Yango wana, tozali mpenza kondima ete ntango Yesu alobaki ete bato ya komikitisa “bakozwa mabelé lokola libula,” ezalaki kaka maloba mpamba te, kasi azali mpenza na likoki ya kokokisa elaka na ye.​—Matai 28:18.

Sikoyo, motuna ya ntina mingi oyo tosengeli komituna yango oyo: Ndenge nini elaka yango ekokokisama? Na mokili mobimba, ezali komonana lokola bato ya matata mpe ya lolendo nde bazali na bomɛngo mpe bazali kozwa nyonso oyo balingi. Eloko nini ekotikala mpo na bato ya komikitisa? Lisusu, mai, mopɛpɛ ná zamba ezali kobeba, mpe bato ya lokoso mpe baoyo batalaka mosika te bazali kopunza yango mpenza kopunza. Ekotikala na eloko moko ya malamu awa na mabelé oyo bato bakoki kozwa yango lokola libula? Tosɛngi yo otánga lisolo oyo elandi mpo na kozwa biyano na mituna wana mpe na mituna mosusu ya ntina.

[Elilingi na lokasa 3]

Yo mpe okozwa libula ya solosolo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto