Ndenge nini otalelaka libula na biso ya motuya?
“Yaká bino bopambwami na Tata na ngai, bósangola libula ya bokonzi bobongisami mpo na bino longwa na ebandeli ya mokili.”—MATAI 25:34.
1. Biloko nini bato mosusu bazwá lokola libula?
BATO na bato bazalaka na biloko oyo batikelá bango. Bato mosusu batikelá bango bomɛngo. Bato mosusu bazali babola mpo baboti na bango bazalaki babola. Bato mosusu bayinaka bato ya ekólo mosusu mpo likambo yango ebanda na bankɔkɔ na bango, ntango mosusu mpo na makambo oyo bankɔkɔ na bango bamonaki to bayokaki. Kasi, ezali na eloko moko oyo batikelá biso nyonso na mokili mobimba. Nkɔkɔ na biso ya liboso, Adama, atikelá biso lisumu. Lisumu yango nde ememaka biso na liwa.—Mosakoli 9:2, 10; Baloma 5:12.
2, 3. Na ebandeli, Yehova abongiselaki bankɔkɔ ya Adama na Eva libula nini, mpe mpo nini bazwaki yango te?
2 Lokola Yehova azali Tata ya bolingo, na ebandeli apesaki bato libula ya malamu mpenza: bomoi ya seko mpe ya kokoka na kati ya Paladiso. Na ebandeli, baboti na biso ya liboso, Adama na Eva, bazalaki na bomoi ya kokoka, bazalaki bato ya masumu te. Yehova Nzambe apesaki bato Mabele lokola likabo. (Nzembo 115:16) Abongisaki elanga ya Edene oyo ezalaki lokola ndakisa, ndenge mabele mobimba esengelaki kokóma mpe apesaki baboti na biso ya liboso mokumba moko malamu mpenza. Basengelaki kobota bana, kobatela mabele, banzete, na banyama ndenge na ndenge oyo ezalaki na Paladiso; mpe lisusu, basengelaki kokómisa mabele mobimba paladiso. (Genese 1:28; 2:8, 9, 15) Bana na bango mpe balingaki kosala mosala yango. Talá libula kitoko oyo balingaki kozwa!
3 Kasi, mpo Adama na Eva na bana na bango bázwa nyonso wana, esengelaki bázala na boyokani malamu na Nzambe. Basengelaki kolinga mpe kotosa Yehova ntango nyonso; kasi Adama na Eva batyolaki eloko oyo Nzambe apesaki bango mpe babukaki mobeko na ye. Babimisamaki na Paladiso mpe bazangaki makambo malamu oyo Nzambe akanaki mpo na bango. Yango wana, bakokaki kotikela bana na bango makambo yango te.—Genese 2:16, 17; 3:1-24.
4. Ndenge nini tokoki kozwa libula oyo Adama abungisaki?
4 Na motema mawa na ye, Yehova asalaki na boye ete bana ya Adama na Eva bázwa libula oyo Adama abungisaki. Asalaki nini? Na ntango oyo Nzambe aponaki, Mwana na ye moko, Yesu Klisto, apesaki bomoi na ye ya moto ya kokoka mpo na bana ya Adama. Na ndenge yango, Klisto asombaki bana nyonso ya Adama. Kasi, bazwaki libula yango mbala moko te. Esengeli naino bándima mbeka ya Yesu oyo ezali kolongola masumu mpe bámonisa kondima yango na botosi na bango, na nsima nde Nzambe akosepela na bango. (Yoane 3:16, 36; 1 Timote 2:5, 6; Baebele 2:9; 5:9) Bomoi na yo ezali komonisa ete ozali kosepela na ebongiseli yango?
Libula na nzela ya Abalayama
5. Ndenge nini Abalayama amonisaki ete kozala na boyokani malamu na Yehova ezalaki na ntina mingi mpo na ye?
5 Mpo na kokokisa makambo oyo akanaki kosala na mabele, Nzambe asalelaki Abalayama mpo na kokokisa likambo moko ya ntina. Nzambe ayebisaki moto yango ya sembo ete alongwa na mboka na ye mpe akende na mboka oyo ye moko Nzambe akolakisa ye. Abalayama atyaki ntembe ata moke te, atosaki. Ntango Abalayama akómaki na mokili yango, Yehova alobaki ete ezali bana ya Abalayama nde bakozwa mokili yango lokola libula, kasi ye moko te. (Genese 12:1, 2, 7) Abalayama asalaki nini? Andimaki kosalela Yehova ata na esika nini mpe ata na lolenge nini oyo akoloba na ye mpo bana na ye bákoka kozwa libula na bango. Abalayama asalelaki Yehova na mokili oyo afandaki lokola mopaya na boumeli ya mbula 100 tii liwa na ye. (Genese 12:4; 25:8-10) Soki yo, mbɛlɛ osalaki yango? Yehova alobaki ete Abalayama azalaki “moninga” na ye.—Yisaya 41:8.
6. (a) Abalayama amonisaki nini lokola aboyaki kokaba mwana na ye te? (b) Libula nini ya motuya Abalayama atikelaki bankɔkɔ na ye?
6 Abalayama azelaki bambula ebele mpo na kobota mwana ya mobali oyo apesaki ye nkombo Yisaka mpe alingaki ye mingi. Ntango mwana yango akómaki elenge mobali mpenza, Yehova ayebisaki Abalayama akamata ye mpe akaba ye lokola mbeka. Abalayama ayebaki te ete likambo oyo alingaki kosala ekolakisa ndenge oyo Nzambe ye moko akokaba Mwana na ye lokola mbeka. Kasi, Abalayama atosaki mpe etikalaki moke apesa Yisaka lokola mbeka, kasi anzelu ya Yehova apekisaki ye. (Genese 22:9-14) Liboso, Yehova alobaki ete bilaka oyo apesaki Abalayama ekokokisama na nzela ya Yisaka. Na bongo, tomoni mpenza ete Abalayama azalaki na kondima ete, soki esengeli, Nzambe akosekwisa Yisaka, atako likambo ya ndenge wana esalemaki naino liboso te. (Genese 17:15-18; Baebele 11:17-19) Lokola Abalayama apimelaki ye ata mwana na ye te, Yehova alobaki boye: “Bikólo nyonso ya mokili ekozwa mapamboli na nzela ya mombóto na yo.” (Genese 22:15-18, NW ) Yango emonisaki ete Mombóto oyo balobeli na Genese 3:15, Masiya mobikisi, asengelaki kobima na kati ya bankɔkɔ ya Abalayama. Yango ezalaki mpenza libula monene mpe ya motuya mingi mpo na bana na ye!
7. Ndenge nini Abalayama, Yisaka, na Yakobo bamonisaki ete libula na bango ezalaki na ntina mingi mpo na bango?
7 Abalayama ayebaki te soki makambo oyo Yehova azalaki kosala ezalaki kolimbola mpenza nini; ata mpe mwana na ye Yisaka to nkɔkɔ na ye Yakobo, baoyo bakómaki “basangani na ye na libula mpo na elaka yango,” bayebaki yango te. Kasi bango nyonso batyaki elikya epai ya Yehova. Batyaki motema na bango ata na engumba moko te oyo ezalaki na bakonzi oyo bazalaki koyangela na mokili wana mpamba te, bazalaki kozela eloko oyo eleki malamu: “mboka oyo ezali na miboko, Nzambe azali motongi mpe mozalisi na yango.” (Baebele 11:8-10, 13-16) Kasi, bankɔkɔ mosusu ya Abalayama batyolaki libula yango oyo Nzambe apesaki na nzela ya Abalayama.
Bato oyo batyolaki libula yango
8. Ndenge nini Esau amonisaki ete atyolaki libula na ye?
8 Esau, mwana ya liboso ya Yisaka, atalelaki lotomo na ye ya mwana ya liboso lokola eloko mpamba. Atyolaki biloko mosantu. Yango wana, mokolo moko Esau azalaki na nzala, atɛkelaki ndeko na ye Yakobo lotomo na ye ya mwana ya liboso. Na ntalo boni? Asɛngaki ye apesa ye kaka mwa limpa mpamba na supu ya ndunda! (Genese 25:29-34; Baebele 12:14-17) Ekólo oyo Nzambe asalelaki mpo na kokokisa bilaka na ye epai ya Abalayama ezalaki bankɔkɔ ya Yakobo; Nzambe apesaki ye nkombo ya sika: Yisalaele. Libula yango ememelaki bango matomba nini?
9. Ndenge nini libula ya elimo ya bankɔkɔ ya Yakobo ebikisaki bango?
9 Na eleko moko nzala ekɔtaki na mboka, Yakobo na bana na ye bakendaki kofanda na Ezipito. Kuna na Ezipito, babotanaki mpe bakómaki libota monene, kasi bakómaki mpe baombo. Nzokande, Yehova abosanaki kondimana na ye na Abalayama te. Na ntango oyo ye moko aponaki, Nzambe alongolaki bana ya Yisalaele na boombo mpe ayebisaki bango ete akomema bango na “mokili moleki na mabɛlɛ mpe na mafuta ya nzoi,” mokili oyo alakaki Abalayama.—Exode 3:7, 8; Genese 15:18-21.
10. Na Ngomba Sinai, makambo nini mosusu ya kokamwa esalemaki oyo etalaki libula ya bana ya Yisalaele?
10 Ntango bana ya Yisalaele bazalaki na nzela mpo na kokende na Mokili ya Ndaka, Yehova ayanganisaki bango na Ngomba Sinai mpe alobaki na bango boye: ‘Soko bokotosa monɔkɔ na ngai mpe bokobatela kondimana na ngai, mbɛlɛ bokozala bato na ngai mpenza kati na bato nyonso, mpo ete mokili mobimba ezali ya ngai, mpe bokozala bokonzi ya banganga mpe libota ya bulɛɛ.’ (Exode 19:5, 6) Lokola bato nyonso bandimaki likambo yango na motema moko, Yehova apesaki bango Mibeko; likambo oyo asalaki na ekólo mosusu te.—Nzembo 147:19, 20.
11. Tángá mwa makambo ya ntina oyo ezalaki na libula ya elimo ya bana ya Yisalaele.
11 Ekólo yango ya sika ezwaki libula monene ya elimo! Bazalaki kosambela Nzambe kaka moko ya solo. Nzambe yango abimisaki bango na Ezipito mpe bamonaki makambo ya kokamwa oyo asalaki ntango apesaki bango Mibeko na Ngomba Sinai. Na nsima, motuya ya libula na bango ezalaki kobakisama ntango basakoli bazalaki koyebisa bango “maloba mosantu ya Nzambe.” (Baloma 3:1, 2, NW ) Yehova aponaki bango bázala batatoli na ye. (Yisaya 43:10-12) Mombóto, elingi koloba Masiya, asengelaki kobima na ekólo na bango. Mibeko ezalaki kosakola koya na ye, yango elingaki komonisa ye mpe ezalaki kosalisa bango bámona ete bazali mpenza na mposa ya Masiya. (Bagalatia 3:19, 24) Longola yango, balingaki kozwa libaku malamu ya kosala elongo na Mombóto yango lokola bokonzi ya banganga mpe libota mosantu.—Baloma 9:4, 5.
12. Atako bakɔtaki na Mokili ya Ndaka, eloko nini Bayisalaele bazwaki te? Mpe mpo na nini?
12 Yehova akokisaki maloba na ye mpe amemaki Bayisalaele na Mokili ya Ndaka. Kasi, ndenge ntoma Paulo alimbolaki yango na nsima, mokili yango ekómaki mpenza “esika ya kopema” te mpo na bango mpamba te bazangaki kondima. Bato mingi ya ekólo yango bakɔtaki na “esika ya kopema ya Nzambe” te mpamba te bakangaki ntina ya mokolo ya kopema ya Nzambe te mpe basalaki misala oyo eyokani te na mokolo yango oyo ebandaki nsima ya kokela Adama na Eva.—Baebele 4:3-10, NW.
13. Lokola batyolaki libula na bango ya elimo, ekólo ya Yisalaele ezangaki likambo nini?
13 Bato nyonso oyo bakozala elongo na Masiya na Bokonzi na ye ya likoló lokola bokonzi ya banganga mpe libota ya bulɛɛ bakokaki kouta na Yisalaele. Kasi bato ya ekólo yango bamonaki libula yango lokola eloko mpamba. Kaka bato moke ya Yisalaele ya mosuni nde bandimaki Masiya ntango ayaki. Yango wana, mwa bato moke kaka bakɔtaki na bokonzi ya banganga oyo esakolamaki. Bokonzi yango elongwaki na Yisalaele ya mosuni mpe ‘epesamaki na libota oyo ekobota mbuma na yango.’ (Matai 21:43, NW ) Libota yango ezali libota nini?
Libula na likoló
14, 15. (a) Nsima ya liwa ya Yesu, ndenge nini bikólo ekómaki kozwa mapamboli na nzela ya “mombóto” ya Abalayama? (b) Bato oyo bazali na “Yisalaele ya Nzambe” bazwi eloko nini lokola libula?
14 Libota oyo ezwaki Bokonzi ezali “Yisalaele ya Nzambe,” Yisalaele ya elimo, bayekoli 144 000 ya Yesu Klisto baoyo babotami na elimo. (Bagalatia 6:16; Emoniseli 5:9, 10; 14:1-3) Bato mosusu kati na bato yango 144 000 bazalaki Bayuda na mosuni, kasi mingi bautaki na bikólo mosusu. Likambo oyo Yehova alakaki Abalayama, ete bikólo nyonso ekopambolama na nzela ya “mombóto” na ye, ebandaki kokokisama nde na ndenge yango. (Misala 3:25, 26; Bagalatia 3:8, 9) Na kolanda ndenge oyo likambo yango ekokisamaki mbala ya liboso, Yehova Nzambe apakolaki bato ya bikólo mosusu na elimo santu mpe andimaki bango lokola bana na ye ya elimo, elingi koloba bakómaki bandeko ya Yesu Klisto. Na bongo, bango mpe babakisamaki na “mombóto” yango.—Bagalatia 3:28, 29.
15 Liboso Yesu akufa, asalaki kondimana ya sika na mwa ndambo ya Bayuda oyo basengelaki kokóma bato ya libota yango ya sika, makila na ye moko esengelaki kokokisa kondimana yango. Lokola bandimaki mbeka oyo ezali kokokisa kondimana, bato oyo basalaki kondimana yango basengeli ‘kobongisama libela.’ (Baebele 10:14-18) Bakoki ‘kotángama bato ya sembo’ mpe Nzambe akoki kolimbisa masumu na bango. (1 Bakolinti 6:11) Na bongo bazali lokola Adama azalaki liboso asala lisumu. Kasi, bango bakozala na paladiso awa na mabele te. Yesu alobaki ete akei kobongisela bango esika kuna na likoló. (Yoane 14:2, 3) Babosani bomoi na bango awa na mabele mpo na kozwa ‘libula libombami kuna na Likoló mpo na bango.’ (1 Petelo 1:4) Bakokende kosala nini kuna? Yesu alobaki ete: “Nasali na bino kondimana . . . mpo na bokonzi.”—Luka 22:29.
16. Mosala nini ya malamu ezali kozela baklisto bapakolami?
16 Bato oyo bakoyangela elongo na Klisto kuna na likoló bakosala makambo mingi; na ndakisa, bakolongola makambo nyonso oyo ekɔtaki na mokili mpo bato baboyaki bokonzi ya Yehova. (Emoniseli 2:26, 27) Lokola bango babakisami na mombóto ya elimo ya Abalayama, bango mpe bakosangana mpo na kopesa bato ya bikólo nyonso bomoi ya kokoka. (Baloma 8:17-21) Talá libula monene oyo bazali na yango!—Baefese 1:16-18.
17. Baklisto bapakolami bazali kozwa makambo nini ya libula na bango ntango bazali naino awa na mabele?
17 Kasi libula ya bayekoli ya Yesu oyo bapakolami na elimo ezali kaka te na makambo oyo ekoya. Yesu asalisaki bango báyeba Yehova, Nzambe ya solo kaka moko na ndenge oyo moto mosusu asalaki te. (Matai 11:27; Yoane 17:3, 26) Na maloba mpe na misala na ye, ateyaki bango ‘kotyela Yehova motema’ mpe kotosa ye. (Baebele 2:13; 5:7-9) Yesu ateyaki bango mokano ya Nzambe mpe alakaki bango ete elimo santu ekosalisa bango básosola lisusu mokano yango malamumalamu. (Yoane 14:24-26) Akɔtisaki na makanisi mpe na mitema na bango ntina ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 6:10, 33) Mpe lisusu, Yesu apesaki bango mosala ya kotatola mpe kokómisa bato bayekoli na Yelusaleme, na Yudea, na Samalia, tii na nsuka ya mokili.—Matai 24:14; 28:19, 20; Misala 1:8.
Libula moko ya motuya mpo na ebele monene
18. Ndenge nini maloba ya Yehova ete bikólo nyonso ekopambwama na nzela ya “mombóto” ya Abalayama ezali kokokisama na moi ya lelo?
18 Emonani mpenza ete bato nyonso oyo bazali na Yisalaele ya elimo, to “etonga moke” ya basangoli ya Bokonzi basilaki koponama. (Luka 12:32) Banda mwa bambula mingi sikoyo, Yehova abendi likebi na biso na mosala ya koyanganisa ebele monene ya bato mosusu oyo bauti na bikólo nyonso. Na bongo, likambo oyo Yehova alakaki Abalayama ete na nzela ya “mombóto” na ye bikólo nyonso ekopambolama ezali kokokisama na monene na yango. Bato yango bazali na esengo mpe bapambwami; bazali kosalela Yehova mosala ya bulɛɛ mpe bayebi ete mpo bábika, basengeli kondimela Mwana ya Mpate ya Nzambe, Yesu Klisto. (Emoniseli 7:9, 10) Yo mpe ondimi ndenge Yehova abengi yo ozala na kati ya bato yango ya esengo?
19. Bato ya bikólo mosusu oyo bazali kozwa mapamboli lelo oyo bazali kozela libula nini?
19 Yehova apesi baoyo bazali na kati ya etonga moke te libula nini ya motuya? Bango bazwi libula na likoló te. Ezali libula oyo Adama alingaki kopesa bana na ye: kozala na bomoi ya seko, kozala bato ya kokoka mpe lisusu, kofanda na paladiso oyo elingaki kotonda mokemoke na mabele mobimba. Na mokili yango “kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te.” (Emoniseli 21:4) Na yango, maloba oyo ekomamaki na elimo ya Nzambe elobami epai na yo ete: “Zalá na elikya epai ya [Yehova] mpe salá malamu; boye okofanda na mokili mpe okosepela na malamu. Omisepelisa na [Yehova] mpe ye akopesa yo mposa nyonso ya motema na yo. Nsima ya mwa ntango moke, moto ya mabe akozala lisusu te . . . Nde bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.”—Nzembo 37:3, 4, 10, 11, 29.
20. Ndenge nini “bampate mosusu” bazali kozwa bolamu ya libula ya elimo oyo baklisto bapakolami bazali na yango?
20 “Bampate mosusu” ya Yesu bakozala na libula na mabele oyo Bokonzi ya likoló ekoyangela. (Yoane 10:16a) Atako bakokende na likoló te, bango mpe bakozwa makambo mingi ya elimo oyo bapakolami na elimo bazali na yango sikoyo. Lisangani mobimba ya bapakolami na elimo, oyo tobengi “moombo ya sembo mpe ya mayele” nde esalisi bampate mosusu na kososola makambo ya ntina oyo Nzambe alaki na kati ya Liloba na ye. (Matai 24:45-47; 25:34) Bapakolami na bampate mosusu elongo, bayebi Nzambe ya solo kaka moko Yehova mpe bazali kosambela ye. (Yoane 17:20, 21) Bazali kotɔnda Nzambe elongo mpo na mbeka ya Yesu oyo ezali kolongola masumu. Bazali kosala elongo lokola etonga moko oyo ezali na Mobateli ya mpate moko, Yesu Klisto. (Yoane 10:16b) Bango nyonso basali libota ya bandeko ya bolingo oyo bazali na mokili mobimba. Bazali na libaku malamu ya kozala Batatoli ya Yehova mpe ya Bokonzi na ye. Ya solo, soki ozali mosaleli ya Yehova oyo amipesi mpe azwi batisimo, nyonso wana ezali libula na yo ya elimo.
21, 22. Biso nyonso tokoki kosala nini mpo na komonisa ete tolingi libula na biso ya elimo?
21 Omonaka ete libula yango ya elimo ezali na ntina mingi? Opesaka yango mpenza motuya mpe osalaka ete kosala mokano ya Nzambe ezala likambo oyo eleki ntina na kati ya bomoi na yo? Mpo na komonisa yango, olandaka toli ya Liloba na ye mpe ya ebongiseli na ye, ete oyanganaka na makita nyonso ya lisangá pɔsɔ na pɔsɔ? (Baebele 10:24, 25) Libula yango ezali mpenza na ntina mingi na miso na yo yango wana ozali kosalela Nzambe atako mikakatano ezali? Omonaka yango mpenza eloko ya ntina mingi mpe ezali kopesa yo makasi ya kobundisa masɛnginya nyonso oyo ekoki komema yo na kobungisa yango?
22 Tiká ete biso nyonso tópesa motuya na libula ya elimo oyo Nzambe apesi biso. Wana tozali kotalela Paladiso oyo ezali koya, tósala mosala nyonso ya elimo oyo Yehova azali kopesa biso lelo oyo. Soki boyokani malamu oyo tozali na yango na Yehova ezali mpenza likambo oyo eleki ntina na bomoi na biso, tozali komonisa ete libula oyo Nzambe apesi biso ezali eloko ya motuya mpo na biso. Tiká ete biso mpe tózala na kati ya bato oyo bazali koloba ete: “Nakosanzola yo Nzambe na ngai mpe Mokonzi na ngai mpe nakokumisa nkombo na yo seko na seko.”—Nzembo 145:1.
Ndenge nini okoki kolimbola?
• Soki Adama atikalaki sembo epai ya Nzambe, alingaki kopesa biso libula nini?
• Ndenge nini bankɔkɔ ya Abalayama batalelaki libula oyo bapesaki bango?
• Makambo nini ezali na kati ya libula ya baklisto bapakolami?
• Ebele monene bakozwa libula nini, mpe ndenge nini bakoki komonisa ete basepelaka na yango mpenza?
[Elilingi na lokasa 20]
Nzambe alakaki bana ya Abalayama libula ya motuya mingi
[Bililingi na lokasa 23]
Omonaka libula na yo ya elimo lokola eloko ya ntina mingi?