“Bato ya komikitisa bakozwa libula ya mabelé”—Ndenge nini?
“NA NTEMBE te oyebi maloba ya Yesu oyo: ‘Bato ya komikitisa bakozwa libula ya mabelé.’ Kasi, soki totali makambo oyo bato bazali kosala bazalani na bango mpe ndenge bazali kobebisa mabelé, eloko nini ekotikala oyo bato ya komikitisa bakozwa lokola libula?”—Matai 5:5; Nzembo 37:11, King James Version.
Myriam, Motatoli moko ya Yehova, atunaki moto moko motuna wana mpo na kobanda na ye lisolo ya Biblia. Moto yango ayanolaki ete soki Yesu apesaki elaka wana, na ntembe te, mabelé ekozala libula ya solosolo, kasi oyo ebebisami te.
Eyano na ye emonisi ete azalaki mpenza na elikya. Kasi, ezali mpenza na ntina oyo tokoki kozala na elikya ndenge wana? Ɛɛ, mpamba te Biblia elobi makambo mingi oyo ezali kondimisa biso ete elaka yango ekokokisama. Kokokisama ya elaka yango eyokani mpenza na mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mpo na mabelé. Toyebi mpe ete soki Nzambe akani likambo, azangaka te kokokisa yango. (Yisaya 55:11) Kasi, na ebandeli Nzambe azalaki na mokano nini mpo na bato, mpe mokano yango ekokokisama ndenge nini?
Mokano ya seko oyo Nzambe azali na yango mpo na mabelé
Yehova Nzambe akelaki mabelé na ntina. “[Yehova] alobi boye, ye oyo asalaki lola, ye azali Nzambe, ye oyo atongaki mokili mpe asalaki yango; ye akokisaki yango, asalaki yango eloko ya mobulu te, atongaki yango ete bato báfanda wana; ye ete, Ngai nazali [Yehova], mosusu azali te.” (Yisaya 45:18) Tomoni ete mabelé esalemaki mpo bato báfanda wana. Lisusu, mposa ya Nzambe ezali ete bato báfanda na mabelé libela na libela. ‘Ye atɛmisaki mokili likoló ya moboko na yango ete yango eningana libela na libela te.’—Nzembo 104:5; 119:90.
Mokumba oyo Nzambe apesaki Adama ná Eva ezali komonisa polele mokano na ye mpo na mabelé. Yehova alobaki na Adama ná Eva boye: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nse na bino; mpe bózala na bokonzi na likoló ya mbisi ya mai, mpe ya ndɛkɛ ya likoló mpe likoló ya nyama nyonso ya bomoi ekotambolaka na mokili.” (Genese 1:28) Mokili to mabelé oyo Nzambe apesaki Adama ná Eva, esengelaki kozala esika na bango ná bana na bango libela na libela. Bankama ya bambula na nsima, mokomi ya nzembo alobaki boye: “Lola mpe likoló-ya-lola ezali ya [Yehova], kasi apesaki mokili na bana ya bato.”—Nzembo 115:16.
Mpo mokano wana ekokisama, Adama ná Eva mpe bana na bango basengelaki kondima bokonzi ya Yehova Nzambe, Mokeli na bango mpe Mopesi-Bomoi, mpe kotosa ye. Yehova amonisaki yango polele ntango apesaki moto mobeko oyo: “Yo okoki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga, nde mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe okoki kolya te. Zambi mokolo okolya yango okokufa solo.” (Genese 2:16, 17) Mpo Adama ná Eva bázala na bomoi libela na libela na elanga ya Edene, basengelaki kotosa mobeko wana ya polele mpe ya pɛtɛɛ oyo Nzambe apesaki bango. Soki básalaka bongo, balingaki komonisa botɔndi na bango mpo na nyonso oyo Tata ya likoló asalelaki bango.
Ntango Adama ná Eva baboyaki na nko mpenza kotosa Nzambe mpe babukaki mobeko oyo apesaki bango, yango emonisaki ete bapesaki ye mokɔngɔ, ye oyo apesaki bango biloko nyonso oyo bazalaki na yango. (Genese 3:6) Lokola basalaki bongo, babungisaki Paladiso kitoko oyo bazalaki na yango, ezala mpo na bango moko to mpo na bana na bango. (Baloma 5:12) Kozanga botosi ya mobali ná mwasi ya liboso ebongolá nde mokano oyo Nzambe azalaki na yango ntango asalaki mabelé?
Nzambe oyo abongwani te
Na nzela ya mosakoli Malaki, Nzambe alobaki boye: “Ngai [Yehova] nakobongwana te.” (Malaki 3:6) Louis Fillion, moto moko ya mayele na maloba ya Biblia na France, alobaki ete maloba wana ezali mpenza na boyokani na kokokisama ya bilaka ya Nzambe. Fillion akomaki boye: “Yehova akokaki koboma batomboki wana, kasi lokola abongwanaka te—ata na bilaka na ye—ezala ndenge nini, akokokisa bilaka nyonso oyo apesá.” Bilaka ya Nzambe, ezala oyo apesaki moto moko, ekólo moko to mokili mobimba, akobosana yango te, kasi akokokisa yango nyonso, na ntango oyo ye abongisá. “Akobanzaka kondimana na ye na lobiko, liloba lilakaki ye na mabota nkóto.”—Nzembo 105:8.
Kasi, ndenge nini toyebi ete mokano ya Yehova mpo na mabelé ebongwani te? Tozali mpenza na elikya ete mokano yango ebongwani te mpamba te Liloba na ye, Biblia, elobi ete azali na mokano ya kopesa bato ya botosi mabelé. (Nzembo 25:13; 37:9, 22, 29, 34) Lisusu, Biblia elobi ete bato oyo bapambolami na Yehova bakofanda na kimya, moto na moto “na nse ya [nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, NW],” mpe “moto moko akobangisa bango te.” (Mika 4:4; Ezekiele 34:28) Bato oyo Yehova aponi “bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakolona bilanga ya [vinyo, NW] mpe bakolya mbuma na yango.” Bakozala na kimya ata mpe na banyama ya zamba.—Yisaya 11:6-9; 65:21, 25.
Biblia emonisi biso mwa moke, na ndenge mosusu, ndenge mabelé oyo Nzambe alaki ekozala. Na boyangeli ya Mokonzi Salomo, ekólo Yisalaele ezalaki na kimya mpe etondaki na bozwi. Na boyangeli na ye, “Yuda mpe Yisalaele bafandaki na kimya longwa na Dani kino Bele-seba, moto na moto na nse ya mowiti na ye ya vinyo mpe na nzete na ye ya mbuma, mikolo nyonso ya Salomo.” (1 Mikonzi 4:25) Biblia elobi ete Yesu “aleki Salomo,” mpe mpo na boyangeli na ye, mokomi ya nzembo asakolaki boye: “Na mikolo na ye moyengebene akozala na makila malamu; kimya mpe ekoyikana na ntango nyonso ekoumela sanza.” Na ntango yango, “masango ekotondana na mokili ata kino likoló ya [ngomba].”—Luka 11:31; Nzembo 72:7, 16.
Lokola Yehova Nzambe akokisaka ntango nyonso bilaka na ye, akosala ete bato bázwa libula ya mabelé mpe akozongisa nkembo na yango. Na Emoniseli 21:4, Liloba ya Nzambe eyebisi biso ete na mokili ya sika oyo alaki, Nzambe “akolongola mpisoli nyonso na miso na [bato], mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” Elaka wana ezali kolobela nde Paladiso.—Luka 23:43.
Oyo tosengeli kosala mpo na kozwa libula yango
Guvɛrnema ya likoló oyo ekoyangela mabelé, elingi koloba Bokonzi oyo Yesu Klisto akozala Mokonzi na yango nde ekokómisa mabelé oyo paladiso. (Matai 6:9, 10) Bokonzi yango ekobanda naino ‘kobebisa baoyo bazali kobebisa mabelé.’ (Emoniseli 11:18; Danyele 2:44) Na nsima, Yesu Klisto, “Nkolo ya kimya,” akokokisa maloba oyo: “Kofuluka ya bokonzi na ye mpe ya kimya ekosuka te.” (Yisaya 9:6, 7) Ntango Bokonzi yango ekoyangela, ebele ya bato, ná baoyo bakosekwisama, bakozwa libula ya mabelé.—Yoane 5:28, 29; Misala 24:15.
Nani akozwa libula kitoko wana? Yoká maloba ya Yesu oyo: “Esengo na bato ya elimo ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabelé.” (Matai 5:5) Kozala na elimo ya boboto to na komikitisa elimboli nini? Komikitisa elimbolaka kozala na boboto, na mindɔndɔ te, na botosi, na kimya, ata mpe kozala nsɔninsɔni. Nzokande, liloba ya Grɛki oyo basaleli awa ezali na ndimbola mingi koleka. Buku New Testament Wordbook ya William Barclay elobi ete liloba yango “ekoki mpe kolimbola boboto, kasi boboto yango ebombi nde makasi lokola oyo ya ebende.” Ezali motema oyo esalisaka moto akangela bato oyo basali ye mabe nkanda te to aluka te kozongisa mabe na mabe; nyonso wana mpo azali na boyokani malamu na Nzambe, mpe boyokani yango ezali kopesa ye makasi.—Yisaya 12:2; Bafilipi 4:13.
Moto ya komikitisa atosaka mibeko ya Nzambe na makambo nyonso ya bomoi na ye; alukaka te kosala makambo kaka ndenge ye moko alingi to na kolanda makanisi ya bato mosusu. Moto ya ndenge wana azalaka motó makasi te mpe andimaka koteyama na Yehova. Davidi akomaki boye: “[Yehova] akotambolisa bato ya [komikitisa] kati na mibeko, akolakisa bato ya [komikitisa] nzela na ye.”—Nzembo 25:9; Masese 3:5, 6.
Yo mpe okozala na kati ya “bato ya komikitisa” oyo bakozwa libula ya mabelé? Soki omipesi na koyekola Liloba ya Yehova mpo na koyeba ye mpe mokano na ye mpe osaleli makambo oyo ozali koyekola, yo mpe okoki kozala na elikya ya kozwa libula ya mabelé oyo ekokóma paladiso mpe kofanda wana libela na libela.—Yoane 17:3.
[Elilingi na lokasa 5]
Mokumba oyo Nzambe apesaki Adama ná Eva ezali komonisa polele mokano na ye mpo na mabelé
[Elilingi na lokasa 6]
Kimya oyo ezalaki na Yisalaele ntango Salomo azalaki mokonzi emonisi mwa moke ndenge mabelé ekozala
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Bampate mpe ngomba: Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.; Mbuli ya Arabie: Hai-Bar, Yotvata, Israel; mosali-bilanga: Garo Nalbandian
[Elilingi na lokasa 7]
Mokili ya sika ya boyengebene ezali koya—okozala na mokili yango?