Oyokaka esengo ya kopesa?
NDEKO mwasi moko alekisaki pene na mbula 50 na mosala ya boklisto. Atako alɛmbaki mingi mpo akómaki mobange mpenza, azalaki kaka na mposa akende kotala Ndako ya Bokonzi oyo bautaki kotonga. Ndeko mobali moko asimbaki ye na lobɔkɔ, bakɔtaki na Ndako na Bokonzi mpe, malɛmbɛmalɛmbɛ, bakendaki mbala moko tii na kesi ya makabo. Atyaki na kesi mwa mbongo oyo abombaki mpo na Ndako ya Bokonzi ya sika. Atako akokaki kopesa mabɔkɔ te na mosala ya kotonga, azalaki na mposa ya kosala mwa eloko.
Likambo oyo moklisto wana asalaki ezali mbala mosusu kotinda yo okanisa mwasi mosusu ya sembo—“mwasi mobola oyo akufelá mobali” oyo Yesu amonaki azali kotya mbongo mibale ya bibende na kesi ya makabo na tempelo. Toyebi te soki bomoi na ye ezalaki ndenge nini, kasi na ntango wana, mwasi oyo azali na mobali te akokaki kozala na mokakatano makasi ya mbongo. Yesu ayokelaki ye mawa mpo ayebaki mpenza mpasi na ye. Ntango abendaki likebi ya bayekoli na ye na ndakisa malamu ya mwasi yango, alobaki ete mwa likabo na ye wana ezalaki nde “nyonso oyo azalaki na yango, nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobikela.”—Malako 12:41-44.
Mpo na nini mobola mwasi oyo akufelá mobali oyo azalaki na bosɛnga ndenge wana andimaki kosala likambo yango? Emonani polele ete ezali mpo amipesaki mpenza na Yehova, Nzambe oyo bazalaki kosambela na tempelo na Yelusaleme. Atako azalaki na makoki te, azalaki na mposa ya kopesa mabɔkɔ mpo mosala mosantu ekende liboso. Na ntembe te, mwasi yango ayokaki mpenza esengo ntango apesaki nyonso oyo akokaki.
Makabo mpo na mosala ya Yehova
Banda kala kopesa biloko to mbongo ezalaka na ntina na losambo ya pɛto mpe mbala mingi baoyo basalaka yango bayokaka esengo mingi. (1 Ntango 29:9) Na Yisalaele ya kala, makabo ezalaki kaka te mpo na kokómisa tempelo kitoko, kasi mpe mpo misala nyonso oyo ezalaki kosalema kuna mokolo na mokolo mpo na losambo ya Yehova ekoba kosalema. Mibeko esɛngaki bana ya Yisalaele bápesaka ndambo ya zomi ya biloko nyonso oyo bazwi mpo na kosalisa Balevi oyo bazalaki kosala misala na tempelo. Nzokande, Balevi mpe basengelaki kopesa Yehova ndambo ya zomi ya biloko oyo bazalaki kozwa.—Mituya 18:21-29.
Atako baklisto basɛngisami te na kokokisa makambo oyo esɛngamaki na kondimana ya Mibeko, etinda oyo elobi ete basaleli ya Nzambe basɛngeli kopesa makabo mpo na losambo ya solo ebongwanaki te. (Bagalatia 5:1) Lisusu, baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kosepela kopesa makabo mpo na kosalisa bandeko na bango oyo bazalaki na bosɛnga. (Misala 2:45, 46) Ntoma Paulo ayebisaki baklisto ete kaka ndenge Nzambe azalaki kokabela bango biloko ya malamu, bango mpe basengeli kokabelaka basusu. Akómaki boye: “Pesá mitindo na baoyo bazali bato ya bomɛngo na kati ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ete bázala na lolendo te, mpe bátya elikya na bango te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi, kasi nde epai ya Nzambe, oyo apesaka biso biloko nyonso beboo mpo biso tósepela; básala makambo ya malamu, bázala bato ya bomɛngo na misala ya malamu mpenza, bázala lobɔkɔ pɛtɛɛ, bato bayebi kokaba, komibombeláká moboko kitoko na esika moko ya malamu mpo na mikolo oyo ezali koya, mpo básimba makasi bomoi ya solosolo.” (1 Timote 6:17-19; 2 Bakolinti 9:11) Makambo oyo Paulo akutanaki na yango endimisaki ye maloba ya Yesu ete: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”—Misala 20:35.
Ndenge oyo baklisto bapesaka makabo lelo oyo
Lelo oyo basaleli ya Yehova bazali kokoba kosalela bozwi na bango mpo na kosalisana mpe mpo na kosimba mosala ya Nzambe. Ata baoyo bazali babola, bazali kopesa oyo bakoki. “Moombo ya sembo mpe ya mayele” ayebi ete azali na mokumba liboso ya Yehova ya kosalela malamu mpenza makabo nyonso wana. (Matai 24:45) Bazali kosalela mbongo yango na misala ya bafiliale, kobongola mikanda mpe kobimisa Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia, kobongisa mayangani ya minene, kopesa bakɛngɛli-batamboli mpe bamisionɛrɛ formasyo mpe kotinda bango na bateritware, kosalisa baoyo bazwi makama mpe mpo na makambo mosusu ya ntina. Tólobela naino moko ya makambo yango—elingi koloba kotonga bandako ya losambo.
Batatoli ya Yehova bayanganaka mbala mingi na pɔsɔ na Bandako ya Bokonzi mpo na koyoka mateya mpe kokutana na bandeko. Nzokande, na mikili mingi, nkita ya mboka ezali kopesa nzela te na Batatoli ya bisika yango bátonga Bandako ya Bokonzi na makoki na bango moko. Yango wana, na 1999, Batatoli ya Yehova bazwaki ebongiseli ya kosalela makabo ya bandeko ya mikili ya bozwi mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi na mikili ya bobola. Lisusu, bankóto ya basali ya bolingo malamu bapesaka ntango na bango mpe basalelaka mayele na bango mpe mbala mingi bakendaka tii na kati mpenza ya bamboka ya mosika ya mikili yango mpo na kotonga. Ntango bazali kotonga, Batatoli ya mboka wana bayekolaka kotonga mpe kobatela ndako, mpe makabo mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi esalisaka mpo na kosomba biloko ya mosala oyo basengeli na yango. Batatoli oyo bazali lelo oyo kosalela bandako wana ya sika bazali na botɔndi mingi mpo na ntango mpe mbongo oyo baninga na bango bandimi bapesaki. Batatoli ya bamboka yango bango moko mpe bapesaka makabo sanza na sanza mpo na kobatela Bandako ya Bokonzi ya sika mpe mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi na bisika mosusu.
Mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi, basalelaka biloko mpe ndenge ya kotonga ya mboka wana. Atako Bandako ya Bokonzi yango etongami na biloko ya ntalo mingi te, ezalaka kitoko mpe malamu. Na 1999, ebongiseli yango ya kotonga Bandako ya Bokonzi ebandaki na mikili soki 40 ya bobola. Lelo oyo, ebongiseli yango ekómi na mikili 116, elingi koloba koleka katikati ya motángo ya masangá ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. Na mbula mitano oyo euti koleka, Bandako ya Bokonzi koleka 9 000 etongami, elingi koloba, mokolo na mokolo ndako 5 ezali kotongama! Kasi, na mikili 116 yango, bazali naino na mposa ya Bandako ya Bokonzi 14 500. Tozali na elikya ete na lisalisi ya Yehova mpe na nzela ya makabo ya Batatoli ya mokili mobimba, Bandako ya Bokonzi yango ekotongama.—Nzembo 127:1.
Bandako ya Bokonzi ezali kobenda bato na lisangá
Mosala monene wana ya kotonga ememeli Batatoli mpe mosala na bango ya kosakola Bokonzi matomba nini? Na bamboka mingi, soki batongi Ndako ya Bokonzi, motángo ya bato oyo bazali koyangana na makita ezali kobakisama. Lapolo oyo euti na Burundi epesi biso ndakisa moko na likambo yango: “Soki kaka basilisi kotonga, Ndako ya Bokonzi ezali kotonda. Na ndakisa, Ndako ya Bokonzi moko etongamaki mpo na lisangá oyo ezalaki koyanganisa bato pene na 100 na makita. Ndako yango ezali na bisika ya kofanda 150. Ntango esilaki, bato 250 bakómaki koyangana na makita.”
Mpo na nini ebele ya bato bakómi koya na makita? Ya liboso, kala bato bazalaki kokanisela basakoli ya Bokonzi makanisi mabe mpo bazalaki koyangana na nse ya nzete to na libándá. Na ekólo moko, bato mingi bakanisaka ete mwa mangomba ya mikemike nde ebimisaka koyinana mpe kobomana na kati ya bato oyo bazali etuluku moko te mpe Leta abimisaki mobeko ete makita nyonso ya mangomba esalemaka na ndako ya losambo.
Lokola Batatoli ya Yehova bazali na Bandako ya Bokonzi esalisaka bango bámonisa na bato ete bazali bandimi ya pastɛrɛ moko boye te. Filiale ya Batatoli ya Yehova ya Zimbabwe ekomi boye: “Kala, lokola bandeko bamesanaki koyangana na bandako, bato bazalaki koloba ete lisangá ezali ya ndeko oyo bazalaki koyangana na ndako na ye. Bazalaki koloba ete bandeko bazali bato ya lingomba ya Songolo. Makambo wana nyonso ekómi kosila lokola bato bazali komona polele liboso ya ndako mokomoko ya makita bakomi ‘Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova.’”
Baoyo bazali kopesa na esengo
Ntoma Paulo akomaki ete: “Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” (2 Bakolinti 9:7) Ya solo, makabo ya mbongo ebele esalisaka mingi. Nzokande mbongo mingi ya makabo mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova eutaka na bakesi ya makabo mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi. Ezala ebele to te, makabo nyonso ezali na ntina mingi mpe esengeli kotyolama te. Tóbosana te ete mwasi mobola oyo akufelá mobali oyo atyaki mbongo mibale ya ebende abendaki likebi ya Yesu. Baanzelu ná Yehova mpe bamonaki mwasi yango. Toyebi ata nkombo ya mwasi yango te, kasi Yehova asalaki ete likambo malamu oyo asalaki ekomama na Biblia mpo na libela.
Longola mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi, makabo na biso esalisaka mpo na kosala makambo mosusu nyonso oyo etali mosala ya ntina mingi ya kosakola Bokonzi. Soki biso mpe tozali kopesa makabo, tokosepela mpe ‘tokozala na maloba mingi ya kopesa matɔndi epai ya Nzambe.’ (2 Bakolinti 9:12) Bandeko ya Bénin balobi boye: “Mokolo na mokolo tozali kozongisa matɔndi mingi epai ya Yehova mpo na mbongo oyo bandeko na biso ya mokili mobimba batindelaki biso.” Epai mosusu, biso nyonso oyo tozali kopesa mbongo mpo na kosimba mosala ya Bokonzi tozali koyoka esengo ya kopesa!
[Etanda/Elilingi na lokasa 22]
Ndenge bato mosusu bapesaka
MAKABO MPO NA MOSALA YA BATATOLI YA YEHOVA NA MOKILI MOBIMBA
Bato mingi babombaka mwa mbongo mpe batyaka yango na bakesi ya makabo oyo bakomá “Makabo mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba—Matai 24:14.”
Sanza na sanza, masangá etindaka mbongo na biro ya Batatoli ya Yehova oyo etalelaka mosala na ekólo na bango. Moto akoki mpe kotinda mbala moko mbongo na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, c/o Office of the Secretary and Treasurer, 25 Columbia Heights, Brooklyn, New York 11201-2483, to na biro ya filiale oyo ekambaka mosala ya kosakola na ekólo oyo azali. Ba-chèque esengeli kotindama na “Watch Tower.” Moto akoki mpe kopesa babiju to biloko mosusu ya valɛrɛ. Akotinda yango nzela moko na mwa mokanda moko oyo ekoyebisa ete ezali likabo oyo apesi.
MAKABO OYO MAKOKI KOZONGISAMA
Moto akoki kotya mbongo na banki na nkombo ya Watch Tower. Kasi, soki asɛngi yango, bakozongisela ye yango. Mpo na koyeba ebongiseli yango malamu, tuná na Office of the Secretary and Treasurer na adrɛsi oyo ezali likoló.
MAKABO OYO EBONGISAMI LIBOSO
Longola makabo ya mbongo oyo moto apesi mbala moko, ezali na lolenge mosusu ya kopesa mpo na kosunga mosala ya Bokonzi na mokili mobimba. Ekoki kozala:
Asiransi: Moto akoki kokomisa nkombo ya Société Watch Tower mpo ezwa mbongo ya asiransi to ezwa mbongo na ye ya epaso.
Mosolo na banki: Na mikili mosusu, moto akoki kofungola kɔnti na banki, kopesa certificat de dépôt, to kobombisa mbongo ya epaso mpo na Société Watch Tower, to kotya yango na nkombo ya la Société mpo la Société asangola yango soki akufi.
Lotomo ya mosolo: Okoki kopesa la Société lotomo ya mosolo (titres et obligations) lokola likabo mpo na libela, to kobatela lotomo ya kozwa mbongo yango ntango ozali naino na bomoi.
Lopango to ndako: Moto akoki kopesa ndako to lopango oyo ekoki kotɛkama lokola likabo to, soki ezali ndako oyo afandi, kobatela lotomo ya kosalela yango ntango azali naino na bomoi. Yambo ya kopesa biloko ya ndenge wana na la Société, esengeli naino koyebisa la Société.
Makabo oyo ebotaka: Moto akoki kosɛnga ete bákoma nkombo ya la Société Watch Tower na kɔnti na ye na banki to na lotomo na ye ya mosolo. Moto yango to mpe moto mosusu oyo ye moko akopona akobanda kozwa mbongo oyo mosolo yango ekobanda kobota mbula na mbula na bomoi na ye mobimba. Na mbula oyo likabo ya ndenge wana epesami, Leta akokitisa mpako oyo moto oyo apesi yango asengelaki kofutaka mpo na bozwi na ye.
Mokanda ya kopesa libula: Moto akoki kopesa la Société biloko to ndako to mosolo na mokanda ya kozwa libula oyo mondimami na mibeko, to akoki kopesa la Société lotomo ya kozwa biloko oyo akotika. Soki moto asali mokanda mpo na kopesa lingomba lotomo ya kozwa biloko na ye ntango akokufa, Leta akoki kokitisa mpako oyo afutaka mpo na biloko yango.
Lokola ebengeli “Libula mpo na kosunga babola” emonisi yango, lolenge wana ya makabo esɛngaka ete mopesi azwa bibongiseli. Mpo na kosalisa bato oyo balingi kopesa makabo na lolenge ya libula mpo na kosunga babola, la Société abongisi mwa buku moko ekomami na Lingelesi oyo ezali na motó ya likambo ete Charitable Planning to Benefit Kingdom Service Worldwide (Makabo makanami mpo na mosala ya Bokonzi na mokili mobimba). Mwa buku yango ekomami mpo na koyebisa bato balolenge ndenge na ndenge oyo bakoki kopesa makabo na bango, ezala balingi kopesa yango sikoyo to balingi kotika lotomo ya kozwa yango nsima ya liwa na bango. Nsima ya kotánga mwa buku yango mpe kosolola na bapesi-toli na makambo ya mibeko mpe ya mpako, bato mingi basungaki mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba mpe Leta akitiselaki bango mpako mpo na biloko na bango. Moto akoki kozwa mwa buku yango soki asɛngi na Charitable Planning Office.
Mpo na koyeba makambo mosusu, tindá mokanda to bengá na telefone na adrɛsi oyo ezali na nse to na biro ya Batatoli ya Yehova na ekólo oyo ofandi.
Charitable Planning Office
Watch Tower Bible and Tract
Society of Pennsylvania
100 Watchtower Drive,
Patterson, New York 12563-9204
Telefone: (845) 306-0707
[Bililingi na lokasa 23]
Charitable Planning
to Benefit Kingdom Service Worldwide
[Bililingi na lokasa 20, 21]
Bisika ya makita ya Batatoli ya Yehova—ya kala mpe ya sika
Zambie
République centrafricaine