Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/11 nk. 17-21
  • Bazali kotonga na bomoko mpo na kokumisa Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali kotonga na bomoko mpo na kokumisa Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge batongaki Tabenakle mpe tempelo
  • “Ndako ya Nzambe ya solo”
  • Misala ya kotonga na ntango na biso
  • Makabo na biso ezali na ntina
  • Oyokaka esengo ya kopesa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Pesáká na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Salelá Nzambe ‘na motema moko mpe na molimo moko’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Osepelaka ‘na libaku malamu ya kopesa na boboto’?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/11 nk. 17-21

Bazali kotonga na bomoko mpo na kokumisa Nzambe

BATO ya esanga moko ya Salomon bazalaki komona ndenge Ndako moko ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova ezalaki kotongama. Mwasi moko alobaki boye: “Na lingomba na biso tozali na bato mingi oyo bapesaka mabonza. Tosɛngaka bandimi na biso mbongo, kasi naino tozwi mbongo oyo ekoki ndako-nzambe ya sika te. Bino Batatoli ya Yehova bozwaka mbongo wapi?” Motatoli oyo mwasi yango azalaki kosolola na ye, azongisaki boye: “Tosambelaka Yehova lokola libota moko na mokili mobimba. Lisangá na biso mpe bandeko na biso na mokili mobimba bapesaki mbongo oyo tosengelaki na yango mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi oyo ya sika. Yehova ateyaka biso tózala na bomoko na makambo nyonso.”

Ozali komona ete Batatoli ya Yehova bazali na bomoko na misala na bango nyonso, ezala mosala ya kotonga bankoto ya Bandako ya Bokonzi. Bomoko oyo tozali komonisa na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi ebandi lelo te. Basaleli ya Nzambe basalaka yango banda kala. Mpo na nini tolobi bongo?

Ndenge batongaki Tabenakle mpe tempelo

Esili koleka bambula 3 500, Yehova ayebisaki Moize mpo na ekólo Yisalaele ete: “Básalela ngai esika mosantu.” (Exode 25:8) Mpo na lolenge ya kotonga tabenakle yango, Yehova alobaki lisusu boye: “Okosala mongombo mpe biloko nyonso kati na yango pelamoko emoniseli ekomonisa ngai yo.” (Exode 25:9) Na nsima, alakisaki ndenge ya kotonga esika mosantu, biloko oyo basengelaki kotya na kati mpe makambo mosusu. (Exode 25:10–27:19) ‘Tabenakle’ yango, to hema, esengelaki kozala esika ya losambo ya solo mpo na Yisalaele mobimba.

Toyebi te soki bato boni basalaki mosala yango, kasi basɛngaki Bayisalaele nyonso bápesa mabɔkɔ. Moize ayebisaki bango ete: “Bókamata na kati na bino makabo mpo na [Yehova]. Soki moto alingi kopesa na motema malamu, mbele aya na likabo ya [Yehova].” (Exode 35:4-9) Bayisalaele basalaki nini? Exode 36:3 elobi: “Bazwaki na mabɔkɔ ya Moize makabo nyonso mapesaki bato ya Yisalaele mpo na kosala mosala na esika mosantu. Mikolo nyonso na ntɔngɔ bayaki naino na makabo.”

Eumelaki te, bato bayaki na biloko ebele mpe bazalaki kokoba kopesa. Na nsima, bato oyo bazalaki kosala mosala yango balobaki na Moize ete: “Bato bazali koya na biloko eleki mpo na kosala mosala molakelaki [Yehova] na biso.” Bongo Moize alobaki: “Tiká mobali soki mwasi básala eloko mosusu te mpo na makabo na esika mosantu.” Yango ebimisaki matomba nini? “Biloko bizwaki bango bikokaki na kosala mosala nyonso mpe bilekaki.”​—Exode 36:4-7.

Mpo na makabo oyo Bayisalaele bapesaki, tabenakle esilaki nsima ya mbula moko. (Exode 19:1; 40:1, 2) Basaleli ya Nzambe bakumisaki Yehova na makabo oyo bapesaki mpo na losambo ya solo. (Masese 3:9) Na nsima, basengelaki kotonga ndako moko ya monene. Na mbala oyo mpe, moto nyonso asengelaki kopesa mabɔkɔ, ezala ayebi kotonga to te.

Mbula nkama mitano nsima ya kotonga tabernakle, Bayisalaele babandaki kotonga tempelo na Yelusaleme. (1 Mikonzi 6:1) Ndako yango esengelaki kozala kitoko mpe makasi, esengelaki kotongama na mabanga mpe na mabaya. (1 Mikonzi 5:17, 18) Yehova alakisaki Davidi ndenge tempelo yango esengelaki kotongama. (1 Ntango 28:11-19) Kasi, aponaki Salomo mwana ya Davidi mpo na kotambwisa mosala yango. (1 Ntango 22:6-10) Davidi amipesaki mobimba mpo na mosala wana. Asangisaki mabanga, mabaya mpe bisaleli mosusu mpe apesaki ebele ya wolo mpe palata ya ye moko. Alendisaki mpe bandeko na ye Bayisalaele báfungola mabɔkɔ mpe atunaki bango ete: “Nani andimi komipesa na kati na mosala na ye lelo oyo epai na [Yehova]?” Bato basalaki nini?​—1 Ntango 29:1-5.

Ntango Salomo abandaki kotonga tempelo, azalaki na batone ebele mpenza ya wolo mpe palata. Kwivre mpe bibende ezalaki beboo, kilo na yango eyebanaki te. (1 Ntango 22:14-16) Na lisalisi ya Yehova mpe ya Yisalaele mobimba, mosala yango esilaki nsima ya mbula nsambo na ndambo.​—1 Mikonzi 6:1, 37, 38.

“Ndako ya Nzambe ya solo”

Tabernakle mpe tempelo ebengamaki “Ndako ya Nzambe [ya solo, NW].” (Basambisi 18:31; 2 Ntango 24:7) Yehova asengelaki na ndako te. (Yisaya 66:1) Asɛngaki bátonga bandako yango mpo na bolamu ya bato. Yango wana, na mokolo oyo bafungolaki tempelo, Salomo atunaki boye: “Solo Nzambe akofanda na mokili? Talá lola mpe likoló na lola ekoki kozingela ye te na koleka ndako oyo ngai natongeli yo yango ekoki te.”​—1 Mikonzi 8:27.

Na nzela ya mosakoli na ye Yisaya, Yehova alobaki boye: “Ndako na ngai ekobengama ndako ya mabondeli mpo na mabota nyonso.” (Yisaya 56:7) Bambeka, mabondeli mpe milulu mosusu oyo bazalaki kosala na tempelo yango epesaki bayuda mpe bato ya bikólo mosusu oyo bazalaki kobanga Nzambe nzela ya kopusana penepene na Nzambe ya solo. Kosambela na ndako yango esalaki ete bakóma baninga ya Yehova mpe ye azalaki kobatela bango. Libondeli oyo Salomo asalaki ntango bafungolaki tempelo emonisaki mpenza bosolo ya likambo yango. Okoki kotánga maloba wana ya kosimba motema oyo Salomo alobaki na libondeli na ye na Mokanda ya 1 Mikonzi 8:22-53 mpe 2 Ntango 6:12-42.

Ndako wana ya kala ya Nzambe ya solo ebebisamaki, kasi Liloba ya Nzambe elobelaki ntango moko oyo bato ya bikólo nyonso bakosangana esika moko mpo na kosambela Yehova na tempelo monene ya elimo. (Yisaya 2:2) Bambeka ya banyama oyo bazalaki kopesa na tempelo ezalaki elilingi ya mbeka ya Mwana mobotami-se moko ya Nzambe, oyo na nzela na yango bato bakoki kopusana penepene na Yehova. (Yoane 14:6; Baebele 7:27; 9:12) Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali kosambela Nzambe na nzela ya ebongiseli yango mpe bazali kosalisa ebele ya bato básala lokola bango.

Misala ya kotonga na ntango na biso

Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazali kosalela Nzambe ya solo. Basali “libota ya makasi” oyo ezali se kokola. (Yisaya 60:22) Ndako ya Bokonzi ezali esika ya libosoliboso oyo Batatoli ya Yehova bayanganaka.a Bazali koyangana na bankoto ya bandako yango, mpe bosɛnga ya bandako mosusu ezali mingi.

Batatoli ya Yehova “bamipesaka na bolingo na bango moko” mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi oyo basengeli na yango. (Nzembo 110:3, NW) Nzokande, mbala mingi Batatoli ya Yehova ya bisika mosusu bazali na makoki ya kotonga te, mpe na bamboka mosusu oyo masangá ezali kokola mingi, bobola ezali makasi. Mpo na kosilisa mokakatano wana, na mobu 1999, Lisangani ya Mikólo-Bakambi ya Batatoli ya Yehova bazwaki bibongiseli mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi. Na lisalisi ya ebongiseli wana, Batatoli oyo bayebi mpenza misala ya kotonga bazali kosala mibembo milaimilai mpo na kokende kolakisa bandeko na bango kotonga Bandako ya Bokonzi. Na nsima, bandeko oyo bazwi formasyo bakobaka kotonga na mboka yango. Milende yango ebimisi matomba nini?

Na Febwali 2006, Batatoli ya Yehova ya mikili ya bobola basilaki kozwa Bandako ya Bokonzi ya sika koleka 13 000. Yoká ndenge bandeko mosusu oyo bazwi Bandako ya Bokonzi ya sika balobi.

“Na Lisangá na biso, bayangani bazalaki 160. Na mbala ya liboso oyo toyanganaki na Ndako ya Bokonzi ya sika, tokómaki tii bato 200. Lelo oyo, sanza motoba na nsima, bakómá koyangana bato 230. Soki totali bandako kitoko oyo ezali kotongama mpe matomba oyo ezali kobima, emonani polele ete Yehova azali mpenza kopambola mosala yango.”​—Mokɛngɛli ya zongazonga moko na ekólo Équateur.

“Banda kala, bato batunaka biso ete, ‘Ntango nini bokozwa Ndako ya Bokonzi lokola oyo tomonaka na mikanda na bino?’ Na lisalisi ya Yehova, tozwi lelo esika kitoko ya losambo. Tozalaki kosala makita na magazini ya Ndeko moko mpe tozalaki bato 30. Na makita ya liboso na Ndako ya Bokonzi ya sika, bato bazalaki 110.”​—Lisangá moko na Ouganda.

“Babongisi-nzela mibale ya basi balobi ete banda bazwá Ndako ya Bokonzi, kosakola na teritware na bango ekómi esengo. Bato bazali koyoka biso malamu na mosala ya ndako na ndako mpe na litatoli ya libaku malamu. Lelo oyo, bandeko yango bazali kotambwisa bayekoli ya Biblia 17 mpe mingi kati na bango bayanganaka na makita.”​—Biro ya Batatoli ya Yehova na Bisanga Salomon.

“Pastɛrɛ moko oyo afandaka pene na Ndako ya Bokonzi na biso ya sika alobi ete ndako yango ekómisi kartye kitoko mpe bato ya kartye bakómi kobɛtɛla yango ntolo. Bato nyonso oyo balekaka wana balobelaka kitoko na yango. Yango epesi bandeko libaku malamu ya kopesa litatoli. Bato mingi balukaka koyeba bondeko na biso ya mokili mobimba. Bato mingi oyo batikaki koyangana na makita bambula ebele bakómaki lisusu koyangana mbala na mbala.”​—Biro ya Batatoli ya Yehova na ekólo Myanmar.

“Ndeko mwasi moko abengaki moto moko oyo azalaki kosepela na solo, na esika oyo bazalaki kotonga Bandako ya Bokonzi na kartye na ye. Na nsima, moto yango alobaki boye: ‘Nakanisaki ete bakokɔtisa ngai te. Nakamwaki komona ete bayambaki ngai na esengo. Mibali ná basi bazalaki kosala mosala makasi, kozanga kobungisa ntango. Bazalaki na boyokani mpe na esengo.’ Moto yango andimaki koyekola Biblia mpe abandaki koyangana na makita. Na nsima alobaki boye: ‘Nabongolaki makanisi. Sikoyo, lokola nayebi Nzambe, nakotika ye soki moke te.’”​—Biro ya Batatoli ya Yehova na Colombie.

Makabo na biso ezali na ntina

Kotonga Bandako ya Bokonzi ezali moko ya misala na biso ya bosantu. Batatoli ya Yehova na mokili mobimba babongi mpenza kozwa longonya na ndenge bazali kopesa mabɔkɔ na mosala yango, ezala na mbongo to na lolenge mosusu. Kasi, tosengeli kobosana te ete makambo mosusu oyo etali mosala ya bosantu ezali mpe na ntina. Na bantango mosusu baklisto bakutanaka na makama ya mipɛpɛ to ya mai mpe bazalaka na mposa tosalisa bango. Kobimisa mikanda ezali na ntina mingi na mosala ya bosantu. Mingi kati na biso tomoná matomba oyo zulunalo to buku moko oyo topesaki moto moko oyo asepelaki na nsango malamu ebimisaki. Lisusu, kosunga bamisionɛrɛ mpe bandeko mosusu oyo basalaka mosala ya ntango nyonso ezali na ntina mingi. Komipesa ya baklisto wana ezali na ntina mingi mpo na kopalanganisa nsango malamu na mikolo oyo ya nsuka.

Baoyo bapesaki mabɔkɔ na mosala ya kotonga tempelo basepelaki mpenza. (1 Ntango 29:9) Lelo oyo mpe, kopesa makabo mpo na losambo ya solo ezali komemela biso esengo mingi. (Misala 20:35) Toyokaka esengo yango ntango totyaka makabo na biso na kɛsi ya makabo mpo na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi mpe makabo mpo na kosunga mosala ya kosakola na mokili mobimba, oyo ezali kosunga mpo na misala mosusu oyo etali mosala ya Bokonzi. Batatoli ya Yehova basangani lelo oyo kati na losambo ya solo na ndenge moko ya kokamwa mpenza. Tiká ete biso nyonso tótonda na esengo na ndenge tozali kopesa mabɔkɔ na losambo yango!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba epai nkombo “Ndako ya Bokonzi” euti, talá buku​—Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu, lokasa 319, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 20, 21]

NDENGE BATO MOSUSU BAPESAKA

MAKABO MPO NA MOSALA YA KOSAKOLA NA MOKILI MOBIMBA

Bato mingi babombaka mwa mbongo mpe batyaka yango na bakɛsi ya makabo oyo bakomá “Makabo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba.​—Matai 24:14.”

Sanza na sanza, masangá etindaka mbongo na biro ya Batatoli ya Yehova oyo etalelaka mosala na ekólo na bango. Moto akoki mpe kotinda mbala moko mbongo na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, Attention Treasurer’s Office, 25  Columbia Heights, Brooklyn, New York 11201-2483, to na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova oyo ekambaka mosala ya kosakola na ekólo oyo azali. Ba-chèque oyo batindi na adrɛsi oyo topesi awa esengeli kopesama na “Watch Tower.” Moto akoki mpe kopesa babiju to biloko mosusu ya valɛrɛ. Akotinda yango nzela moko na mwa mokanda moko oyo ekoyebisa ete ezali likabo oyo apesi.

MAKABO OYO MAKOKI KOZONGISAMA

Moto akoki kotya mbongo na banki na nkombo ya Watch Tower. Kasi, soki asɛngi yango, bakozongisela ye yango. Mpo na koyeba ebongiseli yango malamu, tuná na Treasurer’s Office na adrɛsi oyo ezali likoló.

MAKABO OYO EBONGISAMI LIBOSO

Longola makabo ya mbongo oyo moto apesi mbala moko, ezali na lolenge mosusu ya kopesa mpo na kosunga mosala ya Bokonzi na mokili mobimba. Ekoki kozala:

Asiransi: Moto akoki kokoma nkombo ya Watch Tower mpo ezwa mbongo ya asiransi to ezwa mbongo na ye ya epaso.

Mosolo na banki: Na mikili mosusu, moto akoki kofungola kɔnti na banki, kopesa certificat de dépôt, to kobombisa mbongo ya epaso mpo na Watch Tower, to kotya yango na nkombo ya Watch Tower mpo Watch Tower esangola yango soki akufi.

Lotomo ya mosolo: Okoki kopesa na Watch Tower lotomo ya mosolo (titres et obligations) lokola likabo mpo na libela, to kobatela lotomo ya kozwa mbongo yango ntango ozali naino na bomoi.

Lopango to ndako: Moto akoki kopesa likabo ya ndako to lopango oyo ekoki kotɛkama, soki ezali ndako oyo afandi, akobatela lotomo ya kosalela yango ntango azali naino na bomoi. Yambo ya kopesa biloko ya ndenge wana, esengeli koyebisa biro ya filiale na bino.

Makabo oyo ebotaka: Moto akoki kosɛnga ete bákoma nkombo ya Lisangani moko ya Batatoli ya Yehova, oyo ekoponama, oyo endimami na mibeko ya Leta, na kɔnti na ye na banki to na lotomo na ye ya mosolo. Moto yango to mpe moto mosusu oyo ye moko akopona akobanda kozwa mbongo oyo mosolo yango ekobanda kobota mbula na mbula na bomoi na ye mobimba. Na mbula oyo likabo ya ndenge wana epesami, Leta akokitisa mpako oyo moto oyo apesi yango asengelaki kofutaka mpo na bozwi na ye.

Mokanda ya kopesa libula: Moto akoki kopesa Watch Tower biloko to ndako to mosolo na mokanda ya kozwa libula oyo endimami na mibeko, to akoki kopesa Watch Tower lotomo ya kozwa biloko oyo akotika. Soki moto asali mokanda mpo na kopesa lingomba lotomo ya kozwa biloko na ye ntango akokufa, Leta akoki kokitisa mpako oyo afutaka mpo na biloko yango.

Lokola ebengeli “Makabo oyo ebongisami liboso” emonisi yango, lolenge oyo ya makabo esɛngaka ete mopesi azwa bibongiseli. Mpo na kosalisa bato oyo balingi kopesa makabo oyo ebongisami liboso mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, mwa buku moko esilá kobongisama oyo ekomami na Espagnol mpe na Lingelesi, oyo ezali na motó ya likambo ete Charitable Plannning to Benefit Kingdom Service Worlwide (Makabo oyo ebongisami liboso mpo na mosala ya Bokonzi na mokili mobimba). Mwa buku yango ekomami mpo na koyebisa bato ya lolenge ndenge na ndenge oyo bakoki kopesa makabo na bango, ezala balingi kopesa yango sikoyo to balingi kotika lotomo ya kozwa yango nsima ya liwa na bango. Nsima ya kotánga mwa buku yango mpe kosolola na bapesi-toli na makambo ya mibeko mpe ya mpako, bato mingi basungaki mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba mpe Leta akitiselaki bango mpako mpo na biloko na bango. Moto akoki kozwa mwa buku yango soki asɛngi na Charitable Planning Office.

Mpo na koyeba makambo mosusu, tindá mokanda to bengá na telefone na adrɛsi oyo ezali na nse to na biro ya Batatoli ya Yehova na ekólo oyo ofandi.

Charitable Planning Office

Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania

100 Watchtower Drive

Patterson, New York 12563-9204

Telefone: (845) 306-0707

[Elilingi na lokasa 18]

Lokola tozali kosala na bomoko, tozali kotonga Bandako ya Bokonzi kitoko na mokili mobimba

[Elilingi na lokasa 18]

Ndako moko ya Bokonzi ya sika na Ghana

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto