Lisolo ya bomoi
Tozwaki ekateli makasi ya kopona Boyangeli ya Nzambe
YA MICHAL ŽOBRÁK
Nsima ya kosala sanza mobimba na bolɔkɔ na esika oyo batyaki ngai kaka ngai moko, bamemaki ngai liboso ya mosambisi moko. Eumelaki te, moto yango asilikaki makasi mpe abandaki koganga ete: “Bino bozali kotɛka basɛkɛlɛ ya mboka na Amerika!” Mpo na nini asilikaki makasi? Atunaki ngai soki nazali moto ya lingomba nini, mpe nayanolaki ete: “Nazali Motatoli ya Yehova.”
ESALI mbula koleka 50 banda likambo wana esalemaki. Na ntango wana, Bakoministe nde bazalaki koyangela ekólo na biso. Bambula mingi liboso ete likambo wana esalema, mosala na biso ya kolakisa bato mateya ya boklisto epekisamaki makasi.
Toyokaki mpenza mpasi ya etumba
Ntango Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki na 1914, nazalaki na mbula mwambe. Na ntango wana, mboka na biso, Zálužice ezalaki na kati ya Ampire austro-hongrois. Etumba yango ebebisaki kaka mokili te kasi mpe etindaki mpe ngai na makasi nakóma, na mbalakaka mpenza, na mikumba ya mikóló. Tata na ngai azalaki soda mpe akufaki kaka na mbula ya liboso ya etumba. Liwa na ye etikaki ngai ná mama, ná baleki na ngai mibale ya basi, babola mpenza. Lokola nazalaki mwana mobali ya mokóló, nakómaki mbala moko na misala mingi na mwa ferme na biso mpe na ndako. Banda bomwana mpenza, nazalaki kosepela mingi na makambo ya Nzambe. Kutu, pastɛrɛ ya Lingomba ya Protesta asɛngaki ngai nasalisaka ye na koteya baninga na ngai ya kelasi soki azali te.
Na 1918, Etumba ya Liboso ya mokili mobimba esilaki, mpe topemaki mpenza. Ampire austro-hongrois ekufaki, mpe tokómaki bato ya ekólo Tchécoslovaquie. Eumelaki te, bato mingi ya mboka na biso oyo bakendeki kofanda na États-Unis bazongaki. Moko na bango nkombo na ye ezalaki Michal Petrík, oyo ayaki na mboka na biso na 1922. Ntango ayaki kotala libota moko oyo ezalaki pene na biso, babengaki mpe ngai ná mama.
Boyangeli ya Nzambe ekómi likambo ya solo na miso na biso
Michal azalaki Moyekoli ya Biblia, ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana, mpe alobelaki masolo ya Biblia ya ntina mpenza oyo ebendaki likebi na ngai. Alobelaki mingimingi koya ya Bokonzi ya Yehova. (Danyele 2:44) Ntango alobaki ete likita moko ekosalema na mboka Záhor mokolo ya lomingo, nazwaki ekateli ete nakokende. Nalamukaki na ntɔngɔntɔngɔ, na ngonga ya 4 mpe natambolaki kilomɛtrɛ mwambe tii epai ya ndeko na ngai moko mpo na kosɛnga ye velo. Nsima ya kobongisa pinɛ oyo etɔbɔkaki, nasalaki lisusu kilomɛtrɛ 24 tii na Záhor. Lokola nayebaki te esika oyo likita yango ekosalema, nabandaki koluka malɛmbɛmalɛmbɛ na balabala moko. Nayokaki bato bazali koyemba nzembo moko ya Bokonzi na kati ya ndako moko. Motema na ngai etondaki na esengo. Nakɔtaki mpe nayebisaki bango ntina oyo nayei. Libota yango babengaki ngai tómɛla tii, mpe na nsima bamemaki ngai na makita. Atako mpo na kozonga epai na ngai, esengelaki nasala kilomɛtrɛ 32, nalɛmbaki te.—Yisaya 40:31.
Bandimbola ya polele ya Biblia oyo Batatoli ya Yehova bapesaki esepelisaki ngai makasi. Elikya ya bomoi ya malamu na mokili oyo Nzambe akoyangela esimbaki mpenza motema na ngai. (Nzembo 104:28) Ngai ná mama tozwaki ekateli ya kokomela lingomba na biso mokanda ete tozali lisusu bandimi na bango te. Likambo yango ebimisaki yikiyiki na mboka na biso. Atako bato mosusu balingaki lisusu kosolola na biso te, kasi tokómaki mpenza baninga ya ebele ya Batatoli na mboka na biso mpe na bamboka mosusu. (Matai 5:11, 12) Eumelaki mingi te nazwaki batisimo na Ebale Uh.
Mosala ya kosakola ekómi mosala ya bomoi na biso
Tozalaki kosakola Bokonzi ya Yehova na mabaku nyonso. (Matai 24:14) Tozalaki komibongisa malamumalamu mpo na mosala ya kosakola oyo ezalaki kosalema mokolo ya lomingo. Lokola na ntango wana bato bazalaki na momeseno ya kolamuka na ntɔngɔntɔngɔ, biso mpe tozalaki kobanda kosakola na ntɔngɔntɔngɔ. Na moi, tozalaki kosala likita mpo na bato nyonso. Bateyi mingi ya Biblia bazalaki koloba kaka na motó. Bazalaki kotalela soki bato mingi ya sika bayei, bazali bato ya mangomba nini, mpe makambo nini ezalaki kosepelisa bango.
Solo ya Biblia oyo tozalaki kosakola efungolaki ebele ya bato ya mitema sembo miso ya elimo. Mosika te nsima ya batisimo na ngai, nasakolaki na mboka Trhovište. Na ndako moko, nasololaki na Madame Zuzana Moskal, mwasi moko ya boboto mpenza. Mwasi yango ná libota na ye bazalaki kosambela na Lingomba ya Protesta, lingomba na ngai ya kala. Atako ayebaki Biblia, kasi azalaki na mituna mingi oyo azwaki naino biyano na yango te. Tosololaki ngonga mobimba, mpe natikelaki ye buku La Harpe de Dieu.a
Moskal ná libota na ye bakɔtisaki mbala moko botángi ya buku La Harpe na programɛ na bango ya kotánga Biblia. Mabota mingi na mboka yango basepelaki mpe babandaki koyangana na makita na biso. Pastɛrɛ na bango ayebisaki bango bákeba na biso mpe bátángaka mikanda na biso te. Kasi, bato mosusu oyo basepelaki na solo, bapesaki pastɛrɛ likanisi ete aya na makita na biso mpo amonisa na miso ya bato nyonso ete mateya na biso ezali lokuta.
Pastɛrɛ ayaki, kasi abimisaki ata likanisi moko te na Biblia mpo na kondimisa mateya na ye. Mpo na komilongisa, alobaki boye: “Tokoki kondima te makambo nyonso oyo ezali na Biblia. Bato nde bakomaki yango, mpe makambo ya Nzambe ekoki kolimbolama na ndenge ebele.” Likambo wana esalaki ete bato mingi bándima solo. Bato mosusu kutu balobaki na ye ete soki aboi kondima Biblia, bakokende lisusu koyoka mateya na ye te. Bato yango balongwaki na Lingomba ya Protesta, mpe bato soki 30 na mboka yango bazwaki ekateli ya kondima solo ya Biblia.
Kosakola nsango malamu ya Bokonzi ekómaki mosala ya bomoi na biso, yango wana, nakómaki koluka mwasi ya kobala na libota moko oyo ezali makasi na elimo. Moninga na ngai ya mosala ezalaki Ján Petruška, oyo ayekolaki solo na États-Unis. Mwana na ye Mária asepelisaki ngai mingi mpo azalaki kopesa litatoli epai ya moto nyonso, ndenge kaka tata na ye azalaki kosala. Tobalanaki na 1936, mpe Mária azalaki mpenza moninga na ngai ya sembo na boumeli ya mbula 50, tii na liwa na ye na 1986. Na 1938, Eduard mwana na biso kaka moko abotamaki. Kasi na ntango wana, etumba mosusu elingaki kobanda na Mpoto. Etumba yango elingaki kosala nini na mosala na biso ya kosakola?
Koboya kokɔta na makambo ya mokili ememeli biso mikakatano
Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, ekólo Slovaquie eponaki ngámbo ya Banazi. Kasi guvɛrnema elobaki naino polele te ete epekisi mosala ya Batatoli ya Yehova. Nzokande tozalaki kosala na kobombana, mpe mikanda na biso epekisamaki. Atako bongo, tokobaki mosala na biso na nkuku.—Matai 10:16.
Lokola etumba ekómaki ndongo, bakangaki ngai na makasi nakóma soda, atako nazalaki na mbula koleka 35. Lokola tokɔtaka na makambo ya mokili te, naboyaki komikɔtisa na etumba yango. (Yisaya 2:2-4) Likambo ya esengo, liboso bakonzi bázwa ekateli soki bakosala ngai nini, batikaki bato nyonso oyo nazalaki na bango mbula moko.
Tomonaki ete ekozala mpasi mingi mpo bandeko na biso oyo bafandaka na vile bázwa mwaye ya kobikela ndenge biso bato oyo tozalaki kofanda na mboka tozalaki kozwa. Tomonaki malamu tókabela bango biloko oyo tozalaki na yango. (2 Bakolinti 8:14) Yango wna, tozalaki komema biloko oyo tokokoka mpe kosala mobembo ya kilomɛtrɛ 500 mpe kokatisa etúká mobimba tii na Bratislava. Boninga makasi ya boklisto mpe bolingo oyo tosalaki na bambula oyo etumba ezalaki esalisaki biso tólonga bampasi oyo tokutanaki na yango nsima.
Tozwi lisalisi oyo tosengelaki na yango
Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, Slovaquie ekɔtaki na Tchécoslovaquie. Kobanda na 1946 tii 1948, mayangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova ezalaki kosalema na engumba Brno to mpe na engumba Prague. Ezalaki na bingbunduka oyo ezalaki komema kaka biso kobanda na ɛsti ya Slovaquie tii na esika ya liyangani. Bingbunduka yango ekokaki kobengama bingbunduka oyo eyembaka, mpo tozalaki koyemba nzela mobimba.—Misala 16:25.
Nazali koyeba lisusu liyangani oyo esalemaki na 1947 na Brno, oyo bandeko misato ya biro monene ya Batatoli ya Yehova bayaki, Ndeko Nathan Knorr mpe azalaki na kati. Mpo na kobenga bato na lisukulu ya bato nyonso, mingi kati na biso totambolaki mboka mobimba, tolataki mabaya oyo bakomaki motó ya likambo ya lisukulu yango. Mwana na biso, Eduard, oyo azalaki kaka na mbula libwa, asepelaki te mpo bapesaki ye libaya yango te. Bandeko basalelaki ye ná bana mosusu mabaya ya mikemike. Bana wana basalaki mosala moko malamu mpo na kobenga bato na lisukulu yango!
Na sanza ya Febwali 1948, Bakoministe bazwaki bokonzi. Toyebaki ete mosika te guvɛrnema ekopekisa mosala na biso. Liyangani moko ya etúká esalemaki na Prague na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1948, mpe tozalaki kobanga ntango tozalaki kokanisa ete bakopekisa lisusu makita na biso, nsima ya mbula misato mpamba oyo tokokaki koyangana na bonsomi. Liboso tósilisa liyangani, tozwaki ekateli moko, oyo eteni na yango moko elobaki boye: “Biso, Batatoli ya Yehova, oyo toyangani awa . . . tozwi ekateli ya komipesa lisusu koleka na mosala oyo ya malamu, mpe, na motema-boboto ya Nkolo, tokolendendela ata na ntango ya mpasi, mpe tokosakola evanzile ya bokonzi ya Nzambe na molende mpenza.”
“Banguna ya Leta”
Sanza mibale kaka nsima ya liyangani ya etúká oyo tosalaki na Prague, bapolisi ya sirete bakɔtaki na makasi na Betele oyo ezalaki pene na Prague. Bakangaki bandako yango, babɔtɔlaki mikanda nyonso oyo bakutaki, mpe bakangaki bandeko nyonso ya Betele mpe bandeko mosusu. Kasi esukaki wana te.
Na mokolo ya 3 mpe 4 Febwali 1952 na butu, basoda bapanzanaki mboka mobimba mpe bakangaki Batatoli koleka 100. Ngai mpe nazalaki na kati na bango. Na ngonga ya misato ya butu, bapolisi balamusaki ngai ná libota na ngai na mpɔngi. Kozanga ete bálimbola ngai ntina, bayebisaki ngai ete nakende na bango. Bakangaki ngai minyɔlɔlɔ na mabɔkɔ, elamba na miso mpe babwakaki ngai ná bato mosusu na kati ya motuka. Bakendaki kotya ngai na bolɔkɔ na esika oyo nazalaki kaka ngai moko.
Nasalaki sanza mobimba nasololaka ata na moto moko te. Moto kaka moko oyo nazalaki komona ezali soda oyo azalaki koya kotindikela ngai mwa biloko na mwa lidusu oyo ezalaki na porte. Na nsima, mosambisi oyo nalobelaki na ebandeli abengaki ngai na biro na ye. Nsima ya kobenga ngai monɔ́ngi, alobaki lisusu boye: “Kosambela ezali boinga. Nzambe azali te! Tokoki te kopesa bino nzela bókosaka bato oyo bazali kosala mosala na mboka na biso. Tokokakisa yo na nzete to okokufa na bolɔkɔ. Mpe soki Nzambe na yo ameki koya awa, tokoboma ye mpe!”
Lokola bakonzi bayebaki ete mobeko ya polele mpenza oyo epekisaki mosala na biso ezalaki te, bazwaki mayele ya kolobela mosala na biso ndenge mosusu mpo ekweisama na mibeko, na ndakisa bazalaki kobenga biso “banguna ya Leta” mpe bato oyo bazali kotɛka basɛkɛlɛ ya mboka epai ya bapaya. Mpo na kosala bongo, balukaki kolɛmbisa biso mpe basɛngaki ete “tóndima” bifundeli ya lokuta. Nsima ya kosambisa ngai na butu wana, bapekisaki ngai kolala. Nsima ya mwa bangonga, basambisaki ngai lisusu. Na mbala oyo, mosambisi yango alingaki natya sinyatire na mokanda moko oyo ezalaki na maloba oyo: “Ngai, monguna ya Tchécoslovaquie démocratique du peuple, naboyaki kokende kosala na [ferme] mpo nazalaki kozela bato ya Amerika.” Ntango naboyaki kotya sinyatire na makambo ya lokuta ndenge wana, batindaki ngai na kasho na kati ya bolɔkɔ.
Bapekisaki ngai kolala, kosembola mokɔngɔ, to mpe kofanda. Nasengelaki kaka kotɛlɛma to kotambolatambola. Ntango nalɛmbaki makasi, nalalaki na pavema. Na nsima, bakɛngɛli ya bolɔkɔ bamemaki ngai na biro ya mosambisi. Mosambisi yango atunaki ngai boye: “Okotya sinyatire sikoyo?” Ntango naboyaki lisusu, abɛtaki ngai na elongi. Makila ebandaki kobima. Alobaki na bakɛngɛli na mongongo makasi ete: “Alingi komiboma. Bókɛngɛla ye makasi mpo amiboma te!” Bazongisaki ngai lisusu na bolɔkɔ esika nazalaki kaka ngai moko. Sanza motoba mobimba, bazalaki kosambisa ngai na mayele mabe mbala na mbala. Mayele nyonso oyo basalaki mpo na nandima ete nazali monguna ya Leta elɛmbisaki te ekateli na ngai ya kotikala sembo epai ya Yehova.
Sanza moko liboso nakende kosamba, prokirɛrɛ moko autaki na Prague mpe atunaki biso nyonso bandeko 12 mituna. Atunaki ngai boye: “Okosala nini soki bato ya Wɛsti bayei kobundisa mboka na biso?” “Nakosala ndenge nasalaki ntango ekólo oyo ná Hitler babundisaki URSS. Na ntango wana nabundaki te, nakobunda mpe sikoyo te mpo nazali moklisto mpe nakɔtaka na makambo ya mokili te.” Na nsima alobaki na ngai boye: “Tokoki kondima Batatoli ya Yehova te. Tosengeli kozala na basoda oyo bakobunda soki bato ya Wɛsti bayei kobundisa biso, tosengeli kozala na basoda mpo tósikola bato na biso oyo basalaka misala oyo bazali Wɛsti.”
Na sanza ya Yuli 1953, bamemaki biso na tribinale. Babandaki kobenga mokomoko na biso nyonso 12 liboso ya bazuzi. Tosalelaki libaku wana mpo na kopesa litatoli mpo na kondima na biso. Nsima ya kopesa biyano na makambo ya lokuta oyo balobaki na biso, prokirɛrɛ moko atɛlɛmaki mpe alobaki ete: “Nasali na tribinale oyo mingi. Mbala mingi, bato bandimaka makambo oyo basali, balobaka ete bakozongela yango lisusu te, mpe ntango mosusu kutu balelaka. Kasi bato oyo bakobima awa makasi koleka ndenge bayaki.” Na nsima, balobaki ete biso nyonso 12 tozali banguna ya Leta. Bakatelaki ngai bolɔkɔ ya mbula misato mpe Leta abɔtɔlaki ngai biloko nyonso.
Atako nakómi mobange, nalɛmbi te
Ntango nazongaki epai na ngai, bapolisi ya sirete batikaki te kolandela ngai. Atako bongo, nazongelaki misala na ngai na lisangá mpe bapesaki ngai mokumba ya mokɛngɛli na lisangá. Atako bapesaki biso nzela tófanda na ndako na biso oyo Leta abɔtɔlaki, bazongiselaki biso yango mbula 40 na nsima, ntango boyangeli ya Bakoministe ekweaki.
Nazalaki moto ya nsuka te na libota na biso oyo akɔtaki bolɔkɔ. Nasalaki kaka mbula misato na mboka ntango bakangaki Eduard mpo akende mosala ya soda. Lokola tolakisaki ye malamu mateya ya Biblia, aboyaki mosala ya soda batyaki ye na bolɔkɔ. Nsima ya bambula, ata nkɔkɔ na ngai ya mobali, Peter, akɔtaki bolɔkɔ atako azalaka na nzoto kolɔngɔnɔ te.
Na 1989, boyangeli ya Bakoministe na Tchécoslovaquie ekweaki. Nazalaki mpenza na esengo ndenge nakómaki na bonsomi ya kosakola ndako na ndako nsima ya mbula ntuku minei oyo mosala na biso epekisamaki! (Misala 20:20) Nasalaki mosala yango ntango nyonso oyo nzoto na ngai epesaki ngai nzela. Sikoyo nazali na mbula 98, nzoto na ngai ezali lisusu kolɔngɔnɔ te ndenge ezalaki liboso, kasi nazali na esengo ete nakoki kopesa litatoli na ntina na bilaka ya nkembo ya Yehova mpo na mikolo ezali koya.
Nakoki kotánga bakonzi 12 ya bikólo mitano oyo bayangelaki mboka na ngai. Na kati ya bakonzi yango, ezali na badiktatɛrɛ, baprezida, mpe roi moko. Ata moko te kati na bango asilisaki bamaladi oyo ezalaki konyokola bato. (Nzembo 146:3, 4) Nazali na botɔndi mingi epai na Yehova ndenge apesaki ngai nzela nayeba ye ntango nazalaki naino elenge mpenza. Yango esalisaki ngai nayeba makambo oyo akosala na nzela ya Bokonzi ya Masiya mpe naboya bisalasala ya bomoi ya kopesa Nzambe mokɔngɔ. Nasakoli na molende mpenza nsango oyo eleki malamu na boumeli ya mbula koleka 75, mpe esalisi ngai nazala na bomoi oyo ezali na ntina, nazala na esengo, mpe na elikya ya bomoi ya seko na mabelé. Ezali nde na nsango oyo eleki yango?b
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova kasi sikoyo ebimaka lisusu te.
b Likambo ya mawa, Ndeko Michal Žobrák alɛmbaki mingi. Akufaki sembo ntango tozalaki naino kobongisa lisolo oyo mpe azalaki na elikya ya lisekwa.
[Elilingi na lokasa 26]
Mwa moke nsima ya libala na biso
[Elilingi na lokasa 26]
Ngai ná Eduard na ebandeli ya bambula ya 1940
[Elilingi na lokasa 27]
Tozali kobenga bato na liyangani ya etúká na Brno, na 1947