Nayekolaki kotya elikya epai na Yehova
LISOLO YA JÁN KORPA-ONDO
Ezalaki na mobu 1942, basoda ya ekólo Hongrie bazalaki kokɛngɛla ngai pene na engumba Koursk, na ekólo Russie. Tozalaki bakangami ya bikólo oyo esanganaki mpo na kobundisa ekólo Russie na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Libulu esika bakokunda ngai etimolamaki, mpe bapesaki ngai miniti zomi mpo ete nakamata ekateli soki nakotya sinyatili na mokanda oyo elobaki ete nazali lisusu Motatoli ya Yehova te. Liboso ya koyebisa bino makambo malekaki na nsima, tiká nayebisa bino ndenge nini nakómaki kuna.
NABOTAMAKI na 1904, na mboka moko moke babéngi Zahor, oyo ezali sikawa na ɛsti ya ekólo Slovaquie. Nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Zahor ekómaki eteni ya ekólo Tchécoslovaquie, oyo eutaki kosalema sika. Mboka na biso ezalaki soko na ndako 200 mpe ndakonzambe mibale, moko ya Katolike mpe mosusu ya Protesta.
Atako nazalaki kokende ndakonzambe ya Protesta, nazalaki na bomoi ya mbindo. Mobali moko azalaki kofanda pene na ngai azalaki na bizaleli oyo ekesanaki mpenza na ngai. Mokolo moko asololaki na ngai mpe apesaki ngai Biblia. Ezalaki mbala ya liboso oyo nasimbaki buku wana na mabɔkɔ na ngai. Se na eleko yango, na mobu 1926, nabalaki Barbora, mpe mosika te tobotaki bana mibale, Barbora na Ján.
Nabandaki kotánga Biblia kasi makambo mingi nazalaki koyeba kososola yango te. Nakendaki epai ya pastere na biso mpe nayebisaki ye ete asunga ngai. Alobaki ete: “Biblia ezali bobele mpo na bato oyo batánga kelasi mingi, komeka lisusu koluka koyeba kososola yango te.” Na nsima abéngaki ngai tóbɛta lisano ya kalati.
Nsima wana nakendaki epai ya moto oyo apesaki ngai Biblia. Azalaki Moyekoli ya Biblia, ndenge bazalaki kobénga Batatoli ya Yehova na eleko wana. Asepelaki kosunga ngai, mpe nsima ya mwa ntango nabandaki kososola ete makambo yango ezalaki solo. Natikaki molangwa, nakómaki na bomoi ya malamu; kutu nabandaki koteya bato mosusu makambo ya Yehova. Solo ya Biblia ekɔtaki na Zahor na ebandeli ya bambula ya 1920, mpe mwa moke etuluku moko ya Bayekoli ya Biblia ya molende esalemaki kuna.
Atako bongo, bazalaki kotɛmɛla makasi makambo ya lingomba. Sango ya mboka apusaki bandeko na ngai mingi ete báyina ngai, alobaki ete motó na ngai ezali lisusu malamu te. Nzokande, bomoi na ngai ebandaki kokóma na ntina, mpe nazwaki ekateli makasi ya kosalela Yehova, Nzambe ya solo. Bongo, na mobu 1930, nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesi epai na Yehova.
Ebandeli ya komekama makasi
Na mobu 1938, ekólo Hongrie oyo ezalaki na ngámbo ya Allemagne na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ekómaki koyangela mboka na biso. Na eleko wana tozalaki soko Batatoli 50 na mboka na biso oyo bafandi na yango bakokaki ata nkóto moko te. Tokobaki koteya atako yango ezalaki likama mpo na bomoi mpe bonsomi na biso.
Na mobu 1940, bakómisaki ngai soda ya Hongrie na makasi. Nasengelaki kosala nini? Ɛɛ, nasilaki kotánga bisakweli ya Biblia na ntina na bato oyo bakamati bibundeli na bango ya etumba babongoli yango bisaleli ya kimya, mpe nayebaki ete ntango ekoya, Nzambe akosukisa bitumba na mabelé mobimba. (Nzembo 46:9; Yisaya 2:4) Yango wana, nayinaki etumba, mpe nazwaki ekateli ete nakokɔta mosala ya soda te, oyo ekoya eya.
Bakatelaki ngai etumbu ya bolɔkɔ sanza zomi na minei mpe nasalaki bolɔkɔ na engumba Pécs, na ekólo Hongrie. Batatoli mosusu mitano bazalaki na bolɔkɔ yango, mpe tozalaki kosepela ete tokoki kosangana. Nzokande, na mwa ntango, batyaki ngai na esika ya ngai moko na minyɔlɔlɔ na makolo. Bazalaki kobɛta biso ntango tozalaki koboya kosala mosala oyo ezalaki na boyokani na etumba. Lisusu, bazalaki kotɛlɛmisa biso semba mokolo mobimba, longola bobele ngonga mibale na midi. Minyoko yango eumelaki basanza mingi. Kasi, tozalaki na esengo mpamba te lisosoli na biso ezalaki pɛto na miso ya Nzambe.
Likambo ya kotika lingomba
Mokolo moko basango 15 ya Katolike bayaki komeka kondimisa biso ete ezali likambo ya ntina ete tókɔta mosala ya soda mpo na kobundela ekólo. Ntango tozalaki kosolola tolobaki na bango boye: “Soki bomonisi biso kati na Biblia ete molimo ekufaka te mpe ete tokokende na likoló soki tokufi na etumba, tokokɔta mosala ya soda.” Bakokaki komonisa yango te, mpe bakataki lisolo.
Na mobu 1941, etumbu na ngai esilaki, mpe nazalaki kolikya kokutana na libota na ngai. Kasi, bamemaki ngai na kaa ya basoda na Sárospatak, na ekólo Hongrie. Ntango tokómaki kuna, bapesaki ngai libaku mpo ete nabima na bolɔkɔ. Balobaki na ngai ete: “Tosɛngi yo kaka ete otya sinyatili na mokanda oyo elobi ete ondimi kofuta pengö 200 ntango okozonga na ndako.”
Natunaki bango ete: “Mpo na nini? Bozali kosɛnga mbongo ya nini?”
Balobaki na ngai ete: “Na mbongo yango okozwa kalati oyo emonisi ete osalaki ekizamɛ ya monganga te mpo na kokɔta mosala ya soda.”
Ezalaki mpasi mpo ete nakamata ekateli. Mpamba te koleka mbula mobimba, nanyokwamaki mingi; mpe nalɛmbaki. Sikawa, soki nandimi ete nakofuta mwa mbongo, nakoki kozwa bonsomi. Nayanolaki ete: “Bótika nakende kokanisa.”
Nasengelaki kokamata ekateli nini? Nazalaki kokanisa mwasi na bana na ngai. Na mikolo yango, ndeko moko moklisto autaki kotindela ngai mokanda kati na yango alendisaki ngai. Atángaki Baebele 10:38, epai ntoma Paulo azongeli maloba ya Yehova ete: “Moyengebene na ngai akobika na kondima, soko mpe akozonga nsima, motema na ngai ekosepela [na] ye te.” Mwa moke na nsima, bakonzi mibale ya basoda ya ekólo Hongrie basololaki na ngai na bolɔkɔ, moko alobaki na ngai ete: “Oyebaka te ete topesaka yo limemya mingi ndenge ozali kobatela makasi mitinda ya Biblia! Kolɛmba te!”
Mokolo elandaki nakendaki koyebisa bato oyo balobaki na ngai napesa pengö 200 bongo nabima na bolɔkɔ ete: “Lokola Yehova atikaki nzela ete nakɔta bolɔkɔ, ye moko mpe akosala ete nabima na bolɔkɔ. Nakofuta mbongo te mpo ete nabimisama na bolɔkɔ.” Bongo bakatelaki ngai etumbu ya mbula zomi na bolɔkɔ. Kasi, komekama mpo ete natika lingomba na ngai esukaki wana te. Esambiselo elobaki ete ekolimbisa ngai soki nandimi kokɔta mosala ya soda sanza mibale mpamba, mpe elobaki ete nakosimba kutu mondoki te! Naboyaki lisusu likambo yango, mpe etumbu na ngai ebandaki.
Minyoko ebakisami
Bazongisaki ngai lisusu na bolɔkɔ na engumba Pécs. Mbala oyo nanyokwamaki lisusu mingi koleka. Bakangaki ngai mabɔkɔ na nsima, mpe batombolaki yango na boumeli ya pene na ngonga mibale. Yango esalaki ete mapeka na ngai nyonso mibale etɛngama. Bazalaki kozongela minyoko yango mbala na mbala pene na sanza motoba. Napesi Yehova matɔndi mpamba te nalɛmbaki te.
Na mobu 1942, etuluku moko oyo esangisaki bakangami na makambo ya politike, Bayuda, mpe biso Batatoli ya Yehova tozalaki 26, bamemaki biso na engumba Koursk na esika basoda ya ekólo Allemagne bazalaki. Batikaki biso na mabɔkɔ ya basoda ya Allemagne, mpe bango bapesaki biso bakangami mokumba ya komema biloko, mandoki, mpe bilamba mpo na basoda oyo bazalaki kobunda. Biso Batatoli toboyaki mosala yango, mpamba te baklisto bakɔtaka na makambo ya mokili te. Mpo na yango, bazongisaki biso na mabɔkɔ ya basoda ya ekólo Hongrie.
Na nsima, batyaki biso na bolɔkɔ na engumba Koursk. Na boumeli ya mikolo mingi bazalaki kobɛta biso mbala misato na mokolo na fimbo ya kautsu. Babɛtaki ngai na elongi mpe nakweaki. Ntango bazalaki kobɛta ngai, nalobaki ete, ‘Esili, nakokufa.’ Nzoto na ngai mobimba ekómaki lokola ebembe, nazalaki koyoka lisusu mpasi te. Mikolo misato mobimba bapesaki biso ata eloko ya kolya te. Na nsima, bamemaki biso na esambiselo, mpe bandeko motoba bazwaki etumbu ya liwa. Ntango babomaki bango, totikalaki Batatoli 20.
Komekama oyo kondima na ngai ekutanaki na yango na engumba Koursk na sanza ya Ɔkɔtɔ́bɛ 1942 eleki komekama mosusu nyonso oyo nakutanaki na yango liboso. Mokonzi Yosafata ya ntango ya kala, amonisaki malamu mayoki na biso ntango alobaki mpo na bato na ye oyo bakutanaki na komekama makasi ete: “Tozali na nguya liboso na ebele monene te oyo ezali koyela biso. Toyebi likambo na kosala te nde miso na biso izali epai na yo.”—2 Ntango 20:12.
Basoda 18 ya ekólo Hongrie oyo bazalaki kokɛngɛla biso bamemaki biso esika totimolaki mabulu oyo basengelaki kokunda biso. Tozalaki Batatoli 20. Ntango tosilisaki kotimola, bapesaki biso miniti zomi mpo na kotya sinyatili na mokanda moko. Talá ndambo ya makambo bakomaki na kati: “Mateya ya Batatoli ya Yehova ezali ya lokuta. Nakondimela yango lisusu te mpe nakokɔtela yango lisusu te. Nakobunda mpo na mabelé ya bankɔkɔ ya Hongrie . . . Na ndenge natii sinyatili, nandimi ete nakómi Mokatolike.”
Ntango miniti zomi ekokaki, balobaki boye: “Bóbaluka! Bótambola kino na libulu!” Na nsima, bapesaki etinda oyo: “Mokangami ya liboso na oyo ya misato bókita na libulu!” Bapesaki bango mibale miniti zomi mosusu mpo ete bátya sinyatili na mokanda. Soda moko abondelaki bango na maloba oyo: “Bótika lingomba na bino mpo bóbima na libulu!” Ata moto moko te alobaki likambo. Na nsima mokonzi ya basoda abɛtaki bango mibale masasi.
Soda moko atunaki mokonzi na bango boye: “Kasi bongo baoyo batikali?”
Ayanolaki ete: “Kangisá bango bansinga. Tokonyokola bango lisusu mpe tokobɛta bango masasi na ngonga ya motoba ya ntɔngɔ.”
Mbala moko, nabandaki kobanga, mpo na liwa te, kasi mbala mosusu nakokoka koyika mpiko te mpe nakotika lingomba na ngai. Mbala moko natɛlɛmaki mpe nalobaki ete: “Monsieur, biso nyonso tobuki mobeko moko na bandeko na biso oyo outi kobɛta masasi. Mpo na nini obɛti biso mpe masasi te.”
Kasi basalaki yango te. Bakangisaki biso mabɔkɔ na nsima. Bongo batombolaki biso mabɔkɔ likoló. Soki tobungisi makanisi, bazalaki kosopela biso mai. Ezalaki mpasi makasi mpamba te bozito ya nzoto ezalaki kotɛngisa biso mapeka. Monyoko yango ekobaki pene na ngonga misato. Na nsuka, mbala moko, bapesaki etinda ete bóbɛta lisusu Batatoli ya Yehova masasi te.
Tokei na ɛsti—Nsima nakimi
Pɔsɔ misato na nsima, batambwisaki biso na molɔngɔ mwa mikolo kino tokómaki pembeni ya Ebale Don. Basoda oyo bazalaki kokɛngɛla biso balobaki na biso ete tokokufa esika tozali kokende. Na moi, bazalaki kopesa biso mosala ezangi ntina, kotimola mabulu ya minene mpe kozipa yango lisusu. Na mpokwa tozalaki na mwa bonsomi moke mpo na kotambola pembenipembeni.
Ndenge namonaki makambo, maponi ezalaki mibale. Tokokaki kokufa wana, to tokokaki kokima basoda ya Allemagne mpe kokende komitika na ngámbo ya basoda ya ekólo Russie. Bobele bandeko misato kati na biso nde tozwaki ekateli ya komeka kokima na kokatisáká mai ya mpio ya Ebale Don. Na mokolo ya 12 Desɛ́mbɛ 1942, tobondelaki Yehova mpe tokimaki. Tokómaki epai basoda ya ekólo Russie bazalaki mpe nokinoki batyaki biso na bolɔkɔ elongo na bakangami pene na 35 000. Na eleko ya prɛnta, bobele bakangami soko 2 300 nde bazalaki naino na bomoi. Baoyo mosusu bakufaki na nzala.
Nazwi bonsomi kasi bampasi ezali mingi
Nalekisaki etumba mpe basanza mingi oyo elandaki nsima na yango lokola mokangami ya ekólo Russie. Nsukansuka, na Novɛ́mbɛ 1945, nazongaki na ndako na Zahor. Ferme na biso ebebaki, na yango nasengelaki kobongisa yango lisusu. Na boumeli ya etumba, mwasi na ngai na bana babatelaki ferme, kasi na Ɔkɔtɔ́bɛ 1944, lokola mampinga ya ekólo Russie ezalaki kopusana, bakimisaki bango na ɛsti. Bayibaki biloko na biso nyonso oyo tozalaki na yango.
Likambo ya mawa mingi, ntango nazongaki na ndako, mwasi na ngai azalaki kobɛla makasi. Akufaki na Febwáli 1946. Azalaki bobele na mbula 38. Tozwaki bobele ntango moke mpo na kofanda lisusu elongo nsima ya kokabwana koleka mbula mitano oyo ezalaki molai mpe ya mpasi.
Bandeko na ngai ya elimo nde bazalaki kobɔndisa ngai, mpe lisusu koyangana na makita mpe na mosala ya kosakola ndako na ndako. Na 1947, nadefaki mwa mbongo mpo ete nakende na liyangani na engumba Brno, na ntaka ya pene na kilomɛtɛlɛ 400. Bandeko na ngai baklisto bakisa na Nathan H. Knorr, prezida ya Watch Tower Bible and Tract Society na eleko wana, babɔndisaki ngai mpe balendisaki ngai na liyangani yango.
Bonsomi na biso oyo tozwaki nsima ya etumba eumelaki ntango molai te. Na mobu 1948, bakoministe babandaki kotya biso mpanzi likoló. Na mobu 1952, bakangaki bandeko mingi oyo bazalaki kotambwisa mosala ya Batatoli ya Yehova na ekólo Tchécoslovaquie, mpe bapesaki ngai mokumba ya kotalaka masangá. Na 1954, bakangaki mpe ngai, bakatelaki ngai etumbu ya bolɔkɔ mbula minei. Mwana na ngai Ján, na Juraj mwana na ye ya mobali bakɔtaki bolɔkɔ mpamba te baboyaki komikɔtisa na makambo ya mokili. Nalekisaki mbula mibale na bolɔkɔ ya Pankrác na engumba Prague. Na 1956, guvernema elimbisaki bakangami, mpe batikaki ngai.
Nsukansuka bonsomi!
Nsukansuka, na 1989 Tchécoslovaquie elongwaki na nse ya boyangeli ya kominisme mpe mosala ya Batatoli ya Yehova endimamaki na mibeko ya Leta. Na yango, tokómaki na bonsomi mpo na koyangana mpe mpo na koteya na polele. Na eleko wana Zahor ezalaki na Batatoli pene na monkama, elingi koloba Motatoli moko kati na bato zomi ya mboka. Eleki mwa bambula moke, totongaki Ndako ya Bokonzi ya monene mpe ya kitoko na Zahor oyo ezali na bisika ya kofanda mpo na bato soko 200.
Nazali lisusu na nzoto makasi mpenza te, bandeko bamemaka ngai na Ndako ya Bokonzi. Nasepelaka kozala kuna mpe kopesa biyano na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Nazali mpenza na esengo ya komona kino libota ya misato ya libota na ngai bazali kosalela Yehova, bakisa ebele ya bana ya bana na ngai. Moko na bango azalaki mokɛngɛli-motamboli ya Batatoli ya Yehova na ekólo Tchécoslovaquie kino ntango akómaki na mikumba mingi ya libota.
Nazali kotɔnda Yehova na ndenge alendisaki ngai na boumeli ya bantango wana ya komekama makasi. Eloko esungaki ngai ezali elikya oyo natyelaki ye, ‘lokola ete nazali komona ye oyo akomonanaka te.’ (Baebele 11:27) Ɛɛ, namoni lobɔkɔ na ye ya nguya mpo na kobikisa. Yango wana, kino sikawa, nazali kokoba koyangana na makita ya lisangá mpe kobima na mosala ya kosakola nkombo na ye epai ya bato engebene makoki na ngai.
[Elilingi na lokasa 25]
Ndako ya Bokonzi na Zahor
[Elilingi na lokasa 26]
Nasepelaka kopesa biyano na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli