Lisolo ya bomoi
Natyelaki libateli ya Yehova motema
YA ANNA DENZ TURPIN
Mokolo moko mama alobaki na ngai, na mwa kosɛka ete “Olɛmbaka te kotuna ‘Mpo na nini’!” Ntango nazalaki mwana moke, nazalaki kotuna baboti na ngai ebele ya mituna. Kasi, Tata ná mama bazalaki kogangela ngai te ndenge nazalaki kotuna bango mituna mingi. Balakisaki koluka makanisi ya Biblia mpe kozwa bikateli oyo eyokani na yango. Formasyo yango esalisaki ngai mpenza! Mokolo moko, ntango nakómaki na mbula 14, Banazi bakabolaki ngai ná baboti na ngai, mpe namoná bango lisusu te.
TATA na ngai Oskar Denz, ná mama na ngai Anna Maria, bazalaki kofanda na Lörrach, mboka moko ya Allemagne, na pembeni ya Suisse. Ntango baboti na ngai bazalaki bilenge, bazalaki komipesa mingi na makambo ya politiki, yango wana, bato mingi ya mboka na biso bayebaki bango mpe bazalaki komemya bango mingi. Kasi, na 1922, mwa moke nsima ya libala na bango, baboti na ngai babongolaki ndenge na bango ya kotalela politiki mpe mikano na bango. Mama akómaki koyekola na Bayekoli ya Biblia, ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova ntango wana, mpe asepelaki mingi ntango ayokaki ete Bokonzi ya Nzambe ekotya kimya na mabelé. Eumelaki te, Tata mpe akómaki koyekola Biblia elongo na mama, mpe bakómaki koyangana na makita ya Bayekoli ya Biblia. Kutu, na Noele ya mbula wana, Tata apesaki mama mokanda La Harpe de Dieu. Babotá ngai kaka ngai moko; nabotamaki mokolo ya 25 Marsi 1923.
Nabosanaka te makambo mingi malamu oyo tozalaki kosala elongo na baboti na ngai, na ndakisa ntango tozalaki kokende kotambola na Zamba Moindo na eleko ya molunge, mpe ntango mama azalaki kolakisa ngai misala ya ndako! Nazali lisusu komona ndenge azalaki kotɛlɛma na kuku mpe kolakisa ngai kolamba. Likambo eleki ntina, baboti na ngai balakisaki ngai kolinga Yehova Nzambe mpe kotyela ye motema.
Lisangá na biso ezalaki na basakoli ya bokonzi ya molende soki 40. Baboti na ngai bayebaki mpenza koluka mabaku ya koyebisa bato nsango ya Bokonzi. Lokola bamipesaká mingi na makambo ya politiki liboso ya koyekola Biblia, bazalaki na mokakatano te mpo na kosolola na bato mpe bato bazalaki koyamba bango malamu. Ntango nakómaki na mbula nsambo, nakómaki mpe na mposa ya kosakola ndako na ndako. Mokolo ya liboso oyo nasakolaki ndako na ndako, ndeko mwasi oyo tobimaki na ye apesaki ngai mwa ndambo ya mikanda, alakisaki ngai ndako moko mpe alobaki ete, “Meká kolakida bango soki bakosepela na yango.” Na 1931, tokendaki na liyangani ya etúká ya Bayekoli ya Biblia na engumba Bâle, na Suisse. Baboti na ngai bazwaki batisimo na liyangani yango.
Makambo ebandi na yikiyiki mpe esuki na bokonzi ya mabe
Na ntango wana, yikiyiki makasi ezalaki na Allemagne mpe bato ya mangomba ndenge na ndenge ya politiki bazalaki kobunda na babalabala. Mokolo moko na butu, makɛlɛlɛ makasi oyo ezalaki kouta na ndako moko penepene na biso elamusaki ngai. Bilenge mibale babomaki yaya na bango na kanya ya matiti mpo bazalaki na ye na makanisi moko te na politiki. Lisusu, bato bakómaki koyina Bayuda makasi. Na kelasi, elenge mwasi moko azalaki kofanda kaka ye moko na nsuka ya kelasi, mpo azalaki Moyuda. Nazalaki koyokela ye mawa, kasi nayebaki te ete nsima ya mikolo bakokóma koyina ngai mpe lokola ye.
Na mokolo ya 30 Yanuali 1933, Adolf Hitler akómaki mokonzi ya Allemagne. Totɛlɛmaki mwa mosika mpe tozalaki kotala ndenge Banazi oyo bautaki kozwa bokonzi bazalaki kotombola drapɔ na bango na liboso ya biro ya misala ya Leta na engumba na biso. Na kelasi, molakisi na biso oyo azalaki na esengo mpenza ateyaki biso tópesaka mbote na koloba “Heil Hitler!” Na mpokwa wana, nayebisaki Tata likambo yango. Atungisamaki mpenza. Alobaki ete, “Ezali malamu te. ‘Heil’ elimboli lobiko. Soki tozali koloba heil Hitler, emonisi ete tondimi ete lobiko na biso ekouta epai na ye, kasi na Yehova te. Nandimi te ete ezali malamu, kasi yo moko nde okotala soki kosala bongo ezali malamu to te.”
Baninga nyonso ya kelasi bakómaki koyina ngai mpo naboyaki kopesa losako ya Hitler. Kutu, bana mosusu ya mibali bazalaki kobɛta ngai soki balakisi bazali kotala te. Nsukansuka, batikaki kotungisa ngai, kutu baninga na ngai mosusu bayebisaki ngai ete baboti na bango bapekisaki bango básakanaka elongo na ngai. Bazalaki koloba ete nakobebisa bango.
Sanza mibale nsima ya kozwa bokonzi na Allemagne, Banazi bapekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova, balobaki Batatoli bakoki kobebisa ekólo. Basoda ya Banazi bakangaki Betele ya Magdebourg mpe bapekisaki biso kosala makita. Kasi, lokola tozalaki kofanda na pembeni ya Suisse, Tata azwelaki biso mokanda ya Leta oyo epesaki biso nzela ya kokatisaka na Suisse epai tozalaki kokende koyangana na makita na mokolo ya lomingo na engumba Bâle. Mbala mingi, Tata azalaki koloba ete azalaki na mposa bandeko na biso ya Allemagne bázwa bilei wana ya elimo mpo esalisa bango bázala na mpiko liboso ya mikakatano oyo ezalaki koya.
Kotambola oyo ezalaki likama monene
Nsima ya kokangama ya Betele ya Magdebourg, Julius Riffel, ndeko moko oyo azalaki kosala kuna ayaki na Lörrach, mboka na ye, mpo na kobongisa mosala ya kosakola na kobombama. Tata andimaki mbala moko kopesa mabɔkɔ. Tata afandisaki ngai ná mama mpe ayebisaki biso ete andimi kopesa mabɔkɔ mpo na kozwaka mikanda na Suisse mpe kokɔtisaka yango na Allemagne. Alobaki ete mosala yango ezali mpenza likama mpe ete bakoki kokanga ye mokolo mosusu. Alingaki te kotinda biso na makasi ete tósala mosala yango, mpamba te yango ezalaki likama mpo na biso. Mbala moko, Mama alobaki ete: “Nakopesa yo mabɔkɔ.” Bango mibale batalaki ngai, mpe nalobaki ete, “Ngai mpe nakopesa yo mabɔkɔ!”
Mama atongaki mwa sakosi moko oyo ezalaki na bonene ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Azalaki kokɔtisa bazulunalo na ngámbo moko ya sakosi yango mpe kotonga yango. Mama asalaki mabenga oyo ebombaná na bilamba ya tata, asalaki mpe biloko mibale oyo ezalaki lokola mikaba ya minene oyo ngai na ye tozalaki kolata na libumu mpo na komema mikanda ya mike. Mbala nyonso oyo tolongaki kokɔtisa mikanda na Allemagne, tozalaki kosepela mpe kopesa Yehova matɔndi. Tozalaki kotya mikanda yango na ebombelo ya biloko.
Na ebandeli, Banazi bazalaki kokanisa ata moke te ete tozalaki kokɔtisa mikanda. Bazalaki ata kotuna biso mituna te mpe bazalaki kokɔta na ndako na biso te mpo na koluka mikanda. Atako bongo, toyokanaki tósalelaka nimero 4711, nkombo ya malasi moko oyo eyebanaki mingi, mpo na kokebisa bandeko soki tomoni likambo moko malamu te. Soki tomoni ete ekómi likama mpo báya na ndako na biso, tozalaki kosalela nimero wana mpo na kokebisa bango. Tata ayebisaki bango mpe ete bátalaka naino bafenetre ya salon na biso liboso ya kokɔta na ndako. Soki soki bamoni fenetre ya lobɔkɔ ya mwasi efungwamá, basengelaki koyeba ete likambo ezali, mpe basengelaki kokɔta te.
Na 1936 mpe 1937, basoda ya Gestapo bakangaki Batatoli mingi mpe batyaki ebele ya bandeko na bolɔkɔ mpe na bakaa ya bakangami, epai mingi kati na bango banyokwamaki na ndenge ya nsɔmɔ. Bandeko ya Betele ya Suisse, na engumbe Berne, babandaki kokoma makambo nyonso oyo ezalaki koleka, ná oyo ezalaki kouta na bakaa ya bakangami, mpo na kosala buku moko oyo babengaki Croisade contre le christianisme, buku yango ezalaki kolobela misala mabe ya Banazi. Tondimaki kotya bomoi na biso na likama mpo na kosala mosala ya kokatisa na masolo yango tii na engumba Bâle, na Suisse. Soki Banazi bakangaki biso na mikanda yango oyo epekisamaki, balingaki kotya biso mbala moko na bolɔkɔ. Nazalaki kolela ntango nazalaki kotánga masolo oyo ezalaki kolobela ndenge bandeko bazalaki konyokwama. Kasi, nazalaki kobanga te. Nazalaki na kondima ete Yehova mpe baboti na ngai, baninga na ngai ya motema, bakobatela ngai.
Nasilisaki kelasi ntango nazalaki na mbula 14 mpe nazwaki mosala na magazini moko oyo bazalaki kotɛka biloko ya ndako. Mbala mingi, tozalaki kosala mibembo yango ya kokende kotika mpe kozwa mikanda na mokolo ya pɔsɔ na mpokwa to na mokolo ya lomingo, mikolo oyo Tata azalaki kokende mosala te. Tozalaki kokende mbala soki mibale na sanza. Tozalaki kaka lokola bato mosusu oyo bazalaki kokende kotambola na bawikende, mpe pene na mbula minei, basoda oyo bakɛngɛlaka bandelo ya mboka batɛlɛmisaki biso ata mbala moko te mpo na kotala biloko oyo tozali na yango—tii mokolo moko na Febwali 1938.
Bakangi biso!
Nakobosana te ndenge elongi ya tata ekómaki ntango tokómaki na esika tozwaka mikanda pene na Bâle mpe tomonaki ebele ya mikanda oyo ezalaki wana. Lokola bakangaki libota mosusu oyo bazalaki mpe koya kozwa mikanda, tokómaki na mikanda mingi ya komema. Ntango tokómaki na ndelo ya Suisse ná Allemagne, moto moko ya dwanɛ atalaki biso na miso ya mabe mpe apesaki mitindo ete báfungola biloko na biso. Ntango amonaki mikanda, alakisaki biso mondoki mpe atambwisaki biso tii esika mituka ya bapolisi ezalaki. Ntango bapolisi bazalaki kokenda na biso, Tata afinaki ngai na lobɔkɔ mpe ayebisaki ngai na litoi: “Kobimisa sɛkɛlɛ te. Kotánga ata nkombo ya ndeko moko te!” Nayebisaki ye ete: “Nakoloba eloko moko te.” Ntango tokómaki na Lörrach, bakabolaki biso na Tata. Ntango bakangaki porte ya bolɔkɔ, ezalaki mbala ya nsuka oyo namonaki ye.
Basoda ya Gestapo batunaki ngai mituna ngonga minei mobimba, bazalaki kosɛnga ngai napesa bango bankombo mpe bisika ya Batatoli mosusu. Ntango naboyaki, soda moko asilikaki makasi mpe alobaki na ngai, “Toyebi ndenge mosusu ya kolobisa yo!” Nabimisaki ata sɛkɛlɛ moko te. Na nsima bamemaki ngai ná mama na ndako na biso, mpe mpo na mbala ya liboso balukalukaki mikanda na ndako. Bakangaki mama mpe batindaki ngai epai ya mama-kulutu na ngai, mpe bayebisaki ye akɛngɛlaka ngai; bayebaki te ete ye mpe azalaki Motatoli. Atako batikaki ngai nakendaka mosala, basoda minei ya Gestapo bazalaki kofanda na motuka liboso ya ndako mpo na kotala likambo mokomoko oyo nazali kosala mpe polisi moko azalaki kotambolatambola na balabala.
Mwa mikolo na nsima, mokolo moko na midi, nabimaki libándá mpe namonaki ndeko mwasi moko ya elenge azali koya epai na ngai na velo. Ntango apusanaki pene na ngai, namonaki ete abwakeli ngai mwa papye moko. Ntango kaka nazwaki yango, nabalukaki mpo na kotala soki basoda ya Gestapo bamoni ngai. Likambo ya kokamwa, bamonaki te mpo na ntango yango bango nyonso babalolaki bilongi mpo na kosɛka!
Na mokanda yango, bakomelaki ngai nakende na ndako ya baboti na ye na midi. Kasi, lokola basoda ya Gestapo bazalaki kolandela ngai, ndenge nini nakokaki kondima kotya baboti na ye na likama? Natalaki basoda minei oyo bazalaki na motuka mpe polisi moko oyo azalaki kobalukabaluka na balabala. Nayebaki te nini nasala, mpe nabondelaki Yehova makasi mpo asalisa ngai. Mbala moko, polisi wana akendeki epai ya basoda oyo bazalaki na motuka mpe asololaki na bango. Na nsima akɔtaki na motuka, mpe bakendaki!
Mbala moko, namonaki mama-kulutu azali koya na mopanzi. Tokómaki na nsima ya midi. Mama-kulutu atángaki mokanda yango mpe, atako ngonga elekaki, amonaki malamu tókende kaka ndenge bakomaki, mpo akanisaki ete bandeko bazwaki bibongiseli mpo na kokimisa ngai na Suisse. Ntango tokómaki kuna, libota yango balakisaki ngai epai ya moto moko oyo nayebaki te, nkombo na ye Heinrich Reiff. Ayebisaki ngai ete asepelaki mingi ndenge nakomaki wana kozanga likama mpe ayebisaki ngai ete ayei mpo na kosalisa ngai nakima na Suisse. Apesaki ngai miniti 30 mpo nalanda ye na mwa zamba moko.
Na mboka mopaya
Ntango nakendaki kokutana na Ndeko Reiff, nazalaki kolela, nazalaki koyoka mpasi na motema ntango nazali kokanisa ete natiki baboti na ngai. Makambo elekaki nokinoki. Nsima ya mwa ngonga oyo tozalaki kobanga bákanga biso, tokɔtaki na kati ya baturiste mpe tokatisaki na Suisse.
Ntango nakómaki na Betele ya engumba Berne, bayebisaki ngai ete bandeko babongisaki makambo mpo na kokimisa ngai. Bapesaki ngai esika ya kofanda. Nazalaki kosala na kuku, mpe nasepelaki mingi na mosala yango. Nzokande, ezalaki mpasi mpenza kofanda na mboka mopaya kozanga koyeba oyo ekokómela baboti na ngai, oyo mokomoko na bango bakatelaki ye etumbu ya bolɔkɔ mbula mibale! Na bantango mosusu, nazalaki koyoka mpasi mingi na motema mpe kokanisa mingi, mpe nazalaki komikangela na kikoso mpo na kolela. Kasi, ngai ná baboti na ngai tozalaki kotindelana mikanda mbala na mbala, mpe bazalaki kolendisa ngai natikala sembo.
Ndakisa ya kondima ya baboti ngai etindaki ngai namipesa epai ya Yehova, mpe nazwaki batisimo na mokolo ya 25 Yuli 1938. Nsima ya kolekisa mbula moko na Betele, nakendaki kosala na Chanélaz, ferme moko oyo Betele ya Suisse esombaki mpo na kozwaka biloko mpo na libota ya Betele mpe mpo na kobomba bandeko oyo bakimaki minyoko.
Na 1940, ntango etumbu ya bolɔkɔ oyo bakatelaki baboti na ngai esilaki, Banazi bayebisaki bango ete bakotika bango soki balobi ete bazali lisusu Batatoli te. Lokola baboti na ngai baboyaki, batindaki bango na kaa ya bakangami, Tata na kaa ya Dachau mpe mama na Ravensbrück. Na 1941, na eleko ya mpiɔ, mama ná batatoli mosusu ya basi oyo bazalaki na kaa, baboyaki kosalela basoda mosala. Yango wana, bapesaki bango etumbu ya kotɛlɛma na malili mikolo 3, butu na moi, nsima na yango batyaki bango na kasho moko ya molili mpe bakómaki kopesa bango bilei moke na boumeli ya mikolo 40. Na nsima, babɛtaki bango makasi mpenza. Mama akufaki mokolo ya 31 Yanuali 1942, pɔsɔ misato nsima ya kobɛta ye makasi.
Balongolaki Tata na Dachau mpe batindaki ye na Mauthausen, na Autriche. Na kaa yango, Banazi babomaki ebele ya bato na kolalisaka bango nzala mpe na misala ya makasi. Sanza motoba nsima ya liwa ya mama, Banazi babomaki tata na ngai na ndenge mosusu: Minganga ya kaa bazalaki kotɔbɔla bato ya bolɔkɔ mikrɔbɛ ya maladi ya ntolo (tuberculose) na nkó. Na nsima, bazalaki kotɔbɔla bango ntonga ya mabe na motema. Mikanda ya bolɔkɔ emonisaki ete Tata akufaki mpo “motema na ye elɛmbaki.” Azalaki na mbula 43. Nayokaki nsango ya liwa na bango wana ya nsɔmɔ mwa basanza na nsima. Tii lelo oyo, mai ya miso etangaka ngai soki nakanisi baboti na ngai. Kasi, ezala na ntango wana to lelo oyo, lokola koyeba ete Tata ná Mama bazalaki na elikya ya likoló mpe bazali na kimya na mabɔkɔ ya Yehova, ebɔndisaka ngai mpenza.
Na nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, nazwaki libaku malamu ya kokɔta na kelasi ya mbala ya 11 ya Gileadi, Eteyelo ya La Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, na New York. Ezalaki esengo mpenza, koyekola na bozindo mateya ya Biblia na boumeli ya sanza mitano! Ntango tosilisaki formasyo yango na 1948, batindaki ngai lokola misionɛrɛ na Suisse. Mwa moke na nsima, nakutanaki na James Turpin, ndeko moko ya sembo oyo azwaki diplome na kelasi ya mbala ya mitano ya Gileadi. Ntango bafungolaki biro ya filiale ya liboso na Turquie, ye nde azalaki kotambwisa misala na biro yango. Tobalanaki na Marsi 1951, mpe eumelaki te nakómaki na zemi! Tokendaki na Étas-Unis mpe na sanza ya Desɛmbɛ ya mbula yango, Marlene, mwana na biso ya mwasi abotamaki.
Ngai ná Jim tozwaki esengo mingi na mosala ya Bokonzi. Nabosanaka te moyekoli moko ya Biblia, elenge mwasi moko ya Chine, nkombo na ye Penny, oyo asepelaki koyekola Biblia. Penny azwaki batisimo mpe na nsima abalaki Guy Pierce, oyo azali lelo oyo na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Baninga ya ndenge wana basalisaki ngai nabosana mpasi ya liwa ya baboti na ngai.
Na ebandeli ya mobu 2004, bandeko ya engumba Lörrach, mboka ya baboti na ngai, batongaki Ndako ya Bokonzi ya sika na Balabala Stich. Mpo na kopesa Batatoli ya Yehova longonya mpo na makambo oyo basalaki, bakonzi ya engumba yango bapesaki balabala wana nkombo Denzstraße (Balabala Denz) mpo na kokanisa baboti na ngai. Zulunalo Badische Zeitung, oyo ebimaka na mboka yango, na lisolo “Bapesi balabala moko nkombo ya sika mpo na kokanisa Denz ná mwasi na ye oyo Banazi babomaki na kaa ya bakangami mpo na kondima na bango” elobaki ete baboti na ngai “babomamaki na kaa ya bakangami na boyangeli ya Hitler, mpo na kondima na bango.” Atako nazalaki kokanisa likambo ya ndenge wana te, yango ezalaki mpenza likambo ya esengo mpo na ngai.
Mbala mingi Tata azalaki koloba ete tosengeli komityela mikano lokola nde Armagedon ekoya na ntango na biso te, kasi tosengeli kotambwisa bomoi na biso lokola nde Amargedon ekoya lobi—toli ya ntina mingi oyo namekaka ntango nyonso kolanda. Ezali pɛtɛɛ te kosangisa makambo wana mibale, elingi koloba kozala motema molai mpe kozela na motema likoló, mingimingi na ntango oyo nakɔti ndako mpo na bobange. Kasi, natyaka ntembe te na elaka oyo Yehova apesi basaleli na ye nyonso ya sembo: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba . . . Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.”—Masese 3:5, 6.
[Etanda/Elilingi na lokasa 29]
MIKANDA YA NTINA MINGI OYO EKOMAMÁ KALA
Mwasi moko oyo autaki na mboka mosusu ayaki na engumba Lörrach na bambula 1980. Na ntango wana, bato bazalaki komema biloko oyo bazali lisusu na mposa na yango te na esika moko ya libándá, mpo bato mosusu bápona biloko oyo basepeli kozwa. Mwasi yango azwaki kesi moko oyo ezalaki na biloko ya kotongela bilamba mpe akendaki na yango epai na ye. Na nsima, amonaki na kati ya kesi yango bafɔtɔ ya elenge mwasi moko mpe mikanda oyo ekomamaki na kaa ya bakangami. Mikanda yango ebendaki mpenza likebi ya mwasi wana mpe akómaki koluka koyeba elenge mwasi oyo bakomelaki yango.
Mokolo moko na mobu 2000, mwasi yango atángaki lisolo moko na zulunalo moko oyo elobelaki elakiseli moko ya biloko ya kala na engumba Lörrach. Lisolo yango elobelaki Batatoli ya Yehova na boyangeli ya Banazi, elobelaki mpe libota na biso. Batyaki mpe bafɔtɔ na ngai ntango nazalaki elenge. Ntango mwasi yango amonaki ete makambo nyonso oyo ezalaki na zulunalo wana ekokanaki na oyo ezalaki na mikanda ná bafɔtɔ oyo azalaki na yango, akendeki komona mwasi oyo akomaki lisolo yango mpe abɛtɛlaki ye lisolo ya mikanda 42 oyo azwaki! Mwa bapɔsɔ na nsima, nazwaki mikanda yango. Na mikanda yango oyo baboti na ngai bakomaki, bazalaki ntango nyonso kotuna mama-kulutu na ngai soki nazali malamu. Bolingo na bango mpo na ngai ekitaki te. Ezali mpenza likambo ya kokamwa ndenge mikanda yango ebebá te mpe ekómelaki ngai nsima ya mbula koleka 60!
[Bililingi na lokasa 25]
Libota na biso oyo ezalaki na bomoko ekabwanaki ntango Hitler akómaki mokonzi
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Hitler: Fɔtɔ ya U.S. Army
[Bililingi na lokasa 26]
1. Betele ya Magdeburg
2. Basoda ya Gestapo bakangi ebele ya Batatoli
[Elilingi na lokasa 28]
Mosala ya Bokonzi epesaki ngai ná Jim esengo mingi