Mbotama oyo tosengeli kobosana te
“Mobikisi moko abotameli bino lelo, oyo azali Klisto Nkolo.”—Luka 2:11.
ELEKI sikoyo mbula soki nkóto mibale, mwasi moko abotaki mwana mobali na engumba Beteleme. Kaka bato moke ya mboka yango nde bayebaki ete mbotama ya mwana yango ezalaki na ntina mingi. Kasi, babateli ya mpate oyo bazalaki na bampate na bango libándá na butu wana, bamonaki ebele ya baanzelu mpe bayokaki bango bazali koyemba boye: “Nkembo na Nzambe kuna na bisika ya likoló, mpe kimya na mabelé na kati ya bato oyo ye amoniseli motema boboto.”—Luka 2:8-14.
Na nsima, kaka ndenge baanzelu bayebisaki bango, babateli ya mpate bakendaki kokuta Malia ná mobali na ye Yozefe na ndako ya bampate. Malia apesaki mwana yango nkombo Yesu mpe alalisaki ye na elyelo ya banyama, na ndako ya bampate. (Luka 1:31; 2:12) Lelo oyo, mbula nkóto mibale na nsima, bato mingi na mokili bazali koloba ete bazali bayekoli ya Yesu Klisto. Mpe makambo oyo esalemaki ntango abotamaki ekómá lisolo oyo balobelaka mingi koleka masolo mosusu nyonso.
Na Espagne, ekólo oyo bato mingi bakangamá makasi na Lingomba ya Katolike mpe bayebi mpenza kobongisa bafɛti, babimisi milulu ndenge na ndenge mpo na kosepela likambo oyo esalemaki na Beteleme.
Ndenge oyo basepelaka fɛti ya Noele na Espagne
Banda na ekeke ya 13, na Espagne basalelaka bililingi ya mwana Yesu mingi. Na bandako mingi, babongisaka mwa ekeko ya mwana Yesu alali na kati ya elyelo. Batyaka mpe bikeko ya babateli ya mpate, ya banganga-minzoto (to Bakonzi basato), ya Yozefe mpe ya Malia. Na eleko ya Noele, mbala mingi na Hôtel de ville ya engumba mokomoko batyaka bililingi ya mwana Yesu, oyo ezali minene mpenza lokola bato ya solo. François d’Assise nde abandisaki momeseno yango na Italie mpo na kosalisa bato báyeba masolo ya Baevanzile oyo elobeli mbotama ya Yesu. Na nsima, basango ya lisangani ya Franciscain bapalanganisaki momeseno yango na Espagne mpe na bikólo mosusu.
Na Espagne, na fɛti ya Noele batalelaka banganga-minzoto ndenge kaka batalelaka Père Noël na mikili mosusu. Bato mingi na Espagne bakanisaka ete banganga-minzoto bapesaka bana mike makabo na mokolo ya 6 Yanuali, Día de Reyes (to Mokolo ya Bakonzi), ndenge banganga-minzoto bapesaki Yesu makabo ntango abotamaki. Nzokande, bato mingi bayebaka te ete Baevanzile eyebisi te soki banganga-minzoto oyo bakendaki kotala Yesu bazalaki boni. Bazalaki bakonzi te ndenge bato mingi bakanisaka, bazalaki nde banganga-minzoto.a Lisusu, nsima ya banganga-minzoto, Elode abomaki bana mike nyonso na Beteleme “banda na mbula mibale mpe na nse” mpo azalaki na mposa ya koboma Yesu. Yango emonisi ete mwa ntango molai elekaki banda kobotama ya Yesu tii ntango banganga-minzoto bakendaki kotala ye.—Matai 2:11, 16.
Kobanda na bambula ya 1100, na bingumba mosusu ya Espagne basalaka teyatre moko ya mbotama ya Yesu; na ebandeli bazalaki kolakisa ndenge babateli ya mpate bakendaki kotala mwana Yesu, kasi na nsima bakómaki mpe kolakisa ndenge banganga-minzoto bakendaki kotala ye. Lelo oyo, na bingumba mingi ya Espagne, basalaka Cabalgata to defile na mokolo ya 5 Yanuali. Na defile yango, bamemaka “Bakonzi basato” na likalo moko oyo batyaka bafololo mpe biloko mosusu mpe batambwisaka yango na kati ya engumba, mpe nzelanzela bakabolelaka bato babombo. Na eleko ya Noele bafololo mpe biloko mosusu oyo batyaka mpo na kobongisa bisika, bakisa mpe banzembo oyo bayembaka, ebongisaka lisusu fɛti yango makasi.
Na Espagne, mabota mingi basepelaka kokutana na butu ya Noele (mokolo ya 24 Desɛmbɛ) mpo na kolya elongo. Mokolo yango, balyaka biloko lokola turrón (basalaka yango na mbuma ya amande ná mafuta ya nzoi), marzipan, bambuma bakaukisá, mosuni ya meme bakalingá, mpe mbisi ná biloko mosusu ya mbu. Bato nyonso ya libota moko, ata mpe baoyo bafandaka mosika, basalaka nyonso mpo na kozala elongo na mokolo yango. Na fɛti mosusu oyo basalaka mokolo ya 6 Yanuali, mabota balyaka rosca de reyes to gato ya “Bakonzi,” gato moko ya sɛrklɛ oyo babombi eloko moko na kati na yango. Na ntango ya kala na Loma, bazalaki mpe na momeseno wana, mpe yango ezalaki kopesa nzela na moombo oyo azwi eteni ya gato oyo ezali na eloko oyo babombaki azala “mokonzi” mpo na mokolo moko.
“Ntango oyo bato basepelaka mingi mpe basalaka makambo mingi”
Lelo oyo, Noele ekómi fɛti moko monene na mokili mobimba, atako bato na bato basepelaka yango na ndenge na bango. Buku The World Book Encyclopedia elobi ete Noele ezali “ntango oyo bato ya mokili mobimba, bázala baklisto to te, basepelaka mingi mpe basalaka makambo mingi na kati ya mbula.” Fɛti yango ezali nde malamu?
Ezali solo ete mbotama ya Klisto ezalaki likambo moko ya ntina mingi mpo na bato. Kutu, lokola baanzelu balobaki ete kobotama na ye ekomema “kimya . . . na kati ya bato oyo ye amoniseli motema boboto,” emonani polele ete mbotama yango ezalaki na ntina mingi.
Atako bongo, Juan Arias, mopanzi-nsango moko na Espagne, alobi ete “ntango lingomba ya boklisto ebandaki, bazalaki kosepela Noele te.” Soki ezali bongo, fɛti ya Noele oyo basepelaka lelo oyo eutá wapi? Wapi lolenge eleki malamu ya kokanisa mbotama mpe bomoi ya Yesu? Lisolo oyo elandi ekopesa biyano na mituna yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Buku Makomami Mosantu—Makomi mpe bandimbola na yango (na Espagnol), oyo ebimisami na baprofesɛrɛ ya Ba-Jésuite, elobi ete “na Perse, na Medie mpe na Babilone, banganga-minzoto bazalaki banganga-nzambe oyo basimbaki misala ya maji, ya koyekola minzoto mpe mosala ya monganga.” Nzokande, na Moyen-Âge, Lingomba ekɔtisaki Banganga-minzoto oyo bakendaki kotala mwana Yesu na molɔngɔ ya basantu mpe bapesaki bango bankombo Melchior, Gaspar mpe Balthasar. Balobaka ete babombá mikuwa na bango na Katɛdralɛ ya Cologne, na Allemagne.