Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/12 nk. 3-7
  • Makambo oyo esalemaka na Noele ezali mpenza ya boklisto?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo esalemaka na Noele ezali mpenza ya boklisto?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Posadas, “bato misato ya mayele,” mpe Nacimiento
  • Tótalela malamu makambo oyo esalemaka na Noele
  • Kobotama ya Yesu ndenge oyo Biblia elobi yango
  • Banganga-minzoto
  • Lisolo oyo eteyi biso nini?
  • Eyenga ya Mbótama: Ezali mpenza ya boklisto?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Biutelo Ya Eyenga ya Mbotama na Mikolo na Biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Ndenge nini tosengeli kokanisa Yesu Klisto?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka fɛti ya Noele te?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/12 nk. 3-7

Makambo oyo esalemaka na Noele ezali mpenza ya boklisto?

NOELE ekómi pene. Yango elimboli nini mpo na yo, mpo na bandeko na yo mpe mpo na baninga na yo? Noele ezalaka ntango ya komipesa na makambo ya Nzambe to ezalaka kaka mikolo ya kosepela mpe kosala fɛti? Ezalaka ntango ya kokanisa kobotama ya Yesu Klisto to omonaka ete makambo ya Klisto etali yo te?

Ntango ozali kotalela mituna oyo, kobosana te ete mboka na mboka bazali na ndenge na bango oyo basalaka makambo na Noele. Na ndakisa, na ekólo Mexique mpe na bikólo mosusu ya Amerika ya Sudi, ata nkombo oyo babengaka fɛti yango ekeseni. La Navidad, ndenge babengaka yango na mikili ya Amérique latine, to Mbotama, ezali fɛti ya kobotama ya Klisto. Tótalela naino makambo mosusu oyo esalemaka na Mexique. Ekosalisa yo oyeba yo moko ndenge oyo osengeli kotalela fɛti yango.

Posadas, “bato misato ya mayele,” mpe Nacimiento

Makambo nyonso ebandaka mokolo ya 16 Desɛmbɛ na fɛti oyo babengaka posadas. Mokanda moko (Mexico’s Feasts of Life) elobi boye: “Na mikolo ya posadas, mikolo libwa ya loyenge oyo elekaka liboso ya mokolo ya Noele, bakanisaka ndenge oyo Yosefe na Malia bazalaki koyengayenga kaka bango mibale na mboka Beteleme tii bamoniselaki bango boboto mpe bapesaki bango esika ya kolala. Bandeko na baninga bakutanaka na butu mpo na kosala lisano ya makambo oyo esalemaki mwa mikolo liboso Klisto abotama.”

Okomona bato bamemi bililingi ya Malia na Yosefe tii na ndako moko mpe bazali koyemba nzembo mpo na kosɛnga esika ya kolala, to posada. Bato oyo bazali na kati ya ndako mpe bazongisaka na nzembo tii nsukansuka bakofungolela bango ndako. Nsima na yango nde fɛti ebandaka; ezalaka bato oyo bakangi bango elamba na miso, basimbi nzete na mabɔkɔ, bazali kobaluka mpo na koluka kopanza piñata, mbeki moko monene oyo ezali na mayemi oyo bakangisi yango na nsinga. Soki babuki yango, bato oyo bayei na fɛti balɔkɔtaka biloko oyo ezalaki na kati (babombɔ, bambuma, mpe biloko mosusu ya ndenge yango). Na nsima balyaka, bamelaka, babɛtaka miziki mpe babinaka. Basalaka fɛti ya posada mikolo mwambe banda mokolo ya 16 Desɛmbɛ tii mokolo ya 23 Desɛmbɛ. Mokolo ya 24 Desɛmbɛ, basepelaka Nochebuena (butu ya mokolo ya Noele); mabota basalaka nyonso ete bákutana esika moko mpo na kosala limpati moko monene.

Nsima ya mwa mikolo, ezalaka Mokolo ya Bonane, basepelaka yango na loyenge. Na mpokwa ya mokolo ya 5 Yanuali, balobaka ete ba Tres Reyes Magos (to “bato misato ya mayele”) bamemelaka bana biloko ya kosakana na yango. Nsuka ya likambo ezalaka na mokolo ya 6 Yanuali, ntango bato balyaka rosca de Reyes (to gato ya zolongano). Ntango bazali kolya gato yango, moto moko akutaka, na eteni oyo ye azwi, mwa ekeko moke ya mwana Yesu. Moto oyo amoni yango asengeli kobongisa fɛti mosusu mpe kobengisa bato na mokolo ya 2 Febwali. (Na bisika mosusu, mwa bikeko ezalaka misato, ya “bato misato ya mayele.”) Omoni ete bafɛti ya mikolo ya Noele elandanaka kaka.

Na mikolo yango, na bisika mingi babongisaka nacimiento (bililingi ya Mbotama ya Yesu). Basalaka makambo nini? Na babalabala ya minene, na bandako-nzambe mpe na bandako ya bato, babongisaka bikeko (ya minene to ya mike) esalemi na mabaya to na mabele. Ezalaka bililingi ya Yosefe na Malia bafukami liboso ya elyelo ya bibwele epai balalisi mwana oyo auti kobotama. Mbala mingi ezalaka mpe na babateli ya mpate na ba Reyes Magos (bato ya mayele). Esika yango ezalaka ndako ya bibwele mpe ntango mosusu ezalaka na mwa banyama pembenipembeni. Kasi elilingi oyo eleki ntina, ezalaka oyo ya mwana moko oyo auti kobotama; na Espagnol, babengaka yango el Niño Dios (Mwana-Nzambe). Ntango mosusu batyaka elilingi ya mwana na mokolo ya Noele.

Tótalela malamu makambo oyo esalemaka na Noele

Mpo na fɛti ya Noele mpe ndenge oyo mbala mingi esalemaka na mokili mobimba, buku moko (The Encyclopedia Americana) elobi boye: “Makambo mingi oyo ezali kosalema na Noele lelo oyo ebandaki na fɛti ya Noele te kasi ezali makambo oyo ezalaki kosalema liboso Klisto aya mpe ezalaki makambo ya lingomba ya boklisto te kasi lingomba ya boklisto ezwaki yango kozwa. Makambo mingi oyo esalemaka na Noele eutá na fɛti moko oyo Baloma bazalaki kosala na katikati ya sanza ya Desɛmbɛ oyo bazalaki kobenga Saturnales. Na ndakisa, kosala fɛti monene, kopesana makabo, mpe kopelisa babuji.

Na Amérique latine, longola makambo ya Noele oyo eyebani, babakisaka makambo mosusu. Okoki kotuna ete ‘makambo oyo babakisaka eutaki wapi.’ Bato mingi oyo balingaka mpenza kolanda mateya ya Biblia bandimaka ete makambo mosusu eutaki mpenza na milulu ya ba Aztèques. Zulunalo moko (El Universal) oyo ebimaka na engumba Mexico, elobaki boye: “Basango ya masangani ndenge na ndenge ya Lingomba ya Katolike, basalelaki libaku moko malamu: lokola bafɛti mingi ya milulu ya Ba-Indiens ezalaki kosalema eleko moko na bafɛti ya Lingomba ya Katolike, basalelaki bafɛti yango mpo bákoka kokokisa mosala na bango ya kopalanganisa nsango malamu mpe ya misionɛrɛ. Na esika oyo bato ya mboka wana bazalaki kokumisa banzambe na bango, bakɔtisaki banzambe ya boklisto; bakɔtisaki bafɛti mpe makambo ya bato ya Mpoto mpe basangisaki yango na bafɛti ya Ba-Indiens, na nsuka, ebimisaki mimeseno oyo ezali epai mosusu te kaka na Mexique.”

Mokanda oyo toutaki kolobela (The Encyclopedia Americana) elobi boye: “Likambo ya kosala masano ya kobotama ya Yesu ekɔtaki na fɛti ya Noele . . . Balobaka ete ezali Saint François nde abandaki likambo ya kotya elilingi ya mbotama na ndako-nzambe.” Bazalaki kosala masano yango oyo ezali komonisa kobotama ya Klisto na bandako-nzambe ntango Espagne ebandaki koyangela Mexique. Basango ya lisangani ya ba Franciscain bazalaki kosala yango mpo na koteya Ba-Indiens kobotama ya Yesu. Na nsima, bato mingi bakómaki kosala posadas. Ata soki bazalaki na makanisi nini ntango babandaki posadas, ndenge oyo bazali kosala yango lelo oyo ezali komonisa ntina na yango. Soki ozali na engumba Mexico na mikolo yango, okomona likambo oyo mokomi moko ya zulunalo El Universal alobelaki na lisolo moko ete: “Posadas, oyo ezalaki ndenge ya kosalisa biso tókanisa koyengayenga ya baboti ya Yesu mpo na koluka esika oyo Mwana-Nzambe akobotama, lelo oyo ekómi mikolo ya kolangwa masanga, kosala makambo nyonso na kolekisa ndelo, kolya na lokoso, kosala makambo ya mpambampamba, mpe na mikolo yango, mobulu ekómaka makasi.”

Likanisi ya nacimiento ebandaki na bilakiseli oyo bazalaki kosala na bandako-nzambe ntango Espagne ezalaki koyangela Mexique. Atako bato mosusu basepelaka na bilakiseli yango, kasi emonisaka mpenza makambo oyo Biblia elobi? Oyo ezali motuna ebongi mpenza. Ntango bato oyo babengaka bato misato ya mayele, baoyo bazalaki mpenzampenza banganga-minzoto, bakendaki kotala bango, Yesu na baboti na ye bazalaki lisusu na ndako ya bibwele te. Na ntango wana, elekaki mikolo mingi banda kobotama na ye mpe bakómaki kofanda na ndako. Na ntembe te okosepela kotalela lisolo yango na Biblia na Matai 2:1, 11. Okomona mpe ete Biblia elobi te soki banganga-minzoto yango bazalaki boni.a

Na mikili ya Amérique latine, basalelaka bato misato ya mayele na esika ya Père Noël. Kasi, ndenge kaka esalemaka na mikili mosusu, baboti mingi babombaka na kati ya ndako biloko oyo bana basakanaka na yango. Bongo na ntɔngɔ ya mokolo ya 6 Yanuali, bana balukaka biloko yango, oyo bakanisaka ete bato misato ya mayele nde bayelaki bango. Na mikolo yango, mombongo ya bato oyo batekaka biloko ya bana etambolaka malamu, mpe bamosusu bakómi na bozwi mingi mpo na likambo oyo bato mingi ya mitema sembo bayebi ete ezali lisapo mpamba. Bato mingi, ata mpe bana mike, bandimaka lisusu lisapo ya bato misato ya mayele te. Atako bato mosusu bazali kosepela te ndenge bato mingi bazali lisusu kondima lisapo yango te, ndenge nini tosengeli kotalela lisapo oyo balingi etikala se mpo na kobatela bonkɔkɔ mpe mpo na kozwa mbongo?

Baklisto ya liboso bazalaki kosepela Noele te. Mpo na yango, mokanda moko elobi boye: “Na lingomba ya boklisto na ekeke ya liboso, bazalaki kosala fɛti yango te mpamba te baklisto bazalaki mingimingi na momeseno ya kokanisa liwa ya bato minene kasi bazalaki kosepela mokolo ya kobotama na bango te.” Biblia elobeli nde bapakano oyo bazalaki kosepela mokolo ya kobotama, kasi basaleli ya solo ya Nzambe te.—Matai 14:6-10.

Kasi, yango elingi koloba te ete koyekola mpe kokanisa makambo oyo elekaki mpenza ntango Mwana ya Nzambe abotamaki ezali na ntina moko te. Lisolo ya solosolo ya Biblia emonisi makambo mpe mateya ya ntina mpo na baoyo balingi kosala mokano ya Nzambe.

Kobotama ya Yesu ndenge oyo Biblia elobi yango

Baevanzile ya Matai na ya Luka eyebisi biso makambo oyo elekaki mpenza ntango Yesu abotamaki. Masolo yango elobi ete anzelu Gabaliele akendaki epai ya elenge mwasi moko monzemba na nkombo Malia na mboka Nasalete na etúká ya Galilai. Amemelaki ye nsango nini? “Talá, okozwa zemi mpe okobota mwana mobali, mpe okobyanga nkombo na ye Yesu. Ye akozala monene mpe akobyangama Mwana na Oyo-Aleki-Likoló. Nkolo Nzambe akopesa ye kiti na bokonzi ya Davidi tata na ye. Akozala mokonzi na ndako ya Yakobo libela, mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.”—Luka 1:31-33.

Nsango yango ekamwisaki Malia. Lokola abalaki naino te, atunaki boye: “Oyo ekozala boni awa elali ngai na mobali te?” Anzelu alobaki na ye ete: “[Elimo santu, NW ] ekoya likoló na yo, mpe nguya ya Oyo-Aleki-Likoló ekozipa yo. Yango wana mwana ya bulɛɛ oyo akobotama akobyangama Mwana ya Nzambe.” Ntango Malia asosolaki ete ezali mokano ya Nzambe, alobaki boye: “Talá, ngai moombo ya Nkolo, tiká ebimela ngai lokola elobi yo.”—Luka 1:34-38.

Lokola Yosefe akómaki na makanisi ya koboya Malia ntango ayokaki ete azali na zemi, anzelu moko ayebisaki ye ete zemi ya Malia mpe kobotama ya mwana ezali likamwisi. Na nsima Yosefe andimaki mokumba ya kobɔkɔla Mwana ya Nzambe.—Matai 1:18-25.

Na nsima, Kaisala Augusto abimisaki mobeko ete bato nyonso bákende kokomisa nkombo na bango na mikanda ya Leta; yango wana Yosefe na Malia basalaki mobembo longwa na Nasalete na etúká ya Galilai tii na Beteleme, mboka ya bankɔkɔ na bango, na etúká ya Yudea. “Ezalaki bango wana, mikolo ya kobota na ye mikokaki, mpe abotaki mwana na ye mobali ya liboso, azingaki ye na bilamba, mpe alalisaki ye na elyelo ya bibwele, mpo ete esika ezalaki na bango na ndako na kolala te.”—Luka 2:1-7.

Luka 2:8-14 eyebisi makambo oyo esalemaki na nsima: “Babateli ya mpate bazalaki na mokili yango, bazalaki na lisobe na butu kosɛnzɛla etonga na bango ya mpate. Anzelu ya Nkolo abimelaki bango, mpe babangaki na nsɔmɔ monene. Nde anzelu alobaki na bango ete, Bangá te! zambi talá, napesi bino nsango malamu ya esengo monene ekozala na bato nyonso. Mpo ete Mobikisi, ye Klisto Nkolo, abotameli bino lelo na mboka ya Davidi. Oyo mpe elembo mpo na bino, bokokuta mwana moke azingami na bilamba, alali na elyelo ya bibwele. Mpe ebele ya baanzelu ya Likoló babimaki pwasa na anzelu yango elongo, kosanzola Nzambe ete, Nkembo na Nzambe na bisika-bileki-Likoló, mpe kimya na nse kati na bato [ya boboto, NW ].”

Banganga-minzoto

Na lisolo na ye, Matai alobi ete banganga-minzoto bautaki na Ɛsti mpe bakendaki na Yelusaleme mpo na koluka esika oyo Mokonzi ya Bayuda abotamaki. Mokonzi Elode alukaki koyeba likambo yango malamumalamu; kasi azalaki na mokano mabe. “[Atindaki] mpe bato na Beteleme, ye ete, [Bókenda koluka mwana yango malamumalamu, NW ]. Soko [bomoni] ye, bóyebisa ngai ete ngai mpe naya kokumbamela ye.” Banganga-minzoto bamonaki mwana mpe ‘bazipolaki mabenga na bango, bapesaki ye makabo, wolo mpe mpaka na malasi mpe mola.’ Kasi bazongaki lisusu epai ya Elode te. “Bayebisami na lilɔtɔ ete bázonga epai na Elode te.” Nzambe atindaki anzelu kokebisa Yosefe mokano mabe oyo Elode azalaki na yango. Yango wana, Yosefe na Malia bakimaki na mwana na bango na Ezipito. Na nsima, mpo na koluka koboma Mokonzi ya sika, Elode, mokonzi mabe, atindaki basoda báboma bana mibali na Beteleme mpe na bamboka oyo ezali pembeni na yango. Bana mibali ya mbula boni? Kobanda na mbula mibale tii na nse.—Matai 2:1-16.

Lisolo oyo eteyi biso nini?

Banganga-minzoto oyo bayaki kotala mwana bazalaki mingi, kasi bazalaki kosambela Nzambe ya solo te. Biblia moko (La Nueva Biblia Latinoamérica [ebimeli ya 1989]) elobi boye na maloba na nse ya lokasa: “Bato yango ya maji bazalaki bakonzi te, kasi bazalaki bato oyo bayebisaka makambo oyo ekoya mpe banganga ya lingomba moko ya bapakano.” Basalaki mobembo wana kaka mpo bayebaki kotala minzoto, mpamba te bamipesaki na yango. Soki mpenza Nzambe nde moto atindaki bango, alingaki komema bango mbala moko epai oyo mwana azalaki, kozanga ete amema bango liboso na Yelusaleme mpe na ndako ya Elode. Na nsima mpo na kobatela mwana nde Nzambe asalaki ete bázonga na nzela mosusu.

Na mikolo ya Noele, babakisaka masapo mpe makambo mosusu mpe babosanaka likambo oyo eleki ntina na lisolo yango: ete mwana abotamaki mpo na kozala Mokonzi monene, ndenge bayebisaki Malia mpe babateli ya mpate. Lelo oyo, Yesu Klisto azali lisusu mwana te, azali mpe lisusu mwana moke te. Azali Mokonzi oyo azali koyangela na kati ya Bokonzi ya Nzambe; etikali moke Bokonzi yango elongola biyangeli nyonso oyo elingi te ete mokano ya Nzambe esalema, mpe ekosilisa bampasi nyonso oyo ezali kotungisa bato. Yango nde Bokonzi oyo tosɛngaka na Libondeli ya Nkolo.—Danyele 2:44; Matai 6:9, 10.

Makambo oyo anzelu ayebisaki babateli ya mpate emonisi biso ete moto nyonso akoki kobika soki andimi koyoka nsango malamu. Bato oyo Nzambe akondima bakokóma “bato ya boboto.” Tozali na elikya kitoko ete mokili mobimba ekozala na kimya ntango Yesu Klisto akoyangela, kasi esengeli ete bato bándima kosala mokano ya Nzambe. Makambo oyo esalemaka na Noele elendisaka yango, mpe emonisaka mposa yango? Eyano na motuna yango ezali polele na makanisi ya bato mingi ya mitema sembo oyo balingi kolanda mateya ya Biblia.—Luka 2:10, 11, 14.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Likambo mosusu oyo osengeli kobosana te yango oyo: Na nacimiento, ndenge oyo esalemaka na Mexique, babengaka mwana yango “Mwana-Nzambe” mpo bakanisaka ete Nzambe ye moko nde ayaki kobotama awa na mabele lokola mwana. Nzokande, Biblia emonisaka Yesu lokola Mwana ya Nzambe oyo abotamaki awa na mabele; ye na Yehova, Nzambe oyo azali na nguya nyonso, bazali moto moko te mpe bakokani te. Tángá bavɛrsɛ oyo mpo na komona mpenza ndenge likambo yango ezali: Luka 1:35; Yoane 3:16; 5:37; 14:1, 6, 9, 28; 17:1, 3; 20:17.

[Etanda na lokasa 4]

BATO MOSUSU BAKOKAMWA

Na mokanda na ye (The Trouble With Christmas), mokomi Tom Flynn amonisi makanisi oyo akómaki na yango nsima ya koyekola malamumalamu makambo ya Noele na boumeli ya bambula ebele:

“Ebele ya makambo oyo ezali kosalema lelo oyo na Noele eutaki na losambo ya bapakano oyo ezalaki kosalema liboso Klisto aya. Makambo mosusu euti na mimeseno ya bato, mosusu na makambo ya kosangisa nzoto, to makambo ya molɔ́ngɔ́, mpe ekoki kotinda bato oyo bayekoli mingi mpe balingaka nyamunyamu te na kobwaka yango soki bayebi malamu epai oyo yango eutaki.”—Lokasa 19.

Flynn amonisi makambo mingi oyo ezali mpenza kondimisa mpe na nsima, alobeli lisusu likambo ya ntina mingi: “Moko na makambo oyo eleki kokamwisa mpo na Noele ezali ete makambo ya boklisto ezali mpenza te. Soki tolongoli makambo oyo ezalaki liboso Klisto aya, makambo mingi oyo ekotikala ezali makambo oyo ekɔtaki nsima ya Klisto, na esika ezala mpenza ya Klisto, na ebandeli.”—Lokasa 155.

[Elilingi na lokasa 7]

Ntango bayebisaki kobotama ya Yesu, bamonisaki mpe ete akozala Mokonzi oyo Nzambe aponi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto