Matomba oyo tokoki kozwa soki tozali koluka kimya
EDWARD akómaki pene na liwa, mpe Bill ayinaki ye. Mbula 20 liboso, Edward azwaki ekateli moko oyo esalaki ete Bill abungisa mosala na ye, mpe likambo yango ekabolaki bato yango mibale oyo bazalaki baninga ya motema. Ntango Edward alingi kokufa, amekaki kosɛnga bolimbisi mpo akufa na kimya na motema. Kasi, Bill alingaki ata koyoka ye te.
Mbula soki 30 na nsima, ntango Bill ye moko akómaki pene na liwa, ayebisaki ntina oyo aboyaki kolimbisa. “Edward asengelaki te kosala moninga na ye ya motema likambo ya ndenge wana. Naboyaki tólobana lisusu na ye nsima ya mbula ntuku mibale mobimba. . . . Ekoki kozala ete nasalaki mabe ndenge naboyaki, kasi wana ezali mpenza ndenge nayokaki na motema na ngai.”a
Mingimingi, kozanga boyokani na kati ya bato mibale ekómaka makasi ndenge wana te, kasi mbala mingi etikaka bato na nkanda to na mpasi na motema. Kanisá naino moto oyo azali komiyoka ndenge Edward amiyokaki. Lokola ayebi ete likambo oyo asalaki etyá moninga na ye na mpasi, akoki komitungisa mpe koyoka mpasi na ndenge ayokanaka lisusu te na moninga na ye ya motema. Kasi, ayokaka mpasi mingi soki akanisi ndenge moninga na ye abosaná mpenza boninga na bango lokola eloko moko ya motuya te.
Nzokande, moto oyo azali kokanisa lokola Bill azali komona ete basali ye mabe oyo ayebi ntina na yango ata moke te mpe asengeli mpenza kosilika mpe kobomba nkanda. Mpo na ye, moninga na ye ayebaki malamu ete likambo oyo alingi kosala ezali mabe, kasi asalaki yango na nko. Mbala mingi, ntango bato mibale bazwani matata, moto na moto akanisaka ete moninga nde azali na foti. Yango wana, tomonaka ete bato oyo bazalaki baninga bakómaka “kobunda.”
Babundaka na bibundeli oyo ezali na lokito moko te: soki moko amoni moninga azali koya na mosika, alukaka nzela mosusu to abalolaka elongi na ye epai mosusu, mpe bakipanaka ata kokipana te ntango bakutani na kati ya baninga mosusu. Bakofanda mosikamosika mpe bakolinga te ete miso na bango ekutana to bakotalana miso mabe. Soki basololi, bakolobelana kaka maloba makasimakasi to mpe bakofingana.
Nzokande, atako bazali koyokana te, bakoki kozala na makanisi moko na makambo mosusu. Mokomoko na bango akoki koyeba ete azali na foti mpe ete kobebisa boninga na bango kaka boye ezali mpenza likambo ya mawa. Ekoki kozala ete bango nyonso bazali koyoka mpasi na motema, mpe bayebi ete bakoki kosala mwa likambo mpo na kosilisa mpasi yango. Kasi nani na kati na bango akobondela moninga liboso mpo na koluka kimya? Moko te na kati na bango azali na mposa ya kobanda moninga.
Eleki mbula 2000, bantoma ya Yesu Klisto bazalaki na bantango mosusu koswana makasi. (Malako 10:35-41; Luka 9:46; 22:24) Nsima ya koswana, Yesu atunaki bango boye: “Likambo nini bozalaki kolobana nzelanzela?” Bapɔlaki na nsɔni mpe moko te akokaki kopesa eyano. (Malako 9:33, 34) Mateya oyo Yesu apesaki esalisaki bango báyokana lisusu. Toli oyo Yesu mpe bayekoli na ye mosusu bapesaki ezali kosalisa bato mpo na kosilisa makambo mpe kozongisa boninga soki ebebi. Tótala ndenge oyo toli yango ezali kosalisa bato.
Salá makasi mpo na koluka kimya
“Nakolobisa ye lisusu te. Nalingi kutu komona ye ata na miso te.” Soki olobá ndenge wana mpo na moto moko, esengeli osala ndenge mikapo ya Biblia oyo elandi elobi.
Yesu ateyaki boye: “Boye, soki ozali komema likabo na yo na etumbelo mpe kuna okanisi ete ndeko na yo azali na yo likambo, tiká likabo na yo kuna liboso ya etumbelo, mpe kende; liboso yokaná yo ná ndeko na yo, mpe na nsima, ntango okozonga, pesá likabo na yo.” (Matai 5:23, 24) Alobaki lisusu boye: “soki ndeko na yo asali lisumu, kende komonisa ye libunga na ye na kati na yo ná ye moko kaka.” (Matai 18:15) Ezala yo nde osalaki moninga mabe to moto mosusu nde asali yo mabe, maloba ya Yesu emonisi ete esengeli yo oluka kosilisa likambo yango nokinoki na moto yango. Osengeli kosala yango na “elimo ya boboto.” (Bagalatia 6:1) Okoluka kokutana na moto yango te mpo na komilongisa to mpo na kopusa ye asɛnga yo bolimbisi, kasi nde mpo na kozongisa kimya. Toli yango ya Biblia ebongi?
Ernest azali mokonzi na kompanyi moko ya monene.b Na boumeli ya bambula mingi, mosala na ye ezalaki kosɛnga ye abongisa makambo ya ndenge na ndenge na bato ya motindo nyonso mpe abatela mpenza boyokani na ye na bango. Amonaki ndenge matata ekoki kobima kati na bato. Abakisi boye: “Mbala mingi, nakutanaki na mikakatano na bato mosusu. Kasi, ntango likambo ebimi, nafandaka na moto yango mpe tolobelaka likambo yango. Kende kokutana na bango mbala moko. Kende na mokano ya kozongisa kimya. Soki osali bongo, ekosimba.”
Alicia azali na baninga oyo bautá na bisika ndenge na ndenge. Alobi boye: “Ntango mosusu soki nalobi likambo moko boye mpe namoni ete likambo yango ekoki kozokisa moto, nakendaka kosɛnga moto yango bolimbisi. Mbala mosusu nasalaka yango ata na likambo oyo nasengeli kosɛnga bolimbisi te, kasi ata soki na nsima nayebi ete nazokisaki moto yango te, nazalaka motema kimya. Yango esalisaka ngai nayeba ete likambo ezali te.”
Kosilisa matata
Ezali na makambo mingi oyo epekisaka bato báluka kozongisa kimya na kati na bango. Ekómelá yo oloba: “Mpo na nini ngai kaka nde nakende kobondela ye? Ye moto abandaki ngai.” To ekómelá yo ete okei epai ya moto mpo bózongisa boyokani na bino kasi alobi na yo: “Nazali na likambo te ya koloba na yo”? Bato mosusu balobaka bongo mpo likambo oyo basalaki bango epesaki bango mpasi mingi. Masese 18:19 elobi boye: “Ndeko oyo ayokisami mpasi azali lokola mboka makasi; mpe kowelana ezali lokola bikangeli na ndako makasi.” Tosengeli mpe komitya na esika ya moninga. Soki aboyi bosolola, tiká mwa ntango eleka mpe kende lisusu kokutana na ye. Soki osali bongo, “mboka makasi” ekoki kofungwama mpe “bikangeli” ekoki kolongwa mpe kopesa nzela ete kimya ezonga.
Likambo mosusu oyo ekoki kozala mokakatano mpo na kozongisa kimya ezali koboya komikitisa. Bato mosusu bamonaka ete soki asɛngi bolimbisi to asololi na moto oyo asali ye mabe, azali komikitisa valɛrɛ. Kobatela lokumu ezali mabe te, kasi koboya koluka kimya ematisaka valɛrɛ ya moto to ekitisaka ye? Lolendo nde ezali kotinda yo oluka kobatela lokumu na yo?
Yakobo, mokomi moko ya Biblia, amonisi boyokani oyo ezali na kati ya elimo ya koswana mpe lolendo. Nsima ya kolobela “bitumba” mpe “kobunda” oyo ezalaki kati na baklisto mosusu, alobaki boye: “Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amonisaka boboto monene epai ya bato ya komikitisa.” (Yakobo 4:1-3, 6) Ndenge nini lolendo ebebisaka milende ya koluka kotya kimya?
Lolendo ekosaka bato mpe etindaka bango bakanisaka ete baleki basusu. Bato ya lolendo bakanisaka ete bazali na lotomo ya koloba ete baninga na bango bazali malamu to mabe. Ndenge nini basalaka yango? Soki bazwani na moto, mbala mingi bato ya lolendo balobaka mbala moko ete moto yango akoki kobonga lisusu te. Lolendo etindaka bato mosusu báboya kosɛnga moto bolimbisi, mpamba te bakanisaka ete moto yango abongi na yango te. Na yango, bato ya lolendo batikaka mikakatano ekoba na esika báluka kosilisa yango na ndenge ebongi.
Lokola nzela oyo bakangi mpo banguna báleka te, mbala mingi lolendo ebebisaka milende mpo na kotya kimya. Yango wana, soki omoni ete ozali koboya kozongisa kimya na moninga oyo alingi bóyokana, ekoki kozala ete lolendo nde ezali kosala yo. Ndenge nini okoki kolonga elimo ya lolendo? Soki oloni elimo ya komikitisa.
Loná elimo ya komikitisa
Biblia emonisi ete ezaleli ya komikitisa ezali na motuya mingi. “Komikitisa mpe kobanga Yehova ememaka bozwi mpe nkembo mpe bomoi.” (Masese 22:4, NW) Nzembo 138:6 (NW), elobeli ndenge Nzambe atalelaka bato ya komikitisa mpe bato ya lolendo: “Yehova azali na likoló, mpe amonaka moto ya komikitisa; kasi atalaka moto ya lolendo na mosika.”
Bato mingi bakanisaka ete komikitisa ezali nde komisilisa valɛrɛ. Bakonzi ya mokili bakanisaka bongo. Atako ekólo mobimba batosaka bango, bakonzi ya politiki baboyaka kondima mabunga na bango. Bato bakamwaka mingi soki bayoki mokonzi alobi, “Bólimbisa ngai.” Eumeli mingi te, moto moko oyo azalaká mokonzi asɛngaki bolimbisi mpo na libunga na ye oyo ebimisaki likama moko monene. Balobelaki likambo yango mingi na bazulunalo, na radio mpe na televizyo.
Komikitisa ezali ezaleli ya komitya na nse ya basusu to komona ete bato mosusu baleki biso. . . ekeseni na ezaleli ya lolendo to ya komitombola. Ezaleli ya komikitisa emonisaka lolenge oyo moto ye moko amitalelaka, kasi te ndenge bato mosusu batalelaka ye. Kondima mabunga na komikitisa nyonso mpe kosɛnga bolimbisi na motema mobimba ekitisaka valɛrɛ ya moto te, kutu ematisaka ye nde. Biblia elobi boye: “Liboso na kobebisama, motema ezali na lolendo, nde liboso na kokumisama ezali na [komikitisa].”—Masese 18:12.
Mpo na bato ya politiki oyo bandimaka mabunga na bango te, moto moko alobaki boye: “Ezali mawa ndenge bakanisaka ete kosɛnga bolimbisi ezali bolɛmbu. Bato oyo bamimonaka ete bazali na ntina te basɛngaka ‘bolimbisi’ na mpasi. Bato ya motema boboto mpe ya mpiko nde bamonaka ete soki balobi ete basali libunga ekokitisa valɛrɛ na bango te.” Ezali mpe ndenge moko mpo na bato oyo basalaka politiki te. Soki ozali kosala milende mpo na kozala na ezaleli ya komikitisa na esika ya kozala na ezaleli ya lolendo, ekozala lisusu mpasi te ozongisa kimya na moto soki mikakatano ebimi. Talá ndenge libota moko bamonaki bosolo ya likambo yango.
Kozanga koyokana ebimisaki matata moko makasi kati na Julie ná leki na ye William. William asilikelaki Julie ná mobali na ye Joseph makasi, mpe azalaki lisusu kolinga kokutana na bango te. Azongiselaki kutu Julie ná mobali na ye Joseph biloko nyonso oyo bakabelaki ye. Ntango basanza ezalaki koleka, nkanda ezalaki kokola mpe ezwaki esika ya boyokani oyo William ná Julie bazalaki na yango liboso.
Joseph azwaki ekateli ya kosalela toli oyo ezali na Matai 5:23, 24. Alukaki kokutana na bokilo na ye mpo basolola na elimo ya boboto mpe akomelaki ye mokanda mpo na kosɛnga bolimbisi. Alendisaki mwasi na ye alimbisa ndeko na ye. Na nsima, William amonaki ete Julie ná Joseph bazalaki mpenza na mposa ya kozongisa kimya, mpe nkanda na ye ekitaki. William ná mwasi na ye bakendaki epai ya Julie ná Joseph, basɛnganaki bolimbisi, bayambanaki, mpe bazongisaki boyokani na bango.
Soki olingi kosilisa mokakatano na moto moko, salelá mateya ya Biblia na motema molai mpe salá nyonso mpo na kozongisa kimya kati na yo ná moto yango. Yehova akosalisa yo. Okomona bosolo ya likambo oyo Yehova ayebisaki Bayisalaele na ntango ya kala: “Soki oyokaki malako na ngai! Mbɛlɛ kimya na yo ezalaki lokola ebale.”—Yisaya 48:18.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Euti na buku moko (The Murrow Boys—Pioneers on the Front Lines of Broadcast Journalism) ya Stanley Cloud ná Lynne Olson.
b Topesi bango bankombo mosusu.
[Bililingi na lokasa 7]
Mbala mingi Kosɛnga bolimbisi ezongisaka boyokani