Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/2 nk. 3-5
  • Lolendo efutaka nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolendo efutaka nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Liteya ya komikitisa
  • Lifuti ya lofundo
  • Kotika te ete lolendo ebebisa yo
  • Kopesa nzoto kilo to komitombola
  • Okoki kobunda na Satana mpe kolonga!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Matomba oyo tokoki kozwa soki tozali koluka kimya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Ndenge nini okoki komonisa komikitisa ya solosolo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • ‘Bólata elimo ya komikitisa’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/2 nk. 3-5

Lolendo efutaka nini?

ESILA kokómela yo ete moto moko aluka komonisa yo na lofundo nyonso ete ozali na ntina moko te? Ekoki kozala patrɔ na yo, mokonzi na yo na mosala, to mpe ndeko na yo oyo azalaki komona ete ozali moto mpamba mpe azalaki mpenza kotyola yo? Ozalaki komona moto yango ndenge nini? Ozalaki kosepela na ye? Tokanisi ete te! Mpo na nini? Mpamba te lolendo ekimisaka baninga mpe ebebisaka boyokani.

Moto ya lolendo alingaka kokitisa bato mosusu nyonso mpo amonana ete ye nde aleki. Moto ya lolendo alobaka mpenza maloba malamu mpo na basusu te. Azalaka se na maloba ya kokitisa lokola oyo: “ɛɛ, akoki kozala malamu kasi, azali na likambo boye to na mabe boye.”

Buku moko (Thoughts of Gold in Words of Silver), elimboli lolendo lokola “mabe ya koluka ntango nyonso kokweisa. Ebebisaka moto, esilisaka ye nyonso oyo bato mosusu bakoki kosepela na yango epai na ye.” Tokoki kokamwa te ete moto nyonso ayokaka nkaka ntango afandi na moto ya lolendo. Ɛɛ, mbala mingi moto ya lolendo azangaka baninga ya solosolo. Buku yango elobi lisusu ete, “Nzokande, bato basepelaka na moto ya komikitisa; ezali te moto oyo alobaka na lolendo nyonso ete, ngai nazali na komikitisa, kasi moto oyo azali na komikitisa ya solosolo.” Yango wana, Biblia elobi mpenza malamu ete: “Lolendo la moto lokokitisa ye, kasi moto wa bosawa akozwa lokumu.”​—Biyele [Masese] Mas. 29:23, Liloba lya Nzambe.

Kasi, longola kozanga baninga mpe kozanga lokumu na miso ya bato, ndenge nini lolendo ebebisaka boyokani ya moto elongo na Nzambe? Ndenge nini Nzambe atalelaka moto ya lolendo, moto ya komitombola, mpe moto ya enzombo? Lolendo to komikitisa, ezali likambo ya ntina na miso na ye?

Liteya ya komikitisa

Mokomi ya masese oyo apemamaki na Nzambe alobaki ete: “Lolendo eyaka liboso ya kokwea, mpe elimo ya komitombola liboso ya kobɛta libaku. Kozala na komikitisa elongo na bato ya komikitisa ezali malamu koleka kokabola biloko epunzami na bato ya lolendo.” (Masese 16:18, 19, NW) Likambo oyo ekómelaki Namana, mokonzi ya basoda ya Sulia, emonisi bosolo ya maloba wana. Namana azalaki na bomoi na eleko ya Elisa, mosakoli Moyisalaele.

Namana azalaki na maladi ya maba. Akendaki na Samalia mpo na komisalisa na maladi na ye. Akanisaki ete Elisa akoyamba ye mpe bakosolola miso na miso. Nzokande, mosakoli atindaki mosaleli na ye koyebisa Namana ete akende kosukola mbala nsambo na Ebale Yaladene. Namana asilikaki lokola amonanaki na mosakoli te mpe na koyoka maloba oyo atindelaki ye. Mpo na nini mosakoli atindaki mosaleli na ye na esika ete ye moko abima mpo na kokutana na Namana? Lisusu, ata ebale nini ya Sulia ezalaki se malamu lokola Yaladene! Mokakatano na ye ezalaki nde lolendo. Esukaki ndenge nini? Likambo ya malamu mpo na ye ezalaki ete ayokaki toli ya mayele. “Boye akitaki mpe asukolaki na Yaladene mbala nsambo lokola na liloba na moto na Nzambe; mpe nzoto na ye ekómaki lisusu lokola nzoto na mwana moke, apɛtwaki.”​—2 Mikonzi 5:14.

Mbala mosusu ata komikitisa moke ememaka matomba minene.

Lifuti ya lofundo

Nzokande, mbala mosusu lifuti ya lolendo ekoki kozala mabe koleka kozanga litomba to bolamu. Liloba ya Greke hybris emonisi lolendo oyo eleki to komityela motema oyo ememaka na etumbu. William Barclay, nganga-mayele ya lokota ya Greke, alobi ete liloba “hybris ezali yauli mpe lofundo oyo esalaka ete [moto] atyola baninga na ye.”

Biblia elobeli moto moko oyo azalaki na lolendo motindo wana. Moto yango ezali Hanunu, mokonzi ya Amona. Buku Étude perspicace des Écritures elobi boye: “Lokola Nahasa asalelaki ye boboto mingi, Davidi atindaki bantoma mpo na kobɔndisa Hanunu ntango akufelaki tata. Kasi, bankumu ya mboka bandimisaki Hanunu ete ezali nde mayele mabe ya Davidi mpo na konɔnga mboka; yango wana, asambwisaki basaleli ya Davidi: akataki bango ndambo ya mandefu mpe akataki bilamba na bango kino na masɔkɔ, na nsima abenganaki bango.”a Mpo na likambo yango, Barclay alobi ete: “Kosala bongo ezali hybris. Ezali mbala moko kofinga, kotyola, mpe kosambwisa na miso ya bato.”​—2 Samwele 10:1-5.

Moto ya lolendo akoki kokóma na hybris, na maloba ya kotyola, to kosambwisa basusu. Alingaka kozokisa moninga na nko mpe azalaka na mawa te, bongo akosepela ntango moto azali komitungisa mpe koyoka nsɔni. Kasi, kosambwisa moto to kosilisa ye loposo ezali mbeli ya mino mibale. Ye oyo asali yango akobungisa moninga, mpe mbala mosusu akomilukela monguna.

Lokola Nkolo na ye atindaki ye ‘alinga mozalani na ye lokola ye moko,’ ebandi boni moklisto ya solo akende kozala na lolendo motindo wana? (Matai 7:12; 22:39) Likambo yango eyokani ata moke te na nyonso oyo Nzambe na Klisto bakoki kondima. Yango wana, Barclay alobi likambo ya ntina mingi ete: “Hybris ezali lolendo oyo esalaka ete moto atɛlɛmɛla Nzambe.” Hybris ezali lolendo ya koloba ete: “Yehova azali te.” (Nzembo 14:1, NW) To ndenge Nzembo 10:4 elobi yango: “Na nzombo na elongi na ye, moto na masumu akoluka ye te; makanisi na ye nyonso ete, Nzambe azali te.” Lolendo motindo yango, to komitombola, ekabolaka moto na baninga mpe na bandeko na ye, mpe lisusu ekabolaka moto na Nzambe. Talá lifuti na yango!

Kotika te ete lolendo ebebisa yo

Lolendo ekoki komonana na ndenge mingi: lolendo oyo euti na bolingi-ekólo, na koyina bato ya mposo mosusu, na kokabola bato, na mayele, bozwi, lokumu, mpe nguya oyo moto azali na yango. Na lolenge moko to mosusu, lolendo ekoki kokɔtela yo mpe kobebisa bomoto na yo.

Mbala mingi moto amonanaka ete azali na komikitisa ntango azali liboso ya bato oyo baleki ye to mpe bakokani na ye. Kasi, nini esalemaka ntango moto yango oyo azalaki komonana ete azali na komikitisa akómi mokonzi? Mbala moko, akómaka na makambo makasi, akómaka konyokola bato oyo bazali na nse na ye! Yango ekoki kokóma epai ya moto mosusu ntango alati elamba to lopɛtɛ ya bokonzi. Ata basali ya Leta bakoki kokóma na lolendo ntango bazali liboso ya bato; bakoki kokanisa ete bato mosusu nde basengeli kosalela bango, kasi bango basengeli kosalela bato mosusu te. Lolendo ekoki kokómisa yo moto ya nkanda, ya makambo makasi; nzokande komikitisa ekoki kokómisa yo moto ya boboto.

Yesu akokaki kozala na lolendo mpe na makambo makasi na kati ya bayekoli na ye. Azalaki moto ya kokoka, Mwana ya Nzambe na kati ya bato ya kozanga kokoka, oyo bayebaki kopekisa mayoki na bango te mpe bazalaki motema mɔ́tɔmɔ́tɔ. Kasi, asɛngaki bato oyo bazalaki koyoka ye likambo nini? “Bóya liboso na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola na ngai; zambi ngai nazali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi; bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ezali na motau, mpe mokumba na ngai ezali na bozito te.”​—Matai 11:28-30.

Tosalaka ntango nyonso makasi ya kolanda ndakisa ya Yesu? To toyebaka ete tozali bato ya nkandankanda, ya makambo makasi, oyo banyokolaka bato, bato oyo bazangi mawa, to ya lolendo? Na ndakisa ya Yesu, luká kolendisa, kasi konyokola bato te. Boyá bopusi mabe ya lolendo.

Na kotalela nyonso oyo tolobi, elingi nde koloba ete lolendo nyonso ezali mabe?

Kopesa nzoto kilo to komitombola

Lolendo ezali mpe “kopesa nzoto kilo na bokatikati mpe na ndenge oyo esengeli.” (Diksionere Le Petit Robert) Kopesa nzoto kilo elimboli koyeba komimemya. Elingi koloba ete ozali kokeba na lolenge bato mosusu bakotalela yo. Moto akebaka na ndenge ya kobongisa nzoto na ye mpe na lokumu na ye. Bato ya ekólo Espagne bazalaka na lisese moko oyo elobaka ete: “Yebisá ngai soki otambolaka na nani, bongo nakoyebisa yo soki ozali nani.” Soki osepelaka kozala moninga ya bato ya bopɔtu, ya goigoi, basɛnzi, bato ya maloba ya salite, nsukansuka okokóma lokola bango. Makanisi na bango ekokɔtela yo, mpe lokola bango, okosilisa nzoto na yo kilo.

Ya solo, ezali na ndelo mosusu oyo moto akoki kolekisa: lolendo oyo ememaka na lofundo to na kotombola mapeka. Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, Bakomeli na Bafalisai bazalaki na lolendo mpo na bonkɔkɔ na bango mpe bazalaki komilakisa ete bango nde balingi Nzambe mingi. Yesu alobaki boye mpo na bato yango: “Bazali kosala misala nyonso na bango ete bato bátala bango. Bazali koyeisa filakateli [mwa sanduku ezali na makomami] na bango minene mpe nsɔngɛ na bilamba na bango milai [mpo bámonana ete basambelaka mingi]; balingi bisika na lokumu kati na bilambo mpe bifandelo na liboso kati na biyanganelo, mpe kozwa [losako] kati na zando mpe kobyangama Labi na bato.”​—Matai 23:5-7.

Na bongo, kopesa nzoto kilo esengeli kozala na bokatikati. Lisusu, tóbosana te ete Yehova atalaka motema, kasi ndenge oyo moto azali komonana na libándá te. (1 Samwele 16:7; Yilimia 17:10) Komimona sembo ezali yango te bosembo na miso ya Nzambe. Kasi, motuna yango oyo: Ndenge nini tokoki kolona komikitisa ya solo mpe kokima lifuti ya lolendo?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.

[Elilingi na lokasa 4]

Mwa komikitisa moke ememelaki Namana matomba minene

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto