Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/97 lok. 1
  • Tóbila Yesu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóbila Yesu
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Tosalela Jéhovah ma elimo ya komipesa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Tózala na bomoi mpo na biso moko lisusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Tózala na elimo ya komipesa!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Tozali koluka babongisi-nzela basungi 100 000
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 6/97 lok. 1

Tóbila Yesu

1 Na libaku moko, Yesu alobaki ete: “soko nani alingi koya nsima na ngai, tiká ete amiboya ye moko mpe akamata nzeté na ye ya mpasi mpe abila ngai.” (Mat. 16:24) Tolingi ya solo kondima libyangi ya Yesu. Tótala ndimbola na yango na kotaleláká liloba mokomoko.

2 “Amiboya ye moko”: Na kopesáká bomoi na biso epai na Yehova, tozali komiboya biso moko. Ndimbola ya liboso ya liloba ya Greke libongolami na ‘komiboya’ ezali bongo “koloba te.” Yango elimboli ete tozali kotika mikano na biso moko, bamposa na biso mpe bozwi na biso moko, bakisa mpe bisengo na biso ya moimi, na ekateli ete tosengeli kosepelisa Yehova libela na libela.​​​—Lom. 14:8; 15:3.

3 “Akamata nzeté na ye ya mpasi”: Kozala na bomoi ya boklisto, ezali kozala na bomoi na kokamatáká nzeté ya mpasi oyo emonisi mosala mopesami na Yehova na elimo ya komipesa. Moko ya lolenge ya komonisa elimo ya komipesa yango ezali bongo kosala mingi kati na mosala ya kosakola. Uta ebandeli ya mobu oyo, basakoli mingi basili kobanda mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Soki ozali moko kati na bango, okoki kondima kozanga ntembe ete mapamboli oyo mazali kozwama maleki milende oyo misalami mosika mpenza. Basakoli oyo bazali na likoki te ya kosala mosala yango bamibongisaki mbala mingi mpo na kosakola mingi koleka. Yango wana masangá mosusu mapusaki ngonga ya makita mwa miniti liboso mpo na mosala ya kosakola. Lokola elanga ezali koya, basakoli mingi basalelaka ntango yango malamu mpo na kosakola. Bamoko bazwaki matomba malamu, mpenzampenza ntango balingaki kotala ‘ndako ya nsuka’ to kosakola ‘mwa miniti mosusu likoló.’

4 Komityela mikano ya yo moko ezali lolenge mosusu ya komonisa elimo ya komipesa. Na kosaláká manáka mabongi mpe kobongoláká lolenge ya kosalela ntango na bango, bamoko bakómaki babongisi-nzela ya sanza na sanza. Basusu balongaki komibongisa mpe kozala pene mpo na kosala na Betele to lokola misionere. Basusu mpe bakendaki kofanda na etúká moko epai kuna mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali makasi.

5 “Abila ngai”: Atako bayekoli ya Yesu bakutanaki na komekama mingi, bazwaki elendiseli na molende mpe mpiko oyo ye amonisaki na mosala na ye ya kosakola. (Yoa. 4:34) Bazalaki koyoka elimo na bango kozwa lisusu makasi na nzela ya kozala na ye wana mpe na nsango na ye. Ezali mpo na yango nde baoyo bazalaki kolanda ye bazalaki na esengo ya solo. (Mat. 11:29) Bobele bongo, tólendisana bamoko na basusu ete tókokisa na mpiko nyonso mosala ya ntina oyo ya kosakola Bokonzi mpe kozalisa bayekoli.

6 Tiká ete biso nyonso tóyanola na motema mobimba na libyangi ya Yesu ya kobila ye na kolónáká elimo ya komipesa. Na kosaláká bongo, tokozwa esengo monene uta lelo mpe tokoki kozwa mapamboli mingi na mikolo mizali koya.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto